SANGO MALAMU ya LUKA

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6Mokapo 7Mokapo 8Mokapo 9Mokapo 10Mokapo 11Mokapo 12Mokapo 13Mokapo 14Mokapo 15Mokapo 16Mokapo 17Mokapo 18Mokapo 19Mokapo 20Mokapo 21Mokapo 22Mokapo 23Mokapo 24

 

Mokapo 1

1. Lokola batu mingi bakomaki makambu oyo eyambamaki kati na biso na bondimi nionso. 2. Lokola baoyo bamonaki na miso na bango longwa na ebandeli, baoyo bakomi basaleli na liloba, bapesaki biso yango.

3. Namoni malamu, ngai pe oyo nalandaki makambu nionso wuta ebandeli ; nakomela yo yango ndenge elandamaki moto na lokumu Teofile, 4. Pô oyeba bosolo na makambu oyo ozuaki mpe oyokaki na bayekoli 5. Na tango ya Herode, mokonzi na yude, ezalaki na nganga nzambe moko na kombo ya Zakaria na lisanga ya abia pe mwasi na ye azalaki moko ya bana basi na Aaron pe kombo na ye ezalaki Elizabete. 6. Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso na Nzambe, kotambolaka na mibeko pe mitindo nionso ya Nkolo pe bazalaki ya kopamelama te. 7. Bazalaki na mwana te po Elizabete azalaki ekomba, pe bango mibale bazalaki mibange makasi. 8. Ekomaki ete tangu azalaki kosalela bonganga liboso na Nzambe na esika ya lisanga na bango. 9. Na motindo ya bonganga, zeke ekwelelaki ye ete akota na tempelo ya Nkolo kobonza malasi. 10. Pe batu ebele bazalaki kosambela libanda na ngonga libonza ya malasi. 11. Pe Angelu moko ya Nkolo abimelakii ye atelemaki na loboko ya mobali ya etumbelo ya malasi, 12. Zakaria tango amoni ye ayokaki somo pe abangaki 13. Pe Angelu alobi na ye kobanga te zakaria, kolomba na yo eyokami pe mwasi na yo Elizabete akobotela yo mwana mobali mpe okobenga ye kombo Yoane. 14. Akozala pona yo likambu na esengo pe ya kosepela pe batu ebele bakosepela na mbotama na ye ; 15. Pô akozala monene liboso na Nkolo pe akomela vino te, ata oyo ya makasi koleka te, akotondisama na Molimo Mosantu wuta libumu ya mama na ye. 16. Akozongisa batu ebele ya Israel epai na Nkolo, Nzambe na bango. 17. Akotambola liboso na ye na molimo mpe nguya ya Elia, pona kozongisa mitema ya ba tata epayi na bana, pe ya batomboki na makanisi ya basembo pona kobangisela Nkolo batu oyo babongisami. 18. Pe Zakaria alobi na angelu : ndenge nini nakoyeba yango ? pamba te, ngai nazali mobange pe mwasi na ngai asili konuna. 19. Pe angelu, azongisaki, koloba : Ngai, nazali Gabriel, natelemaka liboso ya Nzambe, pe natindamaki pona kolobela yo pe koyebisa yo sango ya malamu oyo. 20. Pe tala, okofanda nye pe okolaba te kino makambu oyo ekokokisama pona oboyi kondima maloba na ngai oyo ekokokisama na tangu na yango 21. Batu bazalaki kozela Zakaria pe bazalaki kokamwa ndenge awumelaki mingi na kati ya tempelo. 22. Pe tangu abimaki, azalaki lisusu na makoki ya koloba te ; basosolaki ete amonaki emoniseli kati na tempelo, pe ye moko asalelaki bango bilembo pe atikalaki baba. 23. Tangu ekomaki ete mikolo na ye ya mosala ekokaki, azongaki na ndaku na ye

24. Na sima ya mikolo wana, mwasi na ye Elizabete azuaki zemi pe amibombaki sanza mitanu. 25. Komiloba : Nkolo asaleli ngai na mikolo oyo atali ngai pona kolongola soni na ngai kati na batu.

 

26. Pe na sanza na motoba, angelu gabriel atindamaki na Nzambe na engumba moko ya galilai, kombo na yango Nazarete, 27. Epai ya vierge moko, oyo azalaki mobongami ya libala na mobali moko na kombo ya yozefe, na ndaku ya davidi ; pe kombo ya vierge ezalaki Maria. 28. Pe Angelu akoti epai na ye, alobi : napesi yo mbote, yo oyo azali kosepesa na ngolu na ye ! Nkolo azali na yo ; opambolami kati na basi. 29. Pe ye tangu amoni ye amitungisi na liloba na ye ; pe akomaki kokanisa kati na ye moko soki losako yango elakisi nini ? 30. Angelu alobi na ye : kobanga te, Maria pona ozui ngolu epayi na Nzambe. 31. Pe tala okokumba zemi na libumu na yo pe okobota mwana mobali pe okobenga kombo na ye Yesu. 32. Akozala monene pe akobengama Mwana na oyo Aleki likolo, pe Nkolo Nzambe akopesa ye kiti na bokonzi ya tata na ye Davidi ; 33. Pe akodondwa likolo na ndaku ya Yakobo libela, pe bokonzi na ye ekozala na suka te. 34. Pe Maria alobi na angelu : makambu yango ekokoma ndenge nini po ngai nayebi nzoto ya mobali te ? 35. Angelu azongisaki, alobi na ye : Molimo Mosantu akoyela yo pe nguya na ye oyo Aleki likolo akozipa yo na molili na ye. Yango wana mosantu oyo akobotama akobengama Mwana na Nzambe. 36. Pe tala, Elizabete ya libota na yo, azali na zemi ya mwana mobali kati na kimobange na ye, awa ezali sanza ya motoba pona ye oyo babenga ekomba 37. Pamba te na Nzambe eloko te ezali oyo ekoki kosalama te. 38. Pe Maria alobi : tala mowumbu ya Nkolo, esamela ngai lokola olobi. Pe angelu atikaki ye.

 

39. Maria atelemaki na mikolo wana, pe akendaki na bango na mboka ya bangomba, kati na engumba moko ya yuda.

40. Pe akotaki na ndaku ya Zakaria pe apesaki Elizabete mbote. 41. Pe ekomaki, tangu Elizabete ayoki mbote ya Maria, bebe aninganaki kati na libumu na ye ; pe Elizabete atondisamaki na Molimo Mosantu

42. Pe agangaki na mongongo makasi. Opambolami kati na basi pe mbuma ya libumu na yo apambolami ! 43. Oyo ewuteli ngai wapi pona ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai ? 44. Pamba te, tango kaka mongongo ya mbote na yo ekomi na matoyi na ngai, bebe aningani na esengo kati na libumu na ngai. 45. Esengo na oyo andimi, po ekokisama makambu oyo elobamakelaki ye na Nkolo.

 

46. Pe Maria alobi : motema na ngai sanzola Nkolo  47. Pe Molimo na ngai esepeli na Nzambe mobikisi na ngai 48. Pona atali lolenge ya kozanga lokumu ya mowumbu na ye ; kobanda lelo ba ekeke nionso bakobenga ngai mwasi ya esengo. 49. Pamba te Oyo ya nguya nionso asaleli ngai makambo ya minene pe kombo na ye eza mosantu. 50. Pe mawa na ye ezali na ba tango nionso pona baoyo babangaka ye. 51. Asali na nguya nionso ya loboko na ye, apanzi batu ya lolendo kati na makanisi ya mitema na bango. 52. Akitisi batu ya nguya na bakiti ya bokonzi pe atomboli batu ya lokumu te. 53. Atondisi batu na nzala na biloko ya malamu pe azongisi bazui maboko pamba. 54. Asungi Israel mosali na ye, pona akanisaki mawa na ye. 55. lokola alobaki na bakoko pona abraama pe bakitani na ye pona libela.

 

56. Pe Maria awumelaki na ye basanza pene na misatu, sima azongaki na ndaku na ye

57. Nzokande tangu oyo esengelaki abota ekokisamaki pona Elizabete pe abotaki mwana mobali. 58. Batu oyo bafandaka na ye penepene pe baboti na ye bayokoki ete Nkolo amonisaki monene ya mawa epai na ye pe basepelaki elongo na ye. 59. Pe ekomaki na mokolo ya mwambe, bayaki kokatisa mwana ngenga, pe babandaki kobenga ye Zakaria, kombo ya tata na ye, 60. Kasi mama na ye ayanolaki, alobi : te, akobengama na kombo ya Yoane. 61. Balobi na ye : ezali na mutu te kati na libota na yo oyo abengami na kombo wana. 62. Basalaki elembo na tata na ye pona koyeba soki alingi babenga ye na kombo nini. 63. Pe asengi libaya ya kokomela, akomaki, koloba : Yoane ezali kombo na ye. Pe bango nionso bakamwaki. 64. Na mbala moko monoko na ye efungwamaki pe na lolemo na ye ; akomaki koloba pe kokumisa nzambe. 65. Pe batu nionso oyo ya penepene na bango batondaki na somo pe bazalaki kolobela makambu yango nionso kati na mboka ya bangomba ya Yude ; 66. Pe baoyo nionso bayokaki yango babombaki yango na mitema na bango, koloba : mwana oyo akozala nani ? pe loboko na Nkolo ezalaki na ye.

 

67. Pe Zakaria, tata na ye atondisamaki na Molimo Mosantu pe aprofetisaki, koloba : 68. Apambolama Nkolo, Nzambe ya Israel pona atali pe akangoli batu na ye. 69. Pe atelemisi biso liseke ya lobiko kati na ndaku ya davidi mosali na ye. 70. Lolenge alobaki na tangu nionso na monoko ya baprofete na ye ya bosantu. 71. Lobiko liboso ya banguna na biso pe na maboko ya baoyo nionso bayinaka biso, 72. Pona kokokisa mawa na ye epayi ya batata na biso pe pona kokanisa boyokani na ye ya bule. 73. akokisi ndayi oyo alapaki epai ya Abrahama, tata na biso. 74. Ete akangola biso na maboko ya banguna na biso pona tosalela na kozanga kobanga. 75. Kati na bosantu pe boyengebene liboso na ye mikolo na biso nionso. 76. Pe yo, mwana muke, okobengama profete ya Oyo Aleki likolo pe okotambola liboso ya elongi na Nkolo pona kobongisela ye nzela, 77. Pona kopesa boyebi ya lobiko na batu na ye, kati na bolimbisi ya masumu na bango, 78. Na nzela ya mawa monene ya Nzambe na biso, na lolenge ete Moyi ya likolo aye kotala biso, 79. Pona kongalisa baye bafandi kati na milili pe kati molili ya liwa, pona kotambolisa makolo na biso na nzela ya kimia. 80. Pe mwana azalaki kokola pe kokemba na elimo ; pe azalaki kati na bisobe kino komonisama na ye epayi na Israel.

 

Mokapo 2

Ekomaki na mikolo wana, kayizar augusto abimisaki mobeko moko ete mutu nionso na mokili akomisama, 2. kokomisama yango moko esalamaki na tangu kuriniosi azuaki bokonzi ya Siria. 3. banso bakendaki komikomisa, moko na moko na engumba na ye. 4. Yosefe pe amataki na galilai, na engumba ya nazareti, pona kokende yuda, na engumba ya Davidi oyo ebengami beteleme pona azalaki ya ndaku pe libota ya dawidi, 5. Pona kokamisama ye na Maria, mobongani na ye ya libala oyo azalaki na zemi. 6. Pe ekomaki wana bazalaki kuna, tangu na ye ya kobota ekokaki, 7. Pe abotaki mwana na ye ya mobali ya liboso, alingaki ye na bilamba pe alalisaki ye na kesi oyo batiaki bileyi ya bibwele pona esika ya kolala ezalaki te pona bango na ndaku balalisaka bapaya.

 

8. ezalaki na kati ya etuka yango babateli bibwele oyo bazalaki kolala na bilanga pona kobatela bibwele na bango na kati na butu. 9. Angelu moko ya Nkolo abimelaki bango pe kembo ya Nkolo engengaki zinga zinga na bango, pe bayokaki somo makasi. 10. Angelu alobi na bango : bobanga te, nazali koyebisa bino sango ya esengo monene oyo ekozala pona batu nionso, 11. Pamba te lelo na engumba ya davidi mobikisi moko abotameli bino ; yende azali Kristu, Nkolo. 12. Oyo ekozala elembo pona bino bokomona bebe balingi bilamba pe balalisi ye na kesi oyo batiaki bileyi ya bibwele. 13. Mbala moko, ekomaki elongo na angelu, ebele ya mampinga ya likolo, bazalaki kokumisa nzambe pe koloba : 14. Nkembo na Nzambe na bisika bileki likolo pe na nse kimia na nse ; pe bolamu kati na batu ! 15. Pe ekomaki, tangu bangelu batiki bango pe bamati likolo, babateli bibwele balobanaki kati na bango : tokende bongo kino na beteleme pe totala likambu yango oyo ekomi oyo Nkolo ayebisi biso. 16. Bakendaki na lombangu, pe bamonaki Maria, Yosefe, na bebe alali na kesi ya bileyi ya bibwele ; 17. Wana bamonaki ye, balobaki polele liloba oyo bayebisaki bango na tina na mwana yango. 18. Banso oyo bayokaki yango bakamwaki mingi makambu oyo babateli bibwele balobaki na bango ; 19. Pe Maria azalaki kobomba makambu wana nionso kati na motema na ye pe kozongisaka yango na motema na ye. 20. Babateli bibwele bazongaki na kosanzola pe kokumisa Nzambe na makambu nionso oyo bayokaki pe bamonaki ndenge balobelaki bango. 21. Wana mikolo mwambe ekokaki pona kokatisa ye ngenga, kombo na ye ebengami Yesu, kombo oyo abengamaki na angelu liboso ete bazua zemi na ye.

 

22. Tangu mikolo ya kopetolama na bango, na lolenge ya mobeko na Mose ekokisamaki, bamemaki ye na Yerusaleme pona kolakisa ye liboso na Nkolo, 23. Na lolenge ekomama kati na mobeko ya Nkolo ete mwana ya mobali nionso oyo akofungola matrise akobiengama mosantu pona Nkolo, 24. Pe kokaba mbeka, lolenge ekomami kati na mibeko ya Nkolo, ba ndeke mibale ya zamba to bana mibale ya bandeke ya mboka.

25. Na yerusaleme, ezalaki na mutu moko na kombo ya simeona azalaki, pe mutu yango azalaki sembo pe petwa, pe kozelaka kolendisama ya Israele ; pe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye. 26. Pe Akebisamaki na Nzambe na nzela ya Molimo Mosantu ete akomona liwa te, kino ya yambo amona Kristu ya Nkolo. 27. Pe ayaki na tempelo na nzela ya Molimo ; lokola baboti bamemaki mwana Yesu pona kosala na tina na ye lolenge ya motindo na mobeko, 28. Azuaki ye na maboko na ye pe apamboli Nzambe pe alobi : 29. Sik’oyo Nkolo, otika mowumbu na yo akende na kimia loleenge ya liloba na yo ; 30. Po misu na ngai emoni lobiko na yo, 31. Oyo obongisa liboso na batu nionso : 32. Pole pona emoniseli na bikolo pe kembo ya batu na yo Israele. 33. Pe tata na mama na ye bakamwaki makambu oyo alobaki na tina na ye. 34. Pe Simeona apambolaki bango pe alobi na Maria mama na ye : tala, ye oyo atiami pona kokweyisa mpe kotelemisa ebele kati na Israele, pe pona elembo oyo ekotieyisa tembe 35. Pe ata mopanga ekotobola motema na yo, na bongo ete makanisi ya mitema ebele ekomonana.

36. Pe ezalaki na Ana profetese moko, mwana muasi na fanuwele, ya libota ya Aser (akolaki mingi na mbula; afandaki na mobali mbula sambo wuta bolenge na ye), 37. Pe akufela mobali kino mbula tuku mwambe na mineyi, azalaki kolongwa na tempelo te, na kokila pe kobondela, azalaki kosalela butu pe moyi ; 38. Ayaki na ngonga yango kokumisa Nkolo pe kolobaka pona ye epayi ya banso oyo na Yerusaleme bazalaki kozela likangoli.

39. Tangu bakokisaki nionso kolanda mobeko na Nkolo, bazongaki na Galilai na Nazarete, engumba na bango. 40. Pe mwana azalaki kokola pe komikembisa, atondaki na bwanya ; pe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na ye

41. Pe baboti na ye bazalaki kokende mbula nionso na Yerusaleme, na feti ya Paska. 42. Pe tangu akomi mibu zomi na mibale, lokola bamataki na Yerusaleme, lokola momesano ya feti, 43. Pe basilisaki mikolo, lokola bazalaki na bozongi, mwana Yesu atikalaki na Yerusaleme ; pe baboti na ye bayebaki te. 44. Kasi bakanisaki ete azali na kati na batu ya mobembo, batambolaki nzela ya mokolo moko pe baluki ye kati na baboti pe bayebani na bango ; 45. Pe bamonaki ye te, bazongaki na Yerusaleme koluka ye. 46. Ekomaki sima ya mikolo misatu, bamoni ye kati na tempelo afandi katikati na balakisi koyokaka bango pe kotunaka bango mituna. 47. Pe banso bayokaki ye bakamwaki mayele na ye pe biyano na ye. 48. Tangu bamoni ye, bakamwaki makasi pe mama na ye alobi na ye : Mwana na ngai pona nini osali biso boye ? Tala, tata na yo mpe ngai tomitungisami na koluka yo. 49. Pe alobi na bango : Pona nini bozali koluka ngai ? Boyebi te ete esengeli nazala na misala ya Tata na ngai ? 50. Kasi bango basosolaki te liloba alobaki na bango. 51. Pe akitaki na bango elongo pe akomaki na Nazaret pe azalaki kotosa bango, kasi mama na ye abombaki malamu na motema na ye maloba nionso wana. 52. Pe Yesu akolaki na bwanya pe na molayi pe na ngolu liboso na Nzambe pe batu.

 

Mokapo 3

Nzokande na mbula zomi na mitano ya bokonzi Tiberias Kaîsar, Pontia Pilato azalaki guvernere ya Yude. Herode tetrarke ya Galilaî pe filipo ndeko na ye tetrarke ya Iture pe ya mboka Trakonitido pe Lusanias tetrarke ya Abiléné. 2. Na se ya bonganga monéné ya Ana na Kaîafa, Liloba ya Nzambe eyaki na Yoane, mwana na zakaria kati na esobe. 3. Akendaki na ba mboka nionso ya zingazinga na Yordano, koteya libatisi ya kobongwana pona kolimbisama na masumu, 4. Lokola ekomama na mokanda ya ba maloba ya profete Esaia : mongongo ya mogangi kati na esobe : bobongisa nzela ya Nkolo, bosembola nzela na ye. 5. Mabaku nionso ekotondisama, pe ngomba nionso, pe ngomba ya mike ekokitisama ; biloko ya kotengema ekokoma sembo pe bisika na mabanga ekokoma ba nzela oyo ebongi. 6. Pe batu nionso bakomona lobiko na Nzambe. 7. Bongo azalaki koloba na ebele ya batu oyo bazalaki kobima pona kobatisama na ye : libota ya nyoka nani akebisi bino kokima kanda ekoya ? 8. Bongo bobota ba mbuma oyo ebongi na kobongwana ; bobanda koloba kati na bino moko te ete, pona tata tozali na Abraham, po nalobi na bino Nzambe akoki kobimisa na mabanga oyo bana pona Abraham. 9. Pe epasola esili kotiama na misisa ya ba nzete ; nzete nionso oyo ekobota mbuma malamu te, ekokatama pe ekobwakama na moto. 10. Ebele ya batu batunaki ye : nini esengeli na biso tosala ? 11. Azongisaki, alobi na bango : oyo azali na kazaka mibale apesa moko na oyo azangi, oyo azali na biloko ya kolia asala bobele bongo. 12. Bafutisi mpaku bayaki pona kobatisama ; pe balobaki na ye : Molakisi, esengeli biso tosala nini ? 13. Alobi na bango : bokongola eloko te na likolo ya oyo esengeli kofutama. 14. Basoda batunaki ye, koloba : ebongo biso, esengeli tosala nini ? Alobi na bango : bobotola eloko ya mutu te, bokosela bato makambu te kasi bosepeli na lifuti na bino

15. Lokola batu bazalaki kati na kozela, pe banso bazalaki kokanisa kati na mitema na bango na tina ya Yoane, soki ye nde Kristu te, 16. Yoane azongiselaki bango nionso, koloba : Ngai, nazali kobatisa bino na mayi, kasi akoya, oyo na nguya mingi koleka ngai, kutu nabongi te kofongola basinga ya sandale na ye ; ye akobatisa bino na Molimo Mosantu pe na moto. 17. Aza na kiyungulu na loboko na ye pona koyungula na bozindo nionso etando na ye nionso pe akosangisa ble na ebombelo na ye, kasi akotumba matiti na moto oyo ekufaka te. 18. Boye azalaki lisusu kolendisa bango na malendisi mingi, bongo ateyaki bango sango malamu ; 19. Kasi Herode tetrarke apamelaki na ye na tina ya Herodias, mwasi ya ndeko na ye, pe pona makambu ya mabe oyo Herode asalaki, 20. Abakisi lisusu na mabe nionso oyo ya kotia Yoane na boloko.

21. Pe ekomaki ete lokola batu nionso babatisamaki, Yesu lokola abatisami pe azalaki kosambela, likolo efongwamaki ; 22. Pe Molimo Mosantu akitelaki ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga, pe mongongo moko ewutaki likolo : Ozali Mwana na ngai ya bolingo, namoni esengo na ngai kati na yo.

