Mokanda na BAHEBREU

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5Mokapo 6Mokapo 7Mokapo 8Mokapo 9Mokapo 10Mokapo 11Mokapo 12Mokapo 13

 

Mokapo 1

1 Nzambe na tangu ya kala pe na mbala mingi pe na ndenge mingi alobaki na batata na kati ya baprofeta. 2. Na suka ya mikolo oyo alobaki na biso na Mwana, oyo ye akómisa mosangoli ya libula ya biloko nionso, pe na nzela na ye asalaki mokili. 3. Ye, azali kongenga ya kembo na ye pe emoniseli ya bozui na ye, pe akosungaka pe kosimbaka biloko nionso na liloba ya nguya na ye, lokola asilisi ye moko kopetola na masumu, afandi na loboko ya mobali ya kembo na bisika ya likolo 4. akómi na lokumu malamu mingi koleka baanjelu, azui libula na kombo oyo eleki bango. 5. Pamba té, nani kati ya baanjelu alobi na ye: Yo ozali Mwana na ngai, lelo naboti yo? . Pe lisusu: Ngai, nakozala tata pona ye, pe ye akozala mwana na ngai ? 6. Pe lisusu, tangu akotisa Mwana ya liboso kati na mokili efandami, alobi: Pe baanjelu nionso ya Nzambe bafukamela ye. 7. Pe pona baanjelu, alobi : “Ye akomisa baanzelu na ye milimo, pe basaleli na ye epeleli ya mɔtɔ”; 8. Kasi pona Mwana: “Kiti na Yo ya bokonzi, O Nzambe, libela na libela; lingenda ya boyengebene ezali lingenda ya bokonzi na yo ; 9. Olingaki bosembo pe oyina bosoto; yango wana Nzambe Nzambe na yo apakoli yo mafuta ya esengo koleka baninga na yo. 10. Pe: Yo, na ebandeli, Nkolo, otongaki mabele, pe likoló ezali misala ya mabɔkɔ na yo. 11. Bango bakokufa, kasi yo ozali kokoba; pe bango nionso bakonuna lokola elamba, 12. Lokola elamba okolinga yango, pe bakobongwana; kasi ozali ndenge moko, pe mibu na yo ekosila te. 13. Pe aloba na moko ya baanjelu te: Fanda na lobɔkɔ na ngai ya mobali, kino nakotiya banguna na yo eniatɛlo ya makolo na yo?. 14. Bango nionso bazali milimo na mosala oyo batindami pona kosalela baoyo bakozwa libula ya lobiko?

Mokapo 2

1. Yango wana tosengeli kotiya likebi mingi na makambu oyo toyokaki, noki te tolongwa nzela. 2. Po soki liloba oyo elobobakami na baanjelu ezalaki na motuya makasi, pe soki kobuka mobeko nionso pe bozangi botosi ezwaki etumbu oyo ekoki, 3. Ndenge nini tokokima, soki tobosani lobiko monene boye, oyo, ebandaki elobamaki liboso na Nkolo, bandimisaki biso yango na baoyo bayokaki yango, 4 Nzambe atatolaki elongo na bango na nzela ya bilembo pe bikamwisi, pe na misala ya nguya ya ndenge na ndenge pe na bokaboli ya Molimo Mosantu, na lolenge ya mokano na ye moko?

5. Akitisaki te na se ya baanjelu mokili efandami oyo ezali koya, oyo tozali kolobela; 6. Kasi mutu moko apesaki litatoli yango esika moko boye, koloba: “Nani Mutu pona okanisa ye, to mwana ya moto po otala ye ? 7. Osalaki ye mwa moke koleka baanjelu; olatisi ye motole na kembo pe na lokumu, [pe otiye ye likolo ya misala ya maboko na yo]; 8. otie biloko nionso na nse ya makolo na ye ; pamba te na kotia makambu nionso na se na ye, atiki eloko moko te na se na ye te; kasi sik’oyo tozali komona te ete makambu nionso ezali na se na ye; 9. Kasi tozali komona Yesu, oyo akitisamaki na se ya baanjelu pona tangu moke na tina pasi ya liwa, alati motole ya kembo pe ya lokumu, ete na ngolu ya Nzambe amekaki liwa pona mutu nionso. 10. Po ebongaki pona ye, oyo po na ye biloko nionso ezali pe na nzela na ye biloko nionso ezali, ete, amema bana ebele na kembo, asala nionso oyo ekoki pona kokisa na nzela ya bapasi mokonzi ya lobiko na bango. 11. Pamba té, oyo azali kobulisa pe baoyo babulisami, bango nionso bazali moko; yango wana, azali na soni te ya kobenga bango bandeko, 12. Koloba : Nakoloba kombo na yo epai ya bandeko na ngai; na kati ya ekklezia, nakokumisa yo na banzembo. 13. Pe lisusu: Ngai, nakotia kondima kati na ye . Pe lisusu: «Tala ngai, ngai, pe bana oyo Nzambe apesi ngai». 14. Na yango, lokola bana basanganaka (bazali na eloko) na makila pe mosuni, ye pe lolenge wana asangani (akaboli biloko moko) yango, po ete na nzela ya liwa akomisi ye oyo azangi nguya moto oyo azalaki na bokonzi ya liwa, elingi koloba diabolo; 15. Pe akangoli baoyo nionso bazalaki kobanga liwa, bazalaka, bomoyi na bango mobimba na se ya bowumbu. 16. Ya solo penza, azwi baanjelu te, kasi azwi bakitani ya Abrahama. 17. Na yango wana esengelaki ye na makambu nionso akoma lokola bandeko na ye, po azala na biloko oyo etali Nzambe nganga-nzambe monene ya boboto pe ya sembo, pona komikaba pona bolimbisi ya masumu ya batu. 18. Pamba te, lokola ye moko aniokwamaki, wana amekamaki, azali na makoki ya kosalisa baoyo bazali komekama.

