SANGO MALAMU YA YOANE

Mokapo 1, Mokapo 2, Mokapo 3, Mokapo 4, Mokapo 5, Mokapo 6, Mokapo 7, Mokapo 8, Mokapo 9, Mokapo 10, Mokapo 11, Mokapo 12, Mokapo 13, Mokapo 14, Mokapo 15, Mokapo 16, Mokapo 17, Mokapo 18, Mokapo 19, Mokapo 20, Mokapo 21

Mokapo 1

1. Na ebandeli Liloba azalaki; pe Liloba azalaki penepene na Nzambe; pe Liloba azalaki Nzambe. 2. Azalaki na ebandeli penepene na Nzambe. 3. Biloko nionso esalamaki na nzela na ye, pe na ye te ata eloko moko te esalamaki na oyo esalamaki. 4. Kati na ye bomoyi, pe bomoyi ezalaki pole ya batu. 5. Pe pole engɛngaki kati na molili; pe molili esimbaki ye te.

6. Ezalaki na mutu moko Nzambe atindaki; kombo na ye ezalaki Yoane. 7. Ye wana ayaki pona litatoli, pona kotatola pona pole, po batu nionso bándima na nzela na ye. 8. Ye azalaki pole te, kasi pona kotatola pole. 9. Pole ya solo ezalaki oyo, eyaki na mokili, engɛngisaki mutu nionso. 10. Azalaki kati na mokili, pe mokili esalemaki na ye; pe mokili eyebaki ye te. 11. Ayaki na oyo ezalaki ya ye; pe baoyo ya ye bayambaki ye te. 12. Kasi na baoyo nionso bayambaki ye, apesaki lotomo ya kozala bana ya Nzambe, na baoyo bandimaki kombo na ye; 13. Babotami na makila te, to na mokano ya nzoto te, na mokano ya mutu te, kasi ya Nzambe.

14. Pe Liloba akomaki mosuni, pe amitiaki tabernakle kati na biso (pe tomonaki kembo na ye, kembo lokola ya mwana se moko kowuta na Tata) atondi ngolu pe solo; 15. Yoane atatolaki pona ye, pe agangaki, koloba : Ezalaki ye oyo nazali koloba na tina na ye : Oyo aye na sima na ngai azalaka liboso na ngai; pamba te azalaka liboso na ngai; 16. — Pamba te na botondi na ye biso nionso tozwi, ngolu likolo ya ngolu. 17. Pamba te mobeko epesamaki na Mose; ngolu pe bosolo eyaki na nzela ya Yesu Kristu.18. Nzambe mutu moko te amonaki ye; Mwana se moko, oyo azali na ntolo ya Tata, ye, amonisaki ye.

19. Pe litatoli ya Yoane yang’oyo, tangu Bayuda batindaki wuta Yerusaleme banganga-nzambe pe Balevite pona kotuna ye : “ Yo, ozali nani ?” 20. Pe atatolaki, pe awanganaki te, pe atatolaki : Ngai nazali Kristu te. 21. Pe batuni ye : Bongo nini ? Ozali Eliya ? pe alobi : Nazali ye te. Ozali profete ? pe ayanoli : Te. 22. Bongo balobi na ye : Ozali nani, po tóyanola baoyo batindi biso ? Ozali koloba nini pona yo moko ? 23. Alobi : Ngai, mongongo ya oyo azali koganga kati na esobe : Bobongisa nzela ya Nkolo, lokola elobaki profete Esaya. 24. Pe batindamaki kati na Bafarizai. 25. Pe batunaki ye pe balobi na ye : Bongo pona nini ozali kobatisa, soki ozali Kristu te, Eliya te, profete te ? 26. Yoane ayanoli bango, koloba : Nazali kobatisa na mayi; kati na bino ezali na moko oyo boyebi te, . 27. Oyo azali koya sima na ngai, oyo nabongi te kofungola singa na ye ya sandale. 28. Makambo yango ekomaki na Betania na ngámbu ya Yordani, epai Yoane azalaki kobatisa.

29. Na mokolo elandaki, amonaki Yesu koya epai na ye, pe alobi : Talá Mwana-Mpate ya Nzambe oyo akolongola lisumu ya mokili ! 30. Ezali ye oyo, ngai, nazali koloba : Sima na ngai mutu moko akoya oyo azalaki liboso na ngai, po azalaki liboso na ngai. 31. Pe pona ngai, nayebaki ye te; kasi pona amonisama na Israel, na tina wana, nayaki kobatisa na mayi.

32. Pe Yoane atatoli, koloba : Namoni Molimo kokita na likolo lokola ebenga, pe kofanda likolo na ye. 33. Pe pona ngai, nayebaki ye te; kasi ye oyo atindaki ngai pona kobatisa na mayi, ye wana alobaki na ngai : Ye oyo okomona Molimo kokita pe kofanda likolo na ye, ezali ye wana azali kobatisa na Molimo Mosantu. 34. Pe ngai, namoni pe natatoli ete ye oyo azali Mwana wa Nzambe.

35. Mokolo oyo elandaki lisusu, Yoane atelemaki wana ná bayekoli na ye mibale ; 36. Pe atalaki Yesu azalaki kotambola, alobi : Talá Mwana-Mpate ya Nzambe ! 37. Pe Bayekoli mibale bayokaki ye koloba, pe balandi Yesu. 38. Pe Yesu abalukaki pe amonaki bango kolanda ye, alobi na bango : 39. Bozali koluka nini ? Pe balobi na ye : Rabbi (oyo, na ndimbola, elakisi molakisi), ofandi wapi ? 40. Alobi na bango : Bóya, pe botala. Bakendaki bongo kotala esika afandaki; pe bafandaki elongo na ye mokolo wana, ezalaki pene ya ngonga zomi. 41. Andrea, ndeko ya Simona Petelo, azalaki moko ya mibale oyo bayokaki Yoane koloba, pe balandaki ye. 42. Ye oyo akutani liboso ndeko na ye moko Simona, pe alobi na ye : Tomoni Mesiya (oyo, na ndimbola, ezali Kristu). 43. Pe amemaki ye epai ya Yesu. Yesu atalaki ye, alobi : Ozali Simona, mwana ya Yoane; yo, bakobenga yo Kefas (oyo elimbolami lokola libanga).

44. Mokolo oyo elandaki, alingaki kokende na Galilai. Pe Yesu akuti Filipo, pe alobi na ye : Landa ngai. 45. Nzokande Filipo azalaki moto ya Betesaida, ya engumba ya Andrea na Petelo. 46. Filipo akutaki Natanaele pe alobi na ye : Tomoni ye oyo Mose akomaki kati na Mobeko pe oyo baprofete bakomaki pona ye, Yesu mwana na Yozef, oyo azali ya Nazaret. 47. Pe Natanaele alobi na ye : Na Nazaret, eloko moko ya malamu ekoki kobima kuna ? Filipo alobi na ye : Yaka pe omona. 48. Yesu amoni Natanaele koya epai na ye, pe alobi na tina na ye : Talá, Israelite ya solo, oyo kati na ye bokosi ezali te. 49. Natanaele alobi na ye : Ndenge nini oyebi ngai ? Yesu ayanoli pe alobi na ye : Liboso Filipo abenga yo, tangu ozalaki na nse ya nzete ya figi, namonaki yo. 50. Natanaele ayanolaki pe alobi na ye : Rabbi, ozali Mwana ya Nzambe; ozali mokonzi ya Israel. 51. Yesu azongisi alobi na ye : Pona nayebisaki yo ete namonaki yo na nse ya nzete ya figi, ondimi ? okomona makambo minene koleka oyo. 52. Pe alobi na ye : Ya solo, ya solo, nalobi na bino : bokomona likolo kofungwama, pe baanzelu ya Nzambe komata pe kokita likolo ya mwana ya moto.

 

Mokapo 2

1. Pe na mokolo ya misatu, libala ezalaki na Kana ya Galilai, pe mama ya Yesu azalaki wana. 2. Pe Yesu abengisamaki na bayekoli na ye na libala. 3. Pe vino ezalaki te, mama ya Yesu alobi na ye : Bazali na vino te. 4. Yesu alobi na ye : Mwasi, likambo nini kati na ngai na yo ? Tangu na ngai nanu ekoki te. 5. Mama na ye alobi na basali : Bósala nionso oyo akoloba na bino. 6. Nzokande ezalaki wana na bambɛki motoba ya mabanga, pona kosimba mayi, oyo batiaki wana na tina ya kopɛtolama ya Bayuda, oyo moko moko na yango ekokaki kokota mibale to misato ya mezire. 7. Yesu alobi na bango : Bótondisa bambɛki na mayi. Pe batondisaki yango tii na likolo. 8. Pe alobi na bango : Botoka sik’oyo, pe bomemela yango epai ya mokambi ya libala. Pe bamemelaki ye yango. 9. Kasi tangu mokambi ya libala amekaki mayi oyo ekómaki vino, pe ayebaki te esika oyo yango ewutaki (kasi basali oyo batokaki mayi bango bayebaki), mokambi ya libala abengi mobalani, 10. Pe alobi na ye : mutu nionso apesaka liboso vino ya malamu, pe oyo ya malamu mingi te na sima, wana batu bameli malamu ; yo, obombi vino ya malamu tii sik’oyo. 11. Yesu asalaki ebandeli ya bilembo na ye na Kana ya Galilai, pe amonisaki kembo na ye; pe bayekoli na ye bandimaki ye.

12. Sima na yango, akitaki na Kafarnaum, ye na mama na ye na bandeko na ye ya mibali na bayekoli na ye; pe afandaki wana mikolo muke.

13. Pe Paska ya Bayuda ekomaki pene, pe Yesu amataki na Yerusaleme. 14. Pe akutaki kati na tempelo batekisi ya bangɔmbɛ pe ya bampate pe ya bibenga, pe babongoli mbongo oyo bafandi. 15. Pe asali fimbo ya singa, abengani bango nionso libanda ya tempelo, ezala bampate pe bangɔmbɛ; pe asopi mosolo ya babongoli mbongo pe abalusi bamesa. 16. Pe alobi na baoyo bazalaki kotɛka bibenga : Bolongola biloko oyo awa; bokomisa ndaku ya Tata na ngai wenze te. 17. Bayekoli na ye bakanisaki ete ekomami : Molende ya ndaku na yo ekolia ngai. 18. Bongo Bayuda bazongisi pe balobi na ye : Elembo nini olakisi biso po osala makambo oyo ? 19. Yesu ayanoli pe alobi na bango : Bobuka tempelo oyo, pe na mikolo misato nakotɛlɛmisa yango. 20. Bongo Bayuda balobi : Na mbula ntuku minei na motoba totongaki tempelo oyo, pe yo, okotelimisa yango na mikolo misatu ! 21. Kasi ye azali koloba tempelo ya nzoto na ye. 22. Bongo tangu asekwaki kati na bakufi, bayekoli na ye bakanisaki ete alobaki yango; pe bandimaki makomi, pe liloba oyo Yesu alobaki.

23. Pe lokola azalaki na Yerusaleme, na Paska, na tangu ya feti, mingi bandimaki na kombo na ye, komonaka bilembo oyo asalaki. 24. Kasi Yesu ye moko atielaki bango motema te, po ayebaki batu nionso. 25. pe azalaki naposa te mutu moko pona kotatola na tina ya mutu ; pamba te ye moko ayebaki nini ezalaki kati na mutu.

 

Mokapo 3

1. Kasi ezalaki na mutu moko kati na Bafarizai, oyo kombo na ye ezalaki Nikodemo, oyo azalaki moko ya mokonzi ya Bayuda. 2. Ye oyo ayaki epai na ye na butu, pe alobi na ye : Rabbi, toyebi ete ozali molakisi awuti na Nzambe; pamba te moko te akoki kosala bilembo oyo yo osalaka, soki Nzambe azali na ye te. 3. Yesu ayanoli pe alobi na ye : Ya solo, ya solo, nalobi na yo : Soki mutu abotami na likolo te, akoki komona bokonzi ya Nzambe te. 4. Nikodemo alobi na ye : Ndenge nini mutu akoki kobotama tangu akomi mobange ? Akoki kokota mbala ya mibale na libumu ya mama na ye pe kobotama ? 5. Yesu ayanoli : Ya solo, ya solo, nalobi na yo : Soki mutu abotami na mayi pe na Molimo te, akoki kokota na Bokonzi ya Nzambe te. 6. Oyo abotami na mosuni azali mosuni; mpe oyo abotami na Molimo azali molimo. 7. Kokamwa te ete nalobi na yo : Esengeli na bino bobotama na likolo. 8. Mopɛpɛ epepaka epayi elingi, pe oyoki mongongo na yango; kasi oyebi te epayi ewuti to esika ezali kokende : ezali bongo na moto nionso oyo abotami na Molimo. 9. Nikodemo azongisi pe alobi na ye : Ndenge nini makambu oyo ekoki kosalama ? 10. Yesu azongisi pe alobi na ye : Ozali molakisi ya Israel, pe oyebi makambu oyo te ? 11. Ya Solo, ya solo, nalobi na yo : Tozali koloba oyo toyebi, pe tozali kotatola oyo biso tomoni, pe boyambi litatoli na biso te. 12. Soki nalobi na bino makambu ya mabele, pe bino bondimi te, ndenge nini bokondima soki nalobeli bino makambu ya likolo ? 13. Pe mutu te amata na likolo, bobele ye oyo akitaki wuta likolo, Mwana ya Moto oyo azali na likolo. 14. Pe lokola Mose atombolaki nyoka kati na esobe, ekoki bongo Mwana ya moto atombolama, 15. Po ete moto nionso oyo akondima ye akufa te, kasi azwa bomoi ya seko. 16. Po ete Nzambe alingaki mingi mokili, apesaki Mwana na ye se moko, po moto nionso oyo akondima ye akufa te, kasi azwa bomoi ya seko. 17. Po Nzambe atindaki Mwana na ye kati na mokili te po asambisa mokili, kasi po mokili ebika na nzela na ye. 18. Oyo andimi ye, asambisami te, kasi oyo andimi te, asili kosambisama, po andimi te na kombo ya Mwana se moko ya Nzambe. 19. Awa nde esambisami, ete pole eyaki na kati ya mokili, pe batu balingaki mingi molili koleka pole, po misala na bango ezalaki mabe; 20. Pamba te oyo nionso asalaka makambu mabe ayinaka pole, pe akoya na pole te, noki te misala na ye emonisama polele; 21. Kasi ye oyo asalaka bosolo ayaka na pole, po misala na ye emonisama polele, ete esalama na Nzambe.

22. Sima ya makambu wana, Yesu aye kati na mboka ya bayuda, pe na bayekoli na ye ; pe afandaki kuna elongo na bango, pe abatisaki. 23. Pe Yoane azalaki kobatisaka lisusu na Enon pene na Salem, po kuna mayi ezalaki mingi; pe bazalaki koya, pe kobatisamaka. 24. Pamba te Yoane abwakami nanu na boloko te. 25. Bongo ezalaki na kobendana tembe kati na bayekoli mosusu ya Yoane na Moyuda moko, na oyo etali kopɛtolama. 26. Pe bayaki epai na Yoane pe balobi na ye : Rabbi, oyo azalaki elongo na yo na ngambo ya Yordani, oyo yo moko otatolaki epai na ye, tala, azali kobatisa pe batu nionso bazali kokende epayi na ye. 27. Yoane azongisi pe alobi : Mutu moko te akoki kozwa eloko te, soki epesameli ye na likolo te. 28. Bino moko, bozali kotatola pona ngai ete nalobaki : Ezali ngai te mutu nazali Kristu, kasi natindamaki liboso na ye. 29. Ye oyo azali na mwasi ya libala azali mobali ya libala; kasi moninga ya mobali ya libala, oyo azali wana pe azali koyoka ye, akosepela na esengo na tina ya mongongo ya mobali; bongo esengo oyo ezali ya ngai, etondisami. 30. Esengeli ye akola, pe ngai nakita. 31. Ye oyo awuti na likolo azali likolo ya nionso. Ye oyo azali moto ya mabele azali ya mabele, pe alobaka ya mabele. Ye oyo awuti na likolo azali likolo ya nionso; 32. Oyo amoni pe ayoki, yango azali kotatola; pe mutu te ayambi litatoli na ye. 33. Ye oyo ayambi litatoli na ye atie elembo ete Nzambe azali solo; 34. Pamba te oyo Nzambe atindaki alobaka maloba ya Nzambe, po Nzambe apesaka Molimo na ndenge ya kopima te. 35. Tata alingi Mwana, pe apesi biloko nionso na maboko na ye. 36. Oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko; kasi oyo aboyi kondima Mwana akomona bomoi te, kasi kanda ya Nzambe efandi likolo na ye.

