MOKANDA NA PAULO EKOMELAKI YE

TITO

1

Ngai Paulo, moombo na Njambe, natiami Ntoma na Yesu Masiya ete Bapɔnami na Njambe bándima, mpe báyeba makambo-na-sɔlɔ makoki na bijaleli na bato na Njambe, 2 majali mpe na elikia na bomɔi na seko. Njambe, oyo akobukaka lokuta tε, atikaki elaka na bomɔi yango liboso na ebandeli na bikeke; 3 nde atalisi Liloba na ye polele na elaka na ye mpenja kati na bisakweli bipεsamaki na mabɔkɔ na ngai mpenja, pelamɔkɔ ekanaki Njambe Mobikisi na biso. 4 Mbɔtε na ngai na yɔ Tito, mwana na ngai mpenja na njela na kondima na biso na yɔ. Ngɔlu, na kimia, kouta na Njambe Tata mpe na Masiya Yesu Mobikisi na biso éjala na yɔ.

5 Natikaki yɔ na Kelete na ntina oyo, ete óbɔngisa makambo matikalaki, mpe ótia Mikolo na mboka na mboka lokola ngai napεsaki yɔ monɔkɔ. 6 Okotia moto bobεlε sɔkɔ ajuami na lofundo mokε tε, mobali na mwasi mɔkɔ, ye mpe na bana bandimi baoyo bafundami na makambo na kilikili tε, batɔmbɔki mpe tε. 7 Mpɔ ete ekoki ete Mokεngεli ájala na lofundo sɔkɔ mokε tε, lokola kapita na ndako na Njambe, ájala moto na komisepelisa tε, moto na kosilika nɔki tε, momεli na masanga tε, moswani tε, moto na mombongo na nsɔni mpe tε. 8 Kasi ájala monyangeli na bapaya, molingi na makambo malamu, mosembwi, moyεngεbεni, mopεtwi, moto na kokanga motema; 9 ájala kosimba Maloba na sembo pelamɔkɔ esili ye kolakisama. Na ntina ete ákoka kosunga bamosusu na mateyo na ye malamu, mpe ájongisa monɔkɔ na bakotoli na monɔkɔ na ye.

10 Mpɔ ete bato mingi bajali batɔmbɔki, balobalobi mpe bajimbisi, mingi bajali bato bakatami ngεnga. 11 Ekoki ete tókangisa bango minɔkɔ, mpɔ bakopεngwisaka bato na ndako mibimba, kolakisa makambo makoki tε, mpɔ na kojua litomba na nsɔni. 12 Moto mɔkɔ na bango mpenja, moto na mboka, mosakoli alobaki ete,

Bakelete bajali seko bato na lokuta, banyama mabe, bato pasasi na lokoso.

13 Litatoli yango ejali na sɔlɔ. Na ntina yango ópamelaka bango makasi, ete bákemba na kondima, básimbaka masapo na mpamba na Bayuda tε, 14 na malako na bato baoyo bakobwakelaka makambo-na-sɔlɔ mokɔngɔ mpe tε. 15 Bilɔkɔ yɔsɔ bijali mpεtɔ na bato na mpεtɔ; nde elɔkɔ tε ejali mpεtɔ na bango babebi mbindo mpe baboi kondima, kasi makanisi mpe masɔsɔli na bango mabebi mbindo. 16 Bakoyambolaka ete bayebi Njambe, nde na misala na bango bakoanganaka ye, bajali bato na pɔtɔpɔtɔ mpe na nkanja, bakobɔnga mpɔ na misala malamu sɔkɔ mokε tε.

2

 Nde mpɔ na yɔ, ósolola makambo makoki na mateyo malamu. 2 Ete mibange mibali bájala bato na kokanga motema, bato na sembo na bojito, basembwi, bakembi na kondima, na bolingo, na mpiko. 3 Bobεlε bongo na mibange basi, bájala na bijaleli na kitɔkɔ, batɔngi tε, bato na boombo na masanga mingi mpe tε ; 4 bájala nde milakisi na makambo malamu ete bálakisa basi baleki bolεngε ete bálingaka mibali na bango, na bana na bango, mpe bájala basembwi, bato na mpεtɔ, 5 bato na kosalaka misala na ndako, bato malamu, batosi na mibali na bango mpenja, na ntina ete Maloba na Njambe mátukama tε.