Mokapo 3

1. Yango wana, bandeko basantu, basangani oyo bobengama ya likolo, bokanisa apostolo pe nganga monene ya koyambola na biso, Yesu. 2. Oyo azali sembo epai ya oyo atelemisi ye, lokola Mose azalaki na ndaku na ye mobimba. 3. Pamba te ye atangami ete abongi na kembo monene koleka oyo ya Mose, pamba te motongi na ndaku azali na lokumu mingi koleka ndaku. 4. Po ndaku nionso etongamaka na mutu moko; kasi motongi ya biloko nionso ezali Nzambe. 5. Pe Mose azalaki sembo kati na ndaku na ye mobimba, lokola mosali, na litatoli ya makambu oyo esengelamaki kolobama; 6. Kasi Kristu, lokola Mwana, likolo ya ndako na ye; pe tozali ndaku na ye, soki kaka tokosimba makasi kino na suka kondima pe kembo ya elikia.

 

7. Yango wana, — lokola alobi Molimo Mosantu : Lelo, soki boyoki mongongo na ye, 8. Bokomisa mitema na bino mabanga te lokola na mokolo ya botomboki oyo ya komekama na esobe. 9. Wapi batata na bino bamekaki ngai na komekama na kotala bozindo na ngai, pe bamonaki misala na ngai mbula tuku minei. 11. Bongo nalapi ndayi kati na kanda na ngai  : Soki bakokota na bopemi na ngai!. 12. Bokeba, bandeko, ezala te moko na bino azala na motema mabe ya kozanga kondima, ete abwaka Nzambe ya bomoi; 13. Kasi bomilendisamaka mokolo na mokolo, wana ezali nanu kolobama: Lelo, noki te moko kati na bino akóma motema libanga na bokosami ya lisumu. 14. Po tokómi basali elongo ya Kristu, soki tokosimba makasi kino suka ebandeli ya kondima na biso, 15. Ndenge elobami : Lelo, soki boyoki mongongo na ye, Bokomisa mitema na bino mabanga te lokola na mokolo ya botomboki. 16. (Po ezali baoyo bayokaki ye, basilikisaki ye? Kasi baoyo nionso babimaki na Egipito na nzela ya Mose te? 17. Pe asilikelaki banani mbula tuku minei? Ezali te po na baoyo basalaki masumu pe nzoto na bango ekweyaki na esobe? 18. Pe na tina ya banani alapaki ndayi ete bakokota te kati na bopemi na ye, bobele bazangaki botosi? 19. Pe  tomoni ete bakokaki te kokota na tina ya motema mabanga). — .

 

Mokapo 4

1. Na bongo ete elaka etikali pona kokota na bopemi na ye, tobanga ete moko kati na bino akoka te kokota yango; 2. Pamba te biso pe lokola toteyamaki sango malamu lokola bango; kasi liloba bayokaki epesaki litomba te, po esangisamaki te na kondima kat na baoyo bayokaki yango. 3. Po biso oyo tondimi, tokoti na bopemi, lokola alobaki: Na Boye na kanda na ngai, nalapaki : Soki bakokɔta na bopemi na ngai, atako misala esalemaka wuta ebandeli ya mokili. 4. Pamba te alobaki boye na esika moko na tina ya mokolo ya sambo: Pe na mokolo ya sambo, Nzambe apemaki na misala na ye nionso; 5. Pe lisusu na eteni oyo: Soki bakokota na bopemi na ngai! 6. Lokola etikali boye batu misusu bazali kɔkota na yango, pe baoyo liboso bayokaki sango malamu bakɔtaki te pona kozanga botosi. 7. Mbala moko lisusu abongisi mokolo moko boye, koloba na David, sima ya ngonga molayi na sima: Lelo, lolenge elobamaki liboso: Lelo, soki boyoki mongongo na ye, bokómisa mitema na bino mabanga te. 8. Pamba te soki Yosue apesaki bango bopemi, alingaki koloba lisusu te pona  mokolo mosusu. 9. Etikali bongo bopemi ya sabata pona batu ya Nzambe.10. Pamba te oyo akɔtaki kati na bopemi na ye, ye pe apemaki na misala na ye, lolenge Nzambe apemaki na misala na ye moko. 11. Bongo tosala makasi pona kokɔta na bopemi wana, po mutu moko te akweya na komekola ndakisa ya motindo wana ya bozangi botosi. 12. Po  liloba ya Nzambe ezali na bomoyi pe nguya, pe ekɔtaka na kati koleka mopanga nionso ya minu mibale, pe etoboloka ti na kokabola motema ná molimo, bosangani ya mikuwa pe mafuta ya kati na mokuwa; pe esosolaka makanisi pe mikano ya motema. 13. Pe ekelamu moko te ezali ya kobotama liboso na ye, kasi biloko nionso ezali polele pe ezipami te na misu ya mutu oyo tozali na likambu na ye. 14. Yango awa tozali na nganga-Nzambe monene oyo alekaki ba likolo, Yesu Mwana ya Nzambe, tósimba makasi kondima na biso; 15. Pamba te tozali na nganga-Nzambe monene te oyo akoyokela biso te mawa na bolɛmbu, kasi tozali na oyo amekamaki na makambu nionso lokola biso, longola kaka lisumu. 16. Bongo topusana na kondima na kiti ya bokonzi ya ngolu, po tozwa boboto, pe tomona ngolu pona kozwa lisungi na tangu oyo ebongi.

