Mokanda ya yambo ya Polo epayi ya Bakorinto

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6Mokapo 7Mokapo 8Mokapo 9Mokapo 10Mokapo 11Mokapo 12Mokapo 13Mokapo 14Mokapo 15Mokapo 16

 

 

 

1        Mokapo 1

1. Polo, oyo abengami apostolo ya Yesu Kristu na mokano ya Nzambe, pe ndeko Sostene; 2. na eklezia ya Nzambe oyo ezali na Korinto, epayi ya baoyo basantisami na kati na Kristu Yesu, baoyo babengami basantu, elongo na baoyo banso babelelaka kombo ya Nkolo na biso Yesu Kristu, pe ya bango pe ya biso : 3. Ngolu pe kimia na bino, kowuta na Nzambe Tata na biso pe Nkolo Yesu Kristu!

4. Natondaka Nzambe na ngai tango nionso pona bino, na tina ya ngolu na Nzambe oyo epesamela bino kati na Kristu Yesu, 5. Na tina ete na makambu nionso botondisami na bozwi kati na ye na maloba nionso pe na boyebi nionso, 6. Na lolenge ete litatoli ya Kristu ezalaki ya kotelema ngwi na kati na bino, 7. Na bongo bozangi karizme moko te wana bozali kozela emoniseli ya Nkolo na biso Yesu Kristu. 8. Ye oyo akokembisa bino makasi kino suka bozanga mbeba na mukolo ya Nkolo na biso Yesu Kristu. 9. Nzambe, oyo na nzela na ye, babengami na boyokani ya Mwana na ye Yesu Kristu Nkolo na biso, azali sembo.

10. Nzokande bandeko, nazali kolendisa bino na kombo ya Nkolo na biso Yesu Kristu, ete boloba banso monoko moko, pe ete bokabwani ezala te kati na bino, kasi ete bozala na bomoko ya kokoka na makanisi moko pe motema moko. 11. Pamba te, bandeko na ngai, batu ndaku ya Kloe bayebisaki ngai ete makelele ezali kati na bino. 12. Botala nalobi boye, moko na moko na bino alobi: Ngai, nazali ya Polo; pe ngai, ya Apollo; pe ngai, ya Kefa; pe ngai, ya Kristu. 13. Kristu azali ya kokabwana? Polo abakamaki na ekulusu pona bino? to bobatisimaki pona kombo ya Polo? 14. Nazali kotonda Nzambe po ete nabatisaki moko te kati na bino longola kaka Krispos na Gayos. 15. Po ete moko te aloba ete nabatisaki pona kombo na ngai. 16. Nabatisaki lisusu ndaku ya Stefanas; longola yango, nayebi te soki nabatisaki mutu mosusu. 17. Po Kristu atindaki ngai te po na kobatisa, kasi po nasakola sango malamu, na bwanya ya maloba te, po ekulusu ya Kristu ekoma pamba te; 18. Po liloba ya ekulusu ezali liboma pona baoyo bazali kobunga, kasi na biso oyo tozwi lobiko ezali nguya ya Nzambe. 19. Po ekomami: Nakobebisa bwanya ya batu na bwanya pe nakokomisa pamba mayele ya batu ya mayele. 20. Wapi mutu na bwanya ? wapi mokomi ? wapi batu ya kokanisaka-kanisaka na mayele na bango ya ekeke oyo? Nzambe akomisi liboma te bwanya ya mokili oyo? 21. Po lokola kati na bwanya ya Nzambe, mokili na nzela ya bwanya na ye eyebaki Nzambe te, esepelisaki Nzambe, na nzela ya liboma ya eloko oyo eteyami, kobikisa baoyo bandimi; 22. lokola Bayuda basengaka bilembo pe Bagreke balukaka bwanya; 23. Kasi biso, tozali kosakola Kristu oyo abakamaki na ekulusu, libaku na Bayuda, pe liboma pona bikolo. 24. kasi na baoyo banso babengami, Bayuda na Bagreke, Kristu nguya ya Nzambe pe bwanya ya Nzambe; 25. Pamba te liboma ya Nzambe ezali bwanya koleka batu, pe bolembu ya Nzambe ezali makasi koleka batu. 26. Boye bandeko, botala kobengama na bino, Ete bato ya bwanya na lolenge ya bomoto bazali mingi te, batu ya nguya mingi te, bato ya lokumu mingi te,…27. Kasi Nzambe aponi biloko ya liboma ya mokili pona koyokisa soni bato ya bwanya; pe Nzambe aponi biloko ya bolembu ya mokili pona koyokisa soni biloko ya makasi; 28. Pe Nzambe aponoki biloko ezanga lokumu na mokili, pe biloko oyo ezali ya kotiolama, pe oyo ezali te, pona kokomisa pamba oyo ezali; 29. Pona mosuni moko te amikumisa liboso ya Nzambe. 30. Nzokande bozali ya ye kati na Kristu Yesu, oyo akomaki pona biso bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, bosantu, pe lisiko. 31. Po ete, ndenge ekomama, « oyo azali komikumisa, amikumisa kati na Nkolo ».

 

2        Mokapo 2

1. Pe ngai moko, tango nakendaki epayi na bino, bandeko, nakendeki te na kitoko ya liloba to na bwanya, na koteyaka bino litatoli ya Nzambe; 2. Pamba te nakanisaki malamu koyeba eloko moko te kati na bino longola kaka Yesu Kristu pe Yesu Klisto oyo abakamaki na ekulusu. 3. Pe ngai moko nazalaki kati na bino na bolembu, pe na bobangi, pe na kolenga monene; 4. Pe maloba na ngai pe liteya na ngai ezalaki te na maloba ya elengi ya bwanya ya kondimisa, kasi na komonisama ya Molimo pe ya nguya. 5. Po ete kondima na bino efanda te likolo na bwanya ya batu, kasi kati na nguya ya Nzambe.

6. Nzokande tozoloba bwanya kati na baoyo bakola, bwanya yango ya ekeke oyo te, to ya bakonzi ya ekeke oyo ezali kokende; 7. Kasi tozoloba bwanya ya Nzambe kati na mustere, oyo ebombami, oyo Nzambe abongisaki liboso ya bikeke pona kembo na biso; 8. Oyo ata moko te kati ya bakonzi ya ekeke oyo ayebaki yango, (po soki bayebaki yango, nde babakaki te na ekulusu Nkolo ya nkembo). 9 — Kasi lokola ekomami: oyo lisu emoni te, pe litoyi eyoki te, pe emati te na motema ya mutu, oyo Nzambe abongisaki pona balingami na ye, 10 — Kasi Nzambe amonisi yango biso na nzela ya Molimo na ye; pamba te Molimo atalaka bozindo ya makambu nionso, ata bozindo ya Nzambe. 11. Po nani na batu ayebi makambu ya mutu, soki se elimo ya mutu oyo ezali kati na ye? Bongo pe lokola mutu te ayebi makambu ya Nzambe pe, kaka se Molimo ya Nzambe.

12 Kasi biso, tozwi elimo ya mokili te, kasi Molimo oyo ya Nzambe, po toyeba makambu oyo Nzambe apesi biso ofele; 13. Yango tolobaka, te na maloba oyo elakisami na bwanya ya batu, kasi oyo elekasami na Molimo, tolimbolaka makambu ya molimo na nzela ya molimo. 14. Mutu nyama ayambaka te biloko oyo ya Molimo ya Nzambe, pamba te ezali liboma pona na ye; pe akoki koyeba yango te, po ete basosolaka yango na molimo. 15. Kasi ye oyo ya molimo asosolaka makambu nionso; kasi mutu te akososola ye; 16. Pamba te « nani ayebi likanisi ya Nkolo pona ateya ye »? Kasi biso tozali na likanisi ya Kristu.

 

3        Mokapo 3

1. Pe ngai, bandeko, nakokaki te koloba na bino lokola batu ya molimo, kasi lokola batu ya mosuni, lokola bana mike kati na Kristu. 2. Napesaki bino miliki ya komɛla, kasi bilei ya makasi te, pamba te bokokoka nanu te, pe ata sik’oyo bokokaka te, 3. Po bozali nanu batu ya mosuni. Po lokola kati na bino zuwa pe koswana ezali, bozali batu ya mosuni te pe bozali kotambola na lolenge ya batu te? 4. Boye tangu moko alobi: Ngai, nazali ya Polo; pe mosusu: Ngai nazali ya Apollo, bozali batu te? 5. Na Bongo Apollo azali nani, pe Polo azali nani? Basali na nzela na bango bondimaki, pe na moko na moko na bango lolenge Nkolo apesi. 6. Ngai nalonaki, Apollo asopelaki mayi; kasi Nzambe azali kokolisa. 7. Na boye ete moloni azali eloko te, to mosopeli mayi, kasi Nzambe oyo akolisaka. 8. Kasi moloni pe mosopeli mayi bazali na bomoko; kasi moko na moko akozwa lifuti na ye moko na lolenge ya mosala na ye moko. 9. Po tozali batu basalaka elongo na Nzambe; bozali bilanga ya Nzambe, ndaku ya Nzambe.