Mokapo 4

1. Bongo tangu Nkolo ayebaki ete Bafarisai bayokaki maloba oyo : Yesu azali kokomisa pe kobatisa bayekoli mingi koleka Yoane. 2. (Nzokande Yesu ye moko azali kobatisa te, kasi bayekoli na ye). 3. Alongwaki Yudea pe akendaki lisusu na Galilaia. 4. Pe esengelaki alekela na Samaria. 5. Akomaki bongo na engumba moko ya Samaria oyo ebengami Sukar, pene na mabele oyo Yakobo apesaki na Yozefe mwana na ye. 6. Pe wana ezalaki na libulu moko ya mayi ya Yakobo. Bongo Yesu alembaki na mobembo, afandaki wana likolo ya libulu ya mayi; ezalaki pene na ngonga ya motoba. 7. Mwasi moko ya Samaria ayaki kotoka mayi. Yesu alobi na ye : Pesa ngai ya komela 8. (Pamba te bayekoli na ye bakendaki na engumba pona kosomba bileyi). 9. Bongo Mwasi Mosamaria alobi na ye : Ndenge nini yo oyo ozali Moyuda, ozali kosɛnga ngai ya komɛla, na ngai oyo nazali mwasi Mosamaria ? (Pamba te Bayuda bazali na boyokani te na Basamaria). 10. Yesu azongisi pe alobi na ye : Soki oyebaki likabo na Nzambe, pe nani oyo alobi na yo : Pesa ngai ya komela, yo, olingaki kosenga ye, pe alingaki kopesa yo mayi ya bomoi. 11. Mwasi alobi na ye : Messieu, ozali na eloko te pona kobenda mayi, pe libulu ya mayi ezali mozindo; bongo ozui mayi ya bomoyi yango wapi ? 12. Yo, Ozali monene koleka tata na biso Yakobo oyo apesaki biso libulu ya mayi; pe ye moko amelaki yango, pe bana na ye, pe bibwele na ye ? 13. Yesu azongisi pe alobi na ye : Oyo akomela mayi oyo akoyoka lisusu posa ya mayi; 14. Kasi oyo akomɛla mayi oyo nakopesa ye, ngai, akozalaka lisusu naposa ya mayi te; kasi mayi nakopesa ye ekozala kati na ye liziba ya mayi oyo ezali kosopana na bomoi ya seko. 15. Mwasi alobi na ye : Messieu, pesa ngai mayi yango, po nazala na posa ya mayi te pe nayaka lisusu awa te pona kotoka mayi. 16. Yesu alobi na ye : Kende, benga mobali na yo, pe yaka awa. 17. Mwasi ayanoli pe alobi : Nazali na mobali te. Yesu alobi na ye : Olobi malamu , Nazali na mobali te; 18. Po ozalaki na mibali mitanu, pe oyo ozali na ye sik’oyo azali mobali na yo te; wana olobi solo. 19. Mwasi alobi na ye : Messieu, namoni ete ozali profete. 20. Batata na biso bakumisaki likolo na ngomba oyo, pe bino, bolobaka na Yerusaleme ezali esika oyo esengeli pona kokumisa. 21. Yesu alobi na ye : Mwasi, ndimela ngai : tangu ekoya oyo bokokumisa Tata, likolo na ngomba oyo te, na Yerusaleme te. 22. Bino, bokumisaka oyo boyebi te; biso, biso tokumisaka oyo toyebi; pamba te lobiko ewuti na Bayuda. 23. Kasi ngonga ekoya, pe esili koya, oyo bakumisi ya solo bakokumisa Tata na molimo pe na solo; pe lisusu Tata alukaka ba wana oyo bakumisaka ye. 24. Nzambe azali molimo, pe bakumisi na ye basengeli bakusmisa ye na molimo pe na solo. 25. Mwasi alobi na ye : Nayebi ete Mesiya oyo abengami Kristu azali koya; tangu ye akoya, akoyebisa biso nionso. 26. Yesu alobi na ye : Nazali ngai, ngai oyo nazali koloba na yo. 27. Pe na tangu yango bayekoli na ye baye; pe bakamwaki ete azali kosolola elongo na mwasi; kasi moko te alobi : Ozali kosenga ye nini ? to, nini bazali kosolola na ye ?

28. Bongo Mwasi atikaki mbɛki na ye pe akendaki na engumba, pe alobi na batu : 29. Boya, botala moto moko oyo ayebisi ngai nionso nasalaka; ye wana azali Kristu te ? 30. Babimaki na engumba pe bayaki epayi na ye.

31. Kasi na tangu wana, bayekoli basengaki ye, balobi : Rabbi, lia. 32. Kasi alobi na bango : Ngai, nazali na bileyi ya koliya oyo bino, bino boyebi te. 33. Bongo bayekoli batunani bango na bango : Mutu moko amemeli ye biloko ya kolia ? 34. Yesu alobi na bango : Bileyi na ngai ezali kosala mokano ya oyo atindaki ngai, pe na kokisa mosala na ye. 35. Bino, boloba te : Ezali nanu na sanza mineyi pe tangu ya kobuka mbuma ezali koya ? Tala, nalobi na bino : Botombola miso na bino pe botala bilanga; pamba te ekomi penza pɛmbɛ pona kobuka mbuma. 36. Ye oyo abukaka mbuma azwaka lifuti pe asangisaka mbuma pona bomoyi ya seko; po ete oyo moloni pe mobuki basepela elongo. 37. Po na oyo, liloba ezali ya solo : Moko moloni, pe mosusu mobuki. 38. Ngai, natindi bino bobuka oyo bino boniokwamaki te po na yango ; basusu basalaki, pe bino, bokɔti na mosala na bango.

39. Nzokande ebele ya Basamaria ya engumba wana bandimaki ye, na tina ya liloba ya mwasi oyo atatolaki : Alobaki na ngai nionso oyo nasala. 40. Bongo tangu Basamaria bayaki epayi na ye, basengaki ye ete afanda na bango; pe afandaki wana mikolo mibale. 41. Pe batu mingi koleka bandimaki na tina ya liloba na ye; 42. Pe balobaki na mwasi : Ezali lisusu te pona maloba na yo nde tondimi; po biso moko toyoki, pe toyebi ete oyo azali solo Mobikisi ya mokili.

43. Sima ya mikolo mibale, alongwaki wana, pe akendaki na Galilai; 44. Pamba te Yesu ye moko atatolaki ete profete na mboka na ye bapesaka ye lokumu te. 45. Bongo tangu akomaki na Galilai, bagalilai bayambaki ye, bamonaki makambu nionso oyo asalaki na Yerusaleme na ntango ya fɛti; po bango bakendaka pe na fɛti.

46. Akendaki lisusu na Kana ya Galilai, epai oyo akomisaki mayi vino. Pe ezalaki na Kapernaumu kapitene moko ya mokonzi, oyo mwana na ye azalaki kobɛla; 47. Ye wana, ayokaki koloba ete Yesu awutaki na Yudea akomi Galilai, akendaki epayi na ye pe abondelaki ye akita pe abikisa mwana na ye; pamba te azalaki kokende na kokufa. 48. Bongo Yesu alobi na ye : Soki bomoni ba bilembo pe ba makamwisi te, bokondima te. 49. Kapitene ya mokonzi alobi na ye : Nkolo, kita liboso ete mwana na ngai akufa. 50. Yesu alobi na ye : Kende, mwana na yo aza na bomoyi. pe mutu andimaki liloba ya Yesu alobaki na ye, pe akendaki. 51. Pe, lokola azalaki kokita, bawumbu na ye bayaki liboso na ye, pe bayebisi ye ete mwana na ye aza na bomoyi. 52. Bongo atunaki bango na ngonga nini amonaki malamu koleka; pe balobi na ye : Lobi na ngonga ya sambo, fievre etikaki ye. 53. Bongo tata ayebaki ete ezalaki na ngonga wana Yesu alobaki na ye : Mwana na yo aza na bomoyi. Pe andimaki, ye na ndaku na ye. 54. Yesu asalaki lisusu elembo ya mibale, tangu awutaki na Yudea na kozonga Galilai.

 

Mokapo 5

1. Sima ya makambu wana, ezalaki na feti moko ya Bayuda, pe Yesu amataki na Yerusaleme. 2. Nzokande ezali na Yerusaleme, pembeni ya porte ya bampate, liziba moko ya mayi, oyo babengaka na hebre Bethzata, oyo ezali na baveranda mitanu, 3. na kati na yango ebele ya babeli, bakufi misu, batengami, pe baoyo biteni ya nzoto ekawuka, [bazalaki kozela koningana ya mayi. 4. Po na basanza mosusu anjelu moko azalaki kokita na kati ya liziba pe azalaki koningisa mayi; bongo moto ya liboso oyo akotaki sima ya koningana ya mayi abikaki na maladi nionso oyo abelaki]. 5. Ezalaki wana na mutu moko, oyo azalaki na maladi wuta mbula tuku misatu na mwambe. 6. Yesu, amonaki ye kolala wana, pe ayebaki ete azalaki na maladi yango banda kala, alobi na ye : Olingi obika ? 7. Mobɛli ayanoli ye : Nkolo, nazali na mutu te oyo tangu mayi eningani, abwaka ngai na kati ya liziba; pe tangu nazali koya, mutu mosusu akiti liboso na ngai. 8. Yezu alobi na ye : Tɛlɛmá, kamata mbetu na yo ya muke, pe tambola. 9. Pe na mbala mutu abikaki, pe azwaki mbetu na ye ya muke, pe atambolaki. Kasi mukolo wana ezalaki Sabata. 10. Bongo Bayuda balobi na oyo abikisamaki : Ezali sabata; ebongisameli yo te ozwa mbetu na yo ya muke. 11. Ye ayanoli bango : Mutu abikisaki ngai, ye alobaki na ngai : Kamata mbetu na yo ya muke pe tambola. 12. Batunaki ye : nani mutu oyo alobaki na yo : Kamata mbetu na yo ya muke pe tambola ? 13. Kasi ye oyo abikisamaki ayebaki te nani yango; pamba te Yesu alongwaki kuna, ebele ya batu bazalaki na esika wana. 14. Sima ya makambo yango, Yesu amonaki ye kati na tempelo, pe alobi na ye : Tala, obikisami; kosumuka lisusu te, nakobanga ete mabe koleka ekomela yo. 15. Mutu akendaki pe ayebisaki na Bayuda ete ezalaki Yesu nde abikisaki ye. 16. Pe na tina wana Bayuda baniokolaki Yesu [pe balukaki koboma ye], po asalaki makambu oyo na mukolo ya sabata. 17. Kasi Yesu ayanoli bango : Tata na ngai azali kosala kino sik’oyo, pe ngai nazali kosala. 18. Bongo na tina wana, Bayuda bazali koluka penza koboma ye, kaka te po azali kobukaka sabata, kasi lisusu po azalaki kolobaka ete Nzambe azali Tata na ye moko, komikokisaka ye moko na Nzambe. 19. Bongo Yesu azongisi pe alobi na bango : Ya solo, ya solo, nalobi na bino : Mwana akoki kosala ata eloko moko te na ye moko, soki amoni eloko moko te Tata azali kosala, pamba te eloko oyo ye akosala, Mwana pe akosala lolenge moko.  20. Po Tata alingi Mwana, pe akomonisaka ye makambu nionso oyo akosalaka ye moko, pe akomonisa ye misala ya minene koleka oyo, po bozala na kokamwa. 21. Po lokola Tata alamusaka bakufi pe akopesaka bango bomoyi, lolenge moko Mwana apesaka bomoyi na baoyo alingi; 22. Po lisusu Tata asambisaka mutu te, kasi apesi bosambisimi nionso na Mwana; 23. Po banso bakumisa Mwana lokola bakumisaka Tata. Ye oyo akumisi Mwana te, akumisi te Tata oyo atindaki ye. 24. Ya solo, ya solo, nalobi na bino, oyo ayoki liloba na ngai, pe andimi ye oyo atindaki ngai, azali na bomoyi ya seko, pe akoya na bosambisami te; kasi alongwe na liwa kino na bomoyi. 25. Ya solo, ya solo, nalobi na bino, ngonga ekoya, pe ezali sik’oyo, ete bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, pe baoyo bakoyoka yango bakozala na bomoyi. 26. Po lokola Tata azali na bomoyi kati na ye moko, ndenge moko apesi Mwana kozala na bomoyi kati na ye moko; 27. Pe apesi ye bokonzi ya kosambisa, po azali mwana ya moto. 28. Bokamwa te pona yango; po ngonga ekoya ete baoyo banso bazali kati na bakunda bakoyoka mongongo na ye; 29. Pe bakobima, baoyo basalaki malamu, na lisekwa ya bomoyi; pe baoyo basalaki mabe, na lisekwa ya kosambisama. 30. Nakoki kosala eloko moko te, ngai, na ngai moko; Nasambisaka na lolenge oyo nayoki, pe kosambisa na ngai ezali sembo; po nalukaka mokano na ngai moko te, kasi mokano na ye oyo atindaki ngai. 31. Soki ngai nazali kotatola pona ngai moko, litatoli na ngai ezali solo te. 32. Ezali mutu mosusu oyo azali kotatola ngai; pe nayebi ete litatoli azali kotatola pona ngai ezali ya solo. 33. Bino, botindaki bato epayi ya Yoane, pe ye atatolaki pona solo; 34. Kasi ngai, nazwaka litatoli ya mutu te, kasi nazali koloba makambu oyo po bino bobika. 35. Oyo wana azalaki mwinda epela pe kongengisa; pe bino, bolingaki kosepela pona tangu muke na pole na ye; 36. Kasi ngai, nazali na litatoli monene koleka oyo ya Yoane; pamba te misala oyo Tata apesi ngai nakokisa, misala yango nazali kosala, ezali kotatola ete ngai, Tata atindaki ngai. 37. Pe Tata oyo atindaki ngai, ye, atatoli pona ngai. Bino boyoka mongongo na ye te, pe bomona elongi na ye te; 38. Pe bozali na liloba na ye te kati na bino; po oyo wana ye atindi, bino, bozali kondima ye te. 39. Bozali kokundola na bozindo makomi, po bozali kokanisa ete kozwa bomoi ya seko kati na yango, pe yango ezali kotatola ngai. 40. — pe bolingi te koya epai na ngai po na kozwa bomoyi. 41. Nazwaka kembo ya batu te; 42. Kasi nayebi bino, ete bozali na bolingo ya Nzambe kati na bino te. 43. Ngai, naye na kombo ya Tata na ngai, pe boyambi ngai te; soki mosusu aye na kombo na ye moko, oyo wana bokoyamba ye. 44. Ndenge nini bokoki kondima, bino baoyo bozwaka kembo moko epayi na mosusu pe bolukaka te kembo oyo ewuta kaka na Nzambe ? 45. Bokanisa te ete ngai, nakofunda bino liboso ya Tata; ezali na oyo akofunda bino, Mose oyo bozali kolikia kati na ye. 46. Po soki bondimaki Mose, bolingaki pe kondima ngai; po ye akomaki po na ngai. 47. Kasi soki bondimi makomi na ye te, ndenge nini bokondima maloba na ngai ?

 

Mokapo 6

1. Sima ya makambu wana, Yesu akendaki na ngambu ya mayi monene ya Galilai, ya Tiberiado. 2. pe ebele ya batu balandaki ye, po bamonaki bilembo azalaki kosala na baoyo bazalaki maladi. 3. Pe Yesu amataki likolo ya ngomba, pe afandaki wana elongo na bayekoli na ye. 4. Nzokande, Paska, feti ya Bayuda, ekomaki pene. 5. Bongo Yesu atombolaki misu pe amonaki ebele ya batu koya epayi na ye, alobi na Filipo : Wapi epayi tokosomba mapa po baoyo baliya ? 6. Kasi alobaki bongo pona komeka ye, pamba te ye ayebaki nini akosala. 7. Filipo ayanoli ye : Pona lipa ya kama mibale ya denari ekoka bango te, pona ete moko moko azwa ata ndambu muke. 8. Moko ya bayekoli na ye, Andrea, ndeko ya Simona Petelo, alobi na ye : 9. Mwana moko muke azali awa oyo aza na mapa mitano ya orje pe mbisi mibale; kasi pona batu ebele boye yango ezali nini ? 10. Pe Yesu alobi : Bofandisa batu (nzokande na esika wana ezalaki na matiti mingi.), Bongo mibali bafandaki, soki nkoto mitanu. 11. Pe Yesu akamati mapa; pe azongiaki matondi, akaboli na baoyo bafandaki; lolenge moko pe mbisi, ndenge oyo balingaki. 12. Pe sima batu kotonda, alobi na bayekoli na ye : Bolokota biteni oyo etikali, po eloko moko te ebunga. 13. Bongo balokotaki yango pe batondisaki bitunga zomi na mibale na biteni oyo etikalaki na mapa mitanu ya orje, tangu baliyaki.14. Bongo mibali, wana bamonaki elembo oyo Yesu asalaki, balobi : Oyo azali profete ya solo oyo akoya na mokili. 15. Bongo Yesu, ayebaki ete bakoya pe kotombola ye pona kokomisa ye mokonzi, akendaki lisusu na ngomba, kaka bobele ye moko.