 

Mokapo 5

1. Pamba te nganga-nzambe monene nionso azwami na kati ya batu, atiamaka pona na batu kati na makambu oyo etali Nzambe, na tina ya kopesa bamakabo pe bambeka pona masumu. 2. Azali na makoki ya komonisa motema pete pona baoyo bazangi boyebi pe bapengwa, po ye moko azali ya kozipama na bolɛmbu; 3. Pe, na tina na yango, asengeli kopesa mbeka pona masumu ya batu, ndenge moko pona ye moko. 4. Pe mutu moko te akomizwisa lokumu oyo; kasi soki abengami na Nzambe, lokola Aaron. 5. Lolenge wana pe Kristu amitiaki te kembo pona komikomisa nganga-nzambe monene, kasi ye oyo alobaki na ye: Yo ozali Mwana na ngai; lelo ngai Naboti yo; 6. lokola alobi na mokapo mosusu: Ozali nganga-nzambe pona seko kolanda molongo ya Melkisedek; 7. Oyo, na mikolo ya mosuni na ye, abonzaki, na koganga makasi pe na pinzoli, mabondeli pe kolomba epai ya oyo azalaki na bokasi ya kobikisa ye na liwa, pe ayokaki ye pona botosi, 8. Ata azalaki Mwana, ayekolaki botosi na nzela ya makambu oyo aniokwamaki; 9. Pe wana akokisamaki, akómaki pona baoyo batosaka ye mopesi ya lobiko. 10. Wana atiami na Nzambe nganga-nzambe monene na molɔngɔ ya Melkisedek. 11. Tozali na makambu mingi ya koloba na tina na yango pe oyo ezali kokoso pona kolimbola, pamba te bozali koyoka noki te. 12. Pamba te tangu esengelaki bozala balakisi elongo na tangu, bozali lisusu naposa ya kolakisama biloko ya liboso ya maloba ya Nzambe, pe bokómi bongo, ete bozali naposa ya miliki kasi ya bileyi ya makasi te ; 13. Pamba te mutu nionso oyo azali kozuaka miliki azali na boyebi te na liloba ya boyengebene, pamba te azali bebe; 14. Kasi bileyi ya makasi ezali pona mikóló, oyo na momeseno na bango, bazali na bososoli ya malamu pe mabe.

 

Mokapo 6

1. Na bongo, totika malakisi ya ebandeli ya Kristu, tokende na kokana ya mikolo, kotia lisusu te fondatio ya bobangwani ya misala ekufa pe ya kondima kati na Nzambe, 2. Ya mateya oyo etali ba kobatisama pe kotiela maboko, pe lisekwa ya bakufi pe kosambisama ya seko. 3. Pe yango tokosala, soki Nzambe apesi nzela. 4. Pamba te ekoki kosalema te baoyo bangengisamaki na pole, pe bamekaki likabo ya likolo, pe bakomaki kosangana na Molimo Mosantu. 5. Pe bamekaki liloba malamu ya Nzambe pe makamwisi ya ekeke oyo ekoya. 6. pe bakweyi, bazonga lisusu ya sika pona kobongwana, bazali kobakaka na ekuluzu pona bango moko Mwana na Nzambe pe kotiya ye na matioli. 7. Pamba te mabele oyo emɛlaka mbula oyo eyaka mbala mingi likoló na ye, pe oyo ebimisaka matiti ya tina pona baoyo balonaka yango, ezwaka na Nzambe lipamboli; 8. kasi soki eboti basende pe banzubɛ, ekomi ya koboyama pe pene ya elakeli mabe, pe suka na ye kotumbama. 9. Kasi tondimami na oyo etali bino, balingami, makambu ya malamu koleka pe ya lobiko, ata tozali koloba boye. 10. Po Nzambe azangi sembo te pona abosana mosala na bino pe bolingo oyo bomonisaki pona kombo na ye, bosalelaki basantu pe bozali kosalela bango. 11. Kasi tolingi ete mutu na mutu kati na bino amonisa molende pona botondi ya kondima ya elikya kino na suka; 12. Ete bokoma gɔyigɔyi te, kasi bamekoli ya baoyo na nzela ya kondima pe ya bokangi motema, bakozwa bilaka. 13. Pamba té, Nzambe tangu asalaki elaka na Abraham, lokola azalaki na mutu te oyo aleki ye na monene na nzela ya nani kolapa, alapaki ndayi na ye moko, 14. koloba: Ya solo, nakopambola, na kopambola yo, pe nakofulisa, nakofulisa yo mingi. 15. Pe boye Abraham, azalaki na motema molayi, azwaki elaka. 16. Pamba te batu balapaka ndayi na nzela ya oyo aleki bango monene, pe ndayi ezali pona bango suka ya tembe nionso, pona kokomisa oyo bayokani makasi. 17. Pe Nzambe, alingaki na yango komonisa mingi koleka na bazwi ya elaka ete kobongisa na ye ebongwanaka te, amikɔtisi na ndayi. 18. Ete na makambu mibale oyo ebongwanaka te, na oyo ekoki te ete Nzambe akosa, tozwa kobɔndisama ya nguya, biso baoyo tomibombi pona kosimba elikya oyo epesamaki. 19. oyo tozali na yango lokola longo ya motema, ebukanaka te pe ngwi, pe oyo ekɔtaka kino na kati ya rido 20. Epayi oyo Yesu akɔtaki lokola mutu ya liboso pona biso, wana akómi nganga-nzambe monene pona seko na molɔngɔ ya Melkisedek.

 

Mokapo 7

1. Po Melkisedek, mokonzi ya Salem, nganga ya Nzambe Oyo-Aleki likoló, oyo akendaki liboso na Abraham tangu azongaki sima ya kolonga bakonzi, pe oyo apamboli ye. 2. Na ye Abraham apesaki moko na zomi ya nionso, liboso, ezali na ndimbola, mokonzi ya boyengebene, pe na sima lisusu mokonzi ya Salem, elingi koloba, mokonzi ya kimia; 3. Tata te, mama te, molɔngɔ te, ebandeli ya mikolo te pe suka ya bomoi te, kasi azalaki lokola kokokana na Mwana ya Nzambe, atikali nganga-nzambe pona libela. 4. Kasi botala ndenge azalaki monene ye oyo ata Abraham tata na biso apesaki moko ya zomi ya biloko oyo bapunzaki. 5. Pe baoyo kati na bana ya Levi oyo bazwi bonganga bazali na etinda ya kozwa moko na zomi na batu kolanda mobeko, elingi koloba bandeko na bango, ata babimaki na mokongo ya Abraham; 6. Kasi ye oyo abimi na libota na bango te, azwaki na zomi ya Abraham pe apambolaki ye oyo azalaki na bilaka. 7. Nzokande, na tembe te, oyo ya moke apambolami na oyo aleki ye. 8. Pe awa batu oyo bakufaka bazali kozwa moko na zomi; kasi kuna ye oyo batatoli azali na bomoi; 9. Pe, tokoki koloba, Levi ye moko, oyo azwaka ba moko na zomi, bazwaki ye moko na zomi kati na Abraham. 10. Pamba te azalaki nanu na mokongo ya tata na ye tangu Melekisedek akendaki liboso na ye.