10. Na lolenge ya ngolu ya Nzambe oyo epesamelaki ngai, lokola arkiteke ya bwanya natie fondatio, pe mosusu azali kotonga likolo na yango; kasi moko na moko atala lolenge nini azali kotonga likolo na yango 11. Po mutu mosusu te akoki kotia fondatio mosusu, bobele oyo etiamaki, oyo ezali Yesu Kristu. 12. Soki mutu atongi likolo ya fondatio oyo ba wolo, palata, mabanga ya talo, mabaya, matiti baniama baliaka, matiti, 13. Mosala ya moko na moko ekomonana polele, po mukolo ekomenisa yango, pamba te na kati ya moto ekomonisama; pe nini ezali mosala ya moko na moko, moto ekomeka. 14. Soki mosala ya mutu oyo atongaki likolo na yango etikali, akozwa lifuti; 15. Soki mosala ya mutu esili kotumbama, akobungisa, kasi ye moko akobika, kasi lokola na nzela ya moto.

16. Boyebi te ete bozali tempelo ya Nzambe pe ete Molimo ya Nzambe afandi kati na bino? 17. Soki moko abebisi tempelo ya Nzambe, Nzambe akobebisa ye, po tempelo ya Nzambe ezali mosantu, pe bongo nde bino bozali.

18. Moko te amikosa: soki moko kati na bino azali komimonisa lokola azali na bwanya na ekeke oyo, akoma liboma po akoma na bwanya; 19. Po bwanya ya mokili oyo ezali liboma liboso ya Nzambe; esila komama: Ye oyo akanga batu ya bwanya kati na mayele mabe na bango. 20. Pe lisusu: Nkolo ayebi makanisi ya batu ya bwanya, ete ezali pamba. 21. Na yango, mutu te amikumisa kati na batu, po nionso ezali ya bino. 22. Ezala Polo, to Apollo, to Kefa, to mokili, to bomoyi, to liwa, to makambu ya lelo, to makambu ekoya : 23. Nionso ezali na bino, pe bino na Kristu, pe Kristu na Nzambe.

 

4        Mokapo 4

1. Boye mutu nionso atala biso lokola basali  ya Kristu pe bakambi ya ba mustere ya Nzambe. 2. Awa lisusu, oyo bazali kosenga epayi ya bakambi ezali ete moko na moko amonana sembo. 3. Kasi pona ngai na tina mingi te soki nasambisami na bino, to na batu misusu; pe namisambisamaka ata ngai moko te. 4. Po nazali na eloko moko te na lisosoli na ngai; kasi na yango nalongi te; ye oyo akosambisa ngai ezali Nkolo. 5. Na bongo, bosambisa eloko moko te liboso ya tango, kino Nkolo akoya, ye oyo akobimisa na pole oyo ebombami kati na molili, pe akomonisa makanisi ya mitema; pe na sima moko na moko akozwa masanzoli na ye kowuta epayi na Nzambe.

6. Bandeko, soki nalobi likolo na ngai moko pe Apollo, ezali na tina na bino, po na biso, boyekola te kotombola makanisi na bino likolo ya oyo ekomami, noki bokomikumisa te nakozwa pona moko na kotelemela mosusu. 7. Po nini esali bokeseni kati na yo pe mosusu? Pe nini ozali na yango oyo ozwi te? Soki pe ozwi yango, pona nini omikumisa lokola nde ozwi yango te? 8. Bino bosili kotonda ! Bino bosili kozala bazwi; elongo na biso te bozali kodondwa; A ! nalingi malamu ete bodondwa, po ete biso pe todondwa elongo na bino!

9. Nakanisi ete Nzambe abimisi biso batu ya suka, biso bapostolo, lokola bato oyo bakabami pona liwa; po biso tokomi eloko ya kotala pona mokili, pe pona baanjelu pe pona batu. 10. Biso tozali maboma pona Kristu, kasi bino bozali batu na bwanya kati na Kristu ! biso tozali batu na bolembu, kasi bino bozali bilombe; bino na lokumu, kasi biso na kotiolama. 11. Kino ngonga oyo, tozali koniokwama na nzala pe posa ya komela, pe tozali bolumbu, pe tozali kobetama, pe tozali kotelengana. 12. Pe tozali komona pasi na kosalaka misala na maboko na biso moko; tofingami, tozali kopambola; baniokolaka biso, tozali kokanga motema; 13. Totongami, tozali komikembisa; tokomi lokola biloko ya fulu ya mokili pe bosoto ya banso kino sik’oyo. 14. Ezali pona koyokisa biso soni te ete nakomi makambo oyo, kasi nakebisi bino lokola bana na ngai ya bolingo. 15. Po soki bokozala na balakisi nkoto zomi kati na Kristu, bozali na batata mingi te, po ete ngai nabotaki bino kati na Kristu Yesu na nzela ya sango malamu. 16. Bongo nabondeli bozala bamekoli na ngai.

17. Na yango wana natindeli bino Timoteo, oyo azali mwana na ngai ya bolingo, pe sembo kati na Nkolo; oyo akokundela bino banzela na ngai kati na Kristu, lolenge nalakisaka bisika nionso kati na ba eklezia nionso. 18. Nzokande bamisusu bazali komikumisa, lokola nde nasengeli koya epayi na bino te; 19. Kasi nakoya noki epayi na bino, soki Nkolo alingi, pe nakoyeba te, liloba ya banso bazali komikumisa, kasi nguya. 20. Po Bokonzi ya Nzambe ezali na maloba te, kasi na nguya. 21. Bolingi nini? Naya epayi na bino na lingenda, to na bolingo pe na elimo ya bopolo?

 

5        Mokapo 5

1. Tozali koyoka na bisika nionso kolobaka ete pite ezali kati na bino, pe pite ya lolenge oyo ete ezali te ata na kati ya bikolo, na boye ete mutu moko azwa mwasi ya tata na ye. 2. Pe botondi na lolendo, pe bosili kosala matanga te, po ete mutu oyo asali likambu yango alongwama na kati na bino.

3. Pona ngai, lokola nazali te na nzoto, kasi nazali na elimo, nasilaki kosambisa lokola nazali wana. 4. (Bino pe elimo na ngai toyangani, na nguya ya Nkolo na biso Yesu Kristu), pona kokaba, na kombo ya Nkolo na biso Yesu Kristu, ye oyo asalaki likambu yango. 5. Iyo,  kokaba mutu ya lolenge wana na Satana pona kobebisama ya mosuni, po ete elimo na ye ebika na mukolo ya Nkolo Yesu. 6. Komikumisa na bino ezali kitoko te; boyebi te ete  ndambu muke ya levin ematisaka pate mobimba? 7. Bolongola levin ya kala, po bozala pate ya sika, po bozali na levin te. Pamba te Paska na biso, Kristu, akabamaki mbeka. 8. Na bango wana, tosala feti na levin ya kala te, to na levin ya mayele mabe te pe ya makambu mabe te, kasi na mapa ezanga levin ya bosembo pe ya solo.

9. Nakomelaki bino kati na mokanda ete bozala na botamboli te elongo na batu ya pite te. 10. Ezali ata moke te elongo na batu ya pite ya mokili oyo, to batu ya lokoso pe babotoli, to basambeli ya bikeko, pamba te boye esengeli bobima na mokili; 11. kasi sik’oyo nakomeli bino, ete soki mutu moko abengami ndeko azali mitu na pite, to lokoso, to mosambeli bikeko, to mofingi, to molangwi ya masanga, to mobotoli biloko, bozala na botamboli elongo na ye te, pe bolia na mutu ya ndenge wana te. 12. Po ezali na ngai kosambisa baoyo bazali libanda? Bino, bozali kosambisa baoyo bazali na kati te? 13. Kasi baoyo ya libanda, Nzambe akosambisa bango. Bolongola batu mabe na kati na bino.