16. Tangu pokwa ekomaki, bayekoli na ye bakitaki na ebale ya monene. 17. Pe bamataki na masuwa, bakendaki na ngambu mosusu ya ebale monene, na Kapernaum. Pe butu ekomaki, pe Yesu ayaki epai na bango te. 18. Pe ebale ezalaki kotomboka na mopepe makasi oyo ezalaki kofula. 19. Wana bapusanaki soki tuku mibale na mitano to tuku misato ya ba stade, bamoni Yesu kotambola likolo na ebale monene pe kopusana pene na masuwa; pe babangi. 20. Kasi ye alobi na bango : Ezali ngai, bobanga te. 21. Bongo babongisamaki pona koyamba ye na masuwa; pe mbala moko masuwa ekomaki na mabele esika bazalaki kokende.

22. Lobi na yango, ebele ya batu oyo bazalaki na ngambu mosusu ya ebamle monene, bamoni ete masuwa mosusu ya muke ezalaki kuna te longola kaka oyo bayekoli na ye bamataki, pe Yesu akotaki te elongo na bayekoli na ye kati na masuwa, kasi bayekoli na ye bakendaki bango moko 23. (Kasi bamasuwa misusu ya mikemike ewutaki na Tiberiado, pene na esika oyo baliyaki lipa, sima ya Nkolo kopesa matɔndi); 24 - Tangu ebele ya batu bamoni ete Yesu azalaki wana te, bayekoli na ye te, bamataki bango na bamasuwa, pe bakeyi na Kapernaume, koluka Yesu. 25. Pe tangu bamonaki ye na ngambo mosusu ya ebale monene, balobi na ye : Rabbi, tangu nini okomaki awa ? 26. Yesu ayanoli bango pe alobi : Ya solo, ya solo, nalobi na bino : Bozali koluka ngai, ezali te po bomonaki bilembo, kasi po boliyaki mapa pe botondaki. 27. Bosalaka, te pona bileyi oyo ekobebisama, kasi pona bileyi oyo ekowumela kino na bomoyi ya seko, oyo Mwana na moto akopesa bino; pamba te ezali ye oyo Tata, Nzambe atie elembo. 28. Bongo balobi na ye : Tosala nini pona kosala misala ya Nzambe ? 29. Yesu azongisi pe alobi na bango : Ezali oyo mosala na Nzambe, ete bondima na oyo ye atindaki. 30. Bongo balobi na ye : Bongo elembo nini osalaki, yo, po tomona yango pe tondima yo ? Mosala nini osali ? 31. Batata na biso baliakia mana na esobe, ndenge ekomama : Apesaki bango ya kolia lipa ewuti na likolo. 32. Bongo Yesu alobi na bango : Ya solo, ya solo, nalobi na bino : Mose apesaki bino te lipa oyo ewuti likolo, kasi Tata na ngai apesi bino lipa ya solo oyo ewuti likolo. 33. Po lipa ya Nzambe ezali oyo akiti na likolo, pe apesi bomoyi na mokili. 34. Bongo balobi na ye : Nkolo, pesa biso lipa yango tangu nionso. 35. Yesu alobi na bango : Ngai nazali lipa ya bomoyi. Oyo akoya epayi na ngai akozala lisusu na nzala te; pe oyo akondima ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te. 36. Kasi nalobaki na bino bomoni ngai pe bondimi te. 37. Nionso oyo Tata akopesa ngai ekoya epayi na ngai; pe nakobwaka te libanda ye oyo akoya epayi na ngai; 38. Po nakitaki wuta likolo te pona kosala mokano na ngai , kasi mokano ya oyo atindaki ngai. 39. Mokano ya oyo atindaki ngai ezali boye : nabungisa moko te na baoyo nionso apesaki ngai, kasi nasekwisa bango na mukolo ya suka. 40. Po mokano na Tata na ngai ezali boye : oyo nionso oyo akomona Mwana pe akondima ye, azwa bomoyi ya seko; pe ngai, nakosekwisa ye na mukolo ya suka. 41. Bongo Bayuda bayimaki nakotelemela ye, po alobaki : Ngai, nazali lipa oyo ewuti na likolo; 42. Pe balobaki : oyo azali te Yesu, mwana ya Yozef, oyo toyebi tata na ye pe mama na ye te ? Bongo ndenge nini ye oyo akoloba : Nakiti wuta na likolo ? 43. Yesu azongisi pe alobi na bango : Boyimayima te kati na bino. 44. Moko te akoki koya epayi na ngai, soki Tata oyo atindaki ngai abendi ye; pe ngai, nakosekwisa ye na mukolo ya suka. 45. Ekomama na kati ya baprofete : Pe banso bakoteyama na Nzambe. oyo ayoki Tata pe ayekoli, akoya epayi na ngai. 46. Ezali te ete moko amona Tata, bobele kaka oyo azali ya Nzambe ; ye wana amona Tata. 47. Ya solo, ya solo, nalobi na bino : oyo andimi aza na bomoyi ya seko. 48. Ngai, Nazali lipa ya bomoyi. 49. Batata na bino baliaki mana na esobe, pe bakufaki; 50. Oyo ezali lipa oyo ewuti na likolo, po oyo akoliya yango pe akufa te. 51. Ngai nazali lipa ezali na bomoyi oyo ewuti na likolo. Soki nani akoliya lipa yango, akobika libela; nzokande lipa oyo ngai nakopesa ezali nzoto na ngai, pona bomoyi ya mokili. 52. Bongo Bayuda batianaki tembe bango na bango : Ndenge nini ye oyo akoki kopesa biso nzoto na ye po tolia ? 53. Bongo Yesu alobi na bango : Ya solo, ya solo, nalobi na bino : Soki bokoliya mosuni ya Mwana ya moto te pe bokomela makila na ye te, bozali na bomoi te kati na bino moko. 54. Oyo aleyi mosuni na ngai pe ameli makila na ngai, aza na bomoyi ya seko, pe ngai, nakosekwisa ye na mukolo ya suka. 55. Pamba te mosuni na ngai ezali bileyi ya solo, pe makila na ngai ezali ya solo eloko ya komela. 56. Oyo alie mosuni na ngai pe ameli makila na ngai, afandi kati na ngai pe ngai na kati na ye. 57. Lokola Tata ya bomoi atindaki ngai, pe ete ngai, nazali na bomoyi na tina ya Tata, lolenge wana oyo akolia ngai, ye akozala na bomoyi na tina na ngai. 58. Oyo ezali lipa oyo ewuti na likolo, kasi lokola te lolenge batata baliaki pe bakufaki : oyo akolia lipa oyo akobika seko. 59. Alobaki makambu oyo kati na sunagoga, kolakisa na Kapernaume.

60. Bongo ebele ya bayekoli na ye, bayokaki ye, balobaki : Liloba oyo ezali makasi; nani akoki koyoka yango ? 61. Pe Yesu, ayebaki na ye moko ete bayekoli na ye bayimakiyimaki na tina na yango, alobi na bango : Oyo ezali kobetisa bino libaku ? 62. Bongo soki bomoni mwana ya moto komata esika azalaki liboso…? 63. Ezali Molimo nde apesaka bomoi; mosuni ezali na litomba te : maloba oyo nakoloba na bino ezali molimo pe ezali bomoyi; 64. Kasi ezali na basusu kati na bino oyo bandimi te; po Yesu ayebaki wuta ebandeli nani oyo bakondima te, pe nani oyo akoteka ye. 65. Pe alobi : Yango wana nalobi na bino, ete moko te akoki koya epayi na ngai, bobele soki epesameli ye na Tata. 66. Banda wana, bayekoli na ye mingi babendani na ye; pe batambolaki lisusu elongo na ye te. 67. Bongo Yesu alobi na bazomi na mibale : Pe bino, bolingi bino pe kokende ? 68. Simona Petelo azongiseli ye : Nkolo, epayi ya nani tokokende ? Ozali na maloba ya bomoyi ya seko; 69. Pe biso, tondimi pe toyebi ete yo, ozali Mosantu ya Nzambe. 70. Yesu ayanoli bango : Ezali te ngai nde naponaki bino, bazomi na mibale, pe moko na bino azali diabolo ? 71. Nzokande azali koloba pona Yudas Iskariote, mwana ya Simona; po ezalaki ye oyo alingaki kokaba ye, ye oyo azalaki moko ya bazomi na mibale.

Mokapo 7

1. Pe sima ya makambu oyo, Yesu atɛlɛmaki na Galilai, po alingaki kotelema na Yudea te, po Bayuda bazali koluka koboma ye. 2. Nzokande, feti ya Bayuda, oyo ya batabernakle, ekómaki pene. 3. Bongo bandeko na ye balobi na ye : Longwa awa pe kende na Yudea, po bayekoli na yo bamona misala oyo ozali kosala; 4. po moko te asalaka likambu na kobombana pe alukaka ye moko ayebana polele; soki oza sala makambu oyo, omimonisa yo moko na mokili. 5. Po bandeko na ye bandimaki ye te. 6. Bongo Yesu alobi na bango : Tangu na ngai ekomi nanu te, kasi tangu na bino ya kobongama tangu nionso. 7. Mokili ekoki koyina bino te; kasi eyina ngai, po nazali kotatola na tina na ye, ete misala na ye ezali mabe. 8. Bino, bomata na feti yango; Ngai, nakomata na feti yango te, po tangu na ngai ekokisami nanu te. 9. Wana alobaki na bango makambu yango, atikalaki na Galilai.

10. Kasi tangu bandeko na ye bamataki, ye pe amati na feti, na polele te, kasi lokola ya kobombana. 11. Bongo Bayuda balukaki ye na feti, pe balobaki : Wapi mutu oyo ? 12. Pe ezalaki na koyimayima monene na tina na ye na kati ya ebele ya batu. Basusu balobaki : Azali mutu malamu. Basusu balobaki : Te, kasi azali kobengwisa ebele ya batu. 13. Kasi mutu moko te alobaki polele pona ye, po na kobanga Bayuda.

14. Kasi lokola bazalaki na katikati ya feti, Yesu amati na tempelo pe azalaki kolakisa. 15. Bongo Bayuda bakamwaki, balobi : Ndenge nini ye oyo ayebi mikanda, komona ete ayekoli yango te ? 16. Bongo Yesu azongiseli bango pe alobi : Malakisi na ngai ezali ya ngai te, kasi ya ye oyo atindaki ngai. 17. Soki moko alingi kosala mokano na ye, akoyeba malakisi yango soki ewuti na Nzambe, to soki ngai, nazali koloba na ngai moko. 18. Ye oyo alobaka na ye moko alukaka kembo na ye moko; kasi ye oyo alukaka kembo ya ye oyo atindaki ye, ye wana azali solo, pe kati na ye kozanga boyengebene ezali te. 19. Mose apesaki bino Mibeko te ? Pe moko te kati na bino azali kobatelaka mibeko. Pona nini bozali koluka koboma ngai ? 20. Ebele ya batu bayanoli pe balobi : Ozali na demon; nani azali koluka koboma yo ? 21. Yesu azongisi pe alobi na bango : Eloko kaka moko nasali mosala, pe bino banso bokamwe. 22. Na yango wana, Mose apesaki bino kokatisa ngenga (ezali te ya Moize, kasi ezali ya batata), pe bino bozali kokatisa mutu ngenga na mukolo ya sabata. 23. Soki mutu akatami ngenga na mukolo ya sabata, po ete mobeko ya Mose ebukana te, botombokeli ngai po nabikisaki mutu nzoto mobimba na mukolo ya sabata ? 24. Bosambisa na kolandisama libanda ya komonana te, kasi bosambisa na bosembo. 25. Bongo bamosusu ya Yerusaleme balobaki : Ye oyo te bazalaki koluka koboma ? 26. Pe tala, azoloba na polele, pe bazoloba na ye eloko te : ezali solo ete bakonzi bandimi oyo azali Kristu ? 27. Kasi oyo toyebi ye, na esika awuti; kasi tangu Kristu akoya, mutu te akoyeba esika awuti. 28. Bongo Yesu agangaki na tempelo, kolakisa pe koloba : Boyebi ngai, pe boyebi esika nawuti. Pe naye na ngai moko te, kasi oyo atindaki ngai azali solo, pe bino boyebi ye te. 29. Ngai, nayebi ye, po nazali na nzela na ye, pe ye wana atindi ngai. 30. Bongo balukaki kokanga ye; pe moto te atiaki maboko likolo na ye, po ngonga na ye ekomaki nanu te. 31. Pe mingi kati na ebele ya batu bandimaki ye, pe balobaki : Kristu, tangu akoya, akosala bilembo ya minene mingi koleka oyo asali ? 32. Bafarizai bayokaki ebele ya batu kolobaka makambu oyo na tina na ye; pe Bafarizai pe bakonzi ya banganga-nzambe batindaki basali ya sunedrion pona kokanga ye. 33. Bongo Yesu alobi : Nazali lisusu pona tangu muke na bino, pe nakozonga epayi ya oyo atindaki ngai. 34. Bokoluka ngai, pe bokomona ngai te; pe esika nakozala, bino, bokoka koya te. 35. Bongo Bayuda balobanaki bango na bango : Epayi nini ye oyo akokende po tomona ye te ? Akokende na diaspora na kati ya Bagreke, pe kolakisa Bagreke ? 36. Liloba nini oyo alobi : Bokoluka ngai, pe bokomona ngai te; pe esika ngai nakozala, bokoka koya te ?

37. Pe na mukolo ya suka, mukolo monene ya feti, Yesu atɛlɛmaki wana pe agangaki : Soki mutu moko azali na posa ya komela, aya epayi na ngai pe amɛla. 38. Oyo akondima ngai, na lolenge eloba Makomi, bibale ya mayi na bomoyi ekotiola na libumu na ye. 39. (Nzokande azali koloba boye po na Molimo oyo balingaki kozwa baoyo bandimi ye, po Molimo azalaki nanu te, po Yesu azwaki nanu kembo te). 40. Bongo batu kati na ebele oyo bayokaki liloba oyo, balobaki : Oyo azali solo profete. 41. Basusu balobi : Oyo azali Kristu. Basusu balobaki : Kristu akowut na Galilai ? 42. Makomi elobaki te ete Kristu akowuta na libota ya Davidi pe na Betelem, mboka oyo wapi Davidi azalaki ? 43. Bongo bokabwani ebimaki kati na ebele ya batu po na ye. 44. Basusu kati na bango balingaki bakanga ye; kasi mutu te atiaki ye maboko. 45. Bongo basali ya sunedrion bazongaki epai ya bakonzi ya banganga-nzambe pe Bafarizai; pe balobi na bango : Pona nini bomemaki ye te ? 46. Basali ya sunedrion bazongisi bango : Ezali na Moto ata moko te aloba lokola moto oyo . 47. Bafarizai bazongiseli bango : Bino pe bozali baoyo bokosami ? 48. Ata moko te ya bakonzi to kati na Bafarizai andimi ye ? 49. Kasi ebele ya batu oyo bayebi Mibeko te, balakelami mabe. 50. Nikodemo, oyo azalaki moko na bango, alobi na bango : 51. Mibeko na biso esambisaka mutu liboso ya koyoka ye pe na koyeba te oyo asali ? 52. Bazongisi pe balobi na ye : Yo pe ozali mutu ya Galilai ? Otuna, pe otala na Galilai profete moko te abima.

53. Pe mutu na mutu azongaki na ndaku na ye.                                                                        Mokapo 8

1. Pe Yesu akendaki na Ngomba ya Olive.

2. Pe lisusu na tongotongo ayaki na tempelo, pe batu banso bayaki epayi na ye; pe afandaki, alakisaki bango. 3. Pe bakomeli na Bafarizai bamemelaki ye mwasi oyo bakutaki na ekobo; pe batiaki ye liboso na ye, 4. Balobi na ye : Molakisi, mwasi oyo bakuti ye azali kosala ekobo. 5. Nzokande na mobeko, Mose apesa biso mitindo ya koboma na mabanga basi ya ndenge oyo : Bongo yo, olobi nini ? 6. Nzokande bazali koloba bongo pona komeka ye, ete bakoka kozwa nini ya kofunda ye. Kasi Yesu, angunzamaki, azalaki kokoma na mosapi na ye na mabele. 7. Pe lokola bazalaki kaka kotuna ye mituna, atɛlɛmaki pe alobaki na bango : Oyo azali na lisumu te, azala mutu ya liboso oyo akobamba ye libanga. 8. pe angunzamaki lisusu, akomaki na mabele. 9 . Pe bango, wana bayokaki yango, babimaki moko na moko, kobanda na mikolo koleka kino oyo ya suka; pe Yesu atikalaki ye moko na mwasi liboso na ye. 10. Pe Yesu atelemaki amonaki mutu te longola kaka mwasi yango, alobi na ye : Mwasi, bazali wapi, ba wana, bafundi na yo ? Moko te akateli yo etumbu ? 11. Pe alobi : Moko te, Nkolo. Pe Yesu alobi na ye : Ngai pe naketeli yo etumbu te; kende, — kobanda sik’oyo kosumuka lisusu te.