11. Soki kokoka ezalaki na bonganga levitiki (po ezali na yango nde batu bazwaki mobeko na ye), posa nini ezalaki lisusu ya nganga-Nzambe mosusu atelema ya molongo ya Melekisedek pe oyo atiamaki te ya molongo na Aaron? 12. Wana bonganga ebongwani, esengeli pe mobeko ebongwana. 13. Pamba te ye oyo makambu elobami pona ye azali ya libota mosusu, oyo mutu te atiamaka na mosala na etumbelo; 14. Pamba te ezali polele ete Nkolo na biso abimaki na Yuda, libota oyo Mose aloba eloko te na oyo etali banganga-Nzambe. 15. pe ezali lisusu polele koleka, soki, na bokokani ya Melekisedek, nganga-Nzambe mosusu atɛlɛmi. 16. Oyo atiamaki te na lolenge ya mobeko na motindo ya mosuni, kasi na nguya ya bomoi oyo ekobebisama te. 17. Pamba te etatolami pona ye: Ozali nganga-Nzambe pona seko na molongo ya Melekisedek.

 

18. Pamba te, na tina ya bolɛmbu na yango pe bozangi tina na yango, mobeko oyo kala esili kolongolama 19. (Po mobeko ememaki eloko te na kokokisama), pe bokoti ya elikia ya malamu koleka na nzela na yango topusani penepene na Nzambe. 20. Pe yango esalemaki te na kozanga kolapa ndayi 21. (Po baoyo bakómaki banganga-Nzambe na kozanga kokatama seleka, kasi oyo na ndayi, na nzela ya oyo alobaki po na ye: Nkolo alapi ndayi pe akobongola maloba na ye te: Ozali nganga-Nzambe pona seko [na molɔngɔ́ ya Melekisedek]), 22. Ezali boyokani oyo eleki malamu po Yesu asili kokoma garant. 23. Pe ba wana bazalaki banganga-Nzambe ebele, po liwa epekisaki bango kowumela; 24. Kasi oyo, po awumeli seko, azali na bonganga oyo ekoleka te. 25. Na yango, akoki kobikisa na mobimba baoyo bapusani na Nzambe na nzela na ye, azali libela na bomoyi pona kobondela pona bango. 26. Po nganga-Nzambe monene ya boye abongaki pona biso, mosantu, azanga mbeba, azanga mbindo, oyo akabwana na basumuki, pe anetolami likolo koleka ba likoló. 27. Oyo azali te mokolo na mokolo na bosenga, lokola banganga-nzambe minene, ya kopesa bambeka, liboso pona masumu na ye moko, na sima pona ya batu; pamba te asalaki yango mbala moko pona libela, amikabaki ye moko. 28. Po mobeko etiya batu banganga-Nzambe minene oyo bazali na bolɛmbu, kasi liloba ya ndayi, oyo eyaki sima ya mobeko, etiya Mwana oyo akokisama pona seko.

Mokapo 8

1. Nzokande, mama ya likambu oyo tozali koloba, tozali na nganga-Nzambe monene ya ndenge wana oyo afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya lokumu na likoló, 2. Mosali ya bisika mosantu pe ya tabernakle ya solo oyo Nkolo atonga, kasi mutu te.

 

3. Pamba te nganga-Nzambe monene nionso atiami pona kopesa ba makabo pe bambeka; yango wana esengelaki ete ye azala na eloko ya kopesa. 4. Soki azalaki awa na mabele, alingaki kozala nganga-Nzambe te, po ezali na baoyo bapesaka ba makabo na kolanda mobeko. 5. Yango ezali elilingi pe elili ya biloko ya likoló: lokola Mose, tangu asengelaki kotonga tabernakle, akebisamaki na bonzambe : tala keba, alobi, po osala biloko nionso na ndakisa oyo elakisamelaki yo na ngomba. 6. Nzokande sik’oyo [Kristu] azwi mosala ya malamu koleka, lokola azali moyokanisi ya boyokani ya malamu koleka oyo etiami likolo ya bilaka malamu koleka; 7. Po soki boyokani ya liboso ezalaki na mbeba te, kolukama pona  mbala ya mibale elingi kozala te; 8. Pamba te, na kopamela, alobi na bango : Talá, mikolo ekoya, elobi Nkolo, pe nakosala boyokani ya sika na ndaku ya Israele pe pona ndaku ya Yuda. 9. Te lolenge ya boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango, na mokolo oyo nasimbaki bango na loboko pona kobimisa bango libanda ya mboka ya Egipito; po bakobaki te kati ya boyokani na ngai, pe natikaki bango, elobi Nkolo. 10. Pamba te oyo boyokani nakotiya pona ndaku ya Israele na sima ya mikolo wana, elobi Nkolo: Na kotia mibeko na ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango lisusu likolo kati na mitema na bango, pe nakozala Nzambe pona bango, pe bakozala batu na ngai, 11. Pe bakolakisanaka te , moko na mutu ya mboka na ye, pe moko te akoloba na ndeko na ye, koloba: Yeba Nkolo; po bango nionso bakoyeba ngai, kobanda mwana moke kino na mokolo kati na bango; 12. Po nakoyokela bango mawa na tina ya mabe na bango, pe nakokanisa lisusu te masumu na bango pe mbeba na bango te. 13. Na koloba: ya sika, akómisi oyo ya liboso ya kala: kasi oyo ekómi ya kala pe enuni, ezali pene ya kolimwa.

