MOKANDA YA LIBOSO YA POLO EPAYI NA TIMOTE

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6

 

1        Mokapo 1

1. Polo, apostolo ya Yesu Klisto, na kolanda etinda ya Nzambe Mobikisi na biso pe ya Kristu Yesu elikia na biso. 2. na Timote, mwana na ngai ya solo kati na kondima: Ngolu, mawa, kimia, kowuta na Nzambe Tata pe na Kristu Yesu Nkolo na biso!

3. Lokola nabondelaki yo otikala na Efeso tangu nazalaki kokende na Makedonia, po ete opekisa na batu mosusu ete balakisa malakisi mosusu te. 4. Pe bakangama te na ba mite pe na molongo milayi oyo ezanga suka, oyo ebimisaka matata na esika ya kokokisama ya mabongisi ya Nzambe, oyo ezali na kondima 5. Nzokande suka ya motindo oyo, ezali bolingo oyo ewutaka na motema peto pe na lisosoli malamu pe na kondima ya solo, 6. Bamosusu balongwaki na nzela, pe bapengwi na maloba ya pamba-pamba. 7. Balingi kozala balakisi ya mibeko, basosola te oyo bazali koloba to oyo bazali kotingama na yango makasi. 8. Kasi toyebi ete mobeko ezali malamu soki mutu asaleli yango na ndenge oyo mibeko epesi nzela. 9. Toyebi ete Mibeko ezali pona basembo te, kasi pona baoyo bazangi mibeko pe batomboki, pona baoyo bazangi petwa pe basumuki, pona baoyo bazangi bonzambe pe baoyo bomonaka oyo bosantu mbindo, pona baoyo babetaka na kufa batata pe babetaka na kufa bamama, pona babomi batu, 10. Pona batu ya pite, pona mibali oyo basangisa nzoto na mibali pe na bana mike ya mibali, pona miyibi ya batu pe bateki batu, pona bakosi, pona baoyo balapaka ndayi ya lokuta, pe soki likambo mosusu oyo ezali kotelemela malakisi ya malamu. 11. Na lolenge ya sango malamu ya kembo ya Nzambe oyo apambolami, oyo epesameli ngai. 12. Pe nazali kotonda Kristu Yesu Nkolo na biso, oyo akembisi ngai, pamba te amonaki ngai sembo, atiaki ngai na mosala. 13. Ngai oyo liboso nazalaki koblasfeme, pe moniokoli, pe mutu ya nko, kasi bayekolaki ngai mawa, po nazalaki kosala na bozangi mayele pe kati na bozangi kondima; 14. Pe ngolu ya Nkolo na biso etondaki na kondima pe bolingo oyo ezali kati na Kristu Yesu. 15. Liloba oyo ezali ya solo pe ebongi eyambama: Kristu Yesu ayaki na mokili pona kobikisa basumuki, oyo ngai nazali ya liboso na kati na bango. 16. Kasi na tina na yango mawa emonisamaki epayi na ngai, po na ngai, liboso ya nionso, Yesu Kristu amonisa motema molayi na ye nionso, po nazala lokola ndakisa pona baoyo bakoya kondima ye pona bomoyi ya seko. 17. Nzokande, na Mokonzi ya bileko, oyo abebaka te, amonanaka te, ye moko Nzambe, lokumu pe kembo libela na libela. Amen.

18. Mwana na ngai Timote, motindo oyo napesi yo, na boyokani na ba profesi oyo elobamaki liboso na tina na yo, ete na kolendisama na yango, ozali kobunda etumba ya malamu. 19. Na kobatela kondima pe lisosoli ya malamu, oyo bamosusu babwaki, basili kodinda na oyo etali kondima; 20. Kati na bango ezali Himene na Aleksandr, oyo nakabaki na Satana, po bayekola koblaseme te.

 

2        Mokapo 2

1. Bongo liboso nionso, nazali kolendisa ete bozala kolomba, kobondela, kotiya basusu na mabondeli pe kotonda pona batu nionso. 2. - pona bakonzi pe pona baoyo nionso bazali na lokumu, po ete tokoka kozala na bomoyi ya kimia pe ya bopemi, na petwa nionso pe na bosembo ; 3. Po yango ezali malamu pe endimami liboso ya Nzambe Mobikisi na biso. 4. oyo alingi ete batu nionso babika pe bakoma na boyebi ya solo; 5. Pamba te ezali na Nzambe kaka moko, pe moyokanisi moko kati na Nzambe pe batu, mutu Kristu Yesu, 6. Ye amipesaki ye moko lisiko pona batu nionso, litatoli ya tangu na ye moko; 7. Pona ye, ngai, nasilaki kotiyama mopanzi ya sangol pe apostolo (nalobi solo, nazali kokosa te), molakisi ya bikolo kati na kondima pe kati na solo.