12. Bongo Yesu alobi na bango lisusu, koloba : Ngai nazali pole ya mokili; oyo akolanda ngai akotambola na milili lisusu te, kasi akozwa pole ya bomoi. 13. Bafarizai balobi na ye : Ozali yo moko komitatola po na yo; litatoli na yo ezali solo te. 14. Yesu ayanoli pe alobi na bango : Ata nazali komitatola pona ngai moko, litatoli na ngai ezali solo, po nayebi esika nawutaki pe epayi nazali kokende; kasi bino boyebi te esika nawuti pe esika nakokende. 15. Bino bosambisa na lolenge na mosuni; Ngai, nasambi mutu te. 16. Pe soki ngai nasambisi, kosambisa na ngai ezali solo, po nazali ngai moko te, kasi ngai na Tata oyo atindaki ngai. 17. Pe kati na mibeko na bino ekomami lisusu, ete litatoli ya batu mibale ezali solo. 18. Ngai natatoli na tina na ngai moko; pe Tata oyo atindaki ngai akotatola pona ngai. 19. Bongo balobi na ye : Wapi Tata na yo ? Yesu ayanoli : Boyebi ngai te pe Tata na ngai te; soki boyebaki ngai, bolingaki boyeba pe Tata na ngai. 20. Maloba oyo alobaki yango na esika bazalaki kobomba mabonza, kolakisa kati na tempelo; pe moko te akangaki ye, po ngonga na ye ekomaki nanu te.  21. Bongo Alobaki na bango lisusu : Ngai, nazali kokende, pe bokoluka ngai; pe bokokufa na lisumu na bino : esika nazali kokende, bokoka te koya kuna. 22. Bongo Bayuda balobaki : Akomiboma ye moko po alobi : Esika nazali kokende, bokoka te koya ? 23. Pe alobi na bango : Bino bozali bato ya se; Ngai nazali ya likolo : bino bozali ya mokili oyo; Ngai, nazali ya mokili oyo te. 24. Yango wana nalobi na bino bokokufa na masumu na bino; soki bondimi te ete ngai nazali, bokokufa kati na masumu na bino. 25. Bongo balobaki ye : Ozali nani ? Pe Yesu alobi na bango : Oyo ngai nalobaki na bino. 26. Nazali na makambu mingi ya koloba pona bino pe ya kosambisa; kasi ye oyo atindaki ngai azali solo, pe oyo ngai nayokaki epayi na ye, yango nazali koyebisa na mokili. 27. Bayebaki te azoloba na bango na tina ya Tata. 28. Bongo Yesu alobaki na bango : Tangu bokotombola mwana ya moto, nde bokoyeba ete ezali ngai, pe nasalaka eloko moko te na ngai moko, kasi, ndenge Tata alakisi ngai, yango wana nazali koloba. 29. pe ye oyo atindaki ngai azali elongo na ngai; atikaki ngai, ngai moko te, po nasalaka tangu nionso makambu oyo esepelisaka ye. 30. Lokola azalaki koloba, batu mingi bandimaki ye. 31. Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki ye : Soki bokowumela kati na liloba na ngai, wana bozali solo bayekoli na ngai; 32. Pe bokoyeba solo, pe solo ekokangola bino. 33. Bazongiselaki ye : Biso tozali bakitani ya Abraham, pe tozalaki na bowumbu ya mutu te; ndenge nini, yo ozali koloba, bokokoma bonsomi ? 34. Yesu azongiseli bango : Ya solo, ya solo, nalobi na bino : Oyo asalaka lisumu azali mowumbu ya lisumu. 35. Mowumbu afandaka kati na ndaku libela te; mwana yango afandaka wana libela. 36. Bongo, soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bansomi. 37. Nayebi ete bozali bakitani ya Abraham; kasi bozali koluka koboma ngai, po liloba na ngai ezali kokota kati na bino te. 38. Ngai, nazali koloba oyo namoni epayi ya Tata na ngai; bongo bino bozali kosala makambu oyo boyokaki epayi na tata na bino. 39. Bayanolaki pe balobi na ye : Tata na biso ezali Abraham. Yesu alobi na bango : Soki bozalaki bana ya Abraham, bolingaki kosala misala ya Abraham; 40. Kasi sik’oyo bozali koluka koboma ngai, mutu oyo azali koloba bino solo oyo nayoki epai ya Nzambe : Abraham asalaki bongo te. 41. Bino, bosalaka misala ya tata na bino. Balobi na ye : Tobotamaki na pite te; tozali na tata moko, Nzambe. 42. Yesu alobi na bango : Soki Nzambe azalaki tata na bino, bolingaki kolinga ngai, po ngai nabimi na Nzambe pe nawuti epayi na ye; po nayaki na ngai moko te, kasi ye atindaki ngai. 43. Pona nini bozali koyeba elobeli na ngai te ? Po bokoka koyoka liloba na ngai te. 44. Bino, bozali ya tata na bino Diabolo, pe bolingi kosala baposa ya tata na bino. Ye azali mobomi na mutu wuta na ebandeli, pe atelemaka mpiko te kati na solo, pamba te solo ezali kati na ye te. Tangu alobaka lokuta, alobaka oyo ezali kati na ye moko, po azali lokuta, pe tata ya lokuta. 45. Kasi ngai, po nazali koloba solo, bondimi ngai te. 46. Nani kati na bino akoki kolakisa ngai ete nasali lisumu ? Soki nalobi solo, pona nini bondimi ngai te ? 47. Oyo azali ya Nzambe ayokaka maloba ya Nzambe; yango wana bino bozali koyoka te, po bozali ya Nzambe te. 48. Bayuda bazongisi pe balobi na ye : Biso, tozali koloba malamu ete yo ozali Mosamaria pe ozali na demon moko ? 49. Yezu azongiseli bango : Nazali na demon te, kasi nakumisaka Tata na ngai, pe bino bozali kotiola ngai. 50. Kasi po na ngai, nazali koluka kembo na ngai te; ezali na oyo azali koluka yango, pe azali kosambisa. 51. Ya solo, ya solo, nalobi na bino : Soki mutu abombi liloba na ngai, libela akomona liwa te. 52. Bayuda balobi na ye : Sik’oyo toyebi ete ozali na demon : Abraham akufa, pe ba profete, pe yo ozali koloba : soki mutu abombi liloba na ngai, solo akokufa te pona seko. 53. Yo ozali monene koleka tata na biso Abraham, oyo akufaki ? pe ba profete bakufa. Yo ozali komisala nani yo moko ? 54. Yesu ayanolaki bango : Soki namikumisi, kembo na ngai ezali eloko te; ezali Tata na ngai oyo kokumisi ngai, ye oyo bozali koloba : Azali Nzambe na biso.

55. Pe boyebi ye te; kasi ngai, nayebi ye : pe soki nalobi nayebi ye te, nalingaki kozala mutu ya lokuta, lokola bino; kasi nayebi ye, pe nazali kobomba liloba na ye. 56. Abraham tata na bino asepelaki po akomona mukolo na ngai; pe amonaki yango, pe asepelaki. 57. Bongo Bayuda balobi na ye : Ozali nanu na mbula tuku mitanu te, pe omona Abraham ! 58. Yesu alobi na bango : Ya solo, ya solo, nalobi na bino : Liboso Abraham azala, nazali. 59. Bongo bazwaki mabanga pona kobamba ye ; kasi Yesu abombami pe abimi libanda ya tempelo.

 

Mokapo 9

1. Pe lokola azalaki koleka, amoni mokufi misu wuta kobotama. 2. Pe Bayekoli na ye batunaki ye, koloba : Rabbi, nani asalaki lisumu, ye oyo to baboti na ye, po abotama mokufi misu ? 3. Yesu ayanolaki : Ye oyo asalaki lisumu te, baboti na ye pe te; kasi ezali po misala ya Nzambe mimonisama kati na ye. 4. Esengeli na ngai kosala misala ya oyo atindaki ngai, tangu mukolo ezali; butu ezali koya, oyo mutu te akoka kosala. 5. Tangu nazali na mokili, nazali pole ya mokili. 6. Sima ya koloba makambu wana, abwakaki soyi na mabele pe asali potopoto ya soyi na ye, pe atiaki potopoto yango lokola mafuta na misu na ye. 7. Pe alobaki na ye : Kende, pe sukola na liziba ya Siloe (oyo limbolamaka na Motindami). Bongo akendaki, pe asukolaki, pe azongaki komona. 8. Bongo batu ya zinga zinga pe baoyo bamonaki ye liboso ete azalaki bisenga-senga, balobaki : Ye oyo te azalaki kofandaka pe kosengasenga ? 9. Basusu balobaki : Ezali ye. Basusu balobaki : Te, kasi azali lokola ye. Ye alobi : Ezali ngai moko. 10. Bongo balobi na ye : Ndenge nini misu na yo efungwamaki ? 11. Ye ayanolaki pe alobi : Mutu moko, abengami Yesu, asali potopoto pe apakolaki misu na ngai, pe alobi na ngai : Kende na Siloe pe omisukola. Pe nakendaki, pe nasukolaki, pe namonaki. 12. Bongo balobi na ye : Wapi mutu yango ? Alobi : Nayebi te.

13. Bakumbaki na Bafarizai ye oyo azalaka mokufi misu. 14. Nzokande ezalaki mukolo moko ya sabata nde Yesu asalaki potopoto pe afungolaki misu na ye. 15. Bongo Bafarizai batunaki ye lisusu ndenge nini misu na ye emonaki. Pe alobaki na bango : Atiaki potopoto na misu na ngai, pe namisukolaki, pe nazali komona. 16. Bafarizai mosusu balobaki : Mutu oyo azali ya Nzambe te, po abombaka sabata te. Basusu balobaki : Ndenge nini mosumuki akoki kosala bilembo ya ndenge wana ? Pe ezalaki na bokabwani kati na bango. 17. Bongo balobi lisusu na mokufi misu : Yo, olobi nini na tina na ye, po afungolaki yo misu ? Pe alobi : Azali profete. 18. Na yango, Bayuda bandimaki te ete azalaki mokufi misu pe amonaki, kino tangu babengaki baboti ya oyo amonaki. 19. Pe batunaki bango : Oyo azali mwana na bino, oyo bolobi ete abotamaki mokufi misu ? Bongo ndenge nini azali sik’oyo komona ? 20. Baboti na ye bazongisaki pe balobaki : Toyebi ete oyo azali mwana na biso pe abotamaki mokufi misu; 21. kasi ndenge nini azali komona sik’oyo, toyebi te; pe nani afungolaki ye misu, biso toyebi te; azali mukolo, botuna ye, akoloba oyo etali ye. 22. Baboti na ye balobaki makambu wana, po bazalaki kobanga Bayuda; po Bayuda bayokanaki ete mutu oyo akotatola ye lokola Kristu, akobengama na sunagoga. 23. Na yango wana baboti na ye balobaki : Azali mukolo, botuna ye.

24. Bongo babengaki ye , pona mbala ya mibale, mutu oyo azalaka mokufi misu pe balobi na ye : Pesa kembo na Nzambe; toyebi ete mutu oyo azali mosumuki. 25. Bongo ayanolaki : Soki azali mosumuki, nayebi te; Nayebi likambo se moko, ete nazalaki mokufi misu, pe sik’oyo nazali komona. 26. Pe balobaki na ye lisusu : Asalaki yo nini ? Ndenge nini afungolaki yo misu ? 27. Alobaki na bango : Nalobaki na bino, pe boyokaki te. Pona nini bolingi lisusu koyoka yango ? Bolingi bino pe kokoma bayekoli na ye ? 28. Bafingaki ye pe balobi : Yo, ozali moyekoli ya ye wana; kasi biso, tozali bayekoli ya Mose. 29. Pona biso, toyebi ete Nzambe alobaki na nzela ya Mose; kasi, pona oyo, toyebi te esika awuti. 30. Mutu yango azongisi pe alobi na bango : Nzokande, ezali likambu ya kokamwa, ete boyebi te epayi awuti, pe afungoli ngai misu. 31. Nzokande, toyebi ete Nzambe ayokaka basumuki te; kasi soki mutu azali kokumisaka Nzambe pe asalaka mokano na ye, akoyoka ye. 32. Totikala koyoka te Mutu moko afungoli misu ya oyo abotamaki mokufi misu. 33. Soki oyo awutaki na Nzambe te, akokaki kosala eloko moko te. 34. Bazongisaki pe balobi na ye : Obotama mobimba kati na masumu, pe ozali kolakisa biso ! Pe babwakaki ye libanda.

35. Yesu ayokaki ete babwakaki ye libanda, pe esili kokutana na ye, alobi na ye : Ondimi Mwana ya Nzambe ? 36 Azongisaki pe alobi : Ye nani, Nkolo, po nandima ye ? 37. Pe Yesu alobi na ye : Omoni ye, pe oyo azali koloba na yo ezali ye. 38. Pe alobi : Nandimi, Nkolo ! pe akumisi ye.

39. Pe Yesu alobi : Ngai, naye na mokili oyo pona kosambisa, po baoyo bamonaka te bamona; pe baoyo bamonaka bakoma bakufi misu. 40. Basusu kati na Bafarizai oyo bazalaki elongo na ye bayokaki makambu wana pe balobi na ye : Pe Biso, tozali bakufi misu ? 41. Yesu alobi na bango : Soki bozalaki bakufi misu, bolingaki kozala na lisumu te; kasi sik’oyo bolobi : Tozomona ! — lisumu na bino ewumeli. Mokapo 10. 1. Ya solo, ya solo, nalobi na bino : Oyo akokota na lopango ya bampate na porte te, kasi amati na nzela mosusu, oyo wana azali moyibi pe mobomi. 2. Kasi oyo akokota na porte azali mobateli ya bampate. 3. Na ye Mokengeli ya porte akofungola; pe bampate bayokaka mongongo na ye; pe abengaka bampate na ye moko na kombo na bango, pe akumbaka bango libanda. 4. Pe tangu akumbi libanda ba oyo ya ye nionso, akendaka liboso na bango; pe bampate bakolanda ye, po bayebi mongongo na ye; 5. kasi bakolanda mopaya te, kasi bakokima mosika na ye, po bayebi mongongo ya bapaya te. 6. Yesu alobaki na bango parabole; kasi basosolaki te nini ezalaki oyo ye azalaki koloba na bango.

7. Bongo Yesu alobi lisusu na bango : Ya solo, ya solo, nalobi na bino : Ngai, nazali porte ya bampate. 8. Banso oyo bayaki liboso na ngai, bazali miyibi pe babomi; kasi bampate bayokaki bango te. 9. Ngai nazali porte : soki mutu nani akoti na nzela na ngai, akobika; pe akokɔta pe akobima, pe akokuta bileyi. 10. Moyibi ayaka kaka pona koyiba, koboma pe kobebisa : Ngai, naye po ete bazala na bomoyi pe bazala na yango ya bofuluki mingi. 11. Ngai nazali mobateli malamu ya bampate : mobateli malamu ya bampate apesaka bomoyi na ye pona bampate; 12. Kasi mutu oyo azwaka lifuti, pe azali mobateli ya bampate te, oyo bampate bazali ya ye te, soki amoni mbwa ya zamba koya, pe akotika bampate, pe akokima; pe mbwa ya zamba akokanga bango, pe akopalangisa bampate. 13. Po ete mutu ya lifuti akokima, pamba te azali mutu ya lifuti pe akomitungisama te pona bampate. 14. Ngai nazali mobateli malamu ya bampate, pe nayebi baoyo ya ngai pe nayebani na baoyo ya ngai,. 15. Lokola Tata ayebi ngai pe ngai nayebi Tata; pe napesi bomoyi na ngai pona bampate. 16. Pe nazali na bampate mosusu oyo bazali ya lopango oyo te; Ba wana nasengeli pe namema bango; pe bakoyoka mongongo na ngai, pe bakokoma kobokwama elongo, pe mobateli moko. 17. Na tina na boye Tata alingaka ngai, ezali po napesaka bomoyi na ngai, po nazwa lisusu yango. 18. Mutu te azali kolongola ngai yango te, kasi ngai nazali kotika yango na ngai moko; Nazali na nguya ya kotika yango, pe nazali na nguya ya kozwa lisusu yango : Nazwi motindo oyo epai ya Tata na ngai. 19. Lisusu bokabwani bokotaki kati na Bayuda na tina ya maloba wana; 20. Pe mingi kati na bango bazalaki koloba : Azali na demon pe azali liboma; pona nini bozali koyoka ye ? 21. Basusu balobi : Maloba oyo ezali ya mutu oyo azali na bademon te; demon akokaka kofungola miso ya bakufi misu ?