23. Yesu ye moko akomaki na mbula soko tuku misato, azalaki lokola batu bazalaki kokanisa mwana ya Yosef : 24. Heli ya Mattai, Levi ya Melki, ya Yannai, ya Yosef, 25. Mattathio, ya Amos, ya Naoum, ya Esli, ya Naggai, ya 26. Maath, ya Mattathio, ya Semein, ya Yosek, ya Yoda, ya 27. Yoanan, ya Reza, ya Zorobabel, ya Salatiel, ya Neri, ya 28. Melki, ya Addi, ya Kosam, ya Elmadam, ya Her, 29. Yosue, ya Eliezer, ya Yoreim, ya Mattat, ya Levi, ya 30. Simeôn, ya Yuda, ya Yosef, ya Yonam, Ya Eliakim, ya 31. Meléa, ya Mena, ya Matata, ya Nathan, ya David, ya 32. Yese, ya Yobed, ya Booz, ya Salmon, ya Naason, ya 33. Aminabad, ya Aram, ya Esrom, ya Fares, ya Yuda, ya 34. Yakobo, ya Izak, ya Abraham, ya Tara, ya Nakôr, ya 35. Seruk, ya Rago, ya Falek, ya Eber, ya Sala, ya 36. Kainam, ya Arfaxad, ya Sem, ya Noé, ya Lamek, ya 37. Mathusalem, ya Enok, ya Yaret, ya Malelel, ya Kaînam, ya 38. Enos, ya Seth, ya Adam ya Nzambe.

 

Mokapo 4

1. Nzokande Yesu, atondisami na Molimo Mosantu, awutaki na Yordani pe Molimo amemaki ya na esobe. 2. Wana diabolo amekaki ye mikolo tuku mineyi. Aliaki eloko te na mikolo yango, pe tangu ekokisami, ayoki nzala. 3. Pe diabolo alobi na ye : soki ozali Mwana ya Nzambe, loba na libanga oyo ekoma lipa. 4. Pe Yesu azongiseli ye, alobi : ekomama ete « mutu akobika kaka na lipa te kasi na maloba nionso ya Nzambe ».

 

5. Pe diabolo amemaki ye na likolo ya ngomba ya molayi mingi, pe atalisi ye na mbala moko, ba bokonzi nionso ya mokili  6. Pe diabolo, alobi na ye : nakopesa yo bokonzi nionso oyo pe kembo ya ba bokonzi oyo ; po epesamela ngai, pe nakopesa na nani nalingi. 7. Bongo soki ofukameli liboso na ngai, nionso ekokoma ya yo. 8. Pe Yesu azongiseli ye, alobi : ekomama « Okokumisa Nkolo Nzambe na yo, pe bobele kaka ye okosalela ».

9. Pe amemaki ye na Yerusaleme, pe atelemisaki ye na songe ya tempelo pe alobi na ye : soki ozali Mwana ya Nzambe, mibwaka na se. 10. Po ekomama « akopesa mitindo na banjelu na ye na tina na yo pona kobatela yo ; 11. Pe bakomema yo na maboko na bango po ete likolo na yo etuta libanga te » 12. Pe Yesu, azongisi, alobi na ye : elobama : « okomeka Nkolo Nzambe na yo te ».

13. Pe asilisaki komeka nionso, diabolo akendaki mosika na ye kino tangu mosusu ya malamu.

14. Pe Yesu azongaki na galilai na nguya ya Molimo, pe sango na ye epanzanaki na mboka ya pembeni.15. Pe ye moko azalaki kolakisaa na ba sunagoga na bango, banso bakumisaki ye.

16. Pe ayaki na Nazaret, esika abokolamaki ; pe akotaki na sunagoga mokolo moko ya sabata, ndenge ezalaki momesano na ye, atelemaki pona kotanga. 17. bapesaki ye buku ya profete Esaia, pe wana afungolaki buku, amonaki esika oyo ekomama : 18. » Molimo na Nkolo ezali likolo na ngai, po ete apakoli ngai pona kopanza sango malamu na babola ; 19. Atindi ngai kotatola polele na bakangami kokangolama, pe na bakufi misu komona lisusu, pona kozangisa na bonsomi baoyo banyokwamaki pe kotatola polele mobu ya ngolu ya Nkolo. 20. Na sima ya kozipika buku, pe azongiselaki yango epai ya oyo azalaki kosala wana, afandaki, misu ya batu nionso bazalaki na sunagoga ezalaki kotala ye. 21. Pe akomaki koloba na bango : lelo makomi oyo boyoki ekokisami. 22. Banso batatolaki tina na ye, pe bakamwaki ba maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na ye, pe balobaki : Oyo azali mwana na Yozefe te ? 23. Pe alobi na bango : na solo bokoloba na ngai parabole oyo : monganga, mibikisa yo moko, sala awa na mboka na yo makambu nionso oyo toyokaki ete osalaki na kaparnawum. 24. Pe alobi : Na solo, nalobi na bino profete moko te ayambama kati na mboka na ye. 25. Pe na solo, nalobi na bino ete ezalaki na bakufeli mibali mingi kati na Israel, na mikolo ya Eliya, wana likolo ekangamaki mbula misato na sanza motoba, wana nzala monene ekotaki na mboka mobimba ; 26. Pe Eliya atindamaki te epayi ya moko kati na bango, bobele na Sarepeta ya Sidonia epai ya moko mokufeli mobali. 27. Pe ezalaki na balepro mingi kati na Israel na tangu ya profete Elize ; pe moko te na bangu apetolamaki, bobele Naman mutu na Syria. 28. Pe banso batondaki na kanda kati na sunagoga nakoyoka makambu wana ; 29. Pe batelemaki, babenganaki ye libanda ya engumba pe bamemaki ye ti na suka ya ngomba epai wapi etongama engumba na bango, na lolenge ete babwaka ye. 30. Kasi ye alekaki na kati-kati na bango, pe akendaki.

 

31. Pe akitaki na kaparnawum, engumba ya galile, pe kolakisaka bango na mokolo ya sabata.32. Pe bakamwaki malakisi na ye po liloba na ye ezalaki na bokonzi. 33. Pe na kati ya sunagoga ezalaki na mutu moko azalaki na elimo ya demon ya mbindo ; agangaki na mongongo makasi, koloba : 34. Ha ! Nini kati na biso na yo, Yesu na nazaret ? Oye pona kobebisa biso ? Nayebi nani yo ozali : Mosantu na Nzambe. 35. Yesu apamelaki ye, koloba : Fanda nye, pe bima na ye. Pe demon, abwakaki ye kati na batu, abimaki kati na ye na kosala ye mabe moko te. 36. Bango nionso bakwamaki pe kolobanaka, koloba : Oyo maloba nini ? Po azali kopesa mitindo na bokonzi pe nguya na milimo ya mbindo, pe bazali kobima. 37. Na bisika nionso ya zinga-zinga, sango na tina na ye epanzanaki.

 

38. Atelemaki, abimi na sunagoga pe akotaki na ndaku ya Simona. Bokilo ya Simona azalaki kobela makasi, pe babondelaki ye na tina na ye. 39. agumbami pene na ye, pe apamelaki maladi pe etikaki ye ; mbala moko atelemi pe asalelaki bango.

 

40. Pe lokola moyi ezalaki kolala, banso oyo bazalaki babeli na bokono ya ndenge na ndenge, bamemelaki ye bango ; pe atiaki maboko moko na moko pe abikisaki bango. 41. Pe ba demon babimaki kati na ebele ya batu, koganga pe koloba : Ozali Mwana na Nzambe. Pe apamelaki bango pe atikaki bango te baloba, pona bayebaki ete azalaki Kristu.

 

42. Pe wana mokolo etanakii, abimaki pe akeyi na esika na esobe ; batu ebele balukaki ye pe bakomaki kino epai na ye; pe bakangaki ye pona alongwa na bango te. 43. Kasi alobi na bango : esengeli napanza sango malamu ya bokonzi na Nzambe na ba engumba misusu pona natindimaki pona yango. 44. Pe azalaki koteya na ba sunagoga ya Galilai.

 

Mokapo 5

Wana ekomaki, lokola ebele ya batu komibwaka likolo na ye pona koyoka maloba na Nzambe, atelemaki na libongo ya laki ya Genezaret. 2. Pe amonaki babwato mibale na libongo ya laki. Wana balobi mbisi bakitaki pe bazalaki kosokla maluba na bango. 3. Pe amataki kati na moko ya babwato oyo ezalaki ya Simona, asengaki ye apusa yango mwa mosika ya mabele ; afandaki pe abandaki kolakisa bato ebele wuta na bwato. 4. Pe tangu asilisaki koloba, alobi na Simona : kumba bwato kuna na mayi mozindo pe bobwaka moluba na bino pona koloba bambisi. 5. Pe Simona azongiselaki ye : Mokonzi, tosali butu mobimba, tozui eloko te kasi na liloba na yo, nakobwaka moluba. 6. Pe basalaki bongo, pe bazwaki bambisi ebele makasi pe moluba na bongo ekomaki kopasuka. 7. Basalaki elembo na baninga na bango oyo bazalaki na bwato mosusu baya kosunga bango. Bayaki mpe batondisaki babwato nionso mibale pe ekomaki kozinda. 8. Pe Simona Petelo amonaki bongo, amibwakaki na mabolongo ya Yesu, alobi : Nkolo, longwa na ngai, po nazali mutu mosumuki. 9. Pamba te somo ekangaki ye na batu nionso oyo bazalaki na ye likolo ya bambisi oyo bazwaki ; 10. Ndenge moko na Yakobo na Yoaone, bana ya Zebede, baoyo bazalaki baninga ya Simona na mosala. Pe Yesu alobi na Simona ; kobanga te kobanda lelo okozala molobi na batu. 11. Bamemaki ba bwato na mabele, batikaki nionso pe balandi ye.

 

12. Pe ekomaki lokola azalaki kati na moko ya engumba pe tala mutu moko atonda na lepro. Pe tangu amoni Yesu, amibwaki na elongi na ye pe abondeli ye, alobi : Nkolo, soki olingi okoki kokomisa ngai peto. 13. Asembolaki loboko na ye, asimbaki ye, alobi : Nalingi yango, koma peto. Mbala moko lepro elongwaki na ye. 14. Pe apesi ye mitindo ete aloba yango na mutu te : kasi kende komilakisa epayi ya banganga nzambe, pesa makabo na tina ya kopetolama na yo lolenge Mose atindakaki, pona litatoli epai na bango. 15. Pe sango na tina na ye, epanzanaki se kopanzana ; pe ebele ya batu mingi basanganaki pona koyoka ye pe pona babikisama na ba maladi na bango16.Kasi ye amibendaki na lisobe pe kobondela.

 

17. Pe ekomaki na moko ya mokolo wana, azalaki kolakisa. Pe bafarizeo na balakisi mobeko, oyo bayaki wana, bawutaki na mboka nionso ya Galilaî pe na Yude pe na Yerusaleme, bazalaki wana, pe na nguya ya Nkolo ezalaki wana pona kobikisa bango. 18. Pe tala batu mosusu bamemaki na etoko mutu moko na ebosono ; pe balukaki kokotisa ye pe kotiya liboso na ye. 19. Bamonaki te ndenge nini bakoki kokotisa ye pona bato bazalaki ebele, bamataki likolo ya ndaku pe bakitisaki ye na etoko kati na liboso na Yesu. 20. Tangu amoni kondima na bango, alobi : Mobali, masumu na yo elimbisameli yo. 21. Pe bakomi na bafarizeo bakomaki kokanisa, koloba : Oyo nani azali koblasfeme ? Nani akoki kolimbisa masumu bobele Nzambe ? 22. Yesu ayebaki makanisi na bango, ayanoli, alobi na bango : pona nini bozali kokanisa boye na mitema na bino ? 23. Likambo nini eleki pete pona koloba : masumu na yo elimbisami to koloba : telema pe tambola ? 24. Nzokande, na tina ete boyeba ete mwana ya moto azali na bokonzi awa na se ya kolimbisa masumu (alobi na ebosono) : na lobi na yo, telema, pe, kamata etoko na yo pe kende na ndaku na yo. 25. Mbala moko atelemaki liboso na bango, azui etoko oyo alaleki pe akendaki na ndaku na ye na kokumisa Nzambe ; 26. Pe banso basimbamaki na kobanga, pe bakumisaki Nzambe ; pe batondaki na kobanga, koloba : Tomoni lelo makambu ya kokamwa.

27. Pe na sima na yango, abimaki pe amonaki mofutisi mpaku moko na kombo ya Levi, afandaki na buro ya mpaku pe alobi na ye : landa ngai. 28. Atikaki nionso, atelemaki pe alandaki ye, 29. Pe Levi asalelaki ye feti monene na ndaku na ye. Pe bazalaki ebele bafutisi mpaku na bato mosusu oyo bazalaki na bango na mesa. 30. Bafarizeo pe bakomi na bango bayimaki-yimaki na tina na bayekoli na ye, koloba : Pona nini bozali kolia pe komela na bafutisi mpaku pe basumuki ? 31. Yesu azongisaki, alobi na bango : baoyo bazali nzoto kolongono baza naposa ya monganga te, kasi bobele babeli. 32. Naye te pona kobenga bayengebeni, kasi basumuki na kobongola mitema. 33. Balobi na ye : Pona nin bayekoli ya Yoane bakilaka biloko mbala mingi mpe bakobondela. Bobele bongo pe bayekoli na bafarizeo kasi bayekoli na yo bakolia pe komela ? 34. Alobi na bango : bokoki kopekisa bileyi baninga ya mobalani wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango ? 35. Kasi mikolo ekoya wana mobali ya libala akolongolama kati na bango, na mikolo yango bakokila. 36. Pe alobi na bango parabole oyo : Mutu moko te akosangisa eteni ya elamba ya sika na elamba ya kala ; soki te ekopasola oyo ya sika, pe lisusu kitendi ya sika ekobalana te na oyo ya kala. 37. Pe Mutu te akotia vino ya sika kati na mbeki ya kala soki te vinio ya sika ekopasola mbeki pe ekosopana pe bambeki ekobebisama 38. Kasi ebongi kotia vino na sika kati na mbeki ya sika 39. Mutu te oyo ameli ya kala akolinga lisusu komela ya sika pona alobi : ya kala eleki kitoko.

 

Mokapo 6

1. Na mokolo ya sabata alekaki kati na ba ble ; pe bayekoli na ye bazalaki kobuka basonge ya ble pe kolia yango kofinaka kati na maboko na bango 2. Bafarizeo mosusu balobaki na bango : Pona nini bozali kosala oyo epekisami kosala na mokolo ya sabata ? 3. Pe Yesu azongisaki, alobi na bango : botangaki ata te oyo David asalaki tangu ayokaki nzala, ye pe baoyo bazalaki na ye ? 4. Ndenge akotaki na ndaku na Nzambe, azuaki mapa oyo etandama pe aliaki yango pe apesaki yango na baoyo bazalaki elongo na ye, ata epekisami kolia yango bobele kaka banganga ! 5. Pe alobi na bango : Mwana na moto azali pe Nkolo ya sabata.

6. Ekomaki na sabata mosusu, akotaki na sunogoga pe alakisaki. Ezalaki wana na mutu moko, pe loboko na ye ya mobali ezalaki ya kokawuka 7. Pe bakomi na bafarizeo bazalaki kotala soki akobikisa na mokolo ya sabata pona bazua likambu ya kofundela ye. 8. Pe ye ayebaki makanisi na bango pe alobi na mutu oyo azalaki na loboko ya kokawuka : telema, mitiya awa liboso ya batu nionso. Pe atelemaki, amitiye wana. 9. Bongo Yesu alobi na bango : nakotuna bino soki epekisama te na mokolo ya sabata kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa bomoyi to kobungisa yango ? 10. Pe atali banso zingzzinga na ye, alobi na ye : sembola loboko na yo, asalaki bongo pe loboko na ye ebikaki 11. Bazalaki lisusu bango te pe basololaki elongo nini bakoki kosala Yesu ?

12. Ekomaki na mikolo yango, akendaki likolo ya ngomba pona kosambela. Pe butu mobimba asambelaki Nzambe. 13. Pe tangu tongo etanaki, abengaki bayekoli na ye. Pe wana aponaki zomi na mibale kati na bango, baoyo akomisaki bapostolo : 14. Simona oyo apesi kombo Petelo, pe Andrea ndeko na ye, pe Yakobo, Yoane, Filipe pe Bartelemi ; 15. Pe Matayo pe Toma ; Yakobo mwana na Alfe, pe Simona oyo babengi Zelote, 16. Pe Yude ndeko na Yakobo, pe Yudas Iskariot, oyo akabaki ye. 17. Wana akitaki na bango, atelemaki na esika moko ya polele, pe ebele ya bayekoli na ye pe mingi ya batu ya Yude mobimba pe ya Yerusaleme, pe ya mboka ya bibale ya Tyr pe Sidona, oyo bayaki pona koyoka ye pe babikisama na ba maladi na bango ; 18. Baoyo batungisamaki na milimo ya mbindo babikaki ; 19. Ebele ya batu balukaki basimba ye, po nguya ezalaki kobima na ye, pe kobikisa banso.

20. Pe ye, atambolaki misu epai bayekoli na ye, alobi : Esengo bino babola, pamba te na bino nde bokonzi ya Nzambe ; 21. Esengo, bino oyo bazali sik’oyo na nzala, po ete bokotindasama ; Esengo bino bozali kolela sik’oyo, po bokesaka. 22. Bozali batu na esengo tangu bakoyina bino, pe tangu bakolongola bino na masanga na bango, pe bafongika bino pe bakobwaka kombo na bino lokola mabe na tina ya mwana na moto. 23. Bosepela na mokolo wana, pe botindisama na esengo, po botala lifuti na bino ezali monene kuna na likolo, po ete batata na bango basalaki pe bongo na baprofete. 24. Kasi mawa na bino, bazui, po bozali na kobondisama na bino ; 25. Mawa na bino oyo botondi, po bokokoma na nzala ; Mawa na bino bozali koseka, po bokokoma kolela matanga. 26. Mawa na bino tangu batu nionso bakoloba bolamu na bino po batata basalaki pe bongo na baprofete ya lokuta. 27. Kasi na bino bozali koyoka, balinga banguna na bino ; bosala bolamu na baoyo bayini bino ; 28. Bopambola oyo balakeli bino mabe ; bobondela pona baoyo basalaki bino mabe. 29. Na ye oyo abeti yo na litama moko, pesa ye litama mosusu ; soki mutu abotoli ye kazaka na yo, kopekisa ye te azua lisusu elamba na yo. 30. Pesa na mutu nionso azali kosenga yo, pe na oyo abotoli eloko oyo ya yo, kosenga yango te. 31. Lokola bolingi batu basala bino, bosola bongo pona bango. 32. Soki balingaka kaka baoyo balingaka bino, ngolu nini bokozwa ? Po basumuki balingaka pe baoyo balingaka bango. 33. Soki bokosala kaka bolamu na baoyo bakosalaka bino bolamu, ngolu nini bokozala na yango ? Basumuki pe basalaka bobele bongo. 34. Pe soki bokodefisa kaka baoyo bakozongisela bino, ngolu nini bokozala na yango ? Basumuki pe badefisaka kaka basumuki po bazua bongo pe. 35. Kasi bolinga banguna na bino pe bosala malamu pe bodefisa na kozela te bazongisela bino ; pe lifuti na bino ekozala monene. Pe bokozala bana ya Oyo aleki likolo, po ye azali malamu epayi ya baye bazongisaka matondi te na batu mabe. 36. Bozala mitema mawa lokola Tata na bino azali Mawa. 37. Basambisa te pe bokosambima te. Bokatela batu etumbu te pe bakokatela bino pe etumbu te. Bolimbisa pe bokolimbisama. 38. Bopesa pe ekopesemela bino, bakosopela bino ya mingi na elamba lolenge ekoki, oyo baningisa malamu pe ekosopana. Po na epimelo oyo bino bopimela wana bakopimelela bino.

39. azalaki koloba bango lisusu parabole moke : mokufi misu akoki pe kotambwisa mokufi misu ? Bango mibale bakokweya te na libulu ? 40. Moyekoli azali likolo ya molakisi na ye te ; kasi oyo akoki akozala lokola molakisi na ye. 41. Pona nini ozali kotala lititi ezali kati na lisu ya ndeko na yo, kasi ozali komona te eteni ya nzete oyo ezali na lisu na yo ? 42. To lolenge nini okoki koloba na ndeko na yo, ndeko, tika nalongola lititi na lisu na yo, tangu yo moko ozali komona te eteni ya nzete te kati na lisu yo ? Hipokrite, longola liboso eteni ya nzete na lisu na yo pe okomona malamu pona olongola lititi na lisu ya ndeko na yo. 43. Po ezali te na nzete malamu oyo ebotaka mbuma epola, to nzete epola oyo ebotaka mbuma malamu. 44. Pamba te nzete eyebanaka na mbuka, babukaka figue kati na nzube te pe bakobuka mbuma ya vino kati na banzube. 45. Mutu malamu, na ebombeli malamu ya motema na ye abimisika oyo eza malamu, pe mutu mabe na mabe akobimisa oyo ezali mabe : nakotindisama ya motema, monoko elobaka. 46. Bongo pona nini bozali kobenga ngai : Nkolo, Nkolo, bosalaka te oyo ngai nalobi ? 47. Nakolokisa bino soki azali lokola nani mutu nionso oyo epai na ngai pe azali koyoka maloba na ngai pe kotiya yango na misala : 48. Azali ya kokana na mutu moko oyo atongi ndaku, oyo atumbolaki na bozindo, pe atiaki fondatio likolo na libanga : kasi pela eyaki, ebale ekweyaki likolo na ndaku yango pe eningisami te, po etongamaki likolo na libongo. 49. Kasi oyo ayoki pe ati yango na misala te azali lokola mutu atongi ndaku na mabele ezanga fondatio, pe ebale ekweyi likolo na yango na makasi nionso pe mbala moko ekweyi pe kobebisama ya ndaku yango ezalaki monene.