Mokapo 9

1. Bongo oyo ya liboso azalaki pe na mibeko pona kokumisa Nzambe, pe esika mosantu ya mabele. 2. Tabernakle etongamaka, esika ya liboso, oyo babengaka mosantu, kati na yango ezalaki na etɛlɛmisɛlo ya mwinda, mesa pe kotandama ya mapa; 3. Pe, na sima ya rido ya mibale, tabernakle oyo babengaka mosantu ya mosantu, 4. Ezalaki na etumbeli ya mpaka ya malasi ya wolo, pe sanduku ya boyokani oyo ezipami mobimba na wolo, na kati na yango ezalaki na mbɛki ya wolo oyo ezalaki na manna, pe lingenda ya Aaron oyo ebimisaki fololo, pe bamesa ya boyokani; 5. Pe likoló ya sanduku bakerubin ya kembo oyo bazipaka na elilingi na bango mofinuku ya sanduku ya boyokani; oyo tokoloba nanu te na tangu kati na molayi pe bozindo.

6. Nzokande, biloko yango etiami boye, banganga-Nzambe bakɔkotaka tangu nionso na eteni ya liboso, kosalaka mosala na bango; 7. kasi na oyo ya mibale, kaka nganga-Nzambe monene se moko, akokota mbala moko na mbula, na kozanga makila te oyo akobonza pona ye moko pe pona mabunga ya batu basalaki na bozangi boyebi, 8. Molimo Mosantu azali komonisa boye : nzela ya esika mosantu efongwamaki nanu te, tangu tabernakle ya liboso ezalaki na esika na yango, 9. Oyo ezali parabole pona tangu ya lelo, oyo kati na yango bazali kobonza ba makabo pe bambeka oyo ekoki te kokómisa ya kokoka na lisosoli na ye mutu oyo azali kobonza. 10. Yango ezalaki bobele na bileyi, ba masanga, pe lolenge mingi ya komisokola, pe mitindo ya nzoto oyo etiamaki kino tangu oyo kozongisa nionso na nzela. 11. Kasi Kristu ayaki, nganga-Nzambe monene ya biloko oyo ekoya, na nzela ya tabernakle oyo eleki na monene pe na kokoka, oyo esalemi na mabɔkɔ te, elingi koloba oyo ezali kati na bikelamu oyo te. 12. Na makila ya bantaba pe bana ya ngɔmbɛ te, kasi na makila na ye moko, akɔtaki mbala moko pona libela na esika mosantu, boye azwi bonsomi ya seko. 13. Pamba te soki makila ya bantaba pe ya bangɔmbɛ, pe putulu ya elenge ngɔmbɛ ya mwasi oyo esopamaka likoló ya batu ya mbindo, Ebulisaki pona bopeto ya nzoto. 14. Na koleka penza makila ya Kristu, oyo na nzela ya Molimo ya seko, amikabaki ye moko na Nzambe na kozanga mbeba, ekopɛtola bososoli na bino na misala ekufá, po bokumisa pe bósalela Nzambe ya bomoyi ! 15. Pe yango wana azali oyo atiami na kati-kati boyokani ya sika, wana liwa na ye esalamaki pona kokangolama ya bobuki mibeko oyo esalamaka na boyokani ya yambo, baoyo babengami bazwa libula ya seko oyo elakamaka. 16. (Pamba te epayi testama ezali, esengeli penza liwa ya mopesi testama esalema; 17. Pamba te testama ezali na tina na tangu ya liwa, pamba te ezali na nguya te tangu mopesi testama azali na bomoyi). 18. Na yango wana pe ya liboso ebandaki te kozanga bosopi makila. 19. Pamba te mitindo nionso, pona oyo etali mobeko, esakolamaki na nzela ya Mose epayi ya batu nionso, azwaki makila ya bana ya ngɔmbɛ pe ya bantaba, elongo na mayi pe lene ya mutane pe hisopo, pe asopaki yango likolo ya mokanda yango moko pe likolo ya batu nionso. 20. Na koloba: Oyo ezali makila ya boyokani oyo Nzambe apesi bino mitindo. 21. Pe lolenge yango, asopaki makila likoló na tabernakle pe likolo ya biloko nionso ya mosala. 22. Pe biloko nionso epetolami na makila na ndenge ya mobeko; pe na bozangi kosopa makila bolimbisi ezali te. 23. Esengelaki ete bilili ya biloko oyo ezali na likolo epetolama na biloko oyo, kasi biloko ya likolo yango moko epetolama na bambeka ya malamu koleka oyo. 24. Pamba te Kristu akɔtaki te na bisika mosantu oyo esalemi na mabɔkɔ, elilingi ya oyo ya solo, kasi na likoló penza, pona atelema pona biso liboso ya elongi ya Nzambe. 25. Pe te, pona komikaba ye moko mbala mingi, lokola nganga-Nzambe monene akotaka na bisika ya bosantu mbula nionso na makila oyo ezali ya ye te. 26. (Wana alingaki konyokwama mbala mingi uta ebandeli ya mokili); kasi sik’oyo, na bosukisi ya tangu yango, amonisami mbala moko pona kolongolama ya lisumu na mbeka na ye moko. 27. Pe lokola ebongami na batu kokufa mbala moko, — pe sima na yango kosambisama, 28. Ndenge wana Kristu, lokola amikabaki mbala moko pona komema masumu ya batu mingi, akomonana pona mbala ya mibale, pona lisumu te, na lobiko na baoyo bazali kozela ye.