 

6        Mokapo 6

1. Moko kati na bino azali na likambu na mosusu azali kokende kofunda liboso ya baoyo bazangi sembo kasi liboso ya basantu te? 2. Boyebi te ete basantu bakosambisa mokili? Pe soki na bino mokili ekosambisama, bozali baoyo babongi te na kosambisa makambu ya mike-mike? 3. Boyebi te ete tokosambisa baanjelu? pe tokosambisa te makambu ya bomoyi oyo?

4. Bongo soki bozali na mikakatano pona makambu ya bomoyi oyo, bozali kotiya na kiti pona kosambisa baoyo bazali ya kotiolama na kati ya eklezia. 5. Nazoloba pona koyokisa bino soni: bongo ezali na mutu moko te ya bwanya kati na bino, ata moko te, oyo akoki kosilisa likambu pe kozongisa boyokani kati na bandeko na ye? 6. Kasi ndeko azali kokende na kosambisama na ndeko, pe yango liboso ya baoyo baboya kondima. 7. Na yango, ata lolenge nini ezali bokweyi na bino, ete bozala na kosambisama kati na bino. Pona nini bozali kondima te mabe basali bino? Pona nini bomitikaka te basala bino mabe? 8. Kasi ezali bino bozali kosala mabe pe kobotola biloko, pe yango epayi ya bandeko na bino. 9. Boyebi te ete baoyo bazangi boyengebene bakozwa libula te ya bokonzi ya Nzambe? Bomikosa te : batu ya pite te, basambeli ya bikeko te, batu na ekobo te, mibali bazangi lolenge ya kimobali te , mibali basangisaka nzoto na mibali te. 10. Miyibi te,  balokoso ya biloko te, balangwi masanga te,  bafingi te, babotoli na makasi biloko ya batu te, bakozwa te libula ya Bokonzi ya Nzambe. 11. Pe basusu kati na bino bazalaki lolenge wana; kasi bosukolamaki, kasi bosantisamaki, kasi bozwi boyengebene na kombo ya Nkolo Yesu, pe na Molimo ya Nzambe na biso.

12. Makambu nionso epesameli ngai nzela, kasi makambu nionso ezali na litomba te; biloko nionso epesameli ngai , kasi nakomipesa nzela te ete nazala mowumbu ya eloko moko te. 13. Bileyi ezali pona libumu, pe libumu pona bileyi; kasi Nzambe akobungisa oyo pe wana.

Po nzoto ezali te pona pite, kasi pona Nkolo, pe Nkolo pona nzoto. 14. Po Nzambe asekwisaki Nkolo, pe akosekwisa biso na nguya na ye. 15. Boyebi te ete nzoto na bino ezali biteni ya Kristu? Bongo nakokamata biteni ya Kristu pona kokomisa yango biteni ya mwasi ya ndumba? Ezala bongo te! 16. Boyebi te ete oyo asangani na mwasi ya ndumba akomi nzoto moko elongo na ye? “Po bango mibale, elobama, bakozala mosuni moko” ; 17. Kasi oyo asangani na Nkolo azali elimo moko elongo na ye. 18. Bokima pite, lisumu nionso oyo mutu akosala ezali libanda ya nzoto, kasi mutu na pite asalelaka nzoto na ye moko lisumu. 19. To boyebi te ete nzoto na bino ezali tempelo ya Molimo Mosantu oyo ezali kati na bino, pe bozwi yango epayi ya Nzambe? Pe bozali na bino moko te; 20. Pamba te bino basombamaki na talo mingi. Na bongo, bokumisa Nzambe na nzoto na bino.

 

7        Mokapo 7

1. Na tina na makambu oyo bokomeli ngai, ezali malamu pona mobali kotiya loboko te likolo ya mwasi; 2. Kasi na tina ya pite, moko na moko azala na mwasi na ye, pe mwasi azala na mobali na ye. 3. Mobali azongisili na mwasi oyo esengeli, pe lolenge wana mwasi azongisela mobali. 4. Mwasi azali na bokonzi na nzoto na ye moko te, kasi mobali; pe lolenge moko pe mobali azali na bokonzi na nzoto na ye moko te, kasi mwasi. 5. Bopekisana te moko na mosusu, longola bobele soki boyokani pona mwa tangu, po bomipesa na libondeli, pe bozala lisusu elongo, po ete Satana ameka bino te pona kozanga komipekisa na bino.

6. Nzokande nalobi boye na boyokani, kasi ezali etinda te; 7. kasi nalingaki ete batu nionso bazala lokola ngai; nzokande moko na moko azali na likabo na ye ya ngolu kowuta na Nzambe, moko na lolenge moko pe mosusu na lolenge mosusu.

8. Nalobi na baoyo babala te pe na baoyo bakufela mibali ezali malamu pona bango batikala lokola ngai. 9. Kasi soki bakomikonza te, tika ete babala, po ezali malamu kobala na esika ya kotumba.

10. Na baoyo babalani, napesi bango mitindo, ngai te, kasi Nkolo, ete mwasi akabwana te na mobali; 11. (Pe soki akabwani, atikala na kobala te, to azongisa boyokani na mobali na ye;) pe mobali atika mwasi na ye te.

12. Kasi na bamisusu, nalobi, ngai kasi Nkolo te : soki ndeko mobali azali na mwasi oyo andimaka te pe alingi kofanda na ye elongo, atika ye te ; 13. Pe soki mwasi azali na mobali oyo andimaka te, pe alingi kofanda elongo na ye, atika mobali na ye te. 14. Po mobali oyo andimaka te abulisami na mwasi na ye, pe mwasi oyo andimaka te abulisami na ndeko mobali; soki bongo te bana na bino balingaki bazala mbindo; kasi sik’oyo bazali basantu. 15. Kasi soki moto oyo andimaka te akeyi, tika ye akende; ndeko mobali to ndeko mwasi bazali na bawumbu te na likambu wana; kasi Nzambe abengi biso pona na kimia. 16. Po oyebi nini, mwasi, soki okobikisa te mobali na yo? to oyebi nini mobali, soki okobikisa te mwasi na yo ? 17. Na boye, tika moko na moko asala lokola Nkolo apesaki ye, moko na moko atambola lokola Nzambe abengaki ye; pe bongo nazali kopesa mitindo na ba eklezia nionso.

18. Ozalaki ya kokatama ngenga tangu obengamaki, atikala akatisama ngenga. Obengami wana ozalaki mosutu ete akatama ngenga te. 19. Kokatama ngenga ezali eloko te, pe mosutu ezali eloko te, kasi motuya kotosa mibeko ya Nzambe. 20. Tika ete moko na moko atikala na lolenge azalaki na yango tangu oyo abengamaki. 21. Obengamaki yo mowumbu, komitungisa te; kasi, soki okoki kokoma nsomi, salela yango: 22. Po mowumbu oyo abengami na Nkolo azali mosikoli ya Nkolo; ndenge moko lokola pe mutu ya nsomi oyo abengamaki azali mowumbu ya Klisto. 23. Basombamaki na talo moko; bokoma bawumbu ya bato te. 24. Bandeko, tika ete moko na moko atikala liboso ya Nzambe na ndenge oyo abengamaki.

25. Na tina ya baoyo bayebi nzoto ya mobali to ya mwasi te, nazali na etinda ya Nkolo te; kasi nazali kopesa makanisi na ngai lokola nazwaki mawa ya Nkolo pona nazala sembo. 26. Na bongo, namoni ete ezali malamu, na tina ya mikakatano ya lelo- ete ezali malamu pona mutu kotikala lokola azali. 27. Okangami na mwasi, koluka kokabwana na ye te. Okangami na mwasi te, koluka mwasi te. 28. Nzokande, soki ata obali, osali lisumu te; pe soki mwasi moseka abali, asali lisumu te. Kasi baoyo bakosala bongo bakozala na mikakatanu na tina na mosuni; kasi ngai, nazali kosala bino ngolu.

29. Nzokande nalobi boye, bandeko: Tangu ezali mokuse. lisusu, ezali ete baye bazali na mwasi bazala lokola bazali na mwasi te; 30. Pe baoyo bazali kolela, lokola nde bazali kolela te; pe baoyo bazali kosepela, lokola bazali kosepela te; pe baoyo basombaka, lokola bazali na biloko te; 31. Pe baoyo bazali kosalela mokili lokola nde bazali kosalela yango te ndenge balingi; po elilingi ya mokili oyo ekoleka.