 

Mokapo 7

1. Tangu asilisi koloba na ye, na matoyi ya batu bazalaki koyoka ye, akoti na kaparnawum 2. Mowumbu ya kenturio, oyo azalaki motuya pona ye, azalaki maladi pe azalaki kokende kokufa. 3. Ayokaki na tina na Yesu, atindi epayi na ye ba mpaka ya ba yuda kobondela ye, aya kobikisa mowumbu na ye. 4. Wana bakomaki epayi na Yesu, babondelaki ye na molende nionso, koloba : Abongi penza osalela ye yango 5. Po ete alingaka ekolo na biso pe ye moko atongela biso sunagoga. 6. Pe Yesu akendaki na bango elongo. Lokola azalaki lisusu mosika ya ndaku te, kenturio atindi baninga na ye epai na ye, koloba na ye : Nkolo komitungisa te, pamba te ngai nakoki te ete okota na ndaku na ngai ; 7. Yango wana ngai moko nomanaki ete namikoki te ya koya epayi na yo ; kasi loba liloba moko mowumbu na ngai akobika. 8. Po ngai, nazali mutu oyo atiama na se ya bokonzi ya basusu, pe nazali na ba soda na se ya bokonzi na ngai ; pe soki nalobi na moko : kende pe akeyi ; pe na mosusu : yaka pe aye, pe na mowumbu na ngai : sala oyo, pe asali yango. 9. Pe Yesu ayokaki maloba oyo, akamuaki ye ; pe abalukaki epayi ya ebele na batu bazalaki kolanda ye, pe alobi : nalobi na bino, ata kati na israele namoni kondima monene boye te. 10. Pe ba oyo batindamaki, wana bazongi na ndaku, bakuti mowumbu na nzoto kolongono.

11. Na sima wana, akendaki na mboka ebiangami Naïni, pe ebele ya bayekoli na ye pe ebele ya batu koleka bazalaki kotambola na ye. 12. Tangu apusani pene na porte ya engumba, pe tala, bazalaki kokumba mokufi moko, mwana mobali se moko oyo mama na ye abota, pe azalaki mokufeli mobali ; pe ebele ya batu mingi ya engumba bazalaki elongo na ye. 13. Pe Nkolo, nakomona ye, atondaki na mawa pona ye pe alobi na ye : kolela te, 14. Pe apusani, asimbi mbetu ya bakufi ; pe baye bakumbaki mbetu oyo bamema mokufi batelemaki ; pe ye alobi : elenge mobali, nalobi na yo, telema. 15. Pe moweyi atelemi pe amifandisi, pe abandi koloba ; pe apesi ye na mama na ye. 16. Banso basimbamaki na kobanga makasi, pe bakumisi nzambe, koloba : profete monene abimi kati na biso, pe Nzambe aye kotala batu na ye. 17. Pe liloba wana epanzani na tina na ye, kati na Yude mobimba pe kati na mboka ya zinga-zinga

18. Pe bayekoli na Yoane bayebisi ye makambu nionso 19. Pe abendi mibale ya bayekoli na ye, Yoane atindi bango epai na Yesu, koloba : ozali oyo azali koya, to esengeli tozela mosusu ? 20. Pe batu baye epayi na ye, balobi : Yoane mobatisi atindi biso epai na yo, nakoloba : ozali oyo azali koya to esengeli tozela mususu ? 21. Na ngonga wana, abikisi ebele ya babeli, pe batu ya bapasi, pe ya milimo mabe, pe apesi ngolu ya komona na bakufi misu ebele. 22. Pe Yesu ayanoli, alobi na bango : bokende, pe boloba na Yoane makambu oyo bomoni pe boyoki : bakufi misu bazomona, bakakatani bazali katambola, ba lepro bazali kokoma peto, pe bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa, pe sango malamu eteyami na babola. 23. Pe mutu na esengo ezali mutu nionso oyo akobetisama libaku te na ntina na ngai.

24. Tangu batindami na Yoane basili kokende, akomi koloba na ebele ya batu na tina na Yoane : Nini, bokendaki kotala na esobe ? Nzete ya mayi-mayi oyo ezali koningisama na mupepe ? 25. Kasi nini bokendaki kotala ? Mutu oyo alati bilamba ya mutuya ? Botala, baoyo balati bilamba ya lokumu pe bazali kobika na bisengo ya nzoto, bazali kati na bandaku minene ya bakonzi. 26. Kasi nini bokendaki kotala ? Profete ? Iyo, nalobi na bino, pe azali koleka profete. 27. Ye nde azali oyo ekomamaki pona ye : « tala, natindi motindami na ngai liboso ya elongi na yo, ye akobongisa nzela na yo liboso na yo » ; 28. Po nalobi na bino : kati na banso babotama na muasi, ezali na mutu munene koleka Yoane Mobatisi te ; kasi mutu muke na bokonzi na Nzambe azali munene koleka ye. 29 pe batu nionso oyo bayokaki yango, pe bafutisi mpaku bamonisaki bosembo na Nzambe, wana ba batisamaki na libatisi na Yoane ; 30. Kasi bafarizao na balakisi mibeko babwakaki pona bango moko mabongisi ya Nzambe wana ba batisamaki na ye te. 31. Batu ya tangu oyo nakokisa bango na banini, pe bakokani na banini? 32. Bazali lokola bana mike oyo bafandi na wenze pe bazali koganga bango na bango : biso tobetelaki bino pololo pe bino bobinaki te, toyembaki loyembo ya matanga, sima na yango bolelaki te, 33. Pamba te Yoane mobatisi ayaki, azalaki kolia lipa te pe amelaki vino te, pe bolobaki : azalaki na demon. 34. Muana na mutu ayaki, aliaki pe amelaki, pe bolobi : tala mutu ya lokoso ya kolia pe molangwi, moninga ya bafutisi mpaku pe ya basumuki. 35. Kasi bwanya emonanaki sembo na nzela ya bana na ye nionso.

36. Moko ya bafarizao abengisaki ye po alia na ye. Pe akotaki na ndaku na farizao pe afandaki na mesa. 37. Tala, muasi moko kati na engumba, oyo azalaki musumuki pe ayebaki ete azali na mesa kati na ndaku ya farizao, amemaki mbeki ya albatron etonda malasi ; 38. Atelemaki sima na makolo na ye, pe alelaki, akomaki kopolisa makolo na ye na mayi ya misu na ye, pe apungisi yango na suki ya mutu na ye pe apesaki yango ba beze, pe apokolaki yango malasi. 39. Mofarizao oyo abengaki ye, amoni bongo, alobi kati na ye moko : soki mutu oyo azalaki profete, alingaki ayeba nani pe lolenge nini azali muasi oyo asimbi ye, pamba te ete azali musumuki. 40. Yesu, ayanoli ye pe alobi : Simona, nazali na likambu moko ya koyebisa yo. Ye alobi : molakisi, loba. 41. Modefisi moko azalaki na batu mibale ya niongo : moko azalaki na niongo na ye ya kama mitano ya denari, pe mususu tuku mitano ; 42. Lokola bazalaki na eloko ya kofuta te, alongoli bango niongo. Loba penza na bango mibale nani akolinga ye mingi ? 43. Simona, ayanoli pe alobi : nabanzi ete oyo balongoli niongo mingi. Pe alobi na ye : okati na sembo. 44. Pe abaluki epayi na muasi, alobi na Simona : omoni muasi oyo ? Nakotaki na ndaku na yo, opesaki ngai mayi te pona makolo, kasi ye apolisi makolo na ngai na mayi ya misu na ye pe apangusi yango na basuki na ye. 45. Opesaki ngai ba beze te ; kasi ye, wuta nakotaki, atiki te kozipa makolo na ngai na beze. 46. Opakoli mafuta te na moto na ngai, kasi ye apakoli makolo na ngai na malasi. 47. Na yango wana, nalobi na yo : masumu na ye ebele elimbisami, pamba te alingaki mingi ; kasi mutu oyo balimbisi muke alingaka muke. 48. Pe alobi na muasi : masumu na yo malimbisami. 49. Baoyo bazalaki na mesa elongo na ye, bakomi koloba kati na bango : oyo nani azali kolimbisa masumu ? 50. Pe alobi na muasi : kondima na yo ebikisi yo, kende na yo na kimia.

 

Mokapo 8

1. Pe sima na yango ekomaki, alekaki na ba engumba pe na ba mboka, koteya pe kosakola bokonzi na Nzambe ; pe zomi na mibale elongo na ye, 2. Pe basi misusu oyo babikaki na milimo ya mabe pe na maladi, Maria oyo babandaki kobenga magdala, na ye oyo ba demon sambo babimaki, 3. Pe Yanna, muasi na Kuza, mokambi ya biloko ya Herode, pe Suzana, pe ebele lisusu, oyo bazalaki kosalela ye na biloko na bango.

4. Pe ebele ya batu basanganaki, pe kowuta ba engumba nionso, bazalaki koya epayi na ye, alobi na parabole : 5. Moloni abimi pona kolona milona. Lokola azalaki kolona, misusu ekweyi pembeni ya nzela, pe baniati-niati yango na makolo, pe bandeke ya likolo balie yango. 6. Pe misusu ekweyi likolo ya libanga, pe esili kobima, ekawuki, po ezangi mayi. 7. Pe misusu ekweyaki kati na banzube ; pe banzube ekoli elongo na yango, pe banzube efinaki yango. 8. Pe misusu ekweyaki na mabele malamu, ebimaki pe ebotaki mbuma na mbala nkama. Nakolobaka makambu wana, agangaki : oyo azali na matoyi pona koyoka, ayoka. 9. Pe bayekoli na ye batunaki ye, koloba : parabole yango elingi koloba nini ? 10. Pe alobi : na bino epesameli koyeba ba mustere ya bokonzi na Nzambe ; kasi pona basusu bobele ba parabole, po ete nakomona bamona te pe nakoyoka basosola te. 11. Tala oyo paerabole ezali : molona ezali liloba ya Nzambe ; 12. Pe baoyo bazali na pembeni na nzela, bazali baoyo bayoki ; sima diabolo aye pe alongoli liloba na motema na bango, nakobanga ete bandima, pe babikisama. 13. Oyo ezali likolo ya libanga, ezali baoyo tangu bayoki liloba, bayambi yango na esengo ; pe wana bazali na misisa te, bandimi kaka pona tangu moke, pe na tangu ya momekano, bango batiki nzela. 14. Baoyo ekweyi kati na banzube, ezali baoyo, wana bayoki pe bakeyi na ba souci pe na bozui pe na bisengo ya bomoyi oyo efinaki yango pe eboti mbuma te oyo esengeli babuka. 15. Kasi, oyo ezali na mabele malamu, ezali baoyo bayoki liloba, babombi na motema ya sembo pe malamu, pe baboti mbuma na nzela ya kokanga motema. 16. Nzokande, mutu moko te sima ya kopelisa mwinda, azipaka yango sani, to atiaka yango na se ya mbetu, kasi atiaka yango na likolo ya ekumbeli mwinda, po batu nionso bazali kokota bamona pole. 17. Mpo ete ezali na eloko moko te ya kobatama oyo ekoyebana pe ekobima polele te, pe ezali na sekele moko te oyo ekobima polele te. 18. Na bongo bokeba na lolenge bozali koyoka ; mpo ete oyo azali na yango, ekopesamela ye lisusu, pe oyo azali na yango te, ata oyo ye azali kondima azali na yango bakolongola ye yango.

19. Nzokande mama na ye pe bandeko na ye bayaki pembeni na ye ; pe bakokaki kopusana pembeni na ye te, na tina ya ebele ya batu. 20. Bayebisi ye ete : mama na yo pe bandeko na yo batelemi libanda, balingi bamona yo. 21. Bongo ye ayanoli, alobi na bango : mama na ngai pe bandeko na ngai ezali baoyo bayokaka liloba na Nzambe pe batiaka yango na misala.

22. ekomaki mokolo moko, Yesu amataki na masuwa, pe bayekoli na ye bazalaki na ye elongo. Pe alobi : tokende na ngambu mosusu ya laki. 23. Pe azuaki pembeni ya mayi, lokola bazalaki kosala mobembo, Yesu alali, pe mopepe makasi ekweyaki kati na laki, pe masuwa etondaki na mayi, pe bazalaki na likama ya makasi. 24. Pe bayeyi pe balamusi ye, koloba : Nkolo, Nkolo, tozali kokufa. Wana alamuki, apameli mopepe pe mbonge ; pe ekiti, pe efandi na kimia. 25. Pe alobi na bango : wapi kondima na bino ? Kasi bango, basimbami na kobanga, bazalaki kokamua, na koloba kati na bango : oyo azali nani, oyo azali kopesa mitindo ti na mopepe pe na mayi, pe ezali kotos aye ? 26. Bakomaki na mokili na Bagadara, oyo ezali kotalana na Galilea. 27. Pe tangu akiti na mabele, mutu moko ya engumba aye kokotuna na ye, ye oyo wuta kala azalaki na ba demon, pe azalaki kolata elamba te, pe azalaki kofanda na ndaku te, kaka na bakunda, 28. Pe wana amonaki Yesu, pe agangaki, pe amikweyisi liboso na ye, pe alobi na mongongo makasi : nini kati na ngai pe yo, Yesu, muana na Nzambe oyo aleki likolo ? Nabondeli yo, koniokola ngai te. 29. Pamba te apesaki motindo na elimo ya mbindo abima na mutu ; mpo ete wuta kala azalaki kokanga ye, pe mutu azalaka ya kokangama pe ya kobombama na miniololo pe na bibende na makolo ; pe azalaki kobuka miniololo na ye, pe demon azalaki kokumba ye na bisobe. 30. Pe Yesu atunaki ye, koloba : kombo na yo nani ? Pe ye ayanoli legion, pamba te ba demon mingi bakotaki kati na ye. 31. Bazalaki kobondela ye atinda bango bakende na abime te. 32. Pe ezalaki wana liboke monene ya bibwele ya bangulu oyo bazalaki kobokuama wana likolo ya ngomba, babondeli ye asala ete bakende kokota kati na bango ; pe ye asalaki ete bakende. 33. Pe ba demon, babimi na mutu, bakoti na bangulu, pe liboke ya baniama bakiti wuta likolo ti kati na laki, pe bakufaki. 34. Pe baoyo bazalaki kobokola yango, komona oyo ekomaki, bakimaki, pe bayebisaki batu kati na engumba pe na bandaku ya ndele. 35. Batu bayaki pona kotala oyo ekomaki, baye epayi na Yesu, bamoni mutu oyo ba demon ebimaki na ye afandi na makolo na Yesu, alati elamba pe bomoto na ye ezali na ye pe balengaki. 36. Baoyo bamonaki makambu elekaki, bayebisaki bango lolenge mutu azalaki na ba demon akangolamaki. 37. Pe ebele ya batu ya bamboka zinga-zinga ya Bagadara, babondeli Yesu alongua epayi na bango, pamba te basimbamaki na kobanga makasi : pe ye, wana amati na masuwa, azongaki na ye. 38. Mutu oyo ba demon babimaki na ye, abondelaki ye po azala na ye elongo ; 39. Kasi ye azongisaki ye, nakoloba : zonga na ndaku na yo pe yebisa nionso oyo Nzambe asali na yo. Pe akendaki, kopanza na engumba mobimba nionso oyo Yesu asalaki ye.

40. Tangu Yesu azongaki, ekomaki wana ebele ya batu bayambaki ye, pamba te banso bazalaki kozela ye. 41. Pe tala, mutu moko kombo na ye Yayiros, pe azalaki mokonzi ya sunagoga, ayaki, pe amikweyisaki na makolo na Yesu, kobondela ye akoma na ndaku na ye, 42. Po azalaki na muana na ye se moko ya muasi, oyo azalaki na mbula zomi na mibale, pe azali kokende na kokufa. Pe lokola azalaki kokende, ebele ya batu bazalaki kotutana-tutana na ye. 43. Muasi moko oyo azalaki kosopa makila wuta mbula zomi na mibale, pe oyo asilisaki biloko na ye nionso epayi ya minganga, ata moko te akokaki kobikisa ye. 44. Apusanaki na sima na ye, pe asimbaki songe ya elamba na ye, pe na ngonga wana makila na ye ekati kosopana. 45. Yesu alobi : nani oyo asimbi ngai ? Lokola batu nionso bazalaki kowangana, Petelo alobi, pe batu nionso oyo bazalaki na ye elongo : Mokonzi, ebele ya batu bazali kotutaka yo pe kotindika yo, pe ozali koloba : nani oyo asimbi ngai ? 46. Yesu alobi : mutu moko asimbi ngai, pamba te nayebi ete nguya ebimi na ngai. 47. Pe muasi amoni ete azalaki ya kobombana te, aye na kolenga nionso, pe akweyi liboso na ye, alobi liboso na batu nionso pona tina nini asimbaki ye, pe lolenge nini abikaki na pwasa. 48. Pe alobi na ye : muana na ngai, zala na makasi, kondima na yo ebikisi yo, kende na kimia. 49. Lokola azalaki kaka koloba, mutu moko aye oyo awuti na ndaku ya mokonzi ya sunagoga, koloba na ye : muana na yo ya muasi akufi, kotungisa Moteyi te. 50. Pe Yesu, ayokaki yango, ayanoli ye, koloba : kobanga te, ndima kaka, pe akobikisama. 51. Pe tangu bakomi na ndaku, atiki mutu mosusu akota te, bobele Petelo pe Yoane pe Yakobo, pe tata ya elenge muasi na mama na ye. 52. Pe banso bazalaki kolela pe kobeta tolo na mawa na tina na ye ; pe alobi na bango : bolela te, po ete akufi te, kasi alali. 53. Bazalaki koseka ye, po bayebaki ete akufaki. 54. Kasi ye, atiaki bango nionso libanda, pe azui ye na loboko, agangi, alobi : elenge muasi, telema. 55. Pe molimo na ye ezongi kati na ye, pe atelemi mbala moko ; pe apesi motindo bapesa ye kolia. 56. Pe baboti na ye bazalaki na kokamwa mingi ; pe apesi bongo motindo bayebisa mutu nionso oyo ekomaki.

 

Mokapo 9

1. Wana ayangisaki ba zomi na mibale, apesaki bango nguya pe bokonzi likolo na ba demon nionso, pe ya kobikisa ba maladi. 2. Pe atindaki bango kosakola bokonzi na Nzambe pe kobikisa bolembu. 3. Alobi na bango : bokamata eloko te pona nzela, nzete te, saki te, lipa te, mbongo te ; moko te azala bilamba mibale. 4. Pe na ndaku nini oyo bokokota, bofanda wana kino bokolongua wana. 5. Pe baoyo bakoyamba bino te, bobima na engumba wana, nakoningisa putulu ya makolo na bino, na litatoli pona bango. 6. Wana bakendaki, batambolaki ba mboka nionso, kopanza sango malamu pe kobikisaka na bisika nionso

7. Pe Erode oyo azali tetrarke ayokaki makambu nionso oyo ye asalaki, pe azalaki koyeba te nini akanisa, po bamisusu balobaki ete ezali Yoane mobatisi asekwi kati na bakufi ; 8. Pe basusu Eliya amonisami ; pe basusu, moko ya ba profete ya kala asekwaki. 9. Pe Erode alobi : ngai, nakataki Yoane mutu ; kasi oyo azali nani, oyo nazali koyoka makambu boye pona ye ? Pe akomaki koluka amona ye.

10. Pe bapostolo wana bazongaki, bayebisaki ye nionso oyo basalaki. Pe azuaki bongo elongo na ye, abendanaki pembeni na esika ya esobe ya engumba moko ebengami betesaida. 11. Ebele ya batu wana bayebaki, balandi ye. Pe wana ayambaki, alobelaki bango na tina ya bokonzi na Nzambe, pe abikisaki baoyo bazalaki na posa ya kobika. 12. Mokolo ekomaki kokota, pe zomi na mibale bapusani pe balobi na ye : zongisa ebele ya batu oyo, po bakende na ba mboka ya zinga-zinga, pona kolala pe koluka biloko ya kolia, pamba te tozali na esika ya esobe. 13. Kasi alobi na bango : bino, bopesa bango biloko ya kolia. Bango bazongiseli ye : tozali te nakoleka mapa mitanu pe mbisi mibale, loba tokende pe tosomba biloko ya kolia pona batu oyo nionso ; 14. Pamba te bazalaki pene na mibali nkoto mitanu. Pe alobi na bayekoli na ye : bofandisa bango na milongo ya batu ntuku mitanu. 15. Pe basalaki bongo, bafandisi bango nionso. 16. Akamataki mapa mitanu pe mbisi mibale, pe atalaki likolo, pe apambolaki yango pe abuki yango, pe apesaki yango bayekoli na ye po batia liboso ya ebele ya batu. 17. Bango nionso baliaki pe batondaki ; oyo etikalaki balokotaki ba kitunga zomi na mibale.

18. ekomaki mokolo moko, lokola azalaki kobondela na pembeni, bayekoli na ye bazalaki na ye. Pe atunaki bango, alobi : batu ebele balobaka ete nazali nani ? 19. Bayanolaki, balobi : Yoane mobatisi ; basusu Eliya ; basusu ete moko ya ba profete ya kala asekwi. 20. Alobi na bango : pe bino, bolobi nazali nani ? Pe Petelo, ayanoli, alobi : Kristu na Nzambe 21. Pe alobi na bango na makasi, apesi motindo baloba na mutu te. 22. Nakoloba ete : esengeli na muana na mutu aniokuama mingi, bakobuaka ye na bampaka, pe na bakonzi ya banganga-Nzambe pe na bakomeli, bakoboma pe akosekwa sima ya mikolo misatu. 23. Pe alobaki na banso : Soki mutu alingi kolanda ngai, amiboya ye moko, pe amemaka ekuluzu na ye mikolo nionso, pe alanda ngai : 24. Pamba te mutu nionso oyo akolinga kobikisa bomoyi na ye, akobungisa yango ; kasi oyo akobungisa bomoyi pona alingi ngai, mutu wana akobikisa yango. 25. Pamba te libonza nini ezali na mutu oyo akozua mokili mobimba pe ye moko amibebisi pe abungi ? 26. Po oyo akoyaka ngai soni pe ya maloba na ngai, mwana na moto akoyaka ye soni tangu akoya na kembo na ye pe ya Tata pe ya bangelu basantu. 27. Nalobi na bino, na solo, na baoyo bazali awa, ezali na basusu oyo bakomona liwa te kino bakomona bokonzi na Nzambe.