Mokapo 10

1. Nzokande mobeko, ezali elili ya biloko malamu oyo ekoya, kasi ezali ndimbola ya solo te ya biloko, ekoka ata moke te, na bambeka wana kaka oyo mbula na mbula ekobama kopesama, ekomisa ya kokoka baoyo bapusanaka. 2. Pamba te, balingaki kotika kobonza, po baoyo bazali kokumisa pe kosalela, mbala moko bapetolamaki, balingaki bazala lisusu na lisosoli ya masumu te? 3. Kasi na kati na yango, ezali kozongisaka mosala ya masumu mbula na mbula, na makanisi na bango. 4. Pamba te makila ya bangɔmbɛ pe bantaba ekoki kolongola masumu te. 5. Yango wana, tangu akɔtaki na mokili, alobi: Olingaki mbeka to likabo te, kasi osalaki ngai nzoto. 6. Osepelaki na bambeka ya kotumbama nionso te to bambeka pona lisumu te; 7. Bongo nalobi: Tala, naye — ekomami pona ngai na moto ya buku — pona kosala, O Nzambe, mokano na yo . 8. Liboso alobaki : «Olingaki bambeka te, makabo te, bambeka ya kotumbama nionso te, bambeka pona lisumu te, pe osepelaki na yango te » — yango oyo ebonzamaka lolenge ya mobeko, 9 — nde alobi : Tala, naye pona kosala mokano na yo. Alongoli oyo ya yambo po na kotiya oyo ya mibale. 10. Na mokano oyo tobulisami, na nzela ya libonza ya nzoto ya Yesu Kristu oyo epesamaki mbala moko pona libela.

11. Pe mikolo nionso nganga-Nzambe nionso atɛlɛmaka, kosala mosala, pe kobonzaka kaka bambeka ya lolenge moko oyo ekolongolaka masumu te; 12. Kasi ye oyo, abonzaki mbeka moko pona masumu, afandi libela na libela na loboko ya mobali ya Nzambe, 13. Kozelaka ete kino banguna na ye batiama pona eniateli ya makolo na ye. 14. Pamba te na libonza moko, akomisi ya kokoka pona libela na libela baoyo babulisami. 15. Pe Molimo Mosantu azali kotatolela biso; pamba te, sima ya koloba : 16. Oyo ezali boyokani nakotiya pona bango sima ya mikolo wana, elobi Nkolo : Na kotiya mibeko na ngai kati na mitema na bango, nakokoma yango lisusu na makanisi na bango.” 17. : Pe nakokanisaka lisusu te masumu na bango pe mbeba na bango te. 18. Nzokande, wana bolimbisi ezali ya makambu oyo, ezali lisusu te na libonza pona lisumu.

19. Na bongo, bandeko, tozali na bonsomi nionso na nzela ya makila ya Yesu pona kokɔta na bisika ya bosantu, 20. Na nzela ya sika pe ya bomoyi oyo afungoleli biso kati na rido, oyo ezali nzoto na ye, 21. Pe tozali na nganga-Nzambe monene likolo na ndaku ya Nzambe. 22. tópusana na motema ya solo, kati na kotondisama na kondima, na oyo mitema epɛtolami na lisosoli mabe, pe na nzoto oyo esukolami na mayi ya pɛto. 23. Tobomba makasi kondima ya elikya na biso na kolɛmba te, pamba te oyo alakaki azali sembo; 24. Pe tomikengela moko na mosusu pona komitindanaka na bolingo pe na misala ya malamu. 25. Tobwaka te mayangani ya biso moko, lokola basusu bazali na momesano, kasi tolendisanaka, pe wana mingi koleka bozali komona ete mokolo ezali kobɛlɛma. 26. Pamba te soki na nko tokosumka sima ya kozwa boyebi ya solo, ekozala lisusu na mbeka te pona masumu, 27. Kasi kozela moko ya somo pona kosambisama pe mɔtɔ ya makasi oyo ekozikisa banguna. 28. Soki moto moko atiyoli mobeko na Mose, bakoboma ye na mawa te na litatoli ya batatoli mibale to misatu. 29. Na etumbu nini ya makasi koleka, bokanisi akosambisama ye oyo aniati Mwana ya Nzambe na se ya makolo, pe atali lokola ezanga motutya makila ya boyokani oyo na nzela na yango abulisamaki, pe afingi Molimo ya ngolu? 30. Pamba te toyebi ye oyo alobaki: Na ngai nde bozongisi ya mabe ezali; ngai nakozongisa, elobi Nkolo; pe lisusu: Nkolo akosambisa batu na ye. 31. Ezali likambo ya sɔmɔ kokweya kati na maboko ya Nzambe ya bomoi!

32. Kasi na makanisi na bino bokanisa lisusu mikolo oyo elekaki, na wana, tangu bongelisamaki na pole, boyikaki mpiko na etumba monene ya bapasi, 33. Po ete bomonanaki polele na kofingamaka pe na koniokwama, to po bozalaki kosangana na baoyo basalaki bango ndenge wana. 34. Pamba te bomonisaki mawa pona bakangami pe bondimaki na esengo nionso ete babotoloa biloko na bino, po boyebaki ete bozali pona bino moko biloko ya malamu koleka pe ya libela. 35. Bongo bobwaka te mosika elikia bozali na yango oyo ezali na lifuti monene. 36. Pamba te bozali naposa ya kozala na motema molai, ete, wana bosalaki mokano na Nzambe, bozwa elaka. 37. Pamba te lisusu mwa tangu muke, ye oyo azoya akoya, pe akowumela te. 38. Moyengebene akobika na kondima; pe: Soki azongi sima, motema na ngai ekosepela na ye te. 39. Kasi pona biso, tozali te baoyo bazongaka sima pona kobebisama, kasi baoyo bandimi pona lobiko ya molimo.