22. Nzokande, feti ya Bopetoli ezalaki kosalema na Yerusaleme, pe ezalaki na sanza ya malili makasi. 23. Pe Yesu azalaki kotambola na tempelo, na veranda ya Salomo. 24. Bayuda bazingaki ye pe balobi na ye : Kino tangu nini okotika mitema na biso ezelaka ? Soki yo ozali Kristu, yebisa biso polele. 25. Yesu ayanoli bango : Nalobaki na bino, pe bozali kondima te. Misala oyo nazali kosala na kombo ya Tata na ngai, yango ezali kotatola pona ngai; 26. Kasi bino bozali kondima te, po bozali bampate na ngai te, ndenge nalobaki na bino. 27. Bampate na ngai bayokaka mongongo na ngai, pe nayebi bango, pe balandaka ngai. 28. Pe ngai nazopesa bango bomoyi ya seko, pe bakokufa te; pe mutu moko te akobotola bango na liboko na ngai. 29. Tata na ngai, oyo apesaki ngai bango, azali monene koleka nionso, pe mutu moko te akokaka kobotola bango na loboko ya Tata na ngai. 30. Ngai na Tata tozali moko.

31. Na bongo Bayuda batomboli lisusu mabanga pona kobamba ye. 32. Yesu ayanoli bango : Namonisi bino misala ya kitoko mingi oyo ewuti na Tata na ngai. Na tina ya mosala nini oyo bozali kobamba ngai mabanga ? 33. Bayuda bayanoli ye : Tozali kobamba yo mabanga te pona mosala kitoko, kasi pona blasfeme; pe po yo, ozali mutu, omikomisi Nzambe. 34. Yesu ayanoli bango : Ekomaai te na kati ya Mibeko na bino : Ngai, nalobi bozali banzambe ?. 35. Soki abengi banzambe baoyo epayi na bango liloba na Nzambe ekomaki (pe makomi ekoki kolongolama te); 36. Bolobi na ye oyo Tata abulisaki pe atindaki kati na mokili : Ozali koblasfeme, po nalobaki : Nazali Mwana ya Nzambe ? 37. Soki nasali te misala ya Tata na ngai , bondimela ngai te; 38. kasi soki nazali kosala yango, ata bokondimela ngai te, bondimela misala, po boyeba pe bondima ete Tata azali kati na ngai, pe ngai na kati na ye.

39. Bongo bazalaki kaka koluka kokanga ye; kasi akimaki na loboko na bango 40. Pe akendaki lisusu na ngambu ya Yordani, na esika oyo Yoane abatisaki na ebandeli, pe afandaki kuna. 41. Pe mingi bayaki epayi na ye pe balobaki : Yoane asalaki elembo moko te; kasi makambu nionso oyo Yoane alobaki na tina na ye ezali ya solo. 42. Pe kuna mingi bandimaki ye.

Mokapo 11

1. Ezalaki na mobeli moko, Lazaro, oyo ya Betania, na mboka ya Maria pe Marta ndeko na ye ya mwasi. 2. (Pe ezalaki Maria oyo apakolaki Nkolo malasi pe apakolaki makolo na ye na suki na ye, oyo ndeko na ye Lazaro azalaki mobeli). 3. Bongo bandeko na ye ya basi batindelaki ye batu, koloba : Nkolo, tala, oyo yo olingaka azali kobela. 4. Yesu ayoki bango, alobi : Maladi oyo ezali pona liwa te, kasi pona kembo ya Nzambe, po Mwana ya Nzambe akumisama na yango. 5. Nzokande Yesu alingaki Marta, pe ndeko na ye ya mwasi, pe Lazaro. 6. Bongo sima ya koyoka ete Lazaro azali maladi, afandaki lisusu wana mikolo mibale na esika azalaki. 7. Na sima na yango, alobi na bayekoli na ye : Tozonga na Yudea. 8. Bayekoli balobi na ye : Rabbi, kaka sik’oyo Bayuda bazalaki koluka kobamba yo mabanga, pe yo olingi kokende lisusu kuna ! 9. Yesu ayanoli : Mokolo ezali te na ngonga zomi na mibale ? Soki mutu atamboli na moyi, akobeta libaku te, po azali komona pole ya mokili oyo; 10. Kasi soki mutu atamboli na butu, akobeta libaku, po pole ezali kati na ye te. 11. Alobi makambo oyo; pe sima na yango alobaki na bango : Moninga na biso Lazaro alali pongi; kasi nakokende kolamusa ye.12. Bongo bayekoli balobi na ye : Nkolo, soki alali, akobika. 13. Nzokande Yesu alobaki na tina ya liwa na ye; kasi bango bakanisaki ete alobaki kolala ya pongi. 14. Bongo Yesu alobi na bango polele ete : Lazare akufi; 15. Pe ngai nasepeli na tina na bino ete nazalaki kuna te, po bino bondima. Kasi tokende epayi na ye. 16. Bongo Toma, oyo babengi Didymo, alobaki na bayekoli mosusu : Tokende, biso pe, po tokufa elongo na ye.

17. Bongo tangu Yesu akomaki kuna, amoni ete azalaki na lilita wuta koleka mikolo mineyi. 18. Betania ezalaki penepene na Yerusaleme, na ba stade soki zomi na mitanu. 19. pe mingi kati na Bayuda bayaki epayi ya Marta pe Maria pona kobondisa bango na tina ya ndeko na bango. 20. Bongo tangu Marta ayokaki ete Yesu azali koya, akendaki liboso na ye; kasi Maria azalaki ya kofanda na ndaku. 21. Bongo Marta alobi na Yesu : Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te; 22. Kasi ata sik’oyo nayebi ete nionso okosɛnga na Nzambe, Nzambe akopesa yo yango. 23. Yesu alobi na ye : Ndeko na yo akosekwa. 24. Marta alobi na ye : Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mukolo ya suka. 25. Yesu alobi na ye : Ngai nazali lisekwa pe bomoyi : oyo akondima ngai, ezala ata akufi akozala na bomoyi. 26. Pe mutu nionso oyo aza na bomoyi pe andima ngai, libela akokufa libela. Ondimi yango ? 27. Alobi na ye : Iyo, Nkolo, nandimi ete yo ozali Kristu, Mwana ya Nzambe, oyo esengelaki aya na mokili. 28. Pe sima ya koloba bongo, akendaki, pe na sekele abengaki ndeko na ye Maria, pe alobi : Molakisi aye, pe abengi yo. 29. Tangu kaka ayokaki ye, atelemaki nokinoki pe ayaki epayi na ye. 30. (Nzokande Yesu akomaki nanu na mboka te, kasi azalaki na esika oyo Marta akutanaki na ye). 31. Bongo Bayuda oyo bazalaki elongo na Maria kati na ndaku pe bazalaki kolendisaka ye, tangu bamonaki ete Maria atelemaki nokinoki pe abimaki, balandaki ye pe balobi : Azali kokende na lilita pona kolela kuna. 32. Bongo Maria, tangu akomaki epayi Yesu azalaki, pe amoni ye, amibwakaki na makolo na ye mpe alobaki na ye : Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te. 33. Bongo Yesu tangu amonaki ye kolela, pe Bayuda oyo bayaki elongo na ye kolela, ayokaki pasi makasi mingi na molimo na ye, pe amitungisaki. 34. Pe alobi : Wapi epayi botiaki ye ? Balobi na ye : Nkolo, yaka pe omona. 35.Yesu alelaki. 36. Bongo Bayuda balobi : Bomona ndenge alingaki ye. 37. Kasi bamosusu kati na bango balobaki : Ye oyo afungolaki misu ya mokufi misu, akokaki te kosala ete mutu oyo akufa te ? 38. Bongo Yesu ayokaki lisusu pasi makasi na kati na ye moko, akeyi na lilita (nzokande ezalaki libulu kati na mabanga, pe libanga ezalaki likolo na yango). 39. Yesu alobi : Bolongola libanga. Marta, ndeko ya mokufi, alobi na ye : Nkolo, alumbi solo, po wuta mikolo mineyi azali wana. 40. Yesu alobi na ye : Nayebisaki yo te ete soki ondimi, okomona kembo na Nzambe ? 41. Bongo balongolaki libanga. Pe Yesu atomboli misu na likolo pe alobi : Tata, natondi po oyokaki ngai. 42. Ngai nayebaki ete oyokaka ngai tango nionso; kasi nalobaki yango na tina ya ebele ya batu oyo bazalaki zingazinga na ngai, po bandima ete yo otindaki ngai. 43. Pe sima ya koloba makambu oyo, agangaki na mongongo makasi : Lazaro, bima libanda ! 44. Pe mokufi abimaki, makolo na ye pe maboko na ye ezalaki ya kokangama na basinga ya bitendi ya elamba; pe elongi na ye ezingamaki na elamba. Yesu alobi na bango : Bokangola ye, pe botika ye akende.

45.Bongo mingi kati na Bayuda oyo bayaki epayi ya Maria pe bamonaki oyo Yesu asalaki, bandimaki ye. 46. Kasi bamosusu kati na bango bakendaki epayi ya Bafarizai pe bayebisaki bango oyo Yesu asalaki. 47. Bongo bakonzi ya banganga-nzambe pe Bafarizai basanganaki na sunedrion pe balobi : Tokosala nini ? po mutu oyo akosala bilembo mingi. 48. Soki totiki ye boye, banso bakondimela ye, pe Baroma bakoya, pe bakolongola esika na biso pe ekolo na biso. 49. Pe moko na bango, Kaiafa, oyo azalaki nganga-nzambe mokonzi na mbula wana, alobi na bango : Boyebi eloko moko te, 50. Bobanzi te ezali litomba na biso ete mutu moko akufa pona banso, pe ete ekolo mobimba ekufa te. 51. Nzokande alobaki yango na ye moko te; kasi lokola nganga-nzambe mokonzi na mbula wana, aproftizaki ete Yesu akokufa pona ekolo; 52. pe kaka pona ekolo te, kasi lisusu pona kosangisa na moko bana ya Nzambe nionso oyo bapalangani. 53. Bongo wuta mukolo wana, bayokanaki pona koboma ye. 54. Bongo Yesu atambolaki lisusu polele te kati na Bayuda; kasi alongwaki wana pona kokende na mboka oyo ezali penepene na esobe, na engumba moko oyo ebengami Efraime; pe afandaki wana elongo na bayekoli.

55. Nzokande, Paska ya Bayuda ekomaki pene, pe batu mingi batikaki ba bamboka na komata na Yerusaleme liboso ya Paska po ba pɛtolisama. 56. Bongo balukaki Yesu, pe batunaki bango na bango, lokola bazalaki na tempelo : Bokanisi nini ? akoya te na fɛti yango ? 57. Nzokande bakonzi ya banganga-nzambe pe Bafarisai bapesaki motindo ete soki mutu ayebi esika oyo azali, ayebisa yango, po bakanga ye.

Mokapo 12

1. Bongo Yesu, mikolo motoba liboso ya Paska, akendaki na Betania, epayi ezalaki ya Lazaro oyo Yesu asekwisaki kati na bakufi. 2. Bongo kuna balambelaki ye bileyi ya pokwa; pe Marta azalaki kosunga, pe Lazaro azalaki moko ya baoyo bazalaki na mesa elongo na ye. 3. Bongo Maria, akamataki litra moko ya malasi ya nard ya peto ya motuya makasi, apakoli makolo ya Yesu, pe apangusaki makolo na ye na suki na ye; pe ndaku etondaki na solo ya malasi. 4. Bongo moko ya bayekoli na ye, Yudas Ikariote, mwana ya Simona, oyo alingaki kotɛka ye. 5. Alobi : Pona nini batekaki malasi yango na kama misatu ya denari te pe bapesi na babola ? 6. Nzokande alobaki yango, te po ete azalaki na makanisi ya babola, kasi po azalaki moyibi, pe azalaki na saki babombaka mosolo, pe ye amemaka oyo etiamaki na kati. 7. Bongo Yesu alobi : Tika ye, abomba yango po na mukolo ya bokundami na ngai. 8. Pamba te bozali na babola mikolo nionso elongo na bino; kasi ngai, bozali na ngai tangu nionso te.

9. Na bongo, ebele mingi ya batu kati na Bayuda bayebaki ete azalaki wana, pe bayaki, kaka na tina na Yesu te, kasi lisusu pona komona Lazaro, oyo ye asekwisaki kati na bakufi. 10. Kasi bakonzi ya banganga-nzambe bakanaki pona koboma lisusu pe Lazare; 11. Pamba te, na tina na ye, ebele ya Bayuda batikaki bango pe bandimaki Yesu.

12. Lobi na yango, ebele ya batu oyo bayaki na feti, bayokaki ete Yesu azali koya na Yerusaleme. 13. Bakamataki mandalala ya nzete ya mbila pe babimaki na bokutani na ye, pe bagangaki : Ozana ! apambolama ye oyo aye na kombo ya Nkolo, Mokonzi ya Israel !. 14. Pe Yesu azwaki mwana ya punda afandi likolo na yango, ndenge ekomama : 15. Kobanga te, mwana mwasi ya Sion; tala, mokonzi na yo azali koya, afandi likolo na mwana ya punda, ya punda ya mwasi. 16. Wana Bayekoli na ye basosolaki nanu te makambu yango; kasi tangu Yesu anetwamaki na kembo, nde bakanisaki makambo oyo ekomamaki na tina na ye, pe ete basalaki makambu yango na tina na ye. 17. Bongo ebele ya batu oyo bazalaki na ye batatolaki po abengaki Lazaro na lilita pe asekwisaki ye kati na bakufi. 18. Na yango wana ebele ya batu bakendaki kokutana na ye, po bayokaki ete asalaki elembo yango. 19. Bongo Bafarizai balobanaki bango na bango : Bomoni ete bozali lisusu motuya na eloko moko te; botala, mokili ekeyi sima na ye.

20. Nzokande ezalaki na basusu ya Bagreke, na kati ya baoyo bayaki pona kokumisa na mukolo ya feti. 21. Bango bayaki epayi ya Filipo, ya Betesaida ya Galilai, pe basengaki ye : Mesieu, tolingi tomona Yesu. 22. Filipo akeyi koyebisa Andrea; pe na sima Andrea akeyi, pe Filipo, pe bayebisi Yesu. 23. Pe Yesu ayanolaki bango, alobi : Ngonga ekomi pona ete Mwana ya moto akumisama. 24. Ya Solo, ya solo, nalobi na bino : Soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, ekotikala yango moko; kasi soki ekufi, ekobota mbuma ebele. 25. Oyo alingi bomoyi na ye akobungisa yango; pe oyo ayina bomoyi na ye na kati ya mokili oyo akobikisa yango pona bomoi ya seko. 26. Soki mutu akosalela ngai, alanda ngai; pe epayi ngai nazali, wana pe mosali na ngai akozala : soki mutu akosalela ngai, Tata akokumisa ye.

27. Sik’oyo molimo na ngai etungisami; pe nakoloba nini ? Tata, kangola ngai na ngonga oyo; kasi ezali pona yango nde naye kino ngonga oyo. 28. Tata, kumisa kombo na yo. Bongo mongongo moko ewutaki na likolo : Pe nakumisi yango, pe nakokumisa yango lisusu. 29. Bongo ebele ya batu oyo bazalaki wana pe bayokaki, balobaki ete kobetama ya kake mutu ebɛtami; basusu balobaki : Anjelu moko alobi na ye. 30. Yesu ayanolaki pe alobi : Mongongo oyo eyokani pona ngai te, kasi pona bino. 31. Sik’oyo kosambisama ya mokili eye; sik’oyo mokonzi ya mokili oyo akobwakama libanda. 32. Pe ngai, soki natelami na mabele, nakobenda batu nionso epayi na ngai moko. 33. Azali koloba bongo pona kolakisa liwa nini asengelaki akufa. 34. Ebele ya batu bazongiseli ye : Biso,Toyekoli na Mobeko ete Kristu akowumela seko; pe ndenge nini, yo, ozali koloba ete esengeli na Mwana ya moto anetolama ? Nani yango mwana ya moto ? 35. Bongo Yesu alobi na bango : Lisusu pona tangu muke pole ezali na kati na bino. Botambola tangu bozali na pole, po molili ezipika bino na pwasa te; pe oyo atamboli na molili ayebi te esika azali kokende. 36. Tangu bozali na pole, bondima pole, po bozala bana ya pole. Yesu alobaki makambu yango, pe akendaki, amibombaki liboso na bango.