 28. Ekomaki, pene ya mikolo mwambe sima ya maloba oyo, azuaki elongo na ye Petelo, Yoane pe Yakobo, amataki na ngomba pona kobondela. 29. Lokola azalaki kobondela, motindo ya elongi na ye ekomaki ndenge mosusu, pe elamba na ye ekomaki pembe pe kongenga lokola pole ya mikalikali ; 30. Pe tala batu mibale, oyo bazalaki kolobana na ye, oyo ezalaki Mose pe Eliya, 31. Bamonisamaki kati na kembo, kolobanaka na tina ya bokeyi na ye oyo akokisa na Yerusaleme. 32. Pe Petelo pe baoyo bazalaki na ye bakomaki na pongi makasi ; pe tangu balamuki, bamoni kembo na ye pe batu mibale elongo na ye. 33. Pe ekomaki, lokola bazalaki kokabwana na ye, ete Petelo alobi na Yesu : Mokonzi, ezali malamu tozala awa ; pe tosala bandaku misatu, moko pona yo, moko pona Mose, pe moko pona Eliya, koyebaka te oyo azali koloba. 34. Lokola azalaki koloba makambu wana, lipata eyaki pe ezipaki bango ; pe balengaki lokola bakotaki kati na lipata. 35. Pe mongongo moko ewuti na lipata, koloba : Oyo azali Mwana na ngai molingami, boyoka ye. 36. Pe wana mongongo ezali koyokana, Yesu atikali ye moko. Bafandaki kimia, pe na mikolo wana, balobaki makambu wana te ata na mutu te na oyo bango bamonaki.

37. Pe ekomaki mokolo elandaki, tangu bakitaki na ngomba, ebele ya batu bayaki kokutana na bango. 38. Pe tala, mutu moko kati na ebele ya batu agangaki, koloba : Molakisi, nalombi yo otiya misu na yo likolo ya mwana na ngai, pamba te azali se moko na ngai ; 39. Pe tala, elimo moko ekangaka ye, pe mbala moko agangi ; pe akoningisaka ye makasi, nakobimisaka ye fulufulu na monoko ; pe atikaka ye na pasi na kobukaka ye ; 40. Pe nabondelaki bayekoli na yo po babengana ye, kasi bakoki te. 41. Pe Yesu, ayonoli, alobi : O ekeke ezanga kondima pe ya mabe, kino tangu nini nakozala na bino pe nakozala motema molayi na tina na bino ? 42. Kumba mwana na yo awa. Pe lisusu, lokola azalaki kopusana, demon ekweyisi ye eningisi ye makasi ; kasi Yesu apesi mitindo na elimo na mbindo pe abikisi mwana pe azongisi ye na tata na ye. 43. Pe banso bakamwaki monene ya Nzambe.

Pe lokola banso bazalaki kokamwa nionso Yesu azalaki kosala, alobi na bayekoli na ye : 44. Bino, bobomba malamu maloba oyo boyoki, po mwana na moto akokabama na maboko ya batu. 45. Kasi basosoli liloba yango te, ezali ya kobombama pona bango, na bongo basosolaki yango te ; pe babangi kotuna ye na oyo etali liloba yango. 46. Pe motuna ebimi kati na bango, nani azali monene koleka kati na bango. 47. Kasi Yesu, amonaki mituna ya mitema na bango, azui mwana muke, pe atelemisi ye pene na ye moko ; 48. Pe alobi na bango : Oyo nionso akoyamba mwana muke na kombo na ngai, ayambi ngai ; pe oyo nionso ayambi ngai, ayambi oyo atindaki ngai. Po oyo azali muke kati na bino nionso, ye wana nde azali monene koleka. 49. Pe Yoane, ayanoli, alobi : Mokonzi, tomonaki mutu moko kobengana bademon na kombo na yo, pe topekisaki ye, po azali kolanda te elongo na biso. 50. Pe Yesu alobi na ye : bopekisa ye te, po oyo atelemeli bino te azali pona bino.

51. Tangu ekomaki mikolo ya konetolama na ye kokisamaka, azui mokano ya kotelemisa elongi na ye pona kokende na Yerusaleme ; 52. Pe atindaki bantoma liboso na ye. Pe wana bakendaki, bakotaki na mboka moko ya ba Samariton pona kobongisa ye esika ; 53. Pe bayambaki ye te, pona atalisaki elongi na ye na Yerusaleme. 54. Pe bayekoli na ye, Yakobo pe Yoane, komona bongo, balobi : Nkolo, alingi toloba na moto ekita wuta likolo pe etumba bango, lokola esalaki Eliya ? 55. Pe, abaluki, apameli bango makasi ! 56. Pe bakendaki na mboka mosusu.

57. Pe ekomaki, lokola bazalaki kokende na nzela, mutu moko alobi na ye : Nakolonda yo esika nionso okokende. 58. Pe Yesu alobi na ye : bambwa ya zamba bazali na madusu na se ya mabele pona kobatama, pe bandeke ya likolo bazali na bazala na bango ; kasi mwana ya moto azali na esika te pona kopemisa moto na ye. 59. Pe alobi na mosusu : Landa ngai ; - pe alobi : Nkolo, tika nakende liboso nanu kokunda tata na ngai. 60. Yesu alobi na ye : tika bakufi bakunda bakufi na bango, kasi yo, kende pe sakola bokonzi na Nzambe. 61. Pe mosusu alobi lisusu : nakolanda yo, Nkolo ; kasi tika nakende liboso kotikana na baoyo bazali na ndaku na ngai. 62. Pe Yesu alobi na ye : mutu moko te oyo atia loboko na ye na eloko ya mosala ya bilanga pe azali kotala na sima, abongi te pona bokonzi ya Nzambe.

 

Mokapo 10

1. Nzokande sima ya makambo wana, Nkolo aponaki tuku sambo misusu, pe atindaki bango mibale na mibale liboso na ye na bingumba nionso pe na bisika nionso wapi ye asengelaki kokende. 2. Bongo alobi na bango : tangu ya kobuka elanga ezali monene, kasi basali bazali muke : bolomba Nkolo ya tangu ya kobuka elanga, po atindika basali kati na kobuka elanga. 3. Bokende ; tala, ngai natindi bino lokola bana ya mpate na kati ya bambwa ya zamba. 4. Bomema saki ya kotia mbongo te, ata saki te, to basandale te ; pe na nzela bopesa mutu mbote te. 5. Kasi, kati na ndaku nionso oyo bokokɔta, bolobá liboso ete: Kimia ezala likolo na ndako oyo ! 6 Mpe soki muana ya kimia aza wana, kimia na bino ekofanda likolo na ye, soki te ekozonga likolo na bino. 7. Pe bófanda na ndako wana, bólia pe bómɛla biloko oyo bango bakopesa bino; pamba te mosali abongi na lifuti na ye. Bokende ndako na ndako te. 8 Pe na engumba nionso oyo bokokɔta pe bayambi bino, bólia nionso oyo bakotia liboso na bino. 9. Pe bobikisa babeli oyo bazali kuna, pe bolobá na bango ete: Bokonzi ya Nzambe ekómi pene na bino. 10 Kasi na engumba nionso oyo bokɔti pe bayambi bio te, bóbima na babalabala na yango mpe bóloba ete : 11. Putulu ya engumba na bino, oyo ekangami na makolo na biso, topupuli yango po na bino ; kasi boyebá boye, ete Bokonzi ya Nzambe esili kokóma pene. 12. Nazali koyebisa bino ete likama ekomelaki Sodome ekozala ya makasi mingi te lokola ya engumba yango. 13. Mawa na yo, Korazine ! mawa na yo, Betesaida ! mpo soko bikamua oyo esalami kati na bino esalamaka kati na Turo pe Sidon, balingaki wuta kala kobonguana, kofanda na putulu wana balati elamba ya saki ; 14. Kasi likama oyo ekomelaki Turo ná Sidon, na mokolo ya kosambisama ekozala makasi mingi te koleka oyo ya bino. 15. Pe yo, Kapernaum, oyo otombuami kino na likoló, okokita penza ti na Hadès. 16. Oyo akoyoka bino, ayoki ngai ; pe oyo abuaki bino, abuaki ngai ; pe mutu nionso oyo abuaki ngai, abuaki oyo atindaki ngai.

17. Pe tuku sambo bazongaki na esengo, balobi : Nkolo, ezala ba demon bazali kotosa biso na Kombo na yo. 18 Alobi na bango : Namonaki Satana kokueya longua na likolo lokola kake.

19 Tala, napesi bino bokonzi ya kotambola likolo ya banioka pe likolo ya ba scorpions, pe likolo ya nguya nionso ya monguna ; pe eloko moko te ekosala bino mabe ; 20. Kasi bósepela te ete milimo ezali kotosa bino, kasi bósepela ndenge bakombo na bino ekomami na likoló. 21 – Kaka na ngonga wana, Yesu asepelaki na molimo na ye pe alobi : Nakumisi yo, Tata, Nkolo ya likolo pe ya mabele, po obombi makambo oyo na bato ya bwania pe ya mayele, pe olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, mpo yango nde omoni malamu liboso na yo. 22. Biloko nionso epesameli ngai na Tata na ngai ; pe mutu moko te ayebi nani oyo Muana azali bobele se Tata ; to nani oyo Tata azali bobele se Muana, mpe na mutu nionso oyo Muana alingi kolakisa. 23. Pe abaluki epai ya bayekoli, alobi kaka na bango : Esengo mingi miso oyo ezali komona oyo bozali komona ! 24. Po nazali koyebisa bino ete baprofete mingi pe ebele bakonzi balingaki komona makambo oyo bozali komona, pe bamonaki yango te, mpe koyoka makambo oyo bozali koyoka, mpe bayokaki yango te.

25 Pe tala, molakisi-mibeko moko atɛlɛmaki pona komeka ye, pe alobaki : “Molakisi, nini nasengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko ? 26 Pe alobi na ye : “Nini ekomami na kati ya Mibeko ?” Otangaka ndenge nini ? 27 Pe ayanolaki, alobaki : "Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, pe na molimo na yo mobimba, pe na makasi na yo nionso, pe na makanisi na yo mobimba" ; “pe mozalani na yo lokola yo moko”. 28 Pe alobaki na ye : Oyanoli malamu ; sala boye, pe okozala na bomoi. 29 Kasi ye alingaki komilongisa, alobi na Yesu : Mozalani na ngai azali nani ? 30 Pe Yesu, ayanoli ye, alobi : mutu moko akitaki na Yerusaleme na Yeriko, pe akueyaki kati na miyibi, baoyo, babotolaki ye nionso pe bazokisi ye mobimba, bakeyi pe batiki ye pene na kufa. 31 Nzokande, na mbalakaka, nganga-nzambe moko azalaki kokita na nzela wana, pe amonaki ye, alekaki na ngambo mosusu ; 32 Pe ndenge moko levite moko, akómaki na esika wana, ayaki pe amonaki ye, akatisaki na ngámbo mosusu. 33 kasi Samarite moko oyo azalaki kokende na nzela na ye, ayaki epai na ye, pe tango amonaki ye, ayokaki mawa. 34 Pe apusanaki pe akangaki bapota na ye, asopelaki likolo na yango mafuta pe vino ; pe atiaki ye likolo ya niama na ye moko, akumbaki ye na ndako ya bapaya mpe abatelaki ye. 35 Pe mokolo oyo elandaki, akei, pe abimisaki denaria mibale, pe apesaki yango na mobateli ya ndaku ya bapaya, pe alobaki na ye ete : Batelá ye; pe oyo okobimisa mingi, ngai, tango nakozonga, nakofuta yo yango. 36 Nani kati na misato oyo azalaki mozalani ya mutu oyo akueyaki kati na miyibi ? 37 Pe alobaki : Ezali ye oyo amonisaki motema mawa epai na ye. Pe Yesu alobaki na ye : Kende, pe yo sala bongo.

 

38 Pe ekomaki ete, lokola bazalaki na nzela, akotaki na mboka moko. Pe muasi moko abengami Marta ayambaki ye na ndaku na ye. 39 Pe azalaki na ndeko na ye moko ya muasi abengama Maria, oyo pe afandaki na makolo ya Yesu, pe azalaki koyoka liloba na ye ; 40 kasi Marta azalaki kopɛngwisa bokebi na ye na misala mingi. Pe ayaki epai Na Yesu, alobaki : Nkolo, ezali kosala yo mawa te ndenge ndeko na ngai ya muasi atiki ngai moko na sala ? Yebisá ye asunga ngai. 41. Pe Yesu, ayanolaki ye : Marta, Marta, ozali komiyoka pasi pe komitungisama na makambo ebele, 42. Kasi esengeli kaka eloko moko ; pe Maria aponi eteni ya malamu oyo bakolongola ye te.

 

Mokapo 11

1. Pe lokola azalaki kosambela na esika moko boye, ekomaki, sima na ye kosilisa, moko ya bayekoli na ye alobaki na ye : Nkolo, teya biso kosambela, lokola Yoane ateyaki bayekoli na ye. 2. Pe alobaki na bango : Tangu bozali kobondela, boloba : Tata, kombo na yo ekumisama; bokonzi na yo eya ; 3. Pesa biso mokolo na mokolo lipa oyo tozali na yango posa ; 4. Pe limbisa biso masumu na biso, pamba te biso moko tolimbisaka pe batu nionso oyo bazali na niongo na biso ; pe kokotisa biso te kati na komekama. 5. Pe alobaki na bango : Nani akozala kati na bino oyo, azali na moninga na ye, akokende epai na ye na midi ya butu, pe akoloba na ye : Moninga, defisá ngai mapa misato. 6. Po moninga na ngai akomi na mobembo epai na ngai, pe nazali na eloko ya kopesa ye te ?… 7. Pe ye oyo azali na kati, koyanola, koloba: kótungisa ngai te ; porte esi ekangamaki, pe bana na ngai bazali na mbeto elongo na ngai ; Nakoki kotelema te pe kopesa yo. 8 — Nalobi na bino ete, ata akotelema te pe akopesa ye te po azali moninga na ye, kasi, na tina ya motungisi na ye, akotelema mpe akopesa ye na lolenge asengeli na yango.

9. Pe ngai, nalobi na bino : Bosenga, pe ekopesamela bino; boluka, pe bokokuta ; bobeta, pe ekofungwamela bino ; 10. Po oyo akosɛnga, akozua ; pe oyo akoluka, akokuta ; pe oyo akobeta, ekofungwamela ye. 11. Nani tata kati na bino oyo muana na ye akosenga lipa pe ye akopesa ye libanga ? to lisusu, mbisi, ye akopesa ye, na esika ya mbisi, nyoka ? 12. to lisusu, soki asengi liki, akopesa ye scorpion ? 13. Soki bino bato mabe, boyebi kopesa bana na bino biloko ya malamu, na mingi koleka Tata oyo azali na likoló akopesa Molimo Mosantu na baoyo bazali kosɛnga ye.

 

14. Pe abenganaki demon moko oyo azangisa maloba. Pe ekomaki ete, tangu demon abimaki, baba alobaki ; pe ebele ya bato bakamwaki. 15. Kasi bamisusu kati na bango balobaki : Azobengana ba demon na nzela ya Beelzebule, mokonzi ya ba demon. 16. Pe basusu pona komeka ye, basɛngaki ye elembo ya likoló. 17. Kasi ye, ayebaki makanisi na bango, alobaki na bango : Bokonzi nionso oyo ekabwani na yango moko ekokóma esobe ; pe ndaku ekabwani na yango moko ekokweya ; 18. Pe soki Satana amikabwani na ye moko, ndenge nini bokonzi na ye ekotelema ? po bozali koloba ete nazobengana ba demon na nzela ya Beelzebule. 19. Nzokande soki na nzela ya Beelezebule, ngai nazali kobengana ba demon, bana na bino na nzela ya nini babenganaka bango ? Yango wana bango moko bakozala bazuzi na bino. 20. Kasi soki nazali kobengana ba demon na mosapi ya Nzambe, wana Bokonzi ya Nzambe ekómi epai na bino. 21. Tangu mutu ya makasi, alati bibundeli na ye, akokɛngɛla ndaku na ye ya mokonzi, biloko na ye ezali na kimia ; 22. Kasi soki oyo aleki ye makasi, alongi ye, alongoli ye bibundeli na ye oyo azalaki kotiela motema, pe akokabola biloko na ye nionso oyo abotoli ye. 23. Oyo azali elongo na ngai te azali kotɛlemɛla ngai ; pe oyo asangani elongo na ngai te, akopalangisa. 24. Tangu elimo ya mbindo ebimi na muto, ekendaka na bisika ya kokauka, koluka kopema ; pe wana akomona te, akoloba : nakozonga na ndaku na ngai epai nabimaki. 25. Pe akókoma wana, amoni yango ekɔmbɔlami mpe ekembisami. 26. Wana akokende, pe akozua milimo misusu sambo oyo bazali mabe koleka ye moko ; pe ekoti, bakofanda wana; pe kozala ya suka ya mutu wana ekozala mabe koleka oyo ya liboso. 27. Ekomaki, lokola azalaki koloba makambo yango, muasi moko atombolaki mongongo na ye na kati ya ebele ya bato pe alobaki na ye : Epambolama libumu oyo ememaki yo mpe mabɛ́lɛ oyo omelaki. 28. Pe alobaki : Esengo ezali bato oyo bazali koyoka liloba ya Nzambe pe bazali kobomba yango.

29. Pe lokola ebele ya batu basanganaki esika moko, akomi koloba : libota oyo ezali libota moko ya mabe ; azali kosɛnga elembo ; pe ekopesama elembo moko te, soki bobele elembo na Yona. 30. Pamba te lokola Yona azalaki elembo mpo na bato ya Ninive, bongo ekozala muana ya moto akozala po na libota oyo. 31. Mokonzi-mwasi moko ya midi akotɛlɛma na mokolo ya kosambisama elongo na batu ya libota oyo pe akokweisa bango ; po ayaki uta na suka ya mabele pona koyoka buania ya Salomo, pe tala, awa ezali na oyo azali monene koleka Salomo. 32 Batu ya Ninive bakotɛlɛma mokolo ya kosambisama elongo na libota oyo mpe bakokweisa yango ; po babongunaki na litela ya Yona, pe tala, awa ezali na oyo azal monene koleka Yona. 33. Ata mutu moko te, sima ya kopelisa mwinda, atiaka yango na esika ya kobombama, to na se ya ekolo, kasi na etɛlɛmɛlo ya mwinda, po batu oyo bakokɔta bámona pole. 34 Mwinda ya nzoto ezali liso na yo ; tangu liso na yo ezali na lolenge malamu, nzoto na yo mobimba pe etondi na pole ; kasi tangu yango ezali na lolenge ya mabe, nzoto na yo pe ekozala molili. 35. Na bongo, bómikeba ete pole oyo ezali kati na bino ezala molili. 36. Soki nzoto na yo mobimba ezali pole, ezali ata na eteni ya molili te, ekozala nionso ya kotondisama na pole, lokola tangu mwinda engɛngisa yo na kongɛnga na yango.

 

37. Pe lokola azalaki koloba, Mofarizai moko abondelaki ye akende kolia epai na ye ; pe akotaki, afandi na mesa. 38. Kasi Mofarizai, amoni, akamwaki po asukolaki liboso te liboso ya kolia. 39. Pe Nkolo alobaki na ye : Pona bino Bafarizai bopetolaka libanda ya kopo pe ya saani, kasi na kati bino botondi na moyibi pe na mabe. 40. Bazoba ! ye oyo asalaki libanda, asalaki mpe kati te ? 41. Kasi bopesá makabo ya motema mawa na oyo bozali na yango ; pe tala, biloko nionso ekozala bino peto. 42. Kasi mawa na bino, Bafarizai ! Pamba te bofutaka moko na zomi ya menthe pe ya nzete ya fololo pe ndunda nionso, pe bokendeke mosika ya bosambisi pe ya bolingo ya Nzambe: esengelaki kosala makambo oyo, pe kotika te baoyo etikali. 43. Mawa na bino, Bafarizai ! po bolingaka bakiti ya liboso na ba sunagoga, pe bambote na bisika ya bato nionso. 44. Mawa na bino ! Pamba te bozali lokola ba malita oyo ezali komonana te ; pe batu, bazali kotambola likolo na yango, nakoyeba eloko te. 45. Pe moko na balakisi mibeko ayanolaki, alobi na ye : Molakisi, na kolobaka makambo oyo, ozali mpe kofinga biso. 46. Pe alobi : Na bino pe, mawa na bino, balakisi mibeko ! po bozali komemisa batu mikumba oyo ezali pasi po na komema, pe bino moko bosimbaka mikumba yango ata na mosapi moko te. 47. Mawa na bino ! po bozali kotonga bakunda ya baprofete, pe batata na bino babomaka bango. 48. Bozali bongo kotatola na misala ya batata na bino pe bosepelaka na yango ; po bango, babomi bango, pe bino, bozali kotonga bakunda na bango. 49. Na yango wana bwania ya Nzambe elobaki : Nazali kotindela bango baprofete pe bapostolo, pe bakobomaka misusu, pe bakobengana bango na nzela ya minioko. 50. Po ete makila ya baprofete nionso oyo esopamaki uta ebandeli ya mokili esengama na libota oyo. 51. Uta makila ya Abel tii na makila ya Zakaria, oyo akufaki na katikati ya etumbelo pe ndaku : ɛɛ, nazali koyebisa bino ete, ekosɛngama na libota oyo. 52. Mawa na bino, balimboli mibeko ! po bolongolaki fungola ya boyebi: bokoti bino moko te, pe bopekisi baoyo bazali kokota.