32. Kasi nalingi ete bozala na komitungisa te. Oyo abali te atiaka motema na ye na makambu ya Nkolo, ndenge nini akosepelisa Nkolo; 33. Kasi ye oyo abala atiaka motema na ye na makambu ya mokili, ndenge nini akosepelisa mwasi na ye. 34. Bokeseni ezali kati na mwasi ya libala na oyo abala te : ye oyo abala te, atiaka motema na ye na makambu ya Nkolo, po azala mosantu na nzoto pe na molimo; kasi ye oyo abala atiaka na motema na ye na makambu ya mokili, ndenge nini akosepelisa mobali na ye.

35. Nalobi boye pona bolamu na bino moko, ezali te pona kotiela bino mitambu, kasi pona makambu oyo ezali kobonga, pe pona bomikanga na mosala ya Nkolo kozanga eloko oyo ezali kotungisa bino. 36. Kasi soki moko amoni ete azali kosala makambu oyo ebongi te epayi ya ngondo moseka na ye, pe ete aleki fololo ya mbula na ye, pe esengeli kozala bongo, asala oyo alingi: asali lisumu te; — tika bango babalana. 37. Kasi ye oyo na motema na ye atelami makasi, pe azali na se ya bosenga te, ye oyo azali na bokonzi likolo na mokano na ye moko pe akani na motema na ye kobatela ngondo moseka na ye moko, asali malamu. 38. Na boye, ye oyo abali asali malamu; pe oyo abali te asali malamu koleka.

39. Mwasi akangami tangu nionso oyo mobali na ye azali na bomoyi; kasi soki mobali akufi, azali na bonsomi ya kobala oyo ye alingi, bobele kati na Nkolo; 40. Azali na esengo mingi soki atikali boye, ndenge ngai nazali kokanisa: kasi namoni ete ngai pe nazali na Molimo ya Nzambe.

 

8        Mokapo 8

1. Pona tina ya biloko ebonzamaki mbeka na bikeko, toyebi — (po biso banso tozali na boyebi; boyebi evimbisaka, kasi bolingo etongaka. 2. Soki mutu akanisi ete ayebi likambu moko, ayebi nanu te lolenge asengeli koyeba; 3. Kasi soki mutu alingi Nzambe, ye wana ayebani na ye). 4. Na bongo pona oyo etali kolia biloko ebonzami mbeka na bikeko, toyebi ete ekeko ezali eloko te na mokili, pe ezali na Nzambe mosusu te bobele Moko. 5. Po ete soki ezali na biloko oyo babengami banzambe, ezala na likolo to na mabele, - lokola ezali banzambe pe bankolo ebele). 6. Kasi pona biso, Nzambe azali kaka moko, Tata, na ye nionso ezali, pe biso pona ye, pe Nkolo azali kaka moko, Yesu Kristu, na nzela na ye nionso ezali, pe pona ye biso tozali.

7. Kasi boyebi ezali na banso te; kasi basusu kino sik’oyo bamesana na bikeko, baliaka misuni wana lokola nde ebonzami mbeka na bikeko, pe lisosoli na bango ya bolembu, ekomi mbindo. 8. Nzokande bileyi moko te ekopusa biso penepene ya Nzambe; soki tolie te, tokopekisami eloko moke te, pe soki tolie, tokozwa eloko mingi koleka te.

9. Kasi tokeba ete bonsomi oyo bozali na yango ekoma libaku te pona baoyo bazali na bolembu. 10. Pamba te soki moko amoni yo, yo oyo ozali na boyebi, ofandi na mesa kati na tempelo ya bikeko, lisosoli na ye oyo ezali na bolembu, ekokembisama te pona koliya biloko oyo babonzi mbeka na ekeko? 11. Pe oyo azali na bolembu, ndeko oyo pona ye Kristu akufelaki, akobebisama pona boyebi na yo. 12. Nzokande na kosumuka boye liboso na bandeko, pe na kozokisa lisosoli na bango oyo ezali ya bolembu, bozali kosumuka liboso na Klisto. 13. Na yango wana, soki bileyi moko ezali libaku pona ndeko na ngai, nakoliyaka lisusu mosuni te libela na libela, po nazala libaku te pona ndeko na ngai.

 

9        Mokapo 9

1. Nazali na bonsomi te? Nazali apostolo te? Namoni Yesu Nkolo na biso te? Bino bozali te mosala na ngai kati na Nkolo? 2. Soki pona basusu nazali apostolo te, kasi nazali yango pona bino; po bozali elembo ya apostola na ngai kati na Nkolo. 3. Oyo ezali eyano na ngai epayi ya baoyo basambisaka ngai : 4. Tozali na ndingisa te ya koliya pe komela? 5. Tozali na ndingisa te ya komema elongo na biso ndeko mwasi lokola mwasi, lokola bapostolo mosusu basalaka, pe bandeko ya Nkolo pe Kefa? 6. To ezali kaka ngai na Barnabas nde tozali na ndingisa ya kosala te? 7. Nani akokende na etumba na mosolo na ye moko? Nani alonaka nzete ya vino pe aliyaka mbuma na yango te? To nani aleyisaka etonga ya bibwele pe ye moko azwaka te miliki ya etonga bibwele? 8. Makambu oyo nazali koloba na lolenge na batu? To mobeko eloba te makambo wana ? 9. Po kati na mobeko ya Mose ekomami : Okokanga te monoko ya ngombe oyo ezali konyata mbuma. Nzambe azali komitungisa pona bangombe? 10. To  aloba nionso wana pona biso? Po ezali pona biso nde yango ekomamaki, ete oyo azali kobalola mabele asengeli kobalola na elikya, pe oyo azali koniata mbuma asengeli asala yango na elikya ete akozwa oyo ya ye. 11. Soki tolonaki pona bino ya elimo, ezali ya koleka mingi soki tobukaka ya mosuni na bino? 12. Soki basusu bazali na ndingisa wana likolo na bino, biso tozali na ndingisa wana te koleka likolo na bino te? Kasi tosaleli yango te, nzokande tozali kondima mikumba nionso, po totiya ata libaku moko te na sango malamu ya Kristu. 13. Boyebi te ete baoyo basalaka biloko ya bule baliyaka na tempelo; ete baoyo bazali kosala na etumbelo bazali na biloko na bango na etumbelo? 14. Na lolenge wana Nkolo atindaki baoyo bapanzaka sango malamu babika na sango malamu.

15. Kasi ngai nasaleli ata moko na yango te, pe nakomi te pona ekomela ngai ; po malamu ngai kokufa, na esika ya komona mutu moko kobebisa tina ya kembo na ngai. 16. Po soki nakopanza sango malamu, ezali pona ngai eloko te ya komikumisa, po ezali likambo ya ntina oyo etindami na ngai, po mawa na ngai soki nakopanza na sango malamu te. 17. Po soki nasali yango na mokano ngai, nazali na lifuti; kasi soki ezali naposa na ngai moko te, ezali bokombami moko oyo epesameli ngai. 18. Bongo nini ezali lifuti na ngai ? Ezali ete, na kopanzaka sango malamu, nasala ete sango malamu ezala ofele, pona nasalela te ndingisa na ngai na kati ya sango malamu.

19. Po ata nazali nsomi epayi ya batu nionso, namikomisi mowumbu ya banso, po ete nazwa batu ebele koleka; 20. Elongo na Bayuda nakomaki lokola Moyuda, po nazwa Bayuda; Na baoyo bazali na se ya mobeko, lokola nazalaki na se ya mobeko, ata ngai moko nazali na se ya mobeko te, po nazwa baoyo bazali na se ya mobeko; 21. Na baoyo bazali na Mibeko te, lokola nazalaki na Mibeko te (ezali te ete nazali na Mibeko te na oyo etali Nzambe, kasi nazali na bosembo nionso kotosa Kristu), po nazwa baoyo bazalaki na Mibeko te. 22. Nakomi pona baoyo ya bolembu, po nazwa baoyo ya bolembu; Pona banso, Nakomi nionso, po ete ata ndenge nini nabikisa ata basusu. 23. Nasalaka nionso na tina ya sango malamu, ete nazala mosangani elongo na yango.