Mokapo 11

1. Kondima ezali likonzi ya biloko tozali kolikia, pe komonisama ya makambo oyo emonanaka te. 2. Pamba te na yango bampaka bazwaki litatoli. 3. Na kondima tozali kososola ete mokili mobimba esalemaki na liloba ya Nzambe, na bongo oyo emonanaka esalemaki na biloko emonanaka te. 4. Na kondima, Abel apesaki mbeka ya malamu koleka Kain, pe na mbeka yango azwaki litatoli ete azali sembo, Nzambe atatolaki makabo na ye; pe na nzela na yango, azali koloba ata akufi. 5. Na kondima Enok anetolamaki likolo pona amona liwa te; pe amonanaki lisusu te, po Nzambe anetolaki ye likolo; po liboso ya konetolama na ye, azwaki litatoli ete asepelisi Nzambe. 6. Nzokande na kozanga kondima ekokaka te kosepelisa ye; pamba te ye oyo azali kopusana na Nzambe asengeli kondima ete azali, pe azali mofuti ya baoyo balukaka ye. 7. Na kondima, Noe, akebisamaki na Nzambe na tina ya biloko oyo emonani nanu te, abangaki pe atongaki masuwa pona lobiko ya ndako na ye ; pe na nzela na yango akatelaki mokili etumbu, pe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezali nzela na kondima.

8. Na kondima, Abraham, wana abengamaki, atosaki pona kokende na esika oyo esengelaki azwa pona libula; pe akendaki, nakoyebaka te epayi azalaki kokende. 9. Na kondima, afandaki lokola mopaya na mabele ya elaka, afandaki na bandaku ya kapo elongo na Izak na Yakobo, bakitani elongo ya elaka moko; 10. Pamba te azelaki engumba oyo ezali na miboko, oyo Nzambe azali motongi pe mobongisi na yango. 11. Na kondima Sara ye moko azwaki makasi ya kokumba zemi, atako alekaki mbula, pamba te atangi sembo ye oyo alakaki ete; 12. Yango wana lokola na nzela ya moko, pe na mutu oyo azalaki penza pene na kufa, batu ebele babotami oyo bazali lokola minzoto na likolo na motuya pe lokola zelo oyo na libongo ya mayi na monana, oyo ekokani pe kotangama te.

13. Baoyo nionso bakufaki na kati ya kondima, bazwaki bilaka te, kasi bamonaki yango na mosika pe bapesaki yango mbote, batatolaki ete bazalaki bapaya pe baleki kati na mboka. 14. Pamba te baoyo bamonisaki polele bazalaki koluka polele mboka na bango; 15. Soki bakinisaki esika bawutaki, balingaki bozwa tangu ya kozonga kuna; 16. Kasi sik’oyo bazali koluka oyo eleki malamu, elingi koloba oyo ya likolo; yango wana Nzambe azali na soni bango te, na kobengama Nzambe na bango, po abongisela bango engumba moko.

 

17. Na kondima Abraham, wana amekamaki, abonzaki Izak; pe ye oyo azwaki bilaka abonzaki mwana na ye se moko, 18. Oyo na tina na ye elobamaka ete: Na Izak bakitani bakobengamela yo mboto, — 19. Abanzaki ete Nzambe azalaki na bokasi ya kosekwisa ye kati na bakufi, wana lokola, ezalaki parabole, azwaki ye lisusu. 20. Na kondima, Izak apambolaki Yakobo pe Esawu na tina ya oyo ekoya. 21. Na kondima, Yakobo tangu azalaki kokende kokufa apambolaki moko na moko ya bana ya Yozef, pe akumisaki, ayekamaki na suka ya lingenda na ye. 22. Na kondima Yozef, na ngonga ya suka ya bomoyi na ye, alobaki pona kobima ya bana ya Israel pe apesaki mitindo pona mikuwa na ye.

23. Na kondima Mose, wana abotamaki, abombamaki sanza misatu na baboti na ye, po bamonaki mwana azalaki kitoko, pe babangaki te mobeko ya mokonzi. 24. Na kondima Mose, wana akómaki mukolo, aboyaki atangama mwana ya mwana mwasi ya Farao. 25. Aponi kozala koniokwama elongo na batu ya Nzambe, ete asepela pona tangu moke na bisengo ya masumu. 26. Atalaki kotiolama ya Kristu ezali motuya monene koleka bomengo ya Egipito; pamba te azalaki kotala lifuti. 27. Na kondima, atikaki  Egipito, kobanga te kanda ya mokonzi, bongo atɛlɛmaki ngwi, lokola azalaki komona ye oyo amonanaka te. 28. Na kondima asalaki Paska pe kosopana ya makila, po mobomi ya bana ya liboso asimba bango te. 29. Na kondima, bakatisaki mayi na monana Motane lokola ezalaki mabele ya kokawuka, oyo Baegipito bamekaki, bazindaki. 30. Na kondima, bamir milayi ya Yeriko ekweyaki, wana babalukaki mikolo sambo zingazinga na yango. 31. Na kondima, Rahab mwasi ya ndumba akufaki te elongo na baoyo bandimaki te, po ayambaki batu bayaki na kobatama na kimia.

 

32. Mpe naloba lisusu nini ? tangu ekozanga ngai pona koloba na tina na Gedeon, na Barak pe na Samson pe na Yefete, na David pe na Samwel pe na baprofete; 33. oyo na kondima balongaki ebele ya bokonzi, basalaki bosembo, bazwaki bilaka, bakangaki minoko ya bankɔsi, 34. Babomaki nguya ya mɔtɔ, babikaki na koboma ya mopanga, batu na bolɛmbu bazalaki bakomaki bilombe, bakomaki makasi kati na etumba, bakimisaki mapinga ya bapaya. 35. Basi bazwaka bakufi na bango na nzela ya lisekwa; pe basusu baniokolaki bango, bandimaki te kokangolama, pona kozwa lisekwa malamu koleka; 36. Pe basusu bamekamaki na kotiolama pe na kobetama, pe lisusu na minyɔlɔlɔ pe na boloko; 37. babambaki  bango mabanga, bakataki bango na si, bamekaki bango, bakufaki na liwa ya mopanga; bayengaki bipayi na bipayi, balataki poso ya meme, poso ya ntaba, bazanga, baniokwamaki, bayokisi bango pasi, 38. Oyo mokili ezali ya kobonga te pona bango, bazalaki koyengayenga na bisobe pe na bangomba, pe na madusu ya mabanga pe na mabulu ya mabele.