53. Pe lokola azalaki koloba makambo yango, Bakomeli pe Bafarizai bakomaki kotiela ye mitambu na kanda nionso ; pe bazalaki kotindika ye po ayanola na makambo ebele. 54. kotiela ye mitambo, pe koluka kokanga ye na monoko na ye, pona bafunda ye

 

Mokapo 12

1. Nzokande ebele ya batu bayanganaki na bankóto, na wana bazalaki konyatana bango na bango, na liboso na nionso, abandi koloba na bayekoli na ye : Bómikebisa bino moko na levin ya Bafarizai, oyo ezali hipokrizi. 2. Kasi ezali na eloko moko te ya kobatama oyo ekomonisama te, pe eloko moko te ya kobombana oyo ekoyebana te. 3. Na yango makambo nionso oyo bolobaki na milili ekoyokana na pole, pe oyo bolobaki na matoi kati na bashambre ekolobama likoló ya bandaku. 4. Kasi nalobi na bino, baninga na ngai : Bobanga te baoyo babomaka nzoto pe sima na yango bakoka kosala eloko lisusu te koleka ; 5. Kasi nakolakisa bino nani bosengeli kobanga : bobanga ye oyo, sima na koboma, azali na nguya ya kobwaka ghehena : iyo, nalobi bino, bobanga oyo wana. 6. Batɛkaka bamankɛkɛ mitano te pona mbongo mibale ? Ata moko te kati na bango abosani liboso ya Nzambe. 7. Kasi suki ya motó na bino yonso etángamaka. Bóbanga te : bozali na motuya mingi koleka bamankeke. 8. Pe nalobi na bino, Oyo akotatola ngai liboso ya batu, muana na mutu pe akotatola ye pe liboso ya baanzelu ya Nzambe ; 9. Kasi oyo akowangana ngai liboso ya batu, ye pe akowanganama liboso ya baanzelu ya Nzambe. 10. Mpe mutu nionso oyo akoloba mabe pona muana ya mutu, wana ekolimbisamela ye ; kasi mutu nionso oyo akoblasfeme Molimo Mosantu, wana ekolimbisama ye te. 11. Pe tangu bakomema bino liboso ya basunagoga pe bazuzi pe bakonzi, bobanga te, lolenge nini bokoyanola, to nini bokoloba ; 12. Pamba té Molimo Mosantu akoteya bino na ngonga wana nini esengeli boloba.

13. Pe mutu moko alobi na ye na kati ya ebele ya bato : Molakisi, yebisa ndeko na ngai akabola elongo na ngai libula na biso. 14. Kasi alobaki na ye : Mutu, nani atiaki ngai mosambisi likolo na bino pe pona kokabola bino na bino ? 15. Pe alobaki na bango : Botala, pe bokeba na lokoso nionso ; pamba te ata mutu azali mozwi, bomoi na ye ezali kati na biloko na ye te. 16. Pe alobi na bango parabole, nakoloba : mutu moko ya bozui ba bilanga na ye ebotaki mingi. 17. Pe akanisaki kati ye moko, koloba : Nasala nini, po nazali na esika te pona kosangisa bambuma na ngai oyo nabuki ? 18. Pe alobi : Talá oyo nakosala : Nakobuka bandaku na ngai ya kobomba biloko, pe nakotonga oyo ya minene, pe kuna nakosangisa bambuma na ngai nionso nabukaki na ba bozwi na ngai ; 19. Pe nakoloba na molimo na ngai, molimo, ozali na biloko mingi esangisami pona mibu ebele ; pema, lia, mela, kolia malamu. 20. Kasi Nzambe alobi na ye : Zoba ! butu oyo penza bakosenga bomoyi na yo ; pe biloko oyo obongisaki, ekozala ya nani ? 21. Ezali bongo na mutu oyo abombaka biloko ya motuya pona ye moko, pe oyo azali mozwi te po na Nzambe.

 

22. Pe alobaki na bayekoli na ye : Na ntina wana, nalobi na bino : Bomitungisa te pona bomoi, nini bokolia ; to pona nzoto, nini bokolata. 23. Bomoi eleki bilei, pe nzoto eleki bilamba. 24. Bótalela bandeke : balonaka te pe babukaka te, bazalaka na esika te babombaka biloko to ndako ya kobomba bambuma te ; pe Nzambe aleyisaka bango : boni bino bozali motuya koleka bandeke ! 25. Pe nani kati na bino, na komitungisa na ye, akoki kobakisa ngonga moko na molayi na ye ? 26. Bongo soki bokoka ata oyo ezali ya muke te, pona nini bozali komitungisa po na oyo etikali ? 27. Bótalela bafololo ya lisi, ndenge nini ezali kokola : basalaka te pe pe batongaka elamba te, na wana nazali koloba na bino ata Salomo kati na nkembo na ye mobimba alataki lokola moko na bango te. 28. Pe soki Nzambe alatisaka bongo matiti oyo ezali lelo na elanga pe lobi ekobuakama na kati ya etumbeli, boni mingi bino, bato ya kondima muke ! 29. Pe bino, boluka te nini bokoliya to nini bokomela, pe bozala komitungisama te ; 30. Po bikólo ya mokili balukaka biloko wana nionso, pe Tata na bino ayebi ete bozali na posa ya biloko yango ; 31. Kasi bóluka bokonzi na ye, pe biloko ekopesamela bino koleka. 32. — Bobanga te, etonga moke, pamba te esepelisi Tata na bino kopesa bino bokonzi. 33. Boteka oyo bozali na yango, pe bopesá makabo ya kosunga babola ; bómisala bibombeli ya mbongo oyo enunaka te, eloko ya motuya oyo esilaka te, na likoló, oyo moyibi apusanaki pene na yango te, pe epai oyo nsɛlɛlɛ ekobebisa te ; 34. Pamba te esika oyo ya motuya na yo ezali, kuna pe motema na yo ekozala. 35. Tiká ete loketo na bino elata mokaba pe mwinda na bino engɛnga ; 36. Pe bózala lokola bato oyo bazelaka nkolo na bango, tangu nionso oyo akozonga kowuta na feti ya libala, po ete, na tang akoya to akobeta, bakofungolela ye mbala moko. 37. Esengo na bawumbu oyo, nkolo na bango tangu akoya, akokuta bango bazali kokɛngɛla. Na solo, nazali koloba na bino ete akolata mokaba pe akofandisa bango na mesa, mpe akopusana liboso, akosalela bango. 38. Pe soki ayei na ngonga ya mibale ya kokɛngɛla, pe soki ayei na ngonga ya misato, pe akuti bango bongo, batu na esengo bawumbu wana. 39. Kasi boyebá ete soki nkolo na ndako ayebaki na ngonga nini moyibi esengelaki aya, alingaki amikɛngɛle pe atika te ete bátobola ndako na ye. 40. Bongo bino pe bómibongisa ; po, na ngonga oyo bozali kokanisa te, Mwana ya Moto akoya. 41. Petelo alobi na ye : Nkolo, ozali koloba parabole oyo pona biso, to pona bato nionso? 42. Pe Nkolo alobi : Bongo nani azali mobateli ya sembo pe ya komikengela oyo nkolo akotiya likoló ya basaleli ya ndako na ye, pona apesa bango ngonga oyo ekoki bilei na bango ya ble ? 43. Esengo na mowumbu wana, oyo nkolo na ye tangu akoya akokuta azali kosala bongo. 44. Solo nalobi na bino, akotiya ye likolo na biloko na ye nionso. 45. Kasi soki mowumbu wana alobi kati na motema na ye : Nkolo na ngai azali kowumela pona kozonga, pe akomi kobɛta basaleli ya mibali pe ya basi, pe koliya pe komɛla pe kolangwa masanga. 46. Nkolo ya mowumbu wana akozonga na mukolo oyo ye azelaki te, pe na ngonga oyo ayebi te, pe akokata ye na biteni mibale pe akopesa ndambo na ye elongo na bato oyo bazangi bosembo. 47. Nzokande mowumbu wana oyo ayebaki mokano ya nkolo na ye, pe amibongisaki te pe asalaki te lolenge ya mokano na ye, akobetama fimbu mingi ; 48. Pe ye oyo ayebaki yango te, pe asalaki makambo oyo ebongi na kobɛtama, akobɛtama fimbu muke. Pamba te na ye oyo bapesaki mingi, ekosɛngama mingi koleka ; pe na ye oyo bapesaki mingi ya kobomba, ekosengama pe mingi. 49. Nayei kobwaka moto na mabele ; pe nalinga nini, soki esi epeli ? 50. Kasi nazali na kobatisama na libatisi moko ; pe boni nazali naposa makasi kino ekokokisama ! 51. Bokanisi ete nayaki kopesa kimia na mabele ? Te, nalobi na bino; kasi bokabwani. 52. Pamba te kobanda sik’oyo bakozala batu mitanu na ndaku moko, bakabwani : misatu bakabwana na mibale, pe mibale bakotɛmɛla misato ; 53. tata akotelemela mwana, pe mwana akotemela tata ; mama akotelemela mwana muasi, pe mwana muasi akotelemela mama ; mama bokilo akotelemela bokilo na ye ya muasi, pe bokilo ya muasi akotelemela mama bokilo.

 

54. Pe alobi lisusu na ebele ya bato : Tangu bomoni lipata ezali komata wuta na wɛste, mbala moko bolobaka : Mbula ezali koya ; pe yango esalamaka bongo. 55. Pe tangu mopepe ya sudi ezali kofula, bolobaka : Ekozala molunge ; pe esalamaka. 56. Hipokrite ! Boyebi kososola ndenge mabele pe lola ezali komonana, pe ndenge nini bososolaka tangu oyo te ? 57. Pe lisusu pona nini bosambisaka na bino moko te nini ezali sembo ? 58. Pamba te tangu ozali kokende elongo na mofundi na yo liboso ya mosambisi, na nzela sala makasi po na kokangolama epai na ye, noki te amema yo liboso ya mosambisi ; pe zuzi akopesa yo na mokengeli, pe mokengeli akobuaka yo na boloko. 59. Nalobi na yo ete okobima kuna te kino okofuta mbongo ya suka.

 

Mokapo 13

1. Kaka na tangu wana, bamosusu bazalaki penza wana, oyo bayebisaki ye na tina ya Bagalilai oyo Pilato asangisaki makila na bango elongo na bambeka na bango. 2. Pe azongiseli, alobi na bango : Bondimi ete bato wana ya Galilai bazalaki basumuki mingi koleka bato nyonso ya Galilai, po baniokwamaki ndenge wana ? 3. Te, nalobi na bino ; kasi soki bobonguani te, bino pe bokokufa banso na lolenge moko. 4. To batu zomi na mwambe oyo likolo na bango ndaku molayi ya Siloe ekwelelaki, pe ebomaki bango, bokanisi ete bazalaki na ngambo koleka bato nionso oyo bafandi na Yerusaleme ? 5. Te, nazali koloba na bino ; kasi soko bobonguani te, bino pe bokokufa banso na lolenge moko.

6. Pe azalaki koloba parabole oyo : Mutu moko azalaki na figi moko oyo alonaki na elanga na ye ya vino ; pe ayaki koluka mbuma, pe amonaki ata moko te. 7. Pe alobi na mosali elanga ya vino : Tala mbula misato nayaka koluka mbuma na nzete ya figi oyo, pe namoni ata moko te : kata yango ; pona nini ezali kokanga mabele na tina te ? 8. Pe ayanolaki, alobi na ye : Nkolo, tiká yango nanu mbula oyo, tii nafungola zingazinga na ye pe natiya bosoto na kati na ye ; 9. Pe mbala mosusu ekoki kobota mbuma, soki te, sima okokata yango.

 

10. Nzokande, azalaki kolakisa na moko ya basunagoga na mokolo ya sabata. 11. Pe tala, mwasi moko azalaki wana oyo azalaki na molimo ya bokono uta mibu zomi na mwambe, pe azalaki ya konguma pe akokaki te kosembolama. 12. Pe Yesu amonaki ye, abengi ye pe alobi na ye : Mwasi, okangolami na bolɛmbu na yo. 13. Pe atie mabɔkɔ likoló na ye, pe na mbala moko asembolami pe akumisi Nzambe. 14. Pe mokonzi ya sunagoga, asiliki na oyo Yesu abikisaki mukolo ya sabata, alobi na ebele ya bato : Ezali na mikolo motoba oyo ezali pona kosala mosala ; boya na mikolo wana, pe bobikisama, kasi na mokolo ya sabata te. 15. Bongo Nkolo ayanoli ye : Hipokrite ! Moko na moko kati na bino afungolaka ngɔmbɛ na ye to mpunda na ye na elielo ya bibwɛlɛ na mokolo ya sabata te, pe amemaka bango na komɛla te ? 16. Pe oyo azali mwana mwasi wa Abraham, oyo Satana akangaki, tala, mbula zomi na mwambe mileki, esengelaki te kofungola ye na bokangami na mokolo ya sabata ? 17. Pe lokola azalaki koloba makambo yango, banguna na ye nionso bayokaki soni ; pe batu ebele nionso basepelaki na makambo nionso ya nkembo oyo azalaki kosala.

 

18. Pe azali koloba : Ndenge nini Bokonzi ya Nzambe ezali, pe na nini nakokokanisa yango ? 19. Ezali lokola mbuma ya mutarde oyo moto azuaki pe abuaki na elanga na ye ; pe ekolaki pe ekomaki nzete munene, pe bandeke ya likolo bafandaki na bitape na yango.

 

20. Pe alobi lisusu : Na nini nakokokanisa bokonzi ya Nzambe ? 21. Ezali lokola levire oyo mwasi moko azuaki pe asangisaki yango na farini ya ba litrɛ misato, tii tangu nionso evimbaki.

22. Pe azalaki koleka na bingumba pe bamboka, azalaki kolakisa pe kokende nzela na ye epai na Yerusaleme. 23. Pe mutu moko atunaki ye : Nkolo, batu oyo bakobikisama bazali muke ? 24. Pe alobi na bango : Bósala makasi pona kokɔta na porte ya kaka ; pamba te, nazali koloba na bino, mingi bakoluka kokota pe bakokoka te. 25. Tangu kaka mukolo ndako akotɛlɛma pe akokanga porte, pe bokozala ya kotɛlɛma na libándá pe kobetaka porte, nakolobaka : Nkolo, fungolá biso ! pe akoyanola, akoloba na bino : Nayebi bino te na esika bowuti ; 26. Bongo bokobanda koloba : Toliaki pe tomɛlaki liboso na yo, pe oteyaki na babalabala na biso. 27. Pe akoloba : Nalobi na bino, nayebi te wapi bowuti ; bólongwa na ngai, bino nionso basali ya mabe. 28. Wana ekozala kolela pe koswa minu, tangu bokomona Abrahama ná Yisaka ná Yakobo ná baprofete nionso kati na Bokonzi ya Nzambe, kasi bino, bobwakami libanda. 29. Bakowuta na Este pe na Weste, pe na Nord pe na Sud ; pe bakofanda na mesa kati na Bokonzi ya Nzambe. 30. Pe tala, eza na baoyo ya suka bakokoma batu ya yambo, pe ezali na baoyo ya yambo bakokoma ya suka.

31. Kaka na mukolo wana, Bafarizai bayaki, balobi na ye: Longwa awa pe kende; po Herode azali naposa aboma yo. 32. Alobi na bango : Bókende koloba na mbua wana ya zamba : Talá, nazali kobengana bademon pe lelo na lobi nazali kobikisa batu, pe na mokolo ya misatu pona ngai esili. 33. Kasi esengeli na ngai natambola lelo pe lobi pe mukolo oyo elandi, po profete akoki kokufa te na libándá ya Yerusaleme. 34. Yerusaleme, Yerusaleme, oyo ebomaka baprofete pe obambaka mabanga po bakufa baoyo batindameli yo, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso asangisa bana na ye na nionso na se ya mapapu na ye, pe bolingaki te ! 35. Tala, ndaku na bino esundameli bino ; pe nalobi na bino, bokomona ngai te kino ekokoma boloba : Apambolami oyo aye na kombo ya Nkolo !

 

Mokapo 14

1. Pe ekomaki, lokola azalaki kokende, na sabata, na ndaku ya moko ya bakonzi ya Bafarizai pona kolia lipa, bazalaki kotala ye makasi. 2. Pe tala, ezalaki na mutu moko oyo nzoto na ye evimbaka na mayi. 3. Pe Yesu ayanoli,alobi na balakisi mibeko pe na Bafarisai : Ekoki na mokolo ya sabata kobikisa ? 4. Pe bafandaki nyɛɛ. pe akamataki ye, abikisaki ye, pe atikaki ye akende. 5. Pe ayanolaki, alobi na bango : Nani akozala kati na bino oyo azali na mpunda to ngɔmbɛ, oyo ekwei kati na libulu, akobimisa yango mbala moko te na mokolo ya sabata ? 6. Pe bakokaki koyanola te na makambo yango.

7. Alobaki parabole moko na baoyo babengamaki na feti, nakotala ndenge bazali kopona bisika ya liboso ; pe alobi na bango : 8. Tangu mutu moko akobenga yo na feti ya libala, komifandisa na esika ya liboso te, noki te mutu oyo aleki yo na lokumu abengama na ye. 9. Pe mutu oyo abengisaki yo pe ye, aloba na yo : pesa esika na oyo ; po okende na soni kofanda na esika ya suka. 10. Kasi, tangu babengi yo, kende kofanda na esika ya suka, po tangu mutu oyo abengisaki yo akoya, aloba na yo : Moninga, matá likoló. Na sima, okozua nkembo liboso ya banso oyo bafandi elongo na yo na mesa. 11. Pamba te mutu nionso oyo amitomboli akomikitisa; pe ye oyo akomikitisaka akotombolama.

12. Pe alobi lisusu na mutu oyo abengisaki ye : Tangu osalisi feti ya bilei ya moyi to bilei ya pokwa, kobenga baninga na yo te, to bandeko na yo te, to baboti na yo te, to bazalani na yo ya bozwi te ; noki bango pe bakobonga na yo na oyo ya bango, pe bazongiseli yo ndenge yo opesalaki bango. 13. Kasi tangu okosala fɛti, benga babola, babɔsɔnɔ, batengami, bakufi misu ; 14. Pe okopambolama, po bazali na eloko te ya kozongisa yo, po wana ekozongisamela yo na lisekwa ya bayengebene.

 

15. Pe moko ya baoyo bazalaki na mesa, ayokaki makambo oyo, alobi na ye: Esengo na mutu oyo akolia lipa na Bokonzi ya Nzambe. 16. Pe alobi na ye : Mutu moko asalaki feti monene, pe abengisaki batu mingi. 17. Pe na tangu ya feti atindi mowumbu na ye aloba na babengami ya feti : Bóya, po nionso ebongisami. 18. Pe bango nionso bakomaki kosenga bolimbisi. Ya liboso alobi na ye : Nasombi elanga, esengeli penza nakende kotala yango ; nabondeli yo, olimbisa ngai. 19. Pe mosusu alobi : Nasombi lisanga mitano ya bangɔmbɛ mibale mibale, pe nakomeka yango; nabondeli yo olimbisa ngai. 20. Pe mosusu alobi : Nabali mwasi, pe tina wana nakoki koya te. 21. Pe mowumbu azongaki pe ayebisaki makambo yango na nkolo na ye. Bongo nkolo na ndako asilikaki, alobi na mowumbu na ye : Kende mbangu na bisika pe babalabala ya engumba, pe mema awa babola, babɔsɔnɔ, pe bakufá misu pe batengami. 22. Pe Mowumbu alobi : Nkolo, esalemi ndenge opesaki mitindo, pe ezali naino na bisika. 23. Pe nkolo alobi na mowumbu : kende na banzela pe na mapangu, pe tindika bákɔta, po ndaku na ngai etonda ; 24. Na wana nalobi na bino ete, moko te ya mibali oyo babengisami akomeka bilei na ngai ya pokwa.

 

25. Pe ebele ya batu bazali kokenda na ye elongo. pe abalukaki, alobi na bango : 26. Soki mutu moko ayei epai na ngai, pe ayini te tata na ye, pe mama na ye, pe mwasi na ye, pe bana na ye, pe bandeko na ye ya mibali, pe bandeko na ye ya basi, pe lisusu bomoi na ye moko, akoki kozala moyekoli na ngai te. 27. Pe mutu nionso oyo akokumba ekulusu na ye te, pe aye te sima na ngai, akoki kozala moyekoli na ngai te. 28. Po nani kati na bino, alingi kotonga ndak molayi, akofanda nanu liboso te pe akotánga motuya oyo ekosɛnga, atala soki azali na makoki ya kosilisa yango ? 29. Noki te, sima ya kotiya moboko pe akoki te kosilisa yango, bato nionso bakomona ye bakoma kotiola ye. 30. Koloboka : Mutu oyo abandaki kotonga, pe akoki kosilisa te. 31. To mokonzi nini, azo kokende kobundisa mokonzi mosusu, akofanda liboso te po akanisa soki akoka na batu nkóto zomi, kotɛlemɛla mutu oyo ayei kobundisa ye na bato nkóto ntuku mibale ? 32. Soki te, wana azali naino mosika, akotindela bantoma epai na ye pona kosenga kimia. 33. Bobele bongo, nani kati na bino atiki te nionso oyo azali na yango, akoki kozala moyekoli na ngai te. 34. Mungwa ezali malamu ; kasi soki elengi ya mungwa esili, tokopesa yango elɛngi na nini ? 35. Ezali lisusu na tina te pona mabele to pona kobongisa bilanga ; bakobwaka yango libanda. Oyo azali na matoyi ya koyoka, ayoka.