8. Bongo nalingi ete mibali babondela na bisika nionso, kotombola maboko mosantu, na kozanga kanda pe koswana. 9. Basi pe Ndenge moko bazala na elateli ya bilamba ya malamu, na bopolo pe na kolekisa ndelo te, kasi na kokangisaka suki te pe na wolo te, to na mayaka te, to na bilamba ya talu makasi te. 10. kasi na nzela ya misala malamu, oyo ebongi na basi oyo batatolaka ete bazali kosalela Nzambe. 11. Kasi Mwasi ayekola kati na kimia, na botosi nionso; 12. Kasi napesi mwasi te nzela ete alakisa to azala na bokonzi likolo ya mobali; kasi asengeli kotikala kimia; 13. Po Adam asalamaki liboso, pe Eva na sima; 14. Pe Adam akosamaki te; kasi mwasi, wana akosamaki, akweyaki na bobuki mobeko; 15. Kasi akobika na kobotaka, soki akobi na kondima pe na bolingo pe na bosantu, elongo na bozangi kolekisa ndelo.

 

3        Mokapo 3

1. Liloba oyo ezali solo: soki mutu alingi episkopa, alingi mosala ya kitoko. 2. Na Yango wana, episkopo asengeli kozala na mbeba te, mobali ya mwasi moko, mutu oyo amikengelaka, mutu ya bwania, ya lokumu, ayambaka bapaya, oyo akoki kolakisa; 3. Amipesaka na vino te, mobeti makofi te, kasi mutu ya bopolo, ya koswana te, ya bolingo ya mbongo te. 4. Akambaka malamu ndaku na ye moko, atelemisaka bana na ye na botosi na lokumu nionso. 5. (Kasi soki mutu ayebi kotambwisa ndaku na ye moko te, ndenge nini akoki kobatela eklezia ya Nzambe?) 6. Azala te oyo abongwani sika, noki te, amitondisama na lolendo, akweya na mbeba ya diabolo. 7. Kasi asengeli pe azala na litatoli ya malamu ewuti na batu ya libanda, po akweya te na kati ya kotiolama pe kati na motambo ya diabolo.

8. Ba diakre ndenge moko pe, basengeli bazala baoyo bakanisaka liboso ya kosala nionso, bazala na maloba mibale te, bamipesi na vino mingi te, pe na lokoso te ya koluka litomba ya soni, 9. Na kobatela mistere ya kondima kati na lisosoli ya peto; 10. Pe tika ete baoyo bamekama liboso; na sima, bakosala, wana bamonani ete bazangi mbeba. 11. Basi pe ndenge moko, bazala baoyo bakanisaka liboso ya kosala nionso, bitonga-tonga te, bazanga kolekisa ndelo, bazala sembo na nionso. 12. Tika ete badiakre bazala mibali ya mwasi moko, batambwisa malamu bana na bango pe bandaku na bango moko;

14. Nakomeli yo makambu oyo, na elikia ete nakoya mbangu epayi na yo; 15. Kasi soki nawumeli, - po ete oyeba ndenge esengeli komitambwisa na ndaku ya Nzambe, oyo ezali eklezia ya Nzambe ya bomoyi, likonzi pe lisungi ya solo. 16. Pe, na tembe te, mistere ya petwa ezali monene: — Nzambe amonisamaki na mosuni, alongisamaki na Molimo, amonanaki na baanjelu, asakolamaki na kati ya bikolo, andimami na mokili, atombolami na kembo.

 