24. Boyebi te ete baoyo bazali kokima mbangu kati na stade bango nionso bakimaka, kasi kaka moko azwaka mbano? Bokima na lolenge ete bolonga. 25. Nzokande oyo nionso oyo azali kobunda na esika ya masano abikaka na makambu nionso bomoyi ya ndenge ya koliya; bango bongo, po na kozwa motole oyo ebebaka; kasi biso, oyo ekobeba te. 26. Yango wana ngai nazali kopota mbangu boye, te lokola nayebi te pona nini; Nazobunda boye, kasi te lokola nazobunda na mopepe;  27. kasi nazali kokonza nzoto na ngai pe nakomisi yango mowumbu, noki te sima ya koteya basusu, ngai moko nabwakama.

 

10 Mokapo 10

1. Bandeko, nalingi te ete bobosana, ete batata na biso bazalaki bango nionso na se ya lipata, balekaki bango nionso na kati ya mayi monene, 2. Pe babitasamaki bango nionso pona Mose na lipata pe na moyi monene, 3. Pe bango nionso baliaki bileyi ndenge moko ya elimo, 4. Pe ete bango nionso bamelaki mayi ndenge moko ya elimo, po bazalaki komela na libanga moko ya elimo oyo ezalaki kolanda bango, pe libanga yango ezalaki Kristu. 5. Kasi Nzambe asepelaki na mingi kati na bango te, pamba te bakweyaki na esobe. 6. Nzokande makambu oyo ekomaki lokola ndakisa ya etali biso, po ete tolula makambu ya mabe te, lokola ba oyo wana balulaki. 7. Bozala basambeli ya bikeko te, lokola basusu kati na bango, lokola ekomama: Batu bafandaki pona koliya pe komela, pe batelemaki pona kobina. 8. Tosala pite te, lokola basusu kati na bango basalaki pite, pe bakufaki na mukolo moko batu nkoto tuku mibale na misatu. 9. Tomeka Kristu te, lokola basusu kati na bango bamekaki ye pe na nzela ya banyoka nde bakufaki. 10. Boyimayimaka pe te, lokola basusu kati na bango bayimaki pe bakufaki na mobebisi. 11. Nzokande makambu nionso wana lokola tipe ekomelaki bango, pe ekomamaki pona kozala likebisi pona biso oyo basuka ya bikeke ekomeli. 12. Na bongo, oyo akanisi ete atelemi akeba noki te akweya. 13. Momekano moko te ekomeli bino oyo ezali na batu nionso te; pe Nzambe oyo azali sembo, akotika te ete bomekama koleka oyo bokokoka, kasi kati na komekama akosala pe nzela ya kobima po ete bokoka kotelemela yango.

14. Na yango, balingami na ngai, bokima mosika ya kokumisa bikeko. 15. Nazali koloba lokola na batu ya mayele: bosambisa bino moko oyo nalobi. 16. Kopo ya lipamboli oyo tozali kopambola, ezali te bosangani na makila ya Kristu? Lipa oyo tobukaka, ezali bosangani ya nzoto ya Kristu te? 17. Po biso baoyo tozali ebele tozali lipa moko, nzoto moko, po biso nionso tozwaka esika na lipa bobele moko. 18. Botala Israel na lolenge ya mosuni: baoyo baliyaka bambeka bazali na bosangani na etumbelo te? 19. Bongo naloba nini? ete oyo babonzaka mbeka na ekeko ezali eloko ya tina? to ete ekeko ezali eloko ya tina? 20. Kasi ete biloko oyo bikolo ebonzaka mbeka, ebonzaka bambeka yango na bademon kasi na Nzambe te : nzokande nalingi te bozala na bosangani na bademon. 21. Bokoki te komela kopo ya Nkolo pe kopo ya bademon; bokoki te kozwa esika na mesa ya Nkolo pe na mesa ya bademon. 22. To tolingi kosilikisa zuwa ya Nkolo? Tozali makasi koleka ye?

23. Nionso epesameli nzela, kasi nionso ezali litomba te; nionso epesameli nzela, kasi nionso ekotongaka te. 24. Moko te aluka bolamu na ye moko, kasi ya basusu. 25. Boliya nionso oyo etekamaka na wenze, na kotunaka mituna pona lisosoli. 26. Pamba te mabele ezali ya Nkolo, pe nionso oyo ezali kati na yango . 27. Nzokande soki moko kati na baoyo bandima te abengi yo, pe bolingi kokende, boliya nionso oyo etiyami liboso na bino, na kotunaka motuna te pona lisosoli. 28. Kasi soki moko alobi na bino ete: oyo ekabamaki mbeka - boliya yango te, na tina ya oyo akebisi bino, pe na tina ya lisosoli. 29. Tangu nalobi: lisosoli, ezali oyo ya bino te, kasi ya mosusu; pamba te pona nini bonsomi na ngai esambisami na lisosoli ya mosusu? 30. Soki ngai nazali kozongisa matondi na oyo nazali kozwa, pona nini bakopamela ngai pona eloko oyo ngai nakopesaka matondi pona yango? 31. Na bongo, ezala bozali koliya to komela to eloko nionso bokosala, bosala nionso pona kembo ya Nzambe. 32. Bokoma libaku te na Bayuda to Bagreke to eklezia ya Nzambe; 33. Lokola ngai nalukaka kosepelisa banso na makambu nionso, kolukaka litomba na ngai moko te, kasi ya ebele ya batu, po babika.

 

11 Mokapo 11

1. Bozala bamekoli na ngai, lokola ngai pe nazali ya Kristu.

2. Nazali kofelisite bino ete bozali kokanisaka ngai na makambu nionso, pe ete bozali kobatela malakisi lokola napesaki bino yango. 3. Nalingi kasi boyeba ete moto ya mobali nionso ezali Kristu, pe moto ya mwasi ezali mobali, pe moto ya Kristu ezali Nzambe. 4. Mobali nionso azali kobondela to koprofetize azali na eloko na moto na ye azali kotiola moto na ye; 5. Mwasi nionso azali kobondela to koprofetize na moto na ye polele, azali kotiola moto na ye, ezali lolenge moko na mwasi oyo bakata suki. 6. Bongo soki mwasi azipami te, tika bakokola ye suki. Kasi soki ezali soni pona mwasi kozala na suki na bakata to bakokola, tika azala ya kozipama. 7. Po mobali lokola azali elilingi pe kembo ya Nzambe, akoki kozipa moto na ye te; kasi mwasi azali kembo ya mobali. 8. Pamba te mobali abimaka na mwasi te, kasi mwasi na mobali; 9. Po mobali akelamaki te na tina ya mwasi, kasi mwasi na tina ya mobali. 10. Na yango mwasi, na tina ya baanjelu, asengeli azala na elembo ya bokonzi na moto na ye. 11. Nzokande, kati na Nkolo, mwasi te kozanga mobali, to mobali te kozanga mwasi; 12. Pamba te lokola mwasi abimaka na mobali, lolenge moko pe mobali na nzela ya mwasi; kasi makambu nionso ewuti na Nzambe. 13. Bosambisa na bino moko: Ezali malamu ete mwasi abondela Nzambe na kozanga komizipa? 14. Lolenge ya kozala ya mokili yango moko elakisaka bino te ete soki mobali azali na suki milayi, ezali soni pona ye? 15. Kasi soki mwasi azali na suki milayi, yango ezali kembo pona ye, pamba te suki milayi epesameli ye lokola elamba. 16. Kasi soki mutu moko amonani lokola motelemeli, biso tozali na ezaleli wana te, pe ba Eklezia ya Nzambe te.

17. Nzokande na kopesaka bino mobeko oyo, nafelisite bino te ; ete bosanganaka te, pona bolamu na bino te, kasi pona kobebisama na bino. 18. Ya liboso, nazoyoka koloba ete bozali kosangana na eklezia, ete bokabwani ezali kati na bino, pe nandimi yango moke; 19. Pamba te esengeli pe bokabuani na biteyelo ezala kati na bino, po baoyo bandimama bamonana na kati na bino.

20. Na yango, tango bozali kosangana na esika moko, ezali te koliya bileyi ya Nkolo : 21. Po tangu bozali koliya, moko na moko azali kozwa liboso bileyi na ye moko, pe moko azali na nzala, pe mosusu alangwe masanga. 22. Bozali na bandako te pona koliya pe pona komela? To bozali kotiola eklezia ya Nzambe, pe bozali koyokisa soni baoyo bazali na eloko te? Naloba na bino nini? Nakumisa bino? Na oyo nakokumisa bino te.