 

Mokapo 15

1. Pe bakongoli ya mpaku nionso pe basumuki bapusanaki pene na ye pona koyoka ye. 2. Pe Bafarizai ná bakomeli bayimaki, koloba : Mutu oyo azali koyamba basumuki mpe azali koliya elongo na bango. 3. Pe alobaki na bango parabole oyo, alobi : 4. Mutu nani kati na bino oyo, azali na bampate nkama pe abungisi moko, akotika tuku libwa na libwa na esobe te, pe akokende te koluka oyo ebungi, tii amona yango ? 5. Pe wana amoni yango, akomema yango na mapeka na ye moko, na esengo ; 6. Pe wana akozonga ndako, akobengisa baninga pe bazalani, koloba na bango : Bósepela elongo na ngai, po namoni mpate na ngai oyo ebungaki. 7. Nalobi na bino, boye ekozala na esengo na likolo pona mosumuki moko abongwani, koleka pona tuku libwa na libwa ya basembo oyo bazali naposa ya kobongwana te.

 

8. To mwasi nini, oyo azali na drakma zomi, soki abungisi drakma moko, akopelisa mwinda te pe akokɔmbɔla ndaku te, pe akoluka malamu tii akomona yango ? 9. Pe wana amoni yango, akosangisai baninga pe bazalani na ye, koloba : Bósepela elongo na ngai, po namoni drakma oyo nabungisaki. 10. Bongo nalobi na bino, esengo ezali liboso na banzelu ya Nzambe pona mosumuki moko oyo abongwani.

11. Pe alobi : Mutu moko azalaki na bana mibali mibale ; 12. pe oyo ya suka kati na bango alobaki na tata na ye : Tata, pesá ngai eteni ya bozui oyo esengeli na ngai. Pe akaboli bango bozui na ye. 13. Pe sima ya mikolo muke, mwana mobali ya suka, azui biloko nionso, akendaki na mboka ya mosika ; pe kuna abebisaki bozwi na ye na kobika na mbindo. 14. Pe sima ya kosilisa nionso, nzala makasi ekomaki na mboka wana ; pe akomaki kozanga.

15. Pe akendaki pe akomi na mosala ya moko ya bana-mboka wana, pe mutu wana atindaki ye na bilanga na ye pona kobokola bangulu. 16. Pe azalaki na posa ya kotondisa libumu na ye na bambuma oyo bangulu bazalaki koliya ; pe mutu moko te apesaki ye. 17. Pe amizongi kati na ye moko, alobi : Mingi ya bafuti ya tata na ngai bazali na mapa mingi koleka, pe ngai nazali kokufa awa na nzala ! 18. Nakotɛlɛma pe nakokende epai ya tata na ngai, pe nakoloba na ye : Tata, nasaleli likoló lisumu pe liboso na yo ; 19. Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo ; zwa ngai lokola moko ya bafuti na yo. 20. Pe atɛlɛmaki, akeyi epai ya tata na ye. Pe lokola azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye pe ayokaki mawa, mpe akimaki mbangu, amibwakaki na kingo na ye pe azipaki ye na beze. 21. Pe mwana alobi na ye : Tata, nasaleli likolo lisumu pe liboso na yo ; Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo. 22. Kasi tata alobi na bawumbu na ye : Bóbimisa nzambala ya kitoko koleka, pe bolatisa ye yango ; pe botia lopɛtɛ na lobɔkɔ na ye pe sapato na makolo na ye ; 23. pe bómema mwana ya ngɔmbɛ oyo ya mafuta pe bóboma yango ; pe tolia pe tozala na esengo ; 24. Pamba te mwana na ngai oyo akufaki, pe azongi na bomoi; abungaki, pe amonani. Pe babandi kosepela. 25. Nzokande mwana na ye ya liboso azalaki na bilanga ; pe lokola azali kozonga pe apusani penepene ya ndaku, ayoki miziki pe mabina ; 26. Pe abengi moko ya basaleli, atunaki soki ezali nini. 27. Pe ayanoli ye : Ndeko na yo ayei, pe tata na yo abomi mwana-ngɔmbɛ oyo ya mafuta, po amoni ye nzoto kolɔngɔnɔ. 28. Pe asilikaki pe alingaki kokota te. Pe tata na ye abimi libanda, abondeli ye. 29. Kasi ye ayanoli, alobi na tata na ye : Tala mbula ebele nazali kosalela yo lokola mowumbu, pe natikala kobuka mobeko na yo ata mokolo moko te ; pe opesa ngai ata mwana ntaba mukolo moko te pona nasepela elongo na baninga na ngai ; 30. Kasi tangu mwana na yo oyo aliaki bozwi na yo elongo na basi ya ndumba, aye, obomi pona ye mwana-ngɔmbɛ oyo ya mafuta. 31. Pe alobi na ye : Mwana, yo ozali tangu nionso elongo na ngai, pe nionso ya ngai ezali ya yo ; 32. Kasi esengelaki kosala feti pe kosepela ; po oyo, ndeko na yo, akufaki, pe azongi na bomoi ; abungaki, pe amonani.

 

Mokapo 16

1. Alobaki lisusu na bayekoli na ye: Mutu moko ya bozwi azalaki na mobateli ; pe bafundaki ye liboso na ye lokola azali kobebisa biloko na ye. 2. Pe abengi ye, alobi na ye : Eloko nini nazali koyoka na tina na yo ? Lakisa ndenge nini yo obatelaka ; po okozala lisusu mobateli te. 3. Mobateli alobi kati na ye moko : Nakosala nini, po nkolo na ngai akolongola ngai mobateli ? Nakoka kotimbola mabele te ; Nazali na sɔni ya kokoma bisɛnga-sɛnga : 4. Nayebi nini nakosala, pona ete tangu bakolongola ngai mosala ya kobatela, báyamba ngai na bandaku na bango. 5. Pe abengaki moko na moko oyo bazali na niongo ya nkolo na ye, alobi na mutu ya liboso : Ozali na niongo boni ya nkolo na ngai ? 6. Wana ayanoli : Batos nkama ya mafuta.   Alobi na ye : Kamata mukanda na yo, pe fanda noki, pe komá tuku mitano. 7. Bongo alobaki na mosusu : Pe yo, ozali na niongo boni ? Pe ayanoli : Basaki nkama ya blé. Alobi na ye : Kamata mukanda na yo pe komá tuku mwambe. 8. Pe nkolo akumisi mobateli ya sembo te po asalaki na mayele. Po bana ya mokili ya tangu oyo bazali na mayele mingi na oyo etali libota na bango moko koleka bana ya pole. 9. pe ngai, nalobi na bino : Bómikómisa baninga ya mamon oyo ezangi bosembo, po tangu bokozanga yango, bóyambama na bandaku ya seko. 10. Ye oyo azali sembo na biloko oyo ezali ya muke, azali pe sembo na oyo ezali monene ; pe ye oyo azali sembo te na oyo ezali muke, azali pe sembo te na oyo ezali monene. 11. Bongo soki bozalaki sembo te na mamon oyo ezanga bosembo, nani akopesa bino oyo ya solo ? 12. Pe soki na oyo ezali ya basusu, bozalaki sembo te, nani akopesa bino oyo ezali ya bino ? 13. Mosali moko te akoki kosalela bankolo mibale ; po akoyina moko pe akolinga mosusu, to akokangama na moko pe akotiola mosusu : bokoki kosalela Nzambe pe mamon te.

 

14. Wana bayokaki makambu nionso, Bafarizai pe, baoyo bazalaki na lokoso, basekaki ye. 15. Pe alobi na bango : Bozali baoyo bamilongisa bango moko liboso ya bau ; kasi Nzambe ayebi mitema na bino, po oyo bato bapesaka lokumu mingi, ezali likambo ya mbindo liboso ya Nzambe. 16. Mibeko pe baprofete ezalaki tii na Yoane ; banda wana bokonzi ya Nzambe esakolami pe mutu nionso basaleli makasi pona kokɔta. 17. Ezali pete ete likolo pe mabele koleka, kasi te pona mwa ndambu moko ya mobeko ekweya. 18. Mutu nionso oyo aboyi mwasi na ye pe abali mosusu, asali ekobo ; pe oyo akobala mwasi oyo mobali na ye aboyaki, asali ekobo.

 

19. Ezalaki na mozwi moko oyo alataki bilamba ya motane-bulé pe ya lino, pe mikolo nionso azalaki kosepela. 20. Ezalaki na mobola moko, kombo na ye Lazaro, alalaka na porte na ye, bapota ezipa nzoto na ye mobimba. 21. Oyo azalaki na posa ya kotonda na bileyi oyo ekweaka na mesa ya mozwi ; kasi bambwa bazalaki koya kolɛmbola bapota na ye. 22. Pe ekomaki ete mobola akufi, pe bangelu bamemi ye na ntolo ya Abrahama. Mozwi pe akufaki, pe akundamaki. 23. Na kati ya Hades, atombolaki misu na ye, lokola azalaki kati na koniokwama, amoni na mosika Abrahama, pe Lazaro na ntolo na ye. 24. Pe agangaki, alobi : Tata Abrahama, yokela ngai mawa, pe tinda Lazaro, po atia sɔngɛ ya mosapi na ye na mayi pe atiela lolemo na ngai, po nazali koniokwama kati na mɔ́tɔ oyo. 25. Kasi Abrahama azongisaki : Mwana, kanisa te yo ozuaki biloko na yo na bomoi na yo, pe Lazaro azuaki minioko ; pe sik’oyo awa ye abɔndisami, pe yo ozali koniokwama. 26. Pe lisusu na nionso, libulu moko monene etiami kati na biso pe bino ; na boye baoyo balingi kokatis awa epai na bino bakokoka te, pe baoyo kuna bakatisa epai na biso te. 27. Pe alobi : Bongo nabondeli yo, tata, otinda ye na ndaku ya tata na ngai. 28. Pamba te nazali na bandeko mitanu, akende kotatola bango ; noki te bango pe baya na esika ya pasi. 29. Kasi Abrahama alobi na ye : Bazali na Mose ná baprofete ; báyoka bango. 30. Kasi ye alobaki : Te, tata Abrahama ; kasi soko mutu awuti na bakufi epai na bango, bakobonguana. 31. Pe alobi na ye : Soki bayoki Mose ná baprofete te, bakondimisama te ata mutu asekwi kati na bakufi.

 

Mokapo 17

1. Alobi na bayekoli na ye: Ekoki kozanga te ete makambu oyo betisa mabaku; kasi mawa na ye oyo akoyeisa yango ! 2. Ebongi malamu bátiya na kingo na ye, libanga ya konika oyo mpunda ebalolaka pona konikelaka pe bábwaka ye na mayi ya monene, na esika abetisa moko ya bana mike libaku. 3. Bómikeba na bino moko. Soki ndeko na yo asumuki, pamela ye, pe soki abongwani, limbisa ye ; 4. Pe soki mbala sambo na mokolo asali yo lisumu, pe mbala sambo azongi epai na yo, kolobaka : Nabongwani, okolimbisa ye.”

5. Pe bapostolo balobaki na Nkolo: Bakisa biso kondima. 6. Pe Nkolo alobi : Soki bozali na kondima lokola mbuma ya mutarde, bokoloba na nzete oyo ya muindi : Pikolama, pe lonama na kati ya mayi ya monene ; pe akotosa bino. 7. Kasi nani kati na bino, oyo azali na mowumbu oyo azali kobalola mabele to koleyisa bibwele, tangu awuti bilanga, aloba: Yaka pe fanda na mesa ? 8. Akoloba na ye te ete : Bongiselá ngai bilei ya pokwa, pe olata mokaba, pe salelá ngai tii tangu nakoliya pe nakomɛla ; pe sima na yango yo okoliya pe okomɛla ? 9. Esengeli atonda mowumbu po asali oyo bapesaki ye mitindo ? Nabanzi bongo te. 10. Na bongo, bino pe, tangu bokosala makambu nionso oyo bapesaki bino mitindo, bóloba : Tozali bawumbu ya pamba ; oyo tosengelaki tosala, tosali yango.

11. Pe wana azalaki kokende Yerusaleme, alekaki kati Samaria pe Galilai. 12. Pe lokola azalaki kokota na mboka moko, batu zomi ya maba bakutanaki na ye ; pe batelemaki mosika ; 13. Pe batombolaki mongongo, balobi : Yesu, Mokonzi, yokela biso mawa ! 14. Amoni bango, alobi na bango : Bókende, bómilakisa epai ya banganga-nzambe. Pe ekomaki lokola bazalaki kokende bakomaki peto. 15. Nzokande moko na bango, amonaki ete abikikaki, azongaki nzela na ye, kokumisaka Nzambe na mongongo makasi ; 16. Pe abwakaki elongi na ye na makolo ya Yesu, pe apesi ye matɔndi. Pe azalaki Mosamaria. 17. Pe Yezu atunaki, alobi : Zomi bapetolamaki te ? Pe libwa, bazali wapi ? 18. Ata moko te azongi pona kopesa Nzambe kembo, longola se mopaya oyo. 19. Pe alobi na ye: Tɛlɛmá, pe kende ; kondima na yo ebikisi yo.

20. Wana Bafarizai batunaki ye tangu nini bokonzi ya Nzambe ekoya, ayanoli : bango bokonzi ya Nzambe ekoya te na lolenge ya kobenda likebi ; 21. pe bakoloba te : Tala, azali awa ; to, tala ezali kuna. pe tala, bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino. 22. pe alobi na bayekoli : Mikolo ekoya oyo bokolinga komona moko ya mukolo ya mwana ya moto, pe bokomona yango te. 23. pe bakoloba na bino : Tala awa ; to kuna. Bokende te, pe bolanda te. 24. Pamba te lokola kake ezali kongɛnga longwa na ngámbo moko na se ya likoló tii na ngámbo mosusu longwa na se ya likoló, bongo ekozala Mwana ya Moto na mukolo na ye. 25. Kasi liboso asengeli koniokwama mingi, pe koboyama na batu ya tangu oyo. 26. Pe lokola ekomaki na mokolo ya Noa, ekozala bongo na mokolo ya Mwana wa Moto ; 27. Bazalaki koliya, komɛla, kobala, pe kobalisa, tii mokolo Noa akɔtaki na masuwa ; pe mpela eyaki ebomi bango nionso 28. Bobele bongo, lokola ekomaki na mukolo ya Lota : bazalaki koliya, komɛla, kosomba, kotɛka, kolona pe kotonga ; 29. kasi na mukolo oyo Lota abimaki na Sodome, mbula ya mɔtɔ pe ya sufulu ebɛtaki ya likoló, pe ebomaki bango nionso ; 30. Ekozala bongo na mukolo oyo Mwana ya Moto akominisama. 31. Na mokolo yango, oyo akozala likoló ya ndaku pe biloko na ye na ndaku, akita te pona kozua yango ; pe ndenge moko oyo azali na bilanga azonga sima te. 32. Bókanisa mwasi ya Lota. 33. Oyo nionso akoluka kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango ; kasi ye oyo akobungisi yango, akozwa yango. 34. Nayebisi bino, na butu wana, batu mibale bakozala na mbetu moko, moko akozwama pe mosusu akotikala; 35. Basi mibale bakonika esika moko, moko akozwama pe mosusu akotikala ; 36. Mibale bakozala na bilanga, moko akozwama pe mosusu akotikala. 37. Pe bazongiseli ye : Wapi, Nkolo ? Pe alobi na bango : Esika nzoto ezali, wana pe bampongo bakosangana.

 

Mokapo 18

1. pe alobaki na bango lisusu parabole, pona basengeli kosambela tangu nionso pe kolɛmba te, 2. Koloba : Ezalaki na zuzi moko na engumba moko, oyo azalaki kobanga Nzambe te pe komemia batu te ; 3. pe na kati ya engumba yango, mokufeli mobali azalaki, pe ayaki epai na ye, pe koloba : longisa ngai na monguna na ngai. 4. Pona mwa tangu alingaki te. Kasi sima na yango, alobaki kati na ye moko : Ata nabangaka Nzambe te pe namemia batu te, 5. Po et mokufeli mobali oyo azali kotungisa ngai, nakolongisa ye, noki te, ayaka mbala na mbala, koniokola motó na ngai. 6. Pe Nkolo alobi : Boyoka oyo zuzi mabe alobi. 7. Pe Nzambe akolongisa te na baponami na ye, oyo babelelaka ye moyi pe butu, pe azali kozela [liboso ya kosala] pona bango ? 8. Nayebisa bino ete kala te akolongisa bango. Kasi tangu mwana ya moto akoya, akokuta kondima awa na mabele ?

9. Pe alobaki lisusu parabole oyo na basusu oyo bamipesaka kati na bango lokola bazalaki bayengebene, pe batalaka batu mosusu batikali lokola eloko pamba. 10. Mibali mibale bamataki na tempelo pona kosambela, moko azalaki Mofarizai pe mosusu mokongoli mpaku. 11. Mofarizai, atɛlɛmaki pembeni, asambelaki kati na ye moko, koloba maloba : O Nzambe, natondi yo po nazali lokola batu mosusu te oyo bazali miyibi, batu mabe, batu na ekobo ; to lokola mokongoli mpaku oyo. 12. Nakilaka bileyi mbala mibale na pɔsɔ, napesaka moko na zomi na nionso oyo nazali na yango. 13. Pe mokɔngɔli-mpaku, atɛlɛmaki mosika, alingaki ata kotombola miso na ye na likoló te, kasi azalaki kobɛta ntolo na ye, pe kolobaka : O Nzambe, yokela ngai mawa, mosumuki ! 14. Nazali koyebisa bino ete, oyo akitaki na ndaku na ye lokola mutu ya sembo kasi mutu mosusu wana te ; pamba te oyo akomitombola akomikitisa ; pe ye oyo akomikitisa akotombolama.

15. Pe bamemelaki ye lisusu ba bebe, po asimba bango ; pe bayekoli, bamonaki yango, bapamelaki bango. 16. Kasi Yesu, abengi bango, alobi : Botika bana mike baya epai na ngai, pe bopekisa bango te ; pamba te na baoyo bazali lokola bango bokonzi ya Nzambe ezali. 17. Solo, nalobi na bino : Oyo nionso akoyamba Bokonzi ya Nzambe lokola mwana muke te, akokɔta yango te.

18. Pe moko ya bakonzi atunaki ye, koloba : Molakisi malamu, nini esengeli nasala pona nazua bomoi ya seko ? 19. Yesu azongiseli ye : Pona nini ozali kobenga ngai malamu ? Mutu moko te azali malamu, bobele moko, Nzambe. 20. Oyebi mibeko : Kosala ekobo te; koboma te ; koyiba te; koloba litatoli ya lokuta te ; kumisa tata pe na mama na yo. 21. Pe alobi : Wuta bolenge na ngai, nabombi makambu oyo nionso. 22. Pe tangu Yesu ayoki yango, alobi na ye: Eloko moko ezangi yo : teka nionso ozali na yango, pe kabolá yango na babola, pe okozala na bozwi na likoló ; pe yaka, landa ngai. 23. Pe ye, koyokaka makambu oyo, akomaki na mawa mingi; pamba te azalaki na bozwi mingi penza. 24. Pe Yesu amonaki ete akómaki na mawa mingi, alobi : Ezali pasi baoyo bazali na biloko bakota na Bokonzi ya Nzambe 25. Po ezali pete na kamela kokɔta na lidusu ya tonga, kasi mozwi kokɔta na Bokonzi ya Nzambe. 26. Baoyo bayokaki yango, balobaki : Pe nani akoki kobika ? 27. Pe alobi : Makambo oyo ekosalema te epai ya batu ekosalema epai ya Nzambe. 28. Pe Petelo alobi : Tala, totiki nionso pe tolandi yo. 29. Pe alobi na bango : Ya solo nalobi na bino, ezali na mutu moko te oyo atiki ndaku, to baboti, to bandeko, to mwasi, to bana, pona Bokonzi ya Nzambe. 30. Ye azwa mingi te koleka na tangu oyo, pe na seko oyo ekoya, bomoi ya seko.

 

31. Pe akamataki elongo na ye ba zomi na mibale, alobi na bango: Talá, tozali komata na Yerusaleme, pe makambu nionso oyo baprofete bakomaki na tina ya mwana na moto ekokokisama. 32. Pamba te bakokaba ye na bikólo ; bakoseka ye, pe bakofinga ye, pe bakobwakela ye soyi ; 33. Pe sima bakobɛta ye fimbu, bakoboma ye ; pe na mokolo ya misatu akosekwa. 34. Pe basosolaki eloko te na makambu yango ; pe liloba yango ezalaki ya kobombama epai na bango, pe basosolaki makambu elobamaki te.

35. Pe ekomaki boye, tangu azalaki kopusana na Yeriko, mokufi misu moko afandaki pembeni ya nzela pe kosɛngasɛnga. 36. pe ayokaki ebele ya bato bazali koleka, atunaki soki ezali nini. 37. Pe bayebisaki ye ete Yesu ya nazarete azali koleka. 38. Pe agangaki, koloba : Yesu, Mwana ya David, yokela ngai mawa ! 39. Pe baoyo bazalaki kokende liboso bapamelaki ye po afanda nyɛɛ ; kasi agangaki makasi koleka : Mwana ya David ! yokela ngai mawa. 40. Pe Yesu atɛlɛmaki, pe atindaki bámemela ye epai na ye ; pe lokola apusanaki penepene, atuni ye mituna : 41. Olingi nasala na yo nini ? Pe alobi : Nkolo, namona lisusu. 42. Pe Yesu alobi na ye : Mona lisusu, kondima na yo ebikisi yo. 43. Pe mbala moko amonaki lisusu pe alandi ye, kokumisaka Nzambe. Pe batu nionso, komona yango, bakumisaki Nzambe.