4        Mokapo 4

1. Molimo alobi polele ete na tangu ya nsuka, bamosusu bakobwaka kondima, bakokangama na milimo ya kopengwisa pe malakisi ya bademon. 2. Bakoloba lokuta na hipokrizi, bazali na ebende ya motane etumba na kati ya lisosoli na bango moko. 3. Bakopekisa kobala, mitindo ya koboya koliya bileyi oyo Nzambe akelaki po ezwama na kozangisa matondo na batu ya sembo pe baoyo bayebi solo; 4. Po ekelamu nionso ya Nzambe ezali malamu, pe ezali na eloko moko te oyo esengeli eboyama, soki tozali kozwa yango nakopesaka matondo. 5. Po ebulisami na liloba ya Nzambe pe na losambo. 6. nakolakisa bandeko makambu oyo, okozala mosali malamu ya Kristu Yesu, oyo aleyisama na maloba ya kondima pe malakisi ya malamu oyo olandaki na bosolo nioso. 7. Kasi bwakisa masapo ya mbindo pe ya basi ya mibange, pe misalaka yo moko ezersise ya petwa. 8. Po ezersise ya nzoto ezali motuya pona mwa moke, kasi petwa ezali motuya na makambu nionso, po yango ezali na elaka ya bomoyi ya lelo pe ya bomoyi oyo ezali koya. 9. Liloba oyo ezali ya solo pe ebongi nionso na kondimama; 10. Pona yango tozali kosala pe tozali kati na kofingama, ezali po tozali kolikia epayi ya Nzambe ya bomoyi oyo azali mobombi ya batu nionso, mingi-mingi ya bandimi. 11. Pesa mitindo ya makambu oyo pe lakisa yango. 12. Moko te atiola bolenge na yo; kasi zala ndakisa ya bandimi, na maloba, na ezaleli, na bolingo, na kondima, na bopeto. 13. Kino ngai nakoya, omipesa na kotanga, kolendisa, na kolakisa. 14. Kobosana te likabo ya ngolu oyo ezali kati na yo, oyo epesamelaki yo na nzela ya profesi elongo na botiami maboko ya lisanga ya bampaka. 15. Omipesa likebi na makambu yango; zala wana mobimba, po ete bokoli na yo emonana na batu nionso. 16. Omikeba na yo moko pe na malakisi; oyika mpiko na makambu oyo, po nakosala bongo, okomibikisa yo moko pe baoyo bazali koyoka yo.

 

5        Mokapo 5

1 Kopamela mobange te, kasi lendisa ye lokola tata, pe bilenge mibali lokola bandeko, 2. Mibange basi lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko ya basi, na bopeto nionso. 3. Pesa limemia basi oyo bakufela mibali oyo bazali penza bakufeli mibali; 4. Kasi soki mokufeli mobali azali na bana to bakitani, tika bayekola liboso komonisa petwa na bango na bandaku na bango pe kozongisela baboti na bango oyo bazwaki na bango, pamba te yango ezali malamu liboso ya Nzambe. 5. Kasi oyo azali solo mokufeli mobali pe atikali ye moko, atia elikia na ye na Nzambe, pe akobaka na kolomba pe kobondela butu na moyi. 6. Kasi ye oyo azali kobika na bisengo azali mokufi oyo azali kobika. 7. Pe loba makambu oyo, po bazala baoyo bakoki kopamela bango te. 8. Kasi soki mutu moko azali kokanisa te kobongisa masenga ya baoyo ndaku na ye te, mingi koleka baoyo ya libota na ye, awangani kondima pe azali mabe koleka oyo andimi te. 9. Tika ete mokufeli mobali, azala te na mbula na se ya tuku motoba, azalaka mwasi ya mobali moko. 10. azala na litatoli ya misala ya kitoko, soki abokolaka bana, soki ayambaka bapaya, soki asukolaka makolo ya basantu, soki asungaka baoyo bazali na bolozi, soki amipesaka na mosala nionso ya malamu. 11. Kasi oboya bakufeli mibali oyo bazali bilenge; pamba te na nzela ya baposa batelemela Kristu, bazalaka naposa ya kobala, 12. bazali na mbeba po babwakaki kondima na bango ya liboso; 13. Pe na tangu yango, bayekolaka pe kosalaka eloko te, kokendaka ndaku na ndaku; pe kaka kozanga kosala eloko te, kasi pe biloba-loba, komikotisa na makambu nionso, kolobaka makambu oyo ebongi te. 14. Yango wana nalingi bilenge babala, pe babota bana, pe bayangela bandaku na bango, pe ata libaku moko te na monguna na tina ya maloba mabe; 15. Pamba te bamosusu bapengwi na kolanda Satana. 16. Soki mobali to mwasi moko mondimi azali na bakufeli mibali, asalisa bango, pe eklezia ezala na mokumba te, po basalisa baoyo bazali penza bakufeli mibali.

17. Bampaka oyo bakambaka malamu, babongi na lokumu mbala mibale, mingi koleka baoyo baniokwamaka na mosala kati na liloba pe kati na malakisi ; 18. Po makomi elobi: Okokanga monoko te ya ngombe oyo ezali koniata mbuma, pe: Mosali abongi na lifuti na ye. 19. Koyamba te kofundama likolo ya mpaka, longola bobele se soki ezali na batatoli mibale to misatu. 20. Pamela liboso ya banso baoyo basumuki, po basusu bazala na bobangi. 21. Nazali kotatola yo liboso ya Nzambe pe ya Kristu Yesu pe na baanjelu oyo baponama, ete obatela makambu oyo nakokanisela batu mabe te, pe na kopona-ponaka te.