37. Pe ata asalaki bilembo ebele liboso na bango, bandimaki ye te; 38. Pona liloba ya profete Esaya, oyo alobaki, ekokisama : Nkolo, nani andimi oyo ayokaki na biso, pe na nani loboko ya Nkolo emonsamaki ?. 39. Yango wana bakokaki kondima te, po Esaya alobaki lisusu : 40. Azipaki misu na bango pe akomisaki mitema na bango makasi, po ete bamona te na misu na bango, pe bayoka te na mitema na bango, babongwana te, pe nabikisa bango te. 41. Esaya alobaki makambu oyo wana amonaki kembo na ye pe alobaki na tina na ye. 42. Ata bongo ebele kati na bango bakonzi bandimelaki ye; kasi na tina ya Bafarizai batatolaki te, nakobangaka ete babengana bango na sunagoge; 43. Pamba te balingaki kembo ya batu na esika ya kembo ewuti na Nzambe.

44. Yesu agangaki pe alobi : Oyo andimi ngai, andimi ngai te, kasi na ye oyo atindaki ngai; 45. Pe oyo amoni ngai, amoni oyo atindaki ngai. 46. Ngai, pole nayaki na mokili, po ete mutu nionso oyo akondima ngai afanda na molili te. 47. Pe soki mutu moko ayoki maloba na ngai pe abombi yango te, ngai, nakosambisa ye te; po nayaki na tina ya kosambisa mokili te, kasi na tina ya kobikisa mokili. 48. Oyo abwaki ngai pe ayambi maloba na ngai te, aza na mosambisa ; liloba oyo nalobi, yango ekosambisa ye na mukolo ya suka. 49. Pamba te ngai, na ngai moko te nde nalobi; kasi Tata oyo atindaki ngai, ye moko apesaki ngai mobeko nini nakoloba pe lolenge nini nakoloba; 50. Pe nayebi ete mobeko na ye ezali bomoi ya seko. Bongo, makambu oyo ngai nakoloba, nakoloba yango lolenge Tata alobelaki ngai.

Mokapo 13

1. Nzokande, liboso ya feti ya Paska, Yesu, wana ayebaki ete ngonga na ye ekomaki pona kotika mokili kokende na Tata, lokola alingaki baoyo ya ye oyo bazalaki kati na mokili, alingaki bango kino suka. 2. Pe tangu bazalaki koliya bileyi ya pokwa, diabolo asilaki kotiya na motema ya Yudas Iskariote, mwana ya Simona, pona kokaba ye,— 3. Ayebaki ete Tata atiaki biloko nionso na maboko na ye, pe ete awutaki na Nzambe, pe azali kokende epayi ya Nzambe. 4. Atelemi na kolia pe atie bilamba na ye pembeni; pe azwaki esui-eme, amikangaki na yango. 5. Bongo asopaki mayi na sani, pe abandaki kosukola makolo ya bayekoli pe kopangusa bango na esui-eme oyo bakangaki ye na loketo. 6. Bongo akomi epayi ya Simona Petelo; pe ye oyo alobi na ye : Nkolo, yo osukola ngai makolo ? 7 .Yesu azongisi pe alobi na ye : Oyo nazali kosala, sik’oyo oyebi yango te, kasi okoyeba yango na sima. 8. Petelo alobi na ye : Okosukola ngai makolo soko moke te. Yesu azongiseli ye : Soki nasukoli yo te, okozala na esika na ngai te. 9. Simona Petelo alobaki na ye : Nkolo, kaka makolo na ngai te, kasi pe maboko na ngai pe moto na ngai. 10. Yesu alobi na ye : Oyo asukolami mobimba, azali naposa kaka ya kosukola makolo; kasi azali nionso ya kopetwama; pe bino, bozali peto, kasi banso te. 11. Pamba te ayebaki nani akokaba ye; yango wana alobi : Bino banso bozali peto te.

12. Bongo tangu asukolaki bango makolo pe azwi bilamba na ye, afandaki lisusu na mesa, alobi na bango : Boyebi oyo nasali bino ? 13. Bobenga ngai molakisi pe nkolo, pe bolobi malamu, po nazali yango; 14. Bongo soki ngai, molakisi pe nkolo, nasukoli makolo na bino, bino pe bosengeli bosukolana makolo. 15. Pamba te napesi bino ndakisa, po ete lolenge nasali bino, bino pe bosala yango. 16. Ya Solo, ya solo, nalobi na bino : Mowumbu aleki nkolo na ye na monene te, pe motindami aleki te oyo atindaki ye. 17. Soki boyebi makambu yango, bozali batu ya esengo soki bosali yango. 18. Nazali kolobela bino nionso te; Ngai, nayebi baoyo napona; kasi ezali po makomi ekokisama : Ye oyo alie lipa elongo na ngai atomboli likolo na ye pona kobundisa ngai. 19. Kobanda sik’oyo nalobi na bino, liboso ete yango esalama, po ete tangu ekosalema, bondima ete ezali ngai. 20. Ya Solo, ya solo, nalobi na bino : Ye oyo akoyamba mutu oyo ngai natindi, akoyamba ngai; pe oyo ayambi ngai, ayambi ye oyo atindaki ngai.

21. Wana alobaki makambu oyo, Yesu atungisamaki na molimo na ye, pe atatolaki pe alobi : Ya solo, ya solo, nalobi na bino, moko kati na bino akokaba ngai. 22. Bongo bayekoli batalanaki bango na bango, bayebaki te azalaki koloba pona nani. 23. Moko kati na bayekoli na ye, oyo Yesu alingaka, azalaki na mesa na ntolo ya Yesu. 24. Bongo Simona Petelo asalaki ye elembo pona atuna ye nani oyo azalaki kolobela. 25. Pe ye, alalaki na tolo ya Yesu, alobi na ye : Nkolo, ezali nani ? 26. Yesu ayanoli : Ezali ye oyo nakopesa eteni ya bileyi sima ya kozindisa yango. Pe adindisi eteni ya bileyi yango, apesi yango na Yuda Iskariote, mwana ya Simona. 27. Pe sima ya eteni ya bileyi, nde Satana akotaki kati na ye. Bongo Yesu alobi na ye : Eloko ozali kosala, sala yango noki. 28. Kasi moko te ya baoyo bazalaki na mesa basosolaki pona nini alobaki na ye bongo; 29. Pamba te basusu bakanisaki ete lokola Yudasi azalaki na saki ya mosolo, Yesu alobaki na ye : Somba oyo tozali na yango posa pona feti; to, apesa eloko moko na babola. 30. Bongo azwaki eteni ya bileyi, abimaki mbala moko; nzokande ezalaki butu.

31. Bongo, tangu ye abimaki, Yesu alobi : Sik’oyo Mwana ya moto akumisami, pe Nzambe akumisami kati na ye. 32. Soki Nzambe akumisami kati na ye, Nzambe pe lokola akokumisa ye na kati na ye moko; pe nokinoki akokumisa ye. 33. Bana, nazali nanu pona tangu muke elongo na bino : bokoluka ngai; pe, lokola nalobaki na Bayuda : Epayi nakokende, bokokaka koya te, sik’oyo nalobi yango na bino. 34. Napesi bino mobeko ya sika, ete bolingana bino na bino; lokola ngai nalingaki bino, ete bino pe bolingana bino na bino. 35. Na boye, banso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo kati na bino. 36. Simona Petelo alobi na ye : Nkolo, ozali kokende wapi ? Yesu ayanolaki ye ete : Esika nazali kokende, okokaka kolanda ngai sik’oyo te, kasi okolanda ngai na sima. 37. Petelo alobi na ye : Nkolo, pona nini nakokaka kolanda yo sik’oyo te ? Nakotika bomoyi na ngai pona yo. 38. Yesu ayanoli : Okotika bomoyi na yo pona ngai ! Ya Solo, ya solo, nalobi na yo : Soso ekolela te, ete owangana ngai mbala misatu.

Mokapo 14

1. Motema na bino etungisama te; bondima Nzambe, bondimela pe ngai. 2. Na ndaku ya Tata na ngai bisika ezali ebele; soki ezalaki lolenge mosusu, nalingaki koyebisa bino, pamba te nazokende kobongisela bino esika. 3. Pe soki nakeyi pe nabongiseli yo esika, nakozonga pe nakozwa binoo epayi na ngai; na boye ete esika nazali, bino pe lokola bozala. 4. Pe boyebi esika nazali kokende, pe boyebi nzela. 5. Tomas alobi na ye : Nkolo, toyebi te esika nini ozali kokende; pe ndenge nini tokoki koyeba nzela ? 6. Yesu alobi na ye : Ngai nazali nzela, pe solo pe bomoyi; moko te akokende epayi ya Tata soki na nzela na ngai te. 7. Soki boyebaki ngai, bolingaki pe boyeba Tata na ngai; pe banda sik’oyo boyebi ye pe bomoni ye. 8. Filipo alobi na ye : Nkolo, lakisa biso Tata, pe yango ekoki na biso. 9. Yesu alobi na ye : Banda kala Nazali na bino elongo, pe Filipo oyebi nanu ngai te ? Ye oyo amoni ngai amoni Tata; pe ndenge nini yo ozoloba : Lakisa biso Tata ? 10. Ondimi te ete ngai nazali na kati ya Tata, pe Tata azali kati na ngai ? Maloba nakoloba na bino, nalobi yango na ngai moko te; kasi Tata oyo afandi kati na ngai, ezali ye mutu azali kosala misala. 11. Bondima ngai, ete nazali kati na Tata, pe Tata azali kati na ngai; soki te, bondima ngai na tina ya misala yango moko. 12. Ya solo, ya solo, nalobi na bino : Ye oyo andimi ngai akosala ye pe lokola misala oyo ngai nazosala, pe akosala ya minene koleka oyo; po ngai nazali kokende epayi ya Tata. 13. Pe oyo nionso oyo bokosenga na kombo na ngai, nakosala yango, po Tata akumisama kati ya Mwana. 14. Soki bokosenga eloko moko na kombo na ngai, nakosala yango. 15. Soki bolingi ngai, bobatela mibeko na ngai; 16. pe ngai, nakosenga Tata, pe akopesa bino Parakleto mosusu, po azala libela elongo na bino, 17. Molimo ya solo, oyo mokili ekoka koyamba ye te, po ezomona ye te pe eyebi ye te; kasi bino, boyebi ye, po afandi elongo na bino pe akozala kati na bino. 18. Nakotika bino bitike te; Naye epayi na bino. 19. Lisusu tangu muke, pe mokili ekomona ngai lisusu te; kasi bino, bokomona ngai; po ngai nazali na bomoyi pe bino lokola bokozala na bomoyi. 20. Na mukolo wana, bokoyeba ete ngai nazali kati na Tata, pe bino kati na ngai pe ngai kati na bino. 21. Oyo azali na mibeko na ngai pe abombaka yango, ye wana alingi ngai; pe oyo alingi ngai, akolingama na Tata na ngai; pe ngai nakolinga ye, pe nakomimonisa na ye. 22. Yudas (Iskariote te) alobi na ye : Nkolo, ndenge nini ekosalama omimonisama na biso, kasi na mokili te ? 23. Yesu azongiseli pe alobi na ye : Soki mutu alingi ngai, akobomba liloba na ngai, pe Tata na ngai akolinga ye; pe tokoya na ye, pe tokofanda kati na ye. 24. Oyo alingi ngai te, akobomba maloba na ngai te. Pe liloba oyo boyoki ezali ya ngai te, kasi ya Tata oyo atindaki ngai. 25. Nalobi na bino makambu oyo wana nafandi elongo na bino; 26. Kasi Parakleto, Molimo Mosantu, oyo Tata akotinda na kombo na ngai, ye akolakisa bino makambu nionso pe akokaniselisa bino makambu nionso oyo nalobi na bino. 27. Natikeli bino kimia; Napesi bino kimia na ngai; Nazali kopesa bino te, lokola mokili epesaka. Mitema na bino etungisama te to bobanga te. 28. Boyokaki ete ngai nalobaki na bino : Nazali kokende, pe nakoya epayi na bino. Soki bolingaki ngai, bolingaki kosepela ete nazokende epayi ya Tata, pamba te Tata na ngai azali monene koleka ngai. 29. Pe sik’oyo nalobi na bino yambo esalama, ete tangu ekosalema, bondima. 30. Nakosolola lisusu mingi na bino te, pamba te mokonzi ya mokili azali koya, pe azali na eloko moko te kati na ngai; 31. Kasi po ete mokili eyeba ete nalingaka Tata; pe lokola Tata atindaki ngai, boye nazali kosala. Botelema, tolongwa awa !

Mokapo 15

1. Ngai nazali vino ya solo, pe Tata na ngai azali mobongisi elanga. 2. Etape nionso kati na ngai oyo ebotaka mbuma te, alongolaka yango; pe etape nionso oyo ebotaka mbuma, akopetolaka yango, po ebota mbuma mingi. 3. Bino, bozali peto na tina ya liloba oyo nalobaki na bino. 4. Bowumela kati na ngai, pe ngai kati na bino. Lokola etape ekoki te kobota mbuma na yango moko, bobele soki ewumeli na nzete ya vino, lolenge bino pe bokokaka te soki bowumeli kati na ngai te. 5. Ngai, nazali nzete ya vino, bino bitape. Ye oyo akowumela kati na ngai, pe ngai kati na ye, ye akobota mbuma mingi; pamba te, bokoki kosala eloko te, na bokabwani ngai te. 6. Soki mutu awumeli na ngai te, abwakami libanda lokola etape, pe akokawuka; pe bakosangisaka yango, pe batie yango na moto, pe ezikisami. 7. Soko bowumeli kati na ngai, pe maloba na ngai ewumeli kati na bino, bokosenga nionso oyo bolingi, pe yango ekokomela bino. 8. Na boye Tata na ngai akumisami, ete boboti bambuma ebele; pe bokozala bayekoli na ngai. 9. Ndenge Tata alingi ngai, ngai pe nalingi bino; bowumela na bolingo na ngai. 10. Soki bokobomba mitindo na ngai, bokowumela kati na bolingo na ngai; lokola ngai nabomba mitindo ya Tata na ngai, pe nawumeli na bolingo na ye. 11. Nalobaki na bino makambu oyo, ete esengo na ngai ezala na bino, pe esengo na bino etondisama. 12. Oyo nde motindo na ngai : Ete bolingana bino na bino lokola ngai nalingaki bino. 13. Moko te azali na bolingo monene koleka oyo, ete apesa bomoyi na ye pona baninga na ye. 14. Bozali baninga na ngai soki bokosala nionso oyo ngai napesi bino motindo. 15. Nabengi bino lisusu bawumbu te, po mowumbu ayebi te oyo nkolo na ye asalaka; kasi nabenga bino baninga, po nayebisaki bino nionso oyo nayokaki epayi ya Tata na ngai. 16. Bino te batu boponaki ngai; kasi ezali ngai mutu naponaki na bino pe natiaki bino, po ete bokende pe bobota mbuma, pe mbuma na bino ewumela; po ete nionso bokosɛnga na Tata na kombo na ngai, akopesa bino yango. 17. Nazali kopesa bino mitindo oyo :ete bolingana bino na bino. 18. Soki mokili ekoyina bino, boyeba ete ngai mutu liboso kati na bino ayina. 19. Soki bozalaki ya mokili, mokili ekolinga oyo ya ye; kasi po ete bozali ya mokili te, kasi ngai naponi bino kati na mokili, na tina na yango mokili eyini bino. 20. Bokanisa liloba oyo nalobaki na bino : Mowumbu aleki nkolo na ye na monene te. Soki baniokolaki ngai, bakoniokola pe bino; soki babombaki liloba na ngai, bakobomba pe oyo ya bino. 21. Kasi bakosala bino makambu oyo nyonso na tina ya kombo na ngai, pamba te bayebi oyo atindaki ngai te. 22. Soki nayaki te pe nalobaki na bango te, balingaki kozala na lisumu te; kasi sik’oyo bazali na eloko ya kozipa te po na lisumu na bango. 23. Oyo nionso ayini ngai, ayini pe Tata na ngai. 24. Soki nasalaki te kati na bango misala oyo ata mutu moko te asala, balingaki kozala na lisumu te; kasi sik’oyo bazali, pe bamoni, pe bayini ngai na Tata na ngai. 25. Kasi po ete ekokisama liloba oyo ekomama na mobeko na bango : Bayinaki ngai pamba. 26. Kasi tangu Parakleto akoya, oyo ngai nakotindela bino kowuta na Tata, Molimo ya solo, oyo awuti epayi ya Tata, akotatola po na ngai. 27. Pe bino lokola bokotatola; po wuta ebandeli bozali elongo na ngai.