 

Mokapo 19

1. Pe akɔtaki na Yeriko pe alekaki kati na yango. 2. Pe tala, mutu moko abengami na kombo ya Zakayo, pe azalaki mokonzi ya bakɔngɔli-mpaku, pe azalaki mozwi ; 3. Pe azali koluka komona Yesu, nani azali ; pe akokaki te na tina ya ebele ya batu, po azalaki mokuse. 4. Pe wana akimaki mbangu liboso, amataki likolo na sikomore pona komona ye ; po azalaki koleka nzela wana. 5. Pe tangu akómaki na esika wana, Yesu atalaki, amonaki ye, pe alobi na ye : Zakayo, kita noki ; pamba te esengeli lelo nafanda na ndaku na yo. 6. Pe akitaki noki noki, pe ayambaki ye na esengo. 7. Pe komona yango, banso bayimaki, koloba akoti epai ya mosumuki pona alala. 8. Pe Zakayo, atɛlɛmaki wana, alobi na Nkolo : Talá, Nkolo, napesi kati-kati ya biloko na ngai na babola ; pe soki na efundeli ya lokuta nazwaki mutu eloko na ye, nakozongisela ye mbala mineyi. 9. Pe Yesu alobi na ye : Lelo lobiko ekoti na ndaku oyo, po ye pe azali mwana ya Abrahama ; 10. Po mwana ya moto ayaki koluka pe kobikisa oyo ebungaki.

11. Pe lokola bazali koyoka makambu yango, abakisaki pe alobi parabole moko, po azalaki penepene na Yerusaleme, pe bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe ekomonisama kaka na ngonga wana. 12. Bongo alobi: Mutu moko oyo abima na libota ya lokumu akendaki na mboka moko ya mosika, pona kozua bokonzi pe kozonga. 13. Pe abengaki zomi ya bawumbu na ye, apesaki bango ba mine zomi pe alobi na bango : Bósala mombongo tii nakoya. 14. Nzokande batu na ye ya mboka bayinaka ye ; pe batindi bantoma sima na ye, koloba : Tolingi te oyo azala na bokonzi likolo na biso. 15. Pe ekomaki, na bozongi na ye, sima ya kozua bokonzi, atindaki bábenga pembeni na ye bawumbu oyo apesaki mbongo, po ayeba boniboni moko na moko azuaki na mombongo na ye. 16. Pe ya liboso ayaki, koloba : Nkolo, mine na yo eboti mine zomi. 17. Pe alobi na ye : Malamu, mowumbu malamu, po ozalaki sembo na eloko ya muke, zua bokonzi na bingumba zomi. 18. Pe ya mibale ayaki, koloba : Nkolo, mine na yo eboti mine mitanu. 19. Pe alobi lisusu na oyo : Pe yo zala likolo ya bingumba mitanu. 20. Pe mosusu ayaki, koloba : Nkolo, talá mine na yo, ngai nabombaki na elamba ; 21. Pamba te nabangaki yo, po ozali mutu ya matata, ozuaka oyo obɔmbaki te, pe obukaka oyo olonaki te. 22. Alobi na ye : Nakosambisa yo na munoko na yo moko, mowumbu mabe ; oyebaki ete ngai nazali mutu ya matata, nazuaka epai nabombaki te pe nabukaka oyo naloni te ; 23. Pona nini otiaki mbongo na ngai na banki te, pe tangu nakoya nalingaki kozua yango na milekeli ? 24. Pe alobi na baoyo bazalaki wana : Bóbɔtɔla ye mine pe bópesa yango na oyo azali na mine zomi. 25. Pe balobi na ye : Nkolo, azali na mine zomi. 26. Nalobi na bino, oyo azali na yango, ekopesamela ye ; pe na oyo azali na yango te, ata oyo azali na yango ekobotolama ye. 27. Kasi banguna na ngai wana oyo balingaki te nazala na bokonzi likolo na bango, bómema bango awa pe bóboma bango liboso na ngai.

28. Pe wana alobaki makambu oyo, azalaki kokende liboso na bango, amataki na Yerusaleme.

29. Pe ekomaki, lokola azalaki kopusana na Bethfage pe Bethania, epai na ngomba oyo ebengami ya Olive, atindaki mibale ya bayekoli na ye. 30. Koloba : Bokende na mboka oyo ezali kotalana na bino; pe wana bokokɔta yango, bokokuta mwana ya mpunda oyo bakangi, oyo likoló na ye mutu moko te afandela ; bokangola ye, pe bomema ye. 31. Pe soki mutu moko atuni bino pona nini bozali kofungola ye, bokoloba na ye boye : Nkolo azali na bosenga na yango. 32. Pe baoyo batindamaki, bakendaki, bakutaki ndenge alobaki na bango. 33. Pe lokola bazalaki kokangola mwana ya mpunda, bankolo na yango balobi na bango : Pona nini bozali kokangola mwana ya mpunda ? 34. Pe bayanoli : Po Nkolo azali na bosenga na yango. 35. Pe bamemaki ye epai ya Yesu ; pe babwakaki bilamba na bango likolo na mwana ya mpunda, batie Yesu likolo na yango. 36. Pe lokola azalaki kokende nzela na ye, batandaki bilamba na bango na nzela. 37. Pe lokola asilaki kopusana, na bokiti ya Ngomba ya Olive, ebele ya bayekoli, na kosepela, babandaki kosanzola Nzambe na mongongo makasi pona bikamwisi nionso bamonoki ; 38. kolobaka : Apambolama mokonzi oyo akoya na kombo ya Nkolo ! Kimia na likoló, pe nkembo na bisika oyo eleki na likoló ! 39. Bafarizai mosusu balobaki na ye na kati ya ebele ya batu : Molakisi, pamela bayekoli na yo. 40. Pe ayanoli, alobi na bango : Nalobi na bino, soki baoyo bafandi nyɛɛ, mabanga ekoganga. 41. Pe tangu akómaki pene, amonaki engumba, alelaki likolo na yango koloba : 42. Soki oyebaki, yo pe, ata na mokolo oyo, makambo oyo esengelaki na kimya na yo ! kasi sik’oyo ebombami liboso ya misu na yo. 43. Pamba te mikolo ekoya likolo na yo, oyo banguna na yo bakozinga yo na mabulu, pe bakozinga yo pe bakokangisa yo na bipayi nionso. 44. Pe bakokweisa yo na mabele, yo ná bana na yo na kati na yo; pe bakotika kati na yo te libanga likolo na libanga, po oyebaki te mokolo oyo ya botali yo.

45. Pe akɔtaki na tempelo, pe akomaki kobengana libanda batu oyo bazalaki kotɛka pe baoyo bazalaki kosomba. 46. Alobi na bango : Ekomami : “Ndaku na ngai ezali ndaku ya mabondeli” ; kasi bino, bokómisi yango libulu ya miyibi. 47. Mpe azalaki kolakisa mikolo nionso kati na tempelo ; pe bakonzi ya banganga-nzambe pe bakomeli, pe bakonzi ba batu, bazalaki koluka koboma ye. 48. Pe bamonaki ndenge ya kosala te ; po batu nionso bakangamaki na koyoka ye naposa makasi.

 

Mokapo 20

1. Pe ekomaki moko ya mikolo, lokola azalaki kolakisa batu kati na tempelo pe kosakola sango malamu, bakonzi ya banganga-nzambe pe bakomeli bayaki elongo na bampaka. 2. Pe balobi na ye, koloba : Yebisa biso na bokonzi nini ozali kosala makambu oyo, to nani apesi yo bokonzi yango ? 3. Azongisaki, alobi na bango : Nakotuna bino, ngai pe, motuna moko, pe boyebisa ngai : 4. Libatisi ya Yoane ewutaki na lola, to ewutaki na batu ? 5. pe balobani kati na bango, koloba : Soki tolobi : Ya lola, akoloba : Pona nini bondimaki ye te ? 6. Pe soki tolobi : Ya batu, batu nionso bakobamba biso mabanga, po bandimaki ete Yoane azalaki profete. 7. Pe bayanolaki, toyebi te wapi ewutaki. 8. Pe Yesu alobi na bango : Ngai pe nakoyebisa bino te na bokonzi nini nazali kosala makambu oyo.

9. pe akomaki koloba na batu parabole oyo : Mutu moko alonaki vino moko, pe afutelisi yango epai na baloni, pe akendaki libanda na mboka pona tangu molayi. 10. Pe na tangu ebongaki atindaki mowumbu moko epai ya baloni, po bakoka kopesa ye mbuma ya vino ; kasi basali vino, babɛtaki ye, bazongisii ye mabɔkɔ pamba. 11. Pe atindaki lisusu mowumbu mosusu ; kasi wana babɛtaki ye pe, pe basakanelaki ye na kofinga, bazongisaki ye mabɔkɔ pamba. 12. Pe atindaki lisusu ya misatu ; kasi bazokisaki lisusu oyo, pe babwakaki ye libanda. 13. Pe nkolo na vino alobi : Nakosala nini ? Nakotinda mwana na ngai ya bolingo ; tangu mosusu, wana bakomona ye, bakomemiaye. 14. Kasi tangu basali vino bamonaki ye, balobani kati na bango, koloba : Oyo azali mokitani ya libula, tóboma ye, po libula ezala ya biso. 15. Pe babwakaki ye libanda na vino, babomaki ye. Bongo Nkolo vino akosala bango nini ? 16. Akoya mpe akoboma basali vino wana, pe akopesa vino na basusu. pe wana bayoki ye, balobi ete : Esalama bongo te ! 17. Pe ye, kotalaka bango, alobi : Bongo elakisi nini makambu oyo ekomama : Libanga oyo batongi babwakaki, yango wana ekómi libanga monene ya sɔngɛ ? 18. Mutu nionso akokwea likoló ya libanga oyo akoniatama ; kasi mutu nionso oyo ekokwea likoló na ye, akopanzana.

 

19. Pe bakonzi yabanganga-nzambe pe bakomeli balukaki na ngonga wana pona kotia mabɔkɔ likolo na ye ; pe babangaki batu, po bayebaki ete alobaki parabole oyo na bango.

 

20. Pe batalaki ye na bokengeli, batindaki ba espion, oyo basalaka lokola bazali basembo, pona kokanga ye na nzela ya maloba, po bakaba ye na maboko ya zuzi pe na bokonzi ya guvernere. 21. Pe batunaki ye mituna, balobi: Molakisi, toyebi ete olobaka pe olakisa sembo, pe otalaka libanda ya batu te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. 22. Epesameli nzela ya kofuta mpaku epai ya Kaizar to te ? 23. Pe amonaki bozangi bosolo na bango, alobi na bango: Pona nini bozali komeka ngai ? 24. Bolakisa ngai denari moko ; ezali na elongi pe makomi ya nani ? Pe bazongisaki, balobi: Ya Kaizar. 25. Pe alobi na bango: Bongo bozongisa makambu ya Kaizar epai ya Kaizar, pe makambu ya Nzambe epai ya Nzambe. 26. Pe bakokaki te kokanga ye na maloba na ye liboso ya batu; pe bakamwaki eyano na ye, bafandaki nyɛ.

 

27. Pe Basadukai mosusu bapusanaki, oyo balobaka ete lisekwa ezali te, batunaki ye mituna. 28. Balobi : Molakisi, Mose akomelakii biso, soki ndeko ya mutu moko akufi, azalaki na mwasi, pe akufi na kozanga bana, ndeko na ye azua mwasi po abimisa bokitani pona ndeko na ye. 29. Ezalaki na bandeko sambo ; pe ya liboso azuaki mwasi, akufi kozanga bana ; 30. Pe ya mibale ; 31. Pe ya misatu azui ye, pe ndenge wana bango sambo : batikaki bana te, pe bakufaki ; 32. Pe na sima na bango nionso, mwasi yango akufi. 33. Bongo kati na lisekwa, mwasi akozala ya nani kati na bango, po bango sambo bazuaki ye pona mwasi ? 34. Bongo Yesu alobi na bango: Bana ya mokili oyo babalaka pe bapesanaka na libala ; 35. Kasi baoyo bakobongama pona kozua esika na mokili ekoya pe na lisekwa kati na bakufi, bakobalaka te pe bakopesana te na libala 36. Po lisusu bakokufaka lisusu te ; po bazali lokola banjelu, pe bazali bana ba Nzambe, na kozala bana na lisekwa. 37. Nzokande bakufi bakosekwa, Mose ye moko alakisaki yango, na : “buisson”, tang abengi Nkolo : Nzambe na Abrahama, pe Nzambe ya Izaka, pe Nzambe ya Yakobo. 38. Azali Nzambe ya bakufi te, kasi ya batu na bomoi ; pona ye bango nionso bazali na bomoi. 39. Pe bakomeli mosusu bazongisaki, koloba: Molakisi, olobi malamu. 40. bamekaki lisusu te kotuna ye mituna na tina ya likambu moko.

 

41 Alobi na bango: Ndenge nini balobaka ete Kristu azali mwana ya Davidi ? 42. Pe Davidi ye moko alobi, kati na mukanda ya Nzembo : Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : Fanda na lobɔkɔ na ngai ya mobali. 43. Kino nakotia banguna na yo na se ya makolo na yo. 44. Bongo Davidi abengi ye nkolo; mpe ndenge nini azali mwana na ye?

 

45. Pe lokola batu nionso bazalaki koyoka, alobi na bayekoli na ye : 46. Bokeba na bakomeli, oyo balingaka kotambola na bilamba milayi, pe balingaka bapesana mbote na bisika ya batu ebele bakutanaka, pe bakiti ya liboso na basunagoga, pe bisika ya liboso kati na koliya ; 47. Pe bazuaka bandaku ya bakufeli mibali, pe pona kokosa basalaka mabondeli milayi ; — baoyo bakozua etumbu ya makasi koleka.

 

Mokapo 21

1. Pe lokola azalaki kotala, amoni bazwi bazali kobwaka makabo na bango kitunga ya mabonza. 2. Pe amonaki lisusu mobola akufela mobali kobwaka mbongo mibale ya mike kati na yango. 3. Pe alobi: Na solo, nalobi na bino ete mobola akugela mobali abwaki mingi koleka banso ; 4. Pamba te baoyo nionso babwaki na makabo biloko oyo ezali motuya te, kasi ye oyo kati na bozangi na ye abwakaki nionso oyo azalaki na yango pona kobika.

 

5. Pe lokola basusu bazali koloba na tempelo ete ezali kongela na mabanga kitoko pe na makabo bapesela yango, alobi : 6. Pona biloko oyo bozali kotala, mikolo ekoya oyo ekotikala te libanga likoló na libanga oyo ekobwakama na se te. 7. Pe batunaki ye, koloba: Molakisi, tangu nini makambu yango ekosalema, pe nini ekozala elembo tangu makambu oyo ekokosima ? 8. Pe alobi : Bokeba bokosama te ; po bat mingi bakoya na kombo na ngai, koloba : Ngai nazali, pe tangu ekómi pene ; bokende sima na bango te. 9. Tangu bokoyoka sango ya bitumba pe botomboki, bóyoka sɔmɔ te ; pamba te esengeli biloko oyo ekoma liboso ; kasi mbala moko te suka ekozala. 10. Bongo alobi na bango : Ekolo ekotelema ekolo, pe bokonzi ekotelemela bokonzi ; 11. pe ekozala na koningana makasi ya mabele na bisika mingi, pe nzala makasi, pe ba maladi mabe ; pe makambu ya bobangisi pe na bilembo minene na likolo. 12. Kasi, liboso ya makambu oyo nyonso, bakotiya mabɔkɔ likolo na bino pe bakoniokola bino, bakokaba bino na basunagoga pe na bolɔkɔ ; pe bakokumba bino liboso ya bakonzi pe baguvernere na tina ya kombo na ngai. 13. pe ekobaluka pona bino na litatoli. 14. Bongo, bótiya komitungisa te liboso na mitema na bino pona ndenge nini bokosamba. 15. Ngai moko nakopesa bino monɔkɔ pe bwanya, oyo banguna na bino nionso bakoka koyanola to kotɛmɛla yango te. 16. Pe lisusu baboti pe bandeko, pe balingami pe baninga na bino bakokaba bino, pe bakobomisa kati na bino ; 17. Pe bokoyinama na banso na tina ya kombo na ngai. 18. Ata suki moko te ya motó na bino ekokufa. 19. Na motema molai na bino, bozua milimo na bino. 20. Pe tangu bokomona Yerusaleme ezingami na mampinga, boyeba ete kobebisama na yango ekómi pene. 21. Bongo baoyo bazali na Yudea bakima na bangomba ; pe baoyo bazali na kati ya Yerusaleme babima ; pe baoyo bakozala na mboka pe bilanga bakɔta yango te. 22. Pamba te ekozala wana mikolo ya kozongisela batu mabe basalaki ; pona kokokisama ya makambu nionso ekomama. 23. Kasi mawa na basi ya zemi pe baoyo bazali komɛlisa bana na mikolo yango ! Pamba te ekozala na pasi monene likolo na mboka, pe kanda ekokwelela batu oyo. 24. Pe bakokweya na mopanga, pe bakokumba bango bakangami kati na bikolo nionso ; pe Yerusaleme ekonyatama na makolo ya Bikolo kino tangu ya Bikolo ekokokisama.

25. Pe ekozala na bilembo kati na moyi pe na sanza pe na minzoto, pe na mabele, bikólo ekotonda na somo kati na kobanga liboso ya makɛlɛlɛ makasi ya mayi monene pe ya mbonge, 26. Batu bakokufa na bobangi pe na tina ya makambu oyo ekoya na mabele, po banguya ya likolo ekoningana. 27. Pe na sima bakomona Mwana na Moto koya na lipata na nguya pe nkembo monene. 28. Pe tangu makambu yango ekobanda kokoma, botala likoló pe botombolá mitu na bino, pamba te kokangolama na bino ekómi pene.

29. Pe alobi na bango parabole moko: Botala nzete ya figi pe banzete nionso. 30. Tangu ebanda kobimisa bakasa, bino moko na komona yango, boyebi ete mikolo ya milunge epusani. 31. Na lolenge wana bino, tangu bokomona makambu oyo kokoma, boyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pembeni. 32. Solo, nalobi na bino, libota oyo ekoleka te kino nionso ekoma. 33. Likolo pe mabele ekoleka, kasi maloba na ngai ekoleka te. 34. Pe bomikebisa bino moko, noki te mitema na bino ezua kilo te na nzela ya lokoso ya bileyi pe kolangwa masanga, pe na mitungisi ya bomoyi, pe mukolo wana ekomela bino na mbalakata te ; 35. Pamba te ekoya lokola motambu likolo ya banso oyo bafandi na mabele mobimba. 36. Bongo, bomikɛngɛla, bobondelaka tangu nionso, po botangama ete bobongi na kokima makambu nionso oyo ekokoma, pe botɛlɛma liboso ya mwana ya moto.

37. Pe mikolo nionso azalaki na tempelo kolakisa ; pe azalaki kobima na butu pe kofandaka na bangomba oyo babengaka Olive. 38. Pe batu nionso na tɔngɔntɔngɔ bayaki epai na ye na tempelo pona koyoka ye.

 

Mokapo 22

1. Wana, feti Mapa ezangi levire, oyo babengaka Paska, ezalaki kokoma. 2. Pe bakonzi ya banganga-nzambe pe bakomeli balukaki lolenge nini bakokaki koboma ye; po bazalaki kobanga bato.

3. Pe Satana akɔtaki kati na Yudas, oyo abengami Iskariote, oyo azalaki na motángo ya zomi na mibale ; 4. pe akendaki pe asololi na bakonzi ya banganga-nzambe pe bakapiteni pona lolenge nini akokaba ye epai na bango. 5. Pe basepelaki, pe bayokanaki bapesa ye mbongo. 6. Pe andimaki; pe akomaki koluka libaku malamu ya kokabela bango ye ete ebele ya batu bázala wana.

7. Pe mukolo ya mapa oyo ezangi levire, oyo esengeli kopesa mbeka ya Paska, ekómaki. 8. Pe atindaki Petelo na Yoane, koloba : Bókende, pe bobongisa Paska po toliya yango. 9. Pe balobi na ye : Epayi wapi olingi tóbongisa yango ? 10. Pe alobi na bango : Botalá, tangu bokokɔta na engumba, mutu moko oyo amemi mbɛki ya mayi akoya kokutana na bino; bolanda ye na ndaku oyo akokota. 11. Pe bokoloba na mokonzi ya ndaku : Molakisi alobi na yo : Wapi eteni ya ndaku oyo nakoliya Paska elongo na bayekoli na ngai ? 12. Pe akolakisa bino shambre moko ya monene oyo babongisa malamu na bakiti ; bobongisa kuna. 13. Bakendaki, bakutaki lokola ayebisaki bango ; pe babongisaki Paska.

14. Pe tangu ngonga ekokaki, afandaki na mesa, pe bapostolo zomi na mibale elongo na ye. 15. Pe alobi na bango : Nazali naposa makasi ya koliya Paska oyo elongo na bino, liboso naniokwama ; 16. Pamba te nalobi na bino nakoliya yango te tii tangu ekokokisama na Bokonzi ya Nzambe. 17. Pe azuaki kopo, azongisi matondi, pe alobi : bozua oyo pe bokabola kati na bino, 18. Pamba te nalobi na bino, nakomela lisusu te mbuma ya vino tii Bokonzi ya Nzambe ekoya. 19. Pe azuaki lipa moko pe apesi matɔndi, abukaki yango pe apesaki bango yango, nakaloba : Oyo ezali nzoto na ngai, oyo epesami pona bino ; bosalaka boye pona kokanisa ngai ; 20. — Sima ya koliya, lolenge wana kopo lokola, alobaki : kopo oyo ezali boyokani ya sika na makila na ngai, oyo esopani pona bino ; 21. kasi tala, loboko ya oyo akokaba ngai ezali elongo na ngai na mesa. 22. Pe Mwana na Moto akei malamu, lokola ekanamaki ; kasi mawa pona moto na nzela na ye akabami ! 23. Pe bango bakomaki komitunana moko na mosusu nani kati na bango akozala moto oyo akosala yango.

24. pe ekomaki lisusu kowelana kati na bango pona koyeba nani kati na bango azali monene koleka. 25. Pe alobi na bango : Bakonzi ya bikólo bakonzaka bango, pe baoyo bazali na bokonzi likoló na bango babengami bato bolamu ; 26. Kasi ekozala bongo te pona bino; kasi moto oyo aleki kati na bino azala lokola elenge, pe oyo azali kokamba lokola moto oyo azali kosalela. 27. Pamba té, nani aleki monene, ye oyo afandi na mesa to ye oyo azali kosalela ? Ezali te oyo azali na mesa ? Kasi nazali kati na bino lokola mutu oyo azali kosalela. 28. Kasi bino, bozali baoyo bakobaki elongo na ngai na komekama na ngai. 29. Pe ngai napesi bino bokonzi, ndenge Tata na ngai apesi ngai bokonzi. 30. Po bóliya pe bómɛla na mesa na ngai na Bokonzi na ngai ; pe bafonda na bakiti ya bokonzi pona kosambisa mabota zomi na mibale ya Israele.