22. Kotia mbangu maboko na mutu te pe kosangana te na masumu ya basusu; mibomba yo moko peto. 23. Komela kaka mayi te, kasi zwa ata vino moke, na tina ya libumu na yo pe pona maladi na yo mbala na mbala. 24. Masumu ya batu mosusu emonisamaka liboso, pe ekendaka liboso ya kosambisama; kasi oyo ya basusu elandaka sima. 25. Bobele bongo misala malamu emonisamaka liboso, pe misusu ekokoka kobombama te.

 

6        Mokapo 6

1. Tika bawumbu nionso oyo bazali na se ya ekanganeli bamona bankolo na bango lokola babongi na lokumu nionso, po kombo ya Nzambe pe malakisi etukama te; 2. Pe baoyo bazali na bankolo bandimi batiola bango te po bazali bandeko, kasi tika ete basalela bango mingi koleka po ete baoyo bazali kozwa litomba na mosala na bango ya malamu pe ya nokinoki bazali bandimi pe balingami. Lakisa makambu oyo pe lendisa. 3. Soki mutu alakisi ndenge mosusu pe akangami na maloba ya malamu te, oyo ya Nkolo na biso Yesu Kristu pe malakisi oyo ekokani na petwa. 4. atondi na lolendo, ayebi eloko te, kasi azali na bokono ya mituna pe ya koswanela maloba, oyo ebotisaka zuwa, koswana, maloba ya kofinga, kokaniselaka batu makanisi ya mabe, 5. Kopotana ya pamba ya batu oyo babebisama na bososoli na bango pe bazanga solo, baoyo batalelaka bopetwa lokola liziba ya litomba. 6. Ezali liziba ya litomba monene, petwa elongo na kosepela na oyo ozali na yango. 7. Po tomemaki eloko moko te na mokili, pe ezali polele ete tokoki te kokumba eloko moko. 8. Kasi soki tozali na bileyi pe bilamba, tokozala ya kokoka. 9. Kasi baoyo baoyo balingaka kokoma bazwi bakweyaka na kati ya komekama pe na mitambo, pe kati na baposa mingi ya bozoba pe ya mabe oyo ezali kozindisa batu kati na bobebisi pe na kobunga; 10. Pamba te bolingo ya mbongo ezali mosisa ya mabe ya ndenge na ndenge : oyo basusu batondaki naposa na yango, basilaki kopengwa mosika ya kondima pe bamitobolaki bango bapasi ebele. 11. Kasi yo, Ô mutu ya Nzambe, kima makambu oyo, pe landa boyengebene, bopetwa, bondimi, bolingo, motema molayi, bopolo ya elimo; 12. Bunda etumba kitoko ya kondima; simba bomoyi ya seko, oyo obengamaki pe otatolaki litatoli kitoko liboso ya batu mingi. 13. Liboso ya Nzambe oyo abengaka biloko nionso na bomoyi, pe liboso ya Kristu Yesu oyo liboso ya Ponsio Pilato, atatolaki litatoli kitoko, napesi yo mitindo 14. Ete obomba mobeko oyo, na kozanga mbeba, ekozanga kofingama, kino Nkolo na biso Yesu Kristu akomisama. 15. Oyo Apambolama pe ye se moko Akonza, Mokonzi ya baoyo badondwaka pe Nkolo ya baoyo bakonzaka, akomonisa yango na tangu oyo ebongi. 16. Ye se moko azali oyo akufaka te, oyo afandi na pole oyo ekoki te na nini ekoma, oyo mutu moko te amona, pe akoki komona te, – na ye ezala lokumu pe makasi ya seko! Amen.

17. Na bazwi ya eleko oyo, opesa mitindo ete bazala na lolendo te, pe batia motema te na bomengo oyo ezali ya kobebisama, kasi na Nzambe oyo apesaka biso biloko nionso na bomengo po tosepela; 18. Tika basala malamu; bazala bazwi na misala ya malamu; tika ete bazala bakabi oyo noki-noki basalisaka, 19. Bamibongama na kokaba, bazwa pona bango moko lokola bozwi na tina mikolo ezali koya, po basimba oyo ezali solo penza bomoyi.

20. O Timote, bomba oyo epesamelaki yo, kimaka masolo ya pambala-pambala pe yambindo pe botelemeli ya boyebi ya lokuta. 21. Oyo bamosusu kati na bango, bayambolaka, balongwa mosika na kondima. Tika ngolu ezala elongo na yo!