Mokapo 16

1 Nalobaki na bino makambu oyo, po bobeta libaku te. 2. Bakobengana bino na basunagoga; ata ngonga ekoya oyo nionso akoboma bino akobanza kopesa epayi ya Nzambe lokumu. 3. Pe bakosala makambu oyo, po bayebi Tata to ngai te. 4. Kasi nalobaki na bino makambu oyo, po tangu ekoya, bokanisa ete ngai nalobaki na bino yango; pe nalobaki na bino makambu oyo te wuta ebandeli, po nazalaki elongo na bino. 5. Kasi sik’oyo nakokende epayi ya oyo atindaki ngai, pe moko te kati na bino atuni ngai : Oza kokende wapi ? 6. Kasi po nalobaki na bino makambu oyo, mawa etondisi mitema na bino. 7. Nde, nalobi na bino solo : Ezali litomba pona bino ete nakende; pamba te soki nakeyi te, Parakleto akoya na bino te; kasi soki nakeyi, nakotindela bino ye. 8. Pe tangu ye wana akoya, akolakisa polele mokili na tina ya lisumu, pe bosembo, pe kosambisama. 9. Na tina ya lisumu, po bandimi ngai te; 10. ya bosembo, po nazokende epayi ya Tata na ngai, pe bokomona ngai lisusu te; 11. ya kosambisama, po mokonzi ya mokili oyo asambisami.

12. Nazali lisusu na makambu ebele ya koloba na bino; kasi sik’oyo bokoka yango te. 13. Kasi tangu ye wana, Molimo ya solo, akoya, akokotisa bino kati na solo nionso : pamba te akoloba na ye moko ; kasi akoloba nionso oyo akoyoka, pe akoyebisa bino makambu oyo ekokoma. 14. Ye wana akolakisa kembo na ngai; po akozwa oyo ezali ya ngai pe akoyebisa bino. 15. Nionso Tata azali na yango ezali ya ngai; yango wana nalobaki ete akozwa oyo ya ngai, pe akoyebisa yango bino. 16. Mwa tangu muke pe bokomona ngai te, pe lisusu mwa tangu muke pe bokomona ngai, [po nazali kokende epayi ya Tata]. 17. Bongo basusu kati na bayekoli na ye balobaki bango na bango : Oyo nini azali koloba na biso : Mwa tangu muke pe bokomona ngai te, pe lisusu mwa tangu muke pe bokomona ngai, pe : Po nazali kokende epayi na Tata ? 18. Bongo balobi : Oyo nini azali koloba : Mwa tangu muke ? Toyebi te nini alobi. 19. Bongo Yesu ayebaki ete balingi kotuna ye motuna, pe alobi na bango : Bino bozali komituna kati na bino pona likambo oyo, ete nalobaki : Mwa tangu muke pe bokomona ngai te, pe lisusu mwa tangu muke pe bokomona ngai. 20. Ya solo, ya solo, nalobi na bino, ete bino bokolela pe bokomitungisa, pe mokili ekosepela; pe bino, bokozala na mawa; kasi mawa na bino ekobongwana na esengo. 21. Mwasi, tangu abotaka, azalaka na mawa, po ngonga na ye ekomi; kasi sima ya kobota mwana, akanisaka lisusu pasi na ye te, na tina ya esengo azali na yango ete mutu abotami na mokili. 22. Pe bongo bino, bozali sik’oyo na mawa; kasi nakomona bino lisusu, pe mitema na bino ekosepela, pe mutu te akolongola esengo na bino. 23. Pe na mukolo wana bokosenga ngai te. Ya solo, ya solo, nalobi na bino, biloko nionso bokosenga Tata na kombo na ngai, akopesa bino yango. 24. Kino sik’oyo bosengi ata eloko moko te na kombo na ngai; bosenga, pe bokozwa, po esengo na bino etondisama. 25. Nalobaki na bino makambu oyo na parabole : ngonga ekoya oyo nakoloba lisusu na bino te na parabole, kasi nakoloba na bino polele na oyo etali Tata. 26. Na mukolo wana bokosenga na kombo na ngai, pe nalobi na bino te ete ngai nakosɛnga Tata pona bino; 27. Po Tata ye moko alingi bino, po bolingaki ngai pe bondimaki ete nabimaki penepene na Nzambe. 28. Nabimaki penepene na Tata, pe nayaki kati na mokili; pe lisusu natiki mokili, pe nakeyi epayi ya Tata.

29. Bayekoli na ye balobi na ye : Tala, sik’oyo olobi polele, pe olobi parabole moko te. 30. Sik’oyo toyebi ete oyebi makambu nionso, pe ozali naposa te ete mutu atuna yo ; na tina wana, tondimi ete yo owuti na Nzambe. 31. Yesu azongiseli bango : Sik’oyo nde bondimi ? 32. Tala, ngonga ekoya, pe eye, ete bokopanzana mutu na mutu na esika na ye, pe bokotika ngai se moko ;- pe nazali ngai moko te, po Tata azali na ngai. 33. Nalobi na bino makambu oyo, po kati na ngai bozala na kimia. Bozali na minioko kati na mokili ; kasi bozala molende, ngai nalongi mokili.

Mokapo 17

1. Yesu alobi makambu wana, atomboli misu na ye na likolo pe alobi : Tata, ngonga esili kokoma; kumisa Mwana na yo, po Mwana na yo akumisa yo, 2. Ndenge opesi ye bokonzi likolo ya mutu nionso, po apesa bomoyi ya seko na banso opesi ye. 3. Pe oyo nde ezali bomoyi ya seko, ete bayeba yo Nzambe se moko ya solo, pe ye oyo otindaki, Yesu Kristu. 4. Ngai nakumisi yo awa na mabele, nasilisi mosala opesaki ngai nasala; 5. Pe sik’oyo kumisa ngai, yo Tata, penepen ena yo moko, na kembo oyo nazalaki na yango penepene na yo liboso ete mokili esalama.

6. Namonisi kombo na yo na batu oyo opesi ngai ya mokili; bazalaki ya yo, pe opesi ngai bango; pe babombi liloba na yo. 7. Sik’oyo bayebi ete nionso oyo opesi ngai ewuti na yo; 8. po maloba opesaki ngai, napesi bango, pe bayambaki yango; pe bayebaki penza ete nawuti na yo, pe bandimi ete otindaki ngai. 9. Ngai, nazali kobondela pona bango; Nazali kobondela pona mokili te, kasi pona baoyo opesi ngai, po bazali ya yo 10. (pe nonso oyo ya ngai ezali ya yo, pe oyo ezali ya yo ezali ya ngai), pe nakumisami na kati na bango. 11. Pe nazali lisusu te na mokili, pe baoyo bazali na mokili, pe ngai, naye na yo. Tata mosantu, batela bango na kombo na yo oyo opesi ngai, po bazala moko lokola biso. 12. Tangu nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na kombo na yo; Nabatelaki baoyo opesaki ngai, pe moko te kati na bango abungi, longola se mwana ya libebi, po ete makomi ekokisama. 13. Mpe sik’oyo naye na yo, pe nalobi makambu oyo kati na mokili, ete bazala na esengo na ngai ya kokisami kati na bango. 14. Ngai, napesi bango liloba na yo, pe mokili eyinaki bango, po bazali ya mokili te, lolenge ngai nazali ya mokili te. 15. Nabondeli te ete olongola bango na mokili, kasi ete obatela bango na mabe. 16. Bazali ya mokili te, ndenge ngai nazali ya mokili te. 17. Bulisa bango na nzela ya solo; liloba na yo ezali solo. 18. Ndenge otindaki ngai na mokili, ngai pe natindi bango na mokili. 19. Pe ngai, namibulisami ngai moko pona bango, po ete bango pe basantisama na bosolo. 20. Nzokande nazali kobondela kaka te pona baoyo, kasi lisusu pona baoyo bakondima ngai na nzela ya liloba na bango; 21. Po banso bazala moko, ndenge yo, Tata, ozali kati na ngai, pe ngai na kati na yo; po bazala moko kati na biso, po mokili endima ete yo otindaki ngai. 22. Pe kembo opesaki ngai, ngai, napesaki yango bango, po bazala moko, lokola biso, tozali moko; 23. Ngai kati na bango, pe yo na kati na ngai; po bazala na bomoko ya kokoka, pe mokili eyeba ete yo otindaki ngai, pe olingaki bango ndenge olingaki ngai. 24. Tata, nalingi pona baoyo opesi ngai, ete esika ngai nazali, bango bazala pe wana elongo na ngai, ete bamona kembo na ngai, oyo opesi ngai; pamba te olingaki ngai liboso ya kotonga mokili. 25. Tata ya sembo; — pe mokili eyebaki yo te, kasi ngai nayebaki yo; pe baoyo bayebi ete yo otindaki ngai. 26. Pe nayebisaki bango kombo na yo, pe nakoyebisaka bango, po bolingo oyo olingaki ngai ezala na kati na bango, pe ngai na kati na bango.

Mokapo 18

1. Sima ya koloba makambu wana, Yesu akendaki elongo na bayekoli na ye na ngambo mosusu ya ebale Kedrone, epai wana elanga moko ezalaki, akotaki na kati na yango, ye na bayekoli na ye. 2. Pe Yudas oyo pe akokaba ye, ayebaki esika yango; po mbala mingi Yesu azalaki kosangana kuna elongo na bayekoli na ye. 3. Bongo Yudas azwaki lipinga ya basoda pe ya basali ya sunedrion, oyo bawutaki na bakonzi ya banganga-nzambe pe na Bafarizai, aye wana, na ba torche mwinda pe ba mwinda ya mafuta mpe bibundeli. 4. Bongo Yesu ayebaki makambu nionso oyo esengelaki ekomela ye, abimi pe alobi na bango : Nani bozali koluka ? 5. Bazongiseli ye : Yesu na Nazarete. Yesu alobi na bango : Ezali ngai. Pe Yudas oyo pe akokaba ye azalaki wana elongo na bango. 6. Bongo tangu alobi na bango : Ezali ngai, bazongaki sima pe bakweyi na mabele. 7. Bongo atunaki bango lisusu : Nani bozali koluka ? Pe balobi : Yesu na Nazarete. 8. Yesu ayanoli : Nalobaki na bino ete ezali ngai; bongo soki bozali koluka ngai, botika baoyo bakende,. 9 — po ete ekokisama liloba oyo alobaki : Na baoyo opesaki ngai, nabungisi ata moko te. 10. Bongo Simona Petelo, azalaki na mopanga, abendaki yango, pe abtaki mowumbu ya nganga-nzambe mokonzi, pe akataki ye litoyi ya mobali; pe kombo ya mowumbu yango ezalaki Malkos. 11. Bongo Yesu alobi na Petelo : Zongisa mopanga na kati ya etui na yango.

12. Bongo lipinga ya basoda na mokonzi ya basoda na basali ya sunedrion ya bayuda bakangaki Yesu pe balingi ye basinga. 13. Pe bamemaki ye liboso epayi ya Ana; po azalaki bokilo ya Kayifa, oyo azalaki nganga-nzambe mokonzi na mbula wana. 14. Nzokande Kayifa ezalaki ye mutu apesaki toli na Bayuda, ete ezali malamu ete na mutu moko akufa pona batu. 15. Simona Petelo alandaki Yesu, pe moyekoli mosusu; pe moyekoli wana ayebanaki na nganga-Nzambe mokonzi, pe akotaki na lopangu ya nganga-Nzambe mokonzi elongo na Yesu; 16. Kasi Petelo atelemaki libanda ya ekuke. Bongo moyekoli mosusu, oyo ayebanaki na nganga-Nzambe mokonzi, abimaki pe alobaki na mwasi mokengeli ya ekuke, pe akotisaki Petelo. 17. Mosali ya mwasi oyo azalaki mokengeli ya ekuke alobi na Petelo ete : Pe yo ozali te moko bayekoli ya mutu oyo ? Ye alobi : Nazali te. 18. Nzokande, bawumbu pe basali ya sunedrion, bapelisaki moto ya makala, batelemaki wana, pamba te malili ezalaki, pe bazalaki koyotola moto; pe Petelo azalaki elongo na bango, atelemaki wana pe azalaki komiyotela. 19. Bongo nganga-Nzambe mokonzi atunaki Yesu mituna na oyo etali bayekoli na ye pe malakisi na ye. 20. Yezu azongiseli ye : Ngai, nalobaki polele na mokili; Nazalaki tangu nionso kolakisa na sunagoga, pe na tempelo epayi Bayuda nionso basanganaka, pe naloba eloko moko te na kobombana. 21. Pona nini ozali kotuna ngai ? Tuna baoyo bayokaki ngai nini nalobaki na bango; tala, bango bayebi nionso nalobaki. 22. Nzokande lokola azalaki koloba makambu wana, moko ya basali ya sunedrion oyo atelemaki wana abetaki Yesu mbata pe alobaki ete : Boye nde ozali koyanola na nganga-nzambe mokonzi ? 23. Yesu ayanoli ye : Soki nalobi mabe, tatola ya mabe; kasi soki nalobaki malamu, pona nini obeti ngai ? 24. Bongo Ana atindaki ye na bakanga ye basinga epayi ya Kayifa, nganga-Nzambe mokonzi.

25. Pe Simona Petelo atelemaki wana, pe koyetolaka; Bongo balobi na ye : Pe yo ozali moko ya bayekoli na ye te ? Awangani yango, pe alobi : Nazali te. 26. Moko kati na bawumbu ya nganga-nzambe mokonzi, mutu ya libota ya ye oyo Petelo akataki ye litoyi, alobi : Ngai namonaki yo te, na kati ya elanga elongo na ye ? 27. Bongo Petelo awanganaki lisusu; pe mbala moko soso eyembi. 28. Bongo kolongwa epayi na Kayifa bamemaki Yesu kino na pretorion ezalaki na tongo; pe bango moko bakotaki te na pretorion, po bakoma mbindo te; kasi mpo baliya Paska. 29. Bongo Pilato abimaki epai na bango pe alobi : bozali kofundela mutu oyo likambu nini ? 30. Bazongisi pe balobi na ye : Soki mutu oyo azalaki mosali mabe te, tolingaki kokaba ye epayi na yo te. 31. Bongo Pilato alobi na bango : Bino bokamata ye, pe bosambisa ye na ndenge ya Mobeko na bino. Bayuda balobi na ye : Ndingisa epesamela biso te koboma ata mutu moko; 32. Po liloba Yesu alobaki ekokisama, ndenge na liwa nini esengelali na ye kokufa. 33. Bongo Pilato akoti lisusu na pretorion pe abengi Yesu pe alobi na ye : Yo, ozali mokonzi ya Bayuda ? 34. Yesu azongiseli ye : Olobi boye na yo moko, to basusu bayebisi yo yango na tina na ngai ? 35. Pilato ayanolaki ete : Ngai, nazali Moyuda ? Ekolo na yo pe bakonzi ya banganga-nzambe bakabi yo epayi na ngai; nini osali ? 36. Yesu ayanoli : Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, basali na ngai balingaki kobunda, po nakabama te na Bayuda; kasi sik’oyo bokonzi na ngai ezali ya awa te. 37. Bongo Pilate alobi na ye : Ozali bongo mokonzi ? Yesu ayanoli : Olobi yango ete nazali mokonzi. Ngai, nabotamaki pona oyo, pe pona yango nde nayaki na mokili, po na tatola solo. Oyo azali ya solo, ayokaka mongongo na ngai. 38. Pilato alobi na ye : Solo ezali nini ? Pe sima ya koloba boye, abimaki lisusu epai ya Bayuda; pe alobi na bango : Ngai, namoni ata mbeba moko te kati na ye; 39. Kasi bozali na bizaleli, ete na Paska natikaka mutu moko na bino; bolingi natikela bino mokonzi ya Bayuda ? 40. Bongo bango nionso bagangaki lisusu : Ye oyo te, kasi Barabas. Nzokande Barabas azalaki moyibi.

Mokapo 19

1 Bongo Pilato akamataki Yesu pe abetisi ye fimbu. 2. Pe basoda batongaki motole ya banzube, batiye yango na moto na ye pe balatisaki ye elamba ya motane-bulé. 3. Pe bayaki epayi na ye pe balobaki : Mbote, Mokonzi ya Bayuda ! Pe babetaki ye ba mbata. 4. Pe Pilato abimaki lisusu libanda, pe alobi na bango : Tala, nakumbeli bino ye libanda, po boyeba ete namoni mabe moko te kati na ye. 5. Bongo Yesu abimaki libanda, alati motole ya nzube pe elamba ya motane-bule. Pe alobi na bango : Tala mutu ! 6. Bongo tangu bakonzi ya banganga-nzambe na basali ya sunedrion bamonaki ye, bagangaki, balobi : Baka na ekulusu, baka ye na ekulusu ! Pilato alobi na bango : Bino moko bozwa ye, pe bobaka ye na ekulusu; po ngai, namoni mbeba moko te kati na ye. 7. Bayuda bazongiselaki ye : Tozali na mobeko, pe na kolanda mobeko na biso asengeli kokufa, po amikomisaki Mwana ya Nzambe.