6 Bobεlε bongo ópεsa toli na bilεngε mibali ete bákanga mitema na makambo yɔsɔ ; 7 ómipεsaka yɔ mɔkɔ mpe lokola elakiseli na misala malamu. Tika mateyo na yɔ májala na libebi tε, nde na sembo na bojito, 8 mpe na monɔkɔ malamu moyebi kokweisama tε; na ntina ete bayini na biso bámɔna nsɔni wana ejui bango likambo mɔkɔ mabe na koloba na ntina na biso tε. 9 Ópεsa toli na baombo ete bátosaka bankolo na bango mpenja na makambo yɔsɔ, bájala basepelisi, bákotolaka monɔkɔ tε, 10 bámiyibelaka bilɔkɔ tε, kasi bámɔnisaka bikokiseli malamu yɔsɔ ete mateyo na Njambe Mobikisi na biso mákumama na makambo yɔsɔ.

11 Mpɔ ete ngɔlu na Njambe, oyo ekobikisa, emɔnani na bato yɔsɔ, 12 ekolakisaka biso lokola bana ete tóboya makambo na kotiola Njambe, na mposa mabe na mokili, mpe tójala kati na ekeke oyo na bijaleli na kokanga motema, na kosembwa, na kosalela Njambe, 13 naino ejali biso kotalela elikia na esεngɔ, yango Komɔnana na nkεmbɔ na Njambe na biso monεnε, Mobikisi Masiya Yesu. 14 Mpɔ amipεsaki na mpɔ na biso ete ásikola biso na lofundo yɔsɔ mpe ámipεtwεla libota lijali elɔkɔ na ye mpenja, libota na mposa na misala malamu. 15 Ósololaka makambo oyo, ópεsaka toli boye, ópamelaka, na kolaka mpenja. Tika moto tε ápεngɔlaka yɔ.

3

Ókanisela bango ete bámisɔkisa liboso na bato bajali na bokonji liboso na bango, bátosaka mikolo na bato, báselingwaka na misala malamu yɔsɔ. 2 Bátukaka moto tε, báswanaka tε, bájalaka na boboto, bátalisaka bato yɔsɔ bopɔlɔ mpenja. 3 Mpɔ ete ntango mosusu biso mpe tojalaki bilema, bato na nkanja, bajimbisami, baombo na mposa na esεngɔ na njoto na mitindo mingi, bato na bijaleli na likunya, na bilulela, bato na koyinama mpe na koyinana. 4 Nde wana eyaki malamu na Njambe Mobikisi na biso komɔnana, na boboto na ye mboka na bato, 5 abikisaki biso na ntina na misala na boyεngεbεnε misala biso mpenja tε kasi na mawa mayokelaki ye biso. Abikisaki biso bongo na njela na esukwelo na kobotama lisusu mpe na bojalisi na sika na Molimo Mosanto, 6 oyo asopelaki biso mingi mpɔ na Yesu Masiya Mobikisi na biso. Ejali bongo na ntina ete, 7 awa esili biso kolongisama mpɔ na ngɔlu na ye, tójala batuki na libula na bomɔi na seko pelamɔkɔ ejalaki biso na elikia.

8 Oyo likambo na sembo, mpe nalingi ete ólendisaka makambo oyo makasi, ete baoyo basili kondimela Njambe bákeba mpɔ na komipεsa njoto na kosala misala malamu. Majali malamu yango mpenja, makopεsaka mpe bato litomba. 9 Nde ópεngwεla ntembe na bolema, na bitangeli na mabota, na makaka, na koswana na ntina na Mibeko ; mpɔ ete majali na litomba tε, majali mpe mpamba. 10 Sɔkɔ moto na kosala likaka ajali, pεsa ye toli mbala mɔkɔ, na mbala mibale, na nsima tika ye, 11 mpɔ oyebi ete moto na motindo yango asili kopεngwa, mpe amikweisi lokola moto na masumu.

12 Sɔkɔ nakotindela yɔ Alatεma sɔkɔ Tukiki ntango nini, ótia motema makasi na koya mboka na ngai na Nikɔpɔli; mpɔ ete nasili kokata likambo na motema ete nakolekisa mikɔlɔ na malili wana. 13 Ótindisa Jena Molakisi-na-Mibeko, na Apolo, malεmbε-malεmbε ete elɔkɔ tε éjangela bango. 14 Tika bato na biso báyekola komipεsaka njoto na misala malamu mpɔ na kokokisa bisengeli na bango, ete bájanga kobota mbuma tε.

15 Bato yɔsɔ awa na ngai batindeli yɔ mbɔtε. Pεsa mbɔtε na bandimi yɔsɔ baninga na biso.

Ngɔlu éjala na bino yɔsɔ.