23. Pamba te, ngai nazwi na Nkolo oyo nalakisi bino pe: ete Nkolo Yesu, na butu oyo bakabaki ye, azwaki lipa. 24. Pe sima ya kozongisa matondi, abukaki yango pe alobi : Oyo ezali nzoto na ngai, oyo ezali pona bino; bosala boye pona kokanisaka ngai. 25 Bobele bongo, akamataki pe kopo, sima ya koliya, alobi : Kopo oyo ezali boyokani ya sika na makila na ngai: bosalaka boye tangu nionso bokomelaka yango, pona kokanisaka ngai. 26. Po tangu nionso oyo bokoliyaka lipa oyo pe bokomela kopo, bokotatolaka liwa ya Nkolo kino tangu akoya.

27. Bongo mutu nionso oyo akoliya lipa to akomela kopo ya Nkolo na lolenge oyo ebongi te, akozala na mokumba na nzoto pe makila ya Nkolo. 28. Kasi mutu amimeka ye moko, pe bongo aliya lipa yango pe amela kopo yango; 29. Pamba te oyo akoliya pe akomela azali koliya pe komela etumbu po na ye moko, soki azali kososola nzoto te. 30. Na yango wana, mingi kati na bino bazali na bolembu pe maladi, pe ebele penza basili kolala pongi. 31. Kasi soki tokomisambisa, wana tokosambisama te. 32. Kasi tangu tosambisami, ezali Nkolo mutu azali kopesa biso etumbu, po ete tokotama te etumbu elongo na mokili. 33. Bongo, bandeko na ngai, tangu bosanganaka pona koliya, bozelanaka moko na basusu; 34. Soki moko azali na nzala, aliya na ndaku na ye, po ete bosangana te pona bosambisama. Po na makambu mosusu, nakobongisa yango tangu nakoya.

 

12 Mokapo 12

1. Bandeko, na tina na oyo etali ya molimo, nalingi te ete bozala na bozangi boyebi. 2. Boyebi  ete tango bozalaki bato ya bikolo, ndenge nini bamemaki bino epayi ya bikeko oyo elobaka te, ndenge bino batikaki ete bokumbama. 3. Na yango nazali koyebisa bino ete moko te koloba na Molimo ya Nzambe, akoloba: Anatema Yesu; pe moko te akoki koloba : Nkolo Yesu soki na nzela se na Molimo Mosantu.

4. Makabo ya ngolu ezali ndenge na ndenge, kasi Molimo moko. 5. Misala ezali ndenge na ndenge, pe Nkolo moko; 6. Lolenge ya kosalela ezali ndenge na ndenge, kasi Nzambe moko oyo azali kosala nionso kati na banso. 7. Na moko na moko komonisama ya Molimo epesameli pona oyo ezali litomba : 8. Na moko epesameli na nzela ya Molimo, liloba ya bwanya; pe na mosusu liloba ya boyebi, na lolenge ya Molimo kaka moko; 9. Na mosusu kondima, na Molimo se moko; pe na mosusu ba makabo ya ngolu ya kobikisa, na Molimo se moko; 10. Pe na mosusu lolenge mingi ya kosala makamwisi; pe na mosusu profesi; pe na mosusu bososoli ya milimo; pe na mosusu mitindo ya minoko ya ndenge na ndenge; pe na mosusu ndimbola ya minoko. 11. Kasi Molimo bobele moko asalaka makambu nionso wana, pe akabolaka moko na moko na ndenge ye alingi.

12. Po lokola nzoto ezali moko pe ezali na biteni ebele, kasi biteni nionso ya nzoto, atako ezali ebele, bazali nzoto moko, lolenge moko pe ezali Kristu. 13. Po biso banso tobatisamaki na Molimo moko pona kozala nzoto moko, ezala Bayuda, to Bagreke, to bawumbu, to bansomi; pe biso nionso tomelisami na Molimo moko. 14. Pamba te nzoto ezali eteni moko te, kasi ebele. 15. Soki lokolo elobaki: Po nazali loboko te, nazali ya nzoto te, na bongo azali ya nzoto te? 16. Pe soki litoyi elobaki: Po nazali lisu te, nazali ya nzoto te, na bongo azali ya nzoto te? 17. Soki nzoto mobimba ezalaki lisu, epayi wapi matoyi elingaki kozala? Soki nionso ezalaki koyoka, epayi wapi koyoka solo elingaki kozala? 18. Kasi Nzambe sik’oyo atia biteni, moko na moko na bango, na nzoto, lokola alingaki. 19. Nzokande, soki nionso ezalaki eteni moko, nzoto elingaki kozala wapi?

20. Kasi sikoyo biteni ezali ebele, kasi nzoto ezali moko. 21. Lisu ekoki koloba na loboko te: Nazali naposa na yo te; to lisusu moto na makolo: Nazali naposa na bino te; 22. Kasi biteni ya nzoto oyo ezali komonana lokola bizali na bolembu, ezali na motuya; 23. Pe biteni ya nzoto oyo tomonaka ete ezali na lokumu mingi te, tozali kozinga yango na lokumu monene koleka; pe biteni na biso oyo toyokelaka soni bazwaka kobongisama monene, 24. Kasi biteni na biso ya malamu ezali naposa na yango te. Kasi Nzambe abongisi nzoto na kopesaka lokumu monene na oyo ezangi yango, 25. Ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi ete biteni ya nzoto esungana moko na moko. 26. Pe soki eteni moko ezali koniokwama, biteni nionso  koniokwama elongo na ye; soki eteni moko ekumisami, biteni nionso ekumisama elongo na ye. 27. Nzokande bozali nzoto ya Kristu, pe biteni na ye moko na moko.

28. Pe Nzambe atia bamosusu na kati ya eklezia: — liboso bapostolo, ya mibale baprofete, ya misato balakisi, sima banguya, pe makabo ya ngolu ya kobikisa, basungi, baoyo bazali na makoki ya kotambwisa, ndenge na ndenge ya minoko. 29. Banso bazali bapostolo? Banso bazali baprofete ? Banso bazali balakisi? Banso bazali na banguya? 30. Banso bazali na makabo ya ngolu ya kobikisa? Baonso balobaka na minoko mosusu? Banso balimbolaka ? 31. Nzokande bolukaka na molende makabo minene ya ngolu: pe nakolakisi bino nzela moko ya malamu koleka.

 

13 Mokapo 13

1. Soki nalobi na minoko ya batu pe ya baanjelu, kasi nazali na bolingo te, nazali lokola kuivre  oyo ezali kosala makelele to lokola ngonga (eteni ya kuivre) oyo etiaka makelele ya pamba. 2 pe soki nazali na profesi, pe nayebi ba mustere nionso pe nazali na boyebi nionso, pe soki nazali na bondimi nionso ete nalongola bangomba, kasi nazali na bolingo te, nazali eloko te. 3. Pe soki nakokabola biloko na ngai nionso na bileyi, pe nakokaba nzoto na ngai pona etumbama, kasi nazali na bolingo te, ezali litomba te pona ngai.

4. Bolingo ezali motema molayi; asalisaka pe atonda boboto; bolingo ezali na zuwa te; bolingo emikumisamaka te; avimbaka na lolendo te; 5. Asalaka te makambu oyo ebongi te; alukaka litomba na ye moko te; atombokaka te ; atangaka mabe te likolo ya basusu; 6. Asepelaka na bozangi bosembo te, kasi asepelaka na solo; 7. Azipaka makambu nionso, andimaka nionso, alikiaka nionso, ayikaka mpiko na nionso. 8. Bolingo esilaka te. Kasi ba profesi? Yango ekobebisamaka. Ezali na minoko? Ekosila. Ezali na boyebi ? ekozala na suka na yango. 9. Po toyebi ndambu, pe to profetizaka ndambu; 10. Kasi tango oyo ya kokoka ekoya, oyo ezali ya ndambu ekosuka. 11. Tangu nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nazalaki kokanisa lokola mwana moke, nazalaki kobanza lokola mwana; tango nakomi mukolo, nasilisi na makambu nionso oyo ezali ya bomwana. 12. Po sik’oyo nazali komona na nzela ya talatala, na molili, kasi sik’oyo misu na misu; sik’oyo nayebi ndambu, kasi na sima nakoyeba malamu lokola pe nayebani. 13. Kasi  sik’oyo makambu misatu oyo ewumela: kondima, elikia, bolingo; kasi oyo eleki monene ezali bolingo.