8. Bongo tangu Pilato ayokaki liloba yango, abangaki mingi koleka. 9. Pe akoti lisusu kati na pretorion pe alobi na Yesu : Ozali ya wapi ? Pe Yesu apesaki ye eyano te. 10. Bongo Pilate alobi na ye : Ozali koloba na ngai te ? Oyebi te ete nazali na nguya ya kotika yo okende, pe ete nazali na nguya ya kobaka yo na ekulusu ? 11. Yesu ayanoli : Olingaki kozala na nguya moko te likolo na ngai, soki epeselamaki yo te wuta likolo; yango wana ye oyo akabaki ngai epayi na yo azali na masumu mingi koleka. 12. Banda wana, Pilato alukaki kotika ye akende; kasi Bayuda bagangaki, koloba : Soki otiki oyo akende, ozali moninga ya Kaisala te; mutu nionso oyo amikomisi ye moko mokonzi, azali kotelemela Kaisala. 13. Bongo Pilato wana ayokaki maloba yango, amemaki Yesu libanda, pe afandaki likolo ya kiti ya mosambisi, na esika oyo ebengami Etando na mabanga, pe na Ebreu Gabbata; 14. (Nzokande ezalaki Kobongisama pona Paska, ezalaki pene na ngonga ya motoba;) pe alobi na Bayuda : Botala mokonzi na bino ! 15. Kasi bango bagangaki : Boma, boma ! baka ye na ekulusu ! Pilato alobi na bango : Nabaka na ekulusu mokonzi na bino ? Bakonzi ya banganga-nzambe bayanolaki : Tozali na mokonzi mosusu te bobele Kaisala. 16. Yango wana apesaki bango ye pona babaka ye na ekulusu; pe bakamataki Yesu, pe bamemaki ye.

17. pe akumbaki ye moko ekulusu na ye, abimi na esika oyo babengi mokuwa ya moto, oyo babengaka na Ebreu Golgota. 18. Epayi babaki ye na ekulusu, pe batu mibale mosusu elongo na ye, moko na ngambo moko pe mosusu na ngambo mosusu, pe Yesu na kati-kati. 19. Pe Pilato akomisaki ekomeli, pe atiaki yango likolo ya ekulusu; pe ekomamaki : Yesu na Nazarete, Mokonzi ya Bayuda. 20. Bongo ebele Bayuda batangaki makomi yango, po esika oyo babaki Yesu na ekulusu ezalaki pene na engumba; pe ekomamaki na Ebreu, na Greke, na Latin. 21. Bongo bakonzi ya banganga-nzambe ya Bayuda balobaki na Pilato : Kokoma te : Mokonzi ya Bayuda; kasi ete ye alobaki : Nazali mokonzi ya Bayuda. 22. Pilato ayanoli : Oyo nakomi, nde nakomi. 23. Bongo basoda tangu babaki Yesu na ekulusu, bakamataki bilamba na ye pe bakabolaki yango na biteni mineyi, eteni moko pona soda moko. pe nzambala na ye lokola. Nzokande nzambala na ye ezalaki ya kotongoma te, po etongamaki nionso na eteni moko kobanda likolo. 24. Bongo balobani kati na bango : Topasola yango te, kasi tobeta yango zeke pona nani ekozala, po makomi ekokisama oyo eloba : Bakaboli bilamba na ngai kati na bango, pe babetaki zeke na nzambala na ngai. Bongo basoda basalaki makambu wana.

25. Batelemaki penepene na ekulusu ya Yesu, mama na ye, pe Maria, ndeko ya mama na ye, mwasi ya Klopa, pe Maria ya Magdalene. 26. Bongo Yesu amonaki mama na ye na moyekoli oyo azalaki kolinga atelemaki wana, alobaki na mama na ye : Mwasi, tala mwana na yo. 27. Bongo alobaki na moyekoli : Tala Mama na yo. Pe kaka na ngonga wana moyekoli amemaki ye epayi na ye. 28. Sima na yango Yesu, ayebaki ete makambu nionso esilaki kokokisama, alobi, po makomi ekokisama : Nazali na posa ya komela. 29. Bongo ezalaki na mbeki moko wana etonda na vino ya ngayi. Pe batondisaki linuka moko na vino ya ngayi, pe batiaki yango na hisope, batiaki yango na monoko na ye. 30. Tangu Yesu azuaki vino ya ngayi, alobi : Ekokisami. Pe akitisaki moto na ye, azongisi molimo na ye.

31. Bongo Bayuda, po ete banzoto etikala na ekulusu te na mokolo ya Sabata, pamba te ezalaki mokolo ya Kobongisama (pamba te mokolo ya Sabata wana ezalaki monene), basengaki Pilato ete babuka makolo pe balongola bango. 32. Bongo basoda bayaki pe babukaki makolo ya moto ya liboso pe ya mosusu oyo babakamaki na ekulusu elongo na ye. 33. Kasi tangu bakomaki epayi ya Yesu, lokola bamonaki asilaki kokufa, babukaki ye makolo te; 34. Kasi moko ya basoda atobolaki ye mopanzi na likonga; pe mbala moko makila pe mayi ebimaki. 35. Ye oyo azali kotatola amonaki; pe litatoli na ye ezali solo; pe ayebi ete azali koloba solo, po bino pe bondima. 36. Po makambu oyo esalemaki po ete makomi ekokokisama : Mokuwa na ye moko te ekobukana. 37. Pe lisusu, makomi mosusu eloba : Bakotala epayi na ye oyo batobolaki.

38. Na sima ya makambu wana, Yozef ya Arimataia, oyo azalaki moyekoli ya Yesu, na kobombana, pona kobanga Bayuda, asengaki Pilato alongola nzoto ya Yesu; pe Pilato apesaki ye nzela. Bongo akendaki pe alongolaki nzoto ya Yesu. 39. Pe Nikodemo, oyo na ebandeli akendaki na butu epayi ya Yesu, ayaki, amemaki mire basangisa aloe, soki kilo tuku misatu na misatu. 40. Bongo bazwaki nzoto ya Yesu pe bazingaki yango na bilamba ya lino, elongo na malasi ya solo kitoko, na lolenge Bayuda bakundaka. 41. Nzokande na esika oyo abakamaki na ekulusu ezalaki na elanga moko, pe na kati ya elanga kunda moko ya sika, oyo bakundaki mutu moko te kati na yango. 42. Bongo batiaki Yesu wana, po na Bobongisami ya Bayuda, po kunda ezalaki penepene.

Mokapo 20

1. Pe mukolo ya yambo ya poso, Maria ya Magdala ayaki na tongo na kunda, lokola ezalaki nanu butu; pe amoni libanga elongwa na kunda. 2. Bongo akimaki mbangu pe akeyi epayi ya Simona Petelo pe epayi ya moyekoli mosusu oyo Yesu alingaki, pe alobi na bango : Basili kolongola Nkolo na kunda, pe toyebi te esika nini batie ye. 3. Bongo Petelo na moyekoli mosusu babimaki pe bakendaki na kunda. 4. Pe bakimaki mbangu bango mibale elongo; pe moyekoli mosusu akimaki mbangu liboso koleka Petelo, pe akomaki liboso na kunda; 5. Pe angunzamaki, amoni bilamba na mabele; nde akotaki te. 6. Bongo Simona Petelo, oyo azalaki kolanda ye, akomaki; pe akotaki na kati ya kunda; pe amoni bilamba ya lino na mabele, 7. pe elamba oyo ezipaki moto na ye, oyo ezalaki te na bilamba ya lino, kasi elingamaki na esika mosusu. 8. Bongo moyekoli mosusu, oyo ayaki liboso na kunda, akoti, pe amoni pe andimi; 9. Pamba te bayebaki nanu te makomi, ete asengelaki kosekwa kati na bakufi. 10. Bongo bayekoli bazongaki epayi na bango. 11. Kasi Maria atelemaki libanda pembeni ya kunda, pe azalaki kolela. Bongo wana azalaki kolela, angumamaki na kati ya kunda; 12. Pe amoni baanjelu mibale balati bilamba ya pembe, bafandi, moko na moto pe mosusu na makolo, wana epayi nzoto ya Yesu etiamaki. 13. Pe balobi na ye : Mwasi, pona nini ozali kolela ? Alobi na bango : Po balongoli Nkolo na ngai, pe nayebi te esika batie ye. 14. Wana alobi yango, azongi sima, pe amoni Yesu oyo azalaki wana; pe ayebaki te ete ezalaki Yesu. 15. Yesu alobi na ye : Mwasi, pona nini ozali kolela ? Ozali koluka nani ? Ye, akanisaka ete ezali mobateli elanga, alobaki na ye : Nkolo, soki yo olongoli ye, yebisa ngai esika otie ye, pe nakolongola ye. 16 Yesu alobi na ye : Maria ! Ye, lokola abalukaki, alobaki na ye na Ebreu : Rabuni (oyo elimboli, molakisi). 17. Yesu alobi na ye : Kosimba ngai te, po namati nanu te epayi ya Tata na ngai; kasi kende epayi ya bandeko na ngai, pe yebisa bango, namati epayi ya Tata na ngai pe Tata na bino, pe epayi ya Nzambe na ngai pe Nzambe na bino. 18. Maria ya Magdala akendeki koyebisa bayekoli ete amoni Nkolo, pe ayebisi ye makambu oyo.

19. Bongo tangu pokwa ekomaki, mukolo wana, mokolo ya liboso ya poso, pe bikuke ya esika oyo bayekoli bazalaki, pona kobanga Bayuda, ezalaki ya kokangama, Yesu ayaki pe atelemaki na katikati na bango. Pe alobi na bango : Kimya ezala na bino ! 20. Pe nsima ya koloba boye, alakisaki bango maboko na ye pe mopanzi na ye. Bongo bayekoli basepelaki tangu bamoni Nkolo. 21. Bongo Yesu alobaki lisusu na bango : Kimia ezala na bino ! Lolenge Tata atindaki ngai, ngai pe natindi bino. 22. Pe sima ya koloba boye, afulaki na kati na bango pe alobaki na bango : Bozwa Molimo Mosantu. 23. Na oyo bokolimbisa masumu, bakolimbisama; pe na oyo nionso bokolimbisa te, ekolimbisama te.

24 Nzokande Tomas, moko ya bazomi na mibale, oyo abengami Didimos, azalaki elongo na bango te tangu Yesu ayaki. 25. Bongo bayekoli mosusu balobi na ye : Tomonaki Nkolo. Kasi ye alobi na bango : Soki namoni te na mabok na ye te elembo ya ba sete, pe natie lisapi na ngai na elembo ya ba sete pe natie loboko na ngai na mopanzi na ye te, nakondima yango te. 26. Pe sima ya mikolo mwambe, bayekoli na ye bazalaki lisusu na kati ya ndaku, pe Tomas elongo na bango. Yesu aye, bikuke ezalaki ya kokangama; pe atelemi na kati na bango pe alobi : Kimia ezala na bino ! 27. Alobi na Tomas : Tia mosapi na yo awa, pe tala maboko na ngai; tombola pe loboko na yo, pe tia yango na mopanzi na ngai; pe kozala motema libanga te, kasi zala mondimi. 28. Tomas ayanoli pe alobi na ye : Nkolo na ngai pe Nzambe na ngai ! 29. Yesu alobi na ye : Po omoni ngai, nde ondimi; bapambolama baoyo bamoni te pe bandimi.

30. Yesu asalaki lisusu liboso ya bayekoli na ye bilembo misusu mingi, oyo ekomami na buku oyo te. 31. Kasi nionsoo oyo ekomami po ete bondima ete Yesu azali Kristu, Mwana ya Nzambe, pe na kondima bozwa bomoyi na kombo na ye.

Mokapo 21

1. Sima na yango, Yesu amonanaki lisusu ye moko na bayekoli pembeni ya mayi monene ya Tiberiados; pe amimosamaki boye : 2. Simona Petelo na Tomas, oyo babengi Didimos, na Natanael, moto ya Kana ya Galilaia, na bana ya Zebede, na bayekoli na ye mibale mosusu bazalaki esika moko. 3. Simona Petelo alobi na bango : Nakeyi koloba mbisi. Balobi na ye : Tokende elongo na yo. Babimaki, pe bamataki kati na masuwa, pe na butu wana bazwaki eloko te. 4. Pe tongo esilaki kotana, Yesu atelemi na libongo; nzokande, bayekoli bayebaki te ete ezalaki Yesu. 5. Bongo Yesu alobi na bango : Bana, bozali na eloko ya kolia ? Bayanolaki ye : Te. 6. Alobi na bango : Bobwaka monyama na ngambo ya mobali ya masuwa, pe bokozwa. Bongo babwakaki yango, pe bakokaki te kobenda yango, po na ebele ya bambisi. 7. Moyekoli oyo Yesu alingaki mingi, alobi boye na Petelo : Ezali Nkolo. Bongo Simona Petelo wana ayokaki ete ezali Nkolo, alataki elamba na ye, pamba te azalaki bolumbu, pe amibwaki na mayi ya monene. 8. Pe bayekoli mosusu bayaki na masuwa ya muke (po bazalaki mosika te ya mabele, kasi na molayi soki kama moko ), kobenda monyama ya bambisi. 9. Bongo tangu bakitaki na mabele, bamonaki kuna moto ya makala, pe mbisi ya kotumba batia likolo na yango, pe lipa. 10. Yesu alobi na bango : Bomema sik’oyo mwa mbisi oyo bowuti koloba. 11. Simona Petelo amataki pe abendaki monyama na mabele, etonda na bambisi ya minene kama moko na tuku mitanu na misatu; pe atako ezalaki mingi penza, monyama epasukaki te. 12. Yesu alobi na bango : Boya, bolia. Pe moko te kati na bayekoli amekaki kotuna ye : Ozali nani ? Bayebaki ete ezalaki Nkolo. 13. Yesu apusani pe azwi lipa pe apesi bango yango pe lolenge wana mbisi ya koyita. 14. Yango ezalaki mbala ya misatu oyo Yesu amonisamaki epayi ya bayekoli sima ya kosekwa na ye kati na bakufi.

15. Bongo tangu basilisaki kolya, Yesu alobi na Simona Petelo : Simona, mwana ya Yoane, olingi ngai koleka baoyo ? Alobi na ye : Iyo, Nkolo, oyebi ete nalingaka yo. Yesu Alobi na ye : Leyisa bana ya mpate na ngai. 16. Alobi na ye lisusu pona mbala ya mibale : Simona, mwana ya Yoane, olingi ngai ? Petelo Alobi na ye : Iyo, Nkolo, oyebi ete nalingaka yo. Alobi na ye : Zala mobateli ya bampate na ngai. 17. Alobi na ye mbala ya misatu : Simona, mwana ya Yoane, olingi ngai ? Petelo ayokaki mawa po alobaki na ye pona mbala ya misatu : Olingi ngai ? Pe alobi na ye : Nkolo, oyebi makambu nionso, oyebi ete nalingi yo. Yesu alobi na ye : Leyisa bampate na ngai. 18. Ya solo, ya solo, nalobi na yo, Tangu ozalaki elenge, omikangaki mokaba na yo pe kokendaka epayi oyo olingi; kasi tangu okokoma mobange, okopesa maboko na yo, pe mosusu akokangisa yo mokaba pe akokumba yo epayi yo olingi te. 19. Nzokande alobaki boye pona kolakisa na liwa nini akokumisa Nzambe. Pe esilisi ye koloba boye, alobi na ye : Landa ngai. 20. Petelo, abalukaki, amonaki moyekoli oyo Yesu alingaki kolanda ye, ye oyo, na tangu ya elambo, alalaki na ntolo na ye pe alobaki : Nkolo, nani oyo akokaba yo ? 21. Petelo, komona ye, alobi na Yesu : Nkolo, pe oyo, nini ekokomela ye ? 22. Yesu alobi na ye : Soki nalingi ete awumela kino tangu nakoya, yango etali yo na nini ? Landa ngai. 23. Liloba oyo epanzanaki na kati ya bandeko, ete moyekoli wana akokufa te. Nzokande Yesu alobaki na ye te ete akokufa te, kasi : Soki nalingi awumela kino tangu nakoya, etali yo na nini ?

24. Ezali moyekoli wana oyo azali kotatola makambu wana nionso, pe akomaki yango, pe toyebi ete litatoli na ye ezali solo. 25. Pe ezali lisusu na makambu ebele mosusu oyo Yesu asalaki, oyo, soki ekomamaki moko na moko, nakanisi te ata mokili ekokaki kozala na esika pona mikanda oyo elingaki komama.