31. pe Nkolo alobi : Simoni, Simoni, talá, Satana asɛngi azua bino pona koyungola bino lokola blé ; 32. Kasi ngai, nabondeli pona yo, na tina ete kondima na yo elemba te ; pe yo, tangu okozonga, lendisá bandeko na yo. 33. Pe azongiselaki ye : Nkolo, elongo na yo, nabongisami kokende na boloko pe na liwa. 34. Pe alobi : Petelo, nalobi na yo, lelo soso akoyemba te, liboso yo owangana mbala misato ete oyebi ngai.

35. Pe alobi na bango : Tangu natindaki bino na libenga ya mbongo te, na saki te pe na sandale te, bozangaki eloko moko ? Pe balobi: eloko te. 36. Pe alobi na bango : Kasi sik’oyo, mutu oyo azali na libenga ya mbongo azua yango, pe lolenge moko pe na saki, pe oyo azali na yango te, atɛka elamba na ye pe asomba mopanga. 37. Po nalobi na bino ete oyo ekomama ekokokisama kati na ngai : « Pe atángamaki na kati ya bapengwi ». Po makambu oyo etali ngai ekozala na suka na yango. 38. Pe balobi : Nkolo, talá awa mipanga mibale. Pe alobaki na bango : Ekoki.

39. Pe abimaki, akendaki, na momeseno na ye, na ngomba ya Olive, pe bayekoli balandaki ye. 40. Esilaki ye kokoma na esika wana, alobi na bango : Bobondela ete bókɔta na komekama te. 41. Pe alongwaki ye moko mosika na bango na molayi ya kobwaka ya libanga moko, pe afukamaki, abondelaki. 42. koloba : Tata, soki olingaki kolekisa kopo oyo mosika na ngai ! Kasi, mokano na ngai te kasi oyo ya yo esalama. 43. Pe anjelu ya likoló abimelaki ye pe apesaki ye makasi. 44. Pe lokola azalaki na pasi makasi ya etumba, abondelaki na molende mingi koleka ; pe motoki na ye ekomaki lokola matanga ya makila kosopana na mabele. 45. Pe wana atɛlɛmaki na libondeli na ye, ayaki epai ya bayekoli, akutaki balali na mawa ; 46. Pe alobi na bango : Pona nini bozali kolala ? Botelema, pe bobondelá ete bokɔta na komekama te.

 

47. Lokola azalaki naino koloba, talá ebele ya batu, pe oyo azalaki na kombo Yudas, moko ya bazomi na mibale, azalaki liboso na bango ; pe apusanaki pene na Yesu, pona kobeze ye. 48. Pe Yesu alobi na ye : Yudas, okabi Mwana na Moto na nzela ya beze ? 49. Pe baoyo bazalaki zingazinga na ye, bamonaki oyo elingaki kokoma, balobaki na ye : Nkolo, tobɛta na mopanga ? 50. Pe moko na bango abɛtaki mowumbu ya nganga-nzambe monene pe akataki ye litoyi ya mobali. 51. Kasi Yesu ayanoli, alobi : Bótika awa ; pe asimbaki litoyi na ye, abikisi ye. 52. Pe Yesu alobi na bakonzi ya banganga-nzambe pe na bakapiteni ya tempelo pe na bampaka oyo bayaki epai na ye : Bobimi na mipanga pe banzete lokola pona kokanga moyibi ? 53. Tangu nazalaki mikolo nionso na bino elongo, kati na tempelo, bosembolaki mabɔkɔ na bino te epai na ngai ; kasi awa ngonga na bino, pe ya nguya ya milili. 54. Pe bakangaki ye, bakumbaki ye, pe bakotisaki ye na ndaku ya nganga-nzambe monene. Nzokande Petelo na mosika azalaki kolanda. 55. bapelisaki mɔtɔ na katikati ya lopango, pe bafandaki elongo, Petelo afandi na kati na bango. 56. Pe mosali moko ya mwasi, amonaki ye afandi pembeni ya mwinda, pe atalaki ye na miso, alobi : Oyo pe azalaki elongo na ye. 57. Kasi awangani ye, nakoloba : Mwasi, nayebi ye te. 58. pe sima ya tangu muke, mutu mosusu amonaki ye, alobi : Pe yo, ozali moko na bango. Kasi Petelo alobi : O mutu, nazali te. 59. Pe sima ya ngonga moko, mutu mosusu alobaki na makasi : Ya solo, oyo pe azalaki elongo na ye ; pamba te azali mutu ya Galilai. 60. Petelo alobi : O mutu, nayebi te nini ozali koloba. Pe na mbala moko, lokola azalaki nanu koloba, soso eyembi. 61. Pe Nkolo abaluki, atali Petelo ; pe Petelo akanisi liloba ya Nkolo, ndenge alobaki na ye : liboso soso eyemba, okowangana ngai mbala misato. 62. Pe Petelo, wana abimaki libanda, alelaki na bololo na motema.

 

63. Pe batu oyo basimbaki Yesu basekaki ye pe babɛtaki ye ; 64. Pe bazipaki ye elongi, batunaki ye mituna, koloba : Profetize ; nani abeti yo ? 65. Pe balobaki makambu mosusu mingi pona ye na kotuka ye.

66. Pe tangu mukolo ekómaki, liyangani ya bampaka ya batu, bakonzi ya banganga-nzambe pe bakomeli, basangani ; pe bamemaki ye na Sunedrion na bango, 67. koloba: Soki ozali Kristu, yebisa biso. pe alobi na bango : Soki nakoyebisa bino, bokondima yango te ; 68. Pe soki natuni bino, bokoyanola ngai te . 69. Kasi kobanda sik’oyo mwana na moto akovanda na loboko ya mobali ya nguya ya Nzambe. 70. Pe bango nionso balobi : Yo, ozali bongo Mwana ya Nzambe ? Pe alobi na bango : Bino moko bolobi ete nazali. 71. Pe balobi : Litatoli nini mosusu tozali na yango mposa ? Po biso moko toyoki yango na monoko na ye.

 

Mokapo 23

1. Pe bango nionso batɛlɛmaki, bamemaki ye epai ya Pilato. 2. Pe babandaki kofunda ye, kolobaka : Tomonaki mutu oyo azali kopɛngwisa ekólo na biso pe azali kopekisa bafuta mpaku epai ya Kaizar, komilobaka ete azali Kristu, mokonzi. 3. Pe Pilato atunaki ye, koloba : Yo, ozali mokonzi ya Bayuda ? Pe ayanolaki ye, koloba : Yo, olobi yango. 4. Pe Pilato alobi na bakonzi ya banganga-nzambe pe na ebele ya batu : Namoni mabe moko te kati na mutu oyo. 5. Kasi bakangamaki kaka na koloba, balobaki : Azali kotelemisa batu, kolakisaa na Yudea mobimba, abandaki wuta na Galilai tii awa. 6. Pe Pilato ayokaki koloba na tina na Galilai, atunaki soki mutu yango azali mut ya Galilai. 7. Pe wana ayokaki ete azali na bokonzi ya Herode, atindaki ye epai ya Herode, oyo na mikolo wana, azalaki ye moko na Yerusaleme.

 

8. Pe Herode, asepelaki makasi tangu amonaki Yesu; po wuta kala azalaki naposa ya komona ye, po ayokaki makambu ebele oyo elobamaki na tina na ye; pe azalaki na elikya ya komona mwa elembo kosalama na ye. 9. Pe atunaki ye tangu molayi ; kasi ye azongiselaki ye eyano te. 10. Pe bakonzi ya banganga-nzambe na bakomeli batɛlɛmaki wana, kofundaka ye na makasi. 11. Pe Herode na basoda na ye, batiolaki ye pe basekaki ye, balatisaki ye elamba oyo ezalaki kongɛnga pe bazongisaki ye epai ya Pilato. 12. pe Pilato na Herode bakómaki baninga kati na bango na mokolo wana kaka; pamba te liboso bazalaki na bonguna moko na mosusu.

 

13. Pilato asangisaki bakonzi ya banganga-nzambe na bakonzi pe na batu.14. alobi na bango : Bomemelaki ngai mutu oyo lokola motombokisi ya batu, pe tala, natunaki ye mituna liboso na bino, pe ngai namoni ata mabe moko te kati na ye po na makambu oyo bozali kofunda ye. 15. Herode pe amonaki mabe te, pamba te natindaki bino lisusu epai na ye ; pe tala, eloko moko te ye asalaki oyo ekoki na liwa. 16. Bongo nakobeta ye, pe nakotika ye. 17. Nzokande asengelaki atikila bango mutu moko na elambo. 18. Banso bagangaki elongo, koloba : Longola oyo, pe tikela biso Baraba. 19. Oyo akangamaki na boloko pona botomboki oyo esalemaki na engumba, pe pona koboma. 20. Bongo Pilate alobaki lisusu na bango, azalaki naposa ya kotika Yesu. 21. Kasi bagangaki, koloba : Baka, baka ye na ekulusu ! 22. Pe alobi na bango mbala misatu : Kasi mabe nini mutu oyo asali ? Namonaki kati na ye te eloko oyo ebongi na liwa ; bongo nakobeta ye, nakotika ye. 23. Kasi bazalaki molende na koganga makasi, kosenga ete abakama na ekulusu. Pe koganga na bango pe ya bakonzi ya banganga-nzambe elongaki. 24. Pe Pilato akataki ete makambu basɛngaki esalema. 25. Pe atikaki ye oyo pona botomboki pe koboma abwakami na boloko, oyo bango basengaki ; pe akabaki Yesu na mokano na bango.

26. Pe lokola bazalaki kokumba ye, bakamataki moko Simona, mutu ya kirena, oyo awutaki bilanga, pe batiyaki ye ekulusu pona amema yango sima ya Yesu. 27. Pe ebele ya batu mingi pe basi bazalaki kobeta ntolo pe kolelaka ye, kolandaka ye. 28. Kasi Yesu abalukaki epai na bango alobi : Bana basi ya Yerusaleme, bólela pona ngai te. kasi bólela pona bino moko pe pona bana na bino ; 29. Pamba te, tala, mikolo ekoya, oyo bakoloba : Esengo na bikomba, pe mabumu oyo ebota te, pe mabɛ́lɛ oyo etikala komelisa te. 30. Bongo bakolobaka na bangomba : Bókweyela likoló na biso ; pe na bangomba ya mike : Bozipa biso ; 31. Po soki basali makambu ya boye na nzete ya mobesu, nini ekosalama na nzete ya kokawuka ? 32. Pe mibale misusu mibale, oyo bazalaki babomi, bamemaki bango elongo na ye pona koboma bango.

 

33. Pe tangu bakómaki na esika ebengamaka Mokuwa ya motó, babakaki ye wana na ekulusu, pe babomi, moko na lobɔkɔ ya mobali, mosusu na lobɔkɔ ya mwasi. 34. Pe Yesu alobi : Tata, limbisa bango, po bayebi te nini bazali kosala. Pe wana bakaboli bilamba na ye, babɛti zeke. 35. Pe batu batelemaki wana kotalaka ; pe baguvɛrnɛrɛ lokola kotiolaka ye, kolobaka: Abikisaki basusu ; amibikisa, soki azali Kristu, moponami na Nzambe. 36. Pe basoda lokola bazalaki koseka ye, kopusanaka pene pe kopesaka ye vino ya ngai. 37. Pe balobaki : Soki ozali Mokonzi ya Bayuda, omibikisa. 38. Pe ezalaki na makomi likolo na ye na makomi ya Greke, ya Baroma pe ya Hebraiko : Oyo azali Mokonzi ya Bayuda.

 

39. Pe moko ya babomi oyo babakisamaki na ekuluzu, afingaki ye : Yo Ozali Kristu te ? Omibikisa, pe bikisa biso. 40. Kasi mosusu, ayanolaki, apamelaki ye : Ozali kobanga Nzambe te, po ozali na etumbu ya ndenge moko ? 41. Pe pona biso, tozali awa na sembo penza ; pamba té tozui oyo ekoki na makambu tosalaki : kasi ye oyo asali eloko moko te oyo esengeli kosalama te. 42. pe alobaki na Yesu : Kanisá ngai, Nkolo, tangu okoya kati na bokonzi na yo. 43. Yesu alobi na ye : Solo, nalobi na yo : Lelo okozala na ngai na paradiso.

 

44. Wana ezalaki nanu penepene ya ngonga ya motoba ; pe molili ekotaki na mboka mobimba kino ngonga ya libwa ; 45. Pe moyi ekómaki molili, pe rido ya tempelo epasukaki na katikati. 46. Pe Yesu, agangaki na mongongo makasi, alob i: Tata ! na maboko na yo napesi molimo na ngai. Pe sima ya koloba bongo, akufaki. 47. Pe kenturion, komona loyo esalemaki, akumisi Nzambe, alobi : Ya solo, mutu oyo azalaki moyengebeni. 48. Pe ebele ya batu nionso oyo basanganaki pona kotala, wana bamonaki makambu oyo ekomaki, bazongaki, kobɛtaka bantolo na bango. 49. Pe baoyo nionso bayebanaki na ye, pe basi oyo balandaki ye wuta Galilai, batɛlɛmaki mosika pe bazalaki kotalaka makambo yango.

 

50. Pe tala, mutu moko na kombo Yosefe, oyo azalaki mutu ya likita, mutu malamu pe sembo 51. Ye azuaki esika te na mokano pe misala na bango, azalaki mutu ya Arimatea, engumba ya Bayuda, pe ye azalaki kozela bokonzi ya Nzambe. 52. Ye oyo ayaki epai ya Pilato pe asɛngaki ye nzoto ya Yesu. 53. Pe akitisaki ye, alingaki ye na elamba, pe atiye ye na lilita oyo bakata na kati na libanga, epai batia nanu ata mutu moko te. 54. Pe ezalaki mokolo ya komibongisa pe Sabata elingaki kobanda. 55. Pe basi oyo batambolaki na ye wuta Galilai, balandaki, batalaki lilita pe ndenge nini nzoto na ye etiamaki kuna. 56. Pe bazongaki, babongisaki biloko ya solo kitoko pe bamalasi ; pe sabata bapemaki lolenge na mobeko.

 

Mokapo 24

1. Nzokande mokolo ya liboso ya pɔsɔ, na tɔngɔtɔngɔ makasi, bakómaki na lilita, bamemaki biloko ya solo kitoko oyo babongisaki. 2. Pe bakutaki libanga ebalusami liboso ya lilita. 3. Pe wana bakotaki, bakutaki nzoto ya Nkolo Yesu te. 4. Pe ekomaki, lokola bayebaki te na tina na yango, tala, batu mibale batelamaki pembeni na bango, na bilamba ya kongenga na pole. 5. Pe lokola bazalaki kobabanga, pe bangumbaki bilongi na bango na mabele, balobi na bango : Pona nini bozali koluka kati na bakufi mutu ya bomoi ? 6. Azali awa te, kasi asekwaki. Bokanisa lolenge nini alobelaka bino tangu azalaki naino na Galilai. 7. Alobi: esengeli ete Mwana ya moto akabama na maboko ya basumuki, pe abakama na ekulusu, pe asekwa na sima ya mikolo misato. 8. Pe bakanisaki ba maloba na ye. 9. Pe batikaki lilita, bazongaki pe bayebisaki makambu oyo nionso na bazomi na moko pe bato mosusu. 10. Nzokande ezalaki Maria Magadalena na Yane na Maria mama na Yakobo na basi mosusu elongo na bango oyo balobaki makambo na bapostolo. 11. Pe maloba na bango emonanaki na miso na bango lokola makambo ya buzoba, pe bandimaki yango te. 12. Kasi Petelo atɛlɛmaki pe akimaki mbangu tii na lilita ; pe, angumamaki, amoni kuna kaka bilamba yango moko ; pe azongaki epai na ye, kokomua nini ekomaki.

13. Pe tala, mibale kati na bango bazalaki kaka na mokolo wana na nzela, pona kokende na mboka moko oyo kombo ezalaki Emawus, oyo ezalaki na molayi ya 11100 wuta na Yerusaleme. 14. Pe bazalaki kosolola elongo na tina ya makambu oyo nionso ekomaki. 15. Pe ekomaki, lokola bazalaki kosolola pe kokanisaka elongo, Yesu ye moko apusanaki pene, pe akomaki kotambola elongo na bango. 16. Kasi miso na bango ekangamaki, boye bayebaki ye te. 17. Pe alobi na bango : Masolo nini oyo bozali koloba kati na bino tangu bozali kotambola, pe bozali na mawa ? 18. Pe moko na bango, oyo kombo na ye Kleopas, azongiseli ye : Ozali yo moko na Yerusaleme, oyo ayebi te makambu oyo ekomaki awa mikolo oyo ?

19. Pe alobi na bango : Makambu nini ? Pe balobi na ye : Baoyo etalaki Yesu ya Nazaret, oyo azalaki profete ya nguya na mosala pe na liloba liboso ya Nzambe, pe liboso ya batu nionso ; 20. Pe boni bakonzi ya banganga-nzambe pe bakonzi na biso bakabaki ye pona etumbu ya liwa, pe babakaki ye na ekulusu. 21. Nzokande biso, tolikyaki ete ye nde akokangola Israel ; kasi likolo na nionso wana, lelo nde ezali mokolo ya misatu banda makambu yango ekomaki. 22. Kasi lisusu basi mosusu kati na biso bakamwisi biso makasi ; bakendaki na tɔngɔtɔngɔ na lilita, 23. Pe bamonaki nzoto na ye te, bayaki, kolobaka ete bamonaki emoniseli ya baanjelu oyo bazoloba ete azali na bomoyi. 24. Pe basusu kati na baoyo bazali na biso, bakendaki na lilita, pe bamonaki lokola basi balobaki ; kasi pona ye, bamonaki ye te. 25. Pe alobi na bango : O batu bazangi mayele, pe mitema oyo ezali mbangu te pona kondima makambu nionso oyo baprofete baloba ! 26. Esengelaki te Kristu koniokwama na makambu nionso oyo, pe nde akota na nkembo na ye ? 27. Pe abandaki na Mose pe na baprofete nionso, alimbolelaki bango, kati na makomi nionso, makambu oyo etalaki ye. 28. Pe bakomaki pene ya mboka oyo bazalaki kokende ; pe ye asalaki lokola azalaki kokende mosika. 29. Pe bandimisi ye, koloba : Fanda elongo na biso, po pokwa esili kokoma, pe mukolo esili kokita. Pe akɔtaki pona kozala na bango. 30. Pe ekomaki ete, lokola azalaki na bango na mesa, azuaki lipa pe apamboli ; pe abukaki yango, akabolaki bango yango. 31. Pe misu na bango efungwamaki, pe basosolaki ye ; kasi amonanaki te liboso na bango. 32. Pe balobi kati na bango : Motema na biso epelaki te na kati na biso tangu azalaki kolobela biso na nzela pe tangu afungolaki biso makomi ? 33. Pe batelemaki kaka na ngonga wana, bazongaki na Yerusaleme, pe bakutaki bazomi na moko bayanganaki pe baoyo bazalaki na bango. 34. Koloba : Nkolo asekwi solo, pe aminosamaki na Simona. 35. Pe bayebisaki makambu oyo ekomaki na nzela, pe ndenge nini amimonisaki na bango kati na kobuka lipa.

36. Pe lokola bazalaki koloba makambu yango, ye moko atelemaki kati na bango, pe alobi na bango : Kimia ezala na bino ! 37. Pe bango, bayokaki somo pe batondisamaki na kobanga, kokanisaka ete bamoni elimo moko. 38. Pe alobi na bango: Pona nini bozali komitungisama, pe pona nini makanisi ezali komata na mitema na bino? 39. Botalá maboko na ngai pe makolo na ngai ; — ete ezali ngai moko: bosimba ngai, pe botala ; pamba te elimo ezali na mosuni pe na mikuwa te, lokola bozali komona ngai nazali na yango. 40. Pe nakolobaka boye, atalisaki bango maboko pe makolo na ye. 41. Pe lokola na esengo, bazalaki nanu kondima te pe bazalaki kokamwa, alobi na bango : Bozali awa na eloko ya koliya ? 42. Pe bapesaki ye eteni ya mbisi oyo batumba, pe gato ya mafuta ya nzoi ; 43. Pe azuaki yango, aliaki liboso na bango. 44. Pe alobi na bango : Yango maloba nalobaki na bino tangu nazalaki nanu na bino, ete esengelaki ekokisama makambu nionso oyo ekomama po na ngai na mibeko ya Mose pe na baprofete pe na bapsome. 45. Na sima, afungolaki mayele na bango pona basosola makomi. 46. Pe alobi na bango : Ekomami boye ; pe boye esengelaki ete Kristu koniokwama, pe kosekwa kati na bakufi na mokolo ya misatu, 47. Pe ete bobongoli mitema pe bolimbisi ya masumu eteyama na kombo na ye epai ya bikolo nionso, nakobanda na Yerusaleme. 48. Pe bozali batatoli ya makambo oyo ; 49. Pe tala, natindi likolo na bino elaka ya Tata na ngai. Kasi bino, bofanda na engumba kino bokolata nguya ya likolo.

 

50. Pe akumbaki bango libanda tii na Betania, pe atombolaki maboko na ye apamboli bango. 51. Pe ekomaki ete na kopambolaka bango, akabwanaki na bango, pe anetolamaki na likolo. 52. Pe bango, lokola bapesaki ye lokumu, bazongaki na Yerusaleme na esengo makasi. 53. Pe bazalaki tangu nionso kati na tempelo, kosanzola pe kopambola Nzambe.