 

14 Mokapo 14

1. Bolanda bolingo, pe bozala na molende makasi oyo ya molimo, pe mingi koleka boprofetize. 2. Po oyo alobaka minoko alobaka na batu te, kasi na Nzambe, po moko te ayokaka ye; kasi na elimo azali koloba ba mustere. 3. Kasi oyo azali ko profetize azoloba na batu pona kotonga, pe kolendisa, pe kobondisa. 4. Oyo alobaka minoko amitongaka ye moko; kasi ye oyo azali ko profetize atongaka eklezia. 5. Nzokande nalingi malamu ete bino nionso bolobaka na minoko, kasi mingi koleka boprofetize; kasi ye oyo azali ko profetize aleki ye oyo alobaka minoko, bobele se soki alimboli, ete eklezia ezwa kotongama. 6. Pe sik’oyo, bandeko, soki naye epayi na bino nakoloba na minoko, na nini nakozala litomba pona bino, longola se soki nakoloba na bino na emoniseli, to na boyebi, to na ba profesi, to na malakisi? 7. Lolenge wana pe biloko oyo ezangi bomoyi oyo epesaka mingongo, ezala flite to nzenze, soki ezali kobimisa te makelele ekeseni, ndenge nini tokoyeba nini ebetami na flite to na nzenze? 8. Po lisusu, soki kelelo epesi mongongo oyo ezali koyebana te, nani akomibongisama pona etumba? 9. Lolenge wana pe bino, na monoko, soki bozali kobimisa maloba oyo ekoki kososolama te, ndenge nini bakoyeba oyo elobami, po bokolobaka na mopepe? 10. Ezali nayebi te lolenge boni ya mingongo na mokili, pe moko te kati na bango ezangi mongongo ya bokeseni.11. Bongo soki nayebi te motuya ya mongongo te, nakozala barbare pona oyo azali koloba, pe oyo azali koloba akozala barbare pona ngai. 12. Bongo bino pe, lokola na molende makasi bozali koluka oyo ya Molimo, boluka kozala na yango mingi pona kotonga eklezia. 13. Na yango, oyo azali kolobaka na monoko abondela pona alimbola. 14. Po soki nabondeli na monoko, molimo na ngai ezali kobondela, kasi mayele na ngai ezali kobota mbuma te. 15. Ezali nini bongo? Nakobondela na molimo, kasi nakobondela pe na kososolama ; Nakoyemba na molimo, kasi nakoyemba pe na kososolama. 16. Soki te, soki opamboli na Molimo, ndenge nini oyo afandi na esika ya mutu azangi boyebi akoki koloba amen na matondi na yo, po ayebi te nini oyo ozali koloba? 17. Pamba te yo, ya solo, ozali kopesa matondo; kasi mosusu atongami te. 18. Natondoka Nzambe po nalobaka monoko koleka bino nionso; 19. Kasi na kati ya eklezia nalingi koloba maloba mitanu na bososoli na ngai, po kolakisa pe basusu, na esika ya koloba maloba nkoto zomi na monoko.

20 Bandeko, bozala bana te na makanisi na bino, kasi, pona mabe, bozala bana mike; kasi, na makanisi na bino, bozala mikolo. 21. Ekomami kati na mibeko: Na minoko mosusu pe na nzela ya mbebu ya bapaya nakoloba na batu oyo; pe ata bongo bakoyoka ngai te, elobi Nkolo. 22. Na boye minoko ezali elembo pona bandimi te, kasi pona baoyo bandimaka te; kasi profesi, pona baoyo bandimaka te, kasi pona bandimi. 23. Na yango, soki eklezia mobimba esangani na esika moko, pe banso bazoloba na minoko, pe batu ya pamba to baoyo bandimaka te bakoti wana, bakoloba te ete bozali batu ya liboma? 24. Kasi soki banso bazali koprofetize, pe oyo andimaka te, to mutu ya pamba akoti, apameli na banso pe asambisami na banso. 25. Basekele ya motema na ye emonisami; pe bongo, akokweya na elongi na ye, akokumisa Nzambe, kotatola ete Nzambe azali solo kati na bino.

26. Bandeko, bongo nini ? Tangu bino bosangani, moko na moko na bino azali na psome, azali na malakisi, azali na monoko, azali na emoniseli, azali na ndimbola: tika nionso esalema pona kotonga. 27. Pe soki moko akoloba na monoko, tika ete ezala mibale, to mingi koleka misatu, pe moko sima na moko, pe moko alimbola; 28. Kasi soki mobongoli azali te, afanda kimia na kati ya eklezia, pe aloba na ye moko pe na Nzambe; 29. Pe ba profete, mibale to misatu baloba, pe basusu basambisa yango; 30. Pe soki emoniseli moko epesameli moko mosusu oyo afandi, tika oyo ya liboso afanda kimia. 31. Po bokoki banso koprofetize moko na moko, po banso bayekola pe balendisama. 32. Pe milimo ya baprofete ezali na se ya bokonzi ya baprofete. 33. Po Nzambe azali ya mobulu te, kasi ya kimia, lokola na ba eklezia nionso ya basantu.

34. Tika ete basi bafanda kimia na kati ya ba eklezia, po ete epesameli bango nzela te baloba; kasi bazala na botosi, lokola pe eloba mobeko. 35. Pe soki balingi koyekola likambu moko, batuna mibali na bango moko na ndaku, pamba te ezali soni pona mwasi koloba na kati ya eklezia.

36. Liloba ya Nzambe ewutaki epayi na bino, to ekomelaki kaka bino? 37. Soki mutu akanisi ete azali profete to mutu akambami na Molimo, ayeba ete oyo nakomeli bino ezali mobeko ya Nkolo. 38. Pe soki mutu azangi boyebi, azala na boyebi te.

39. Na bongo, bandeko, bozala na molende makasi pona koprofetize, pe bopekisa te koloba na minoko. 40. Kasi nionso esalema na ndenge ya malamu pe na molongo.

 

15 Mokapo 15

1. Bandeko, nazali kozongisela bino na makanisi sango malamu oyo napanzaki epayi na bino, oyo bino pe bozwaki pe botelemi kati na yango. 2. Na nzela na yango pe bobikisami, soki bosimbi ngwi liloba oyo napanzelaki bino, longola soki bondimaki pamba. 3. Pamba te napesaki bino liboso oyo ngai nazwaki: Kristu akufaki pona masumu na biso, lolenge ya makomi. 4. Pe ete akundamaki, pe asekwaki na mokolo ya misato, lolenge ya makomi; 5. Pe amonanaki na Kefa, na sima na bazomi na mibale. 6. Na sima, amonanaki na bandeko kama mitano na mbala moko, mingi kati na bango bazali kino sik’oyo, kasi bamosusu pe balala. 7. Na sima, amonanaki na Yakobo, pe na bapostolo nionso; 8. Pe na sima ya banso, lokola na mwana matshombe amonanaki pe epayi na ngai. 9. Po ngai, nazali oyo moke kati na bapostolo, oyo abongi te kobengama apostolo, po nanyokolaki eklezia ya Nzambe. 10. Kasi na ngolu ya Nzambe, nazali oyo nazali; pe ngolu na ye epayi na ngai ezangi mbuma te, kasi nasali mingi koleka bango banso, nzokande ngai te, kasi ngolu ya Nzambe oyo ezali elongo na ngai. 11. Na bongo, ezala ngai to bango, botala oyo toteyaka, pe bongo bondima.

12. Nzokande soki Kristu ateyami ete asekwaki kati na bakufi, ndenge nini basusu kati na bino balobi ete lisekwa ya bakufi ezali te? 13. Kasi soki lisekwa ya bakufi ezali te, Kristu pe asekwaki te; 14. Pe soki Kristu asekwaki te, wana liteya na biso ezali na eloko te, pe kondima na bino ezali na eloko te; 15. Pe biso kutu tomonani batatoli ya lokuta ya Nzambe, po totatoli na tina ya Nzambe ete asekwisaki Kristu, pe asekwisaki ye te soki penza bakufi bakosekwa te. 16. Boye  soki bakufi bakosekwa te, Kristu pe asekwaki te; 17. Pe soki Kristu asekwaki te, kondima na bino ezali eloko te, bozali kaka kati na masumu na bino. 18. Bongo baoyo wana balali na kati ya Kristu babungi. 19. Soki ezali kaka pona bomoyi oyo nde totiaki  elikya na Kristu, tozali batu na mawa mingi koleka batu nionso.

20. (Kasi ezali solo Kristu asekwaki kati na bakufi, mbuma ya liboso ya baoyo balali. 21. Po lokola na nzela ya mutu liwa, bobele na nzela ya mutu lisekwa ya bakufi ezali ; 22. Pamba te lokola na Adam banso bakufaka , ndenge moko kati na Kristu banso bakobika bomoyi; 23. kasi moko na moko na molongo na ye: mbuma ya liboso, Kristu; pe sima baoyo bazali ya Kristu, na boyeyi na ye; 24. Bongo suka, tangu akozongisa bokonzi epayi na Nzambe Tata, tangu akobebisa bokonzi nionso, pe bokasi nionso, pe nguya nionso. 25. Po asengeli kokonza kino tangu akotiya banguna nionso na se ya makolo na ye : 26. Monguna ya suka oyo akobebisama ezali liwa. 27. Po  “atie biloko nionso na se ya makolo na ye” . Nzokande, tangu alobi ete  nionso ezali na se na ye, emonani polele ete kolongola ye oyo atiyaki nionso na se na ye. 28. Kasi tangu nionso ekotiama na se na ye, Mwana ye moko akotosa ye oyo atiaki nionso na se na ye, po Nzambe azala nionso na kati na banso.

29. Soki te, bakosala nini baoyo bazwaki libatisi pona bakufi, soki penza bakufi bakosekwa ata moke te? Pona nini babatisami pona bango? 30. Pe biso moko, pona nini tokutanaka na likama na bangonga nionso? 31. Mikolo nionso nazali kondima kufa : ezali malamu po bozali pona ngai likambu ya kembo kati na Kristu Yesu Nkolo na biso. 32. Soki, na lolenge ya batu, nabundaki na banyama na Efese, litomba nini nazali na yango ? soki bakufi bakosekwa te : "Toliya pe tomela, po lobi tokokufa" . 33. Bomikosama te: baninga mabe babebisaka bizaleli malamu. 34. Bozonga na mayele pona kobika boyengebene, pe bosumuka te; po basusu bazali na boyebi ya Nzambe te, nalobeli bino pona soni na bino.

35. Kasi, bakoloba: Ndenge nini bakufi bakosekwa, pe na nzoto nini bakozonga na yango? 36. Zoba! oyo oloni ezwaka bomoyi te soki ekufi ; 37. Oyo oloni ezali nzoto oyo ekozala te, kasi mbuma ya pamba, ya ble tangu mosusu, to ya molona mosusu; 38. Kasi Nzambe apesi ye nzoto ndenge alingi, pe na moko na moko ya molona nzoto na ye moko. 39. Mosuni nionso ezali mosuni moko te; kasi mosusu ezali ya batu, mosusu mosuni ya banyama, mosusu ya bandɛkɛ, mosusu ya bambisi. 40. Pe ezali na banzoto ya likolo pe banzoto ya mabele; kasi bokeseni ezali kembo ya balikolo, pe bokeseni na oyo ya mabele; 41. Mosusu ezali kembo ya moyi, pe mosusu kembo ya sanza, pe mosusu kembo ya minzoto, po na kembo monzoto ekeseni na monzoto mosusu.

42. Ezali bongo na lisekwa ya bakufi : nzoto elonami na kopola, ekosweka na bozangi kopola. 43. Elonami  na soni, ekosekwa na kembo; elonami na bolembu, ekosweka na nguya; 44. Elonami nzoto oyo ekambami na yango moko, ekosekwa nzoto ekambami na Molimo. Soki ezali na nzoto ekambami na yango moko, ezali pe na oyo ekambami na Molimo; 45. Na bongo  ekomami ete: “Moto ya liboso Adam akomaki mutu ya bomoyi, Adam ya suka, Molimo oyo epesaka bomoyi. 46. Kasi oyo ezali liboso ezali te oyo ekambami na Molimo, kasi oyo emikambami na yango moko; na sima oyo ekambami na Molimo. 47. Mutu ya liboso awuti na mabele, putulu; mutu ya mibale awutaki na likolo. 48. Lokola ezali oyo azali putulu, bongo pe baoyo bazali putulu bazali; pe lokola ezali ya likolo, bongo bazali pe baoyo ya likolo. 49. Pe lokola tomemaki elilingi ya oyo azali putulu, tokomema lisusu elilingi ya oyo azali ya likolo. 50. Nzokande bandeko, nalobi boye, ete mosuni pe makila ekoki kokota bokonzi na Nzambe te, pe kopola ekoki te kozwa oyo epolaka te.

51. Botala, nalobi na bino mustere moko: Biso banso tokolala te, kasi biso banso tokobongwana : 52. Na mbalakata , na kobetama ya lisu, na kelelo ya suka, po kelelo ekobeta pe bakufi bakosekwa na kozanga kobebisama, pe biso, tokobongwana. 53. Po ete oyo epoloka esengeli elata oyo epolaka te, pe oyo ekufaka elata oyo ekufaka te. 54. Tangu oyo epolaka ekolata oyo epolaka te, pe oyo ekufaka ekolata oyo ekufaka te, bongo ekokisama liloba oyo ekomama: “Liwa, emelami na elonga”. 55. "O liwa, wapi nini na yo eniokolaka ? O liwa, wapi elonga na yo ? 56. Nzokande oyo liwa aniokolaka na yango ezali lisumu; pe nguya ya lisumu ezali mobeko. 57. Kasi matondi na Nzambe, oyo apesa biso elonga na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristu!

58. Bongo, bandeko na ngai balingami, bozala ngwi, boningana te, bokende liboso tangu nionso na mosala ya Nkolo, boyeba ete mosala na bino ezali pamba te kati na Nkolo.

 

16 Mokapo 16

1. Na tina ya mabonza oyo epesamaka pona basantu, bino bosala lolenge napesaki mitindo na ba eklezia ya Galatia : 2. Na mukolo nionso ya liboso ya poso, tika ete moko na moko na bino epayi na ye atia pembeni oyo ye azwaki, po nakozela te boyeyi na ngai, pona kokongola te mabonza. 3. Pe  tango nakozala wana, nakotinda mikanda baoyo bakosepela na bango, po bamema makabo na bino ya ngolu na Yerusaleme. 4. Pe soki ebongi ngai moko nakende, bakokende elongo na ngai.

5. Nakoya epayi na bino tango nakoleka na Masedonia, po nakoleka na Masedonia; 6. Pe tangu mosusu nakofanda na bino, to nakoleka malili kuna, ete bokamba ngai esika nionso nakokende; 7. Sik’oyo nalingi te komona bino tango nazoleka, po nakanisi kofanda mwa tangu na bino, soki Nkolo abongisi. 8. Kasi nakofanda na Efeso kino na Pantekote; 9. Po porte munene pe ya malamu efungwameli ngai, pe banguna bazali ebele.

10. Soki Timote aye, bosala ete azala na bobangi te kati na bino, po asalaka na mosala ya Nkolo lokola ngai. 11. Bongo moko te atiola ye; kasi bopesa ye ekoki ye na kimia, ete akoka koya epayi na ngai, po nazali kozela ye elongo na bandeko. 12. Pona ndeko Apollo, nalendisi ye mingi akende epayi na bino elongo na bandeko, kasi ezalaki ata moke te mokano na ye ya kokende sik’oyo; kasi akokende tango akozwa libaku ya malamu.

13. Bomikengele, botelema ngwi kati na kondima; bozala mibali, bomikembisa. 14. Makambu nionso na kati na bino esalama na bolingo.

15. Bandeko, nazolendisa bino, — boyebi ndaku ya Stefana, ete ezali mbuma ya liboso ya Akaya pe ete bamipesa na mosala ya basantu, — 16. Nalendisi ete bino botosaka batu ya ndenge wana pe mutu nionso oyo aniokwamaka makasi pe asalaka na mosala. 17. Nasepeli na boyeyi ya Stefana, ya Fortunato, pe ya Akayikos, pamba te basilisaki misala oyo ezangaki na ngambu na bino; 18. Pamba te balendisi elimo na ngai pe ya bino : bondimaka batu ya lolenge oyo.

19. Ba eklezia ya Azia bapesi bino mbote. Akila na Prisila, elongo na eklezia oyo ezali na ndaku na bango, bapesi bino mbote na bolingo kati na Nkolo. 20. Bandeko nionso bapesi bino mbote. Bopesana bino na bino mbote na beze esantu. 21. Mbote ya loboko na ngai moko, Polo.

22 - Soki mutu alingi Nkolo Yesu Kristu te, azala anatema, Maranata! 23. Tika ngolu ya Nkolo Yesu Kristu ezala na bino! 24 Bolingo na ngai ezali na bino nionso kati na Kristu Yesu. Amen.