39. Pe banso wana, bazwaki litatoli na kondima, bazwaki te oyo elakamaki, 40. Nzambe abongisaki eloko ya malamu pona biso, ete bakoma ya kokoka te soki na biso te.

 

 

Mokapo 12

1. Na bongo wana, biso pe lokola, tozali na lipata monene ya batatoli oyo bazingi biso, tobwaka mokumba nionso pe lisumu oyo eyebaka kozinga biso, tokima mbangu na motema molayi na ekimelo ezali liboso na biso, 2. Totiya misu na Yesu, mobandi pe mokumbi kino na kokoka ya kondima, ye oyo, na tina ya esengo oyo ezalaki liboso na ye, andimaki pasi na ekulusu, atiolaki soni, pe afandi na loboko ya mobali ya kiti na bokonzi ya Nzambe. 3. Bongo, bokanisa ye oyo andimaki bapasi na kotelemela ya ndenge wana oyo basumuki batelemelaki ye, po bolɛmba te, pe mitema na bino ezala na motungisi te.

4. Nanu botɛlemi ngwi te kino na makila pona kobundisa lisumu; 5. Pe bobosani lilendisi oyo elobami na bino lokola bana: Mwana na ngai, kotiola pamela ya bolakisami ya Nkolo te, pe kolemba te tangu ye apameli yo; 6. Pamba te ye oyo Nkolo alingi, apamelaka ye na bolakisami, pe abɛtaka fimbu mwana nionso oyo ye ayambi. 7. Bozali kondima bapasi lokola pamela ya bolakisami: Nzambe azali kosala na bino lokola epayi na bana, po mwana nini oyo tata apamelaka na bolakisami te? 8. Kasi soki bopamelami na bolakisami te oyo bato nionso bazwaka yango, boye bozali bana ya libanda kasi bana te. 9. Lisusu, tozalaki na batata ya bomoto na biso pona kopamela biso na bolakisami, pe totosaki bango; tokozala te na botosi mingi na Tata na milimo, pe tozala na bomoyi? 10. Pamba te ba wana bapemalaki biso na bolakisami na mwa mikolo mike, lolenge bamonaki malamu; kasi ye asalaka bongo pona bolamu na biso, po tozwa esika na bosantu na ye. 11. Nzokande pamela moko te ya bolakisami, pona sik’oyo, ezalaka likambu ya esengo, kasi ya mawa; kasi na sima ya mikolo ebimsaka mbuma ya kimia ya bosembo na baoyo babikaki kati na yango. 12. Na yango wana, botambola mabɔkɔ oyo elɛmbi pe mabɔlɔngɔ oyo elɛmbi, 13. pe bokomisa sembo banzela po na makolo na bino, po oyo azali tɛngu-tengu ebunga nzela te, kasi abika. 14. Bolukaka kimia na batu nionso, pe bosantu, na kozanga yango, mutu te akomona Nkolo. 15. Bomikengela noki te moko azanga ngolu ya Nzambe; noki te mosisa ya bololo ebima likolo, pe etia mobulu, pe na nzela na yango ebele ya batu mingi bakoma mbindo; 16. noki te ezala na mutu ya pite, to motioli ya makambu na Nzambe lokola Esawu, oyo pona bileyi moko kaka atɛkisaki esika na ye ya mwana ya liboso; 17. Pamba te boyebi ete na sima ya mikolo, alingaki kokitana na lipamboli, abwakamaki, (pamba te kobongwana emonanaki te.) atako alukaki yango na mayi ya misu.

18. Po boye te na ngomba oyo ekoki kosimbama, pe oyo ezali nionso mɔtɔ, to na molili, to na kozanga pole, to na mopɛpɛ makasi, 19. Na mondule ya kelelo, to na mingongo ya maloba, oyo baoyo bayokaki yango babondelaki ete liloba moko te ebolema bango; 20. (Pamba te bakokaki te koyika mpiko te na oyo elobamaki: Ata niama oyo akosimba ngomba, babamba ye mabanga pona akufa; 21. Pe Mose, na somo oyo emonanaki, alobaki: Ngai nazali kolenga pe nazali na somo. 22. kasi bino boye na Ngomba ya Sion; pe na engumba ya Nzambe na bomoi, Yerusaleme ya likoló; pe na bankoto ya bankoto ya baangelu, liyangani ya feti; 23. Pe na eklezia ya bana ya liboso oyo bakomama na likolo; pe na Nzambe, mosambisi ya banso; pe na milimo ya basembo bakomi ya kokoka; 24. Pe na Yesu, mosangisi ya boyokani ya sika; pe na makila oyo esopani ekolobaka malamu koleka ya Abel. 25. Bomikeba ete boboya oyo azali koloba, pamba te ba wana baboyaki oyo azalaki koloba na maloba ya bokebisi awa na mabele, bakimaki te, biso tokokima ndenge nini, soki totiye mokongo na ye oyo azali koloba biso wuta likolo, 26. Oyo mongongo na ye eningisaki mabele; kasi sik’oyo alaki, koloba: Lisusu nakoningisa kaka mabele te, kasi likolo pe lokola. 27. Nzokande « Lisusu lokola » elakisi biloko ebongwanaka ebongwani, lokola yango ekelamaki, po oyo ebongwanaka te efanda libela. 28. Na yango wana, lokola tozwi bokonzi oyo eninganaka te, totonda na matondi na oyo tokoki kosalela pe kokumisa Nzambe na lolenge oyo esepelisaka ye, na limemia pe na kobanga. 29. Pamba te, Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka.

 

 

Mokapo 13

1. Tika bolingo ya bandeko ewumela. 2. Bobosana te koyamba na boboto bapaya; pamba te na yango, bamosusu, na koyeba te, bayambaki baangelu. 3. Bokanisaka bakangami, lokola nde bokangami elongo na bango, baoyo bazali koniokwama, lokola bino moko bozali na nzoto. 4. Tika libala epesama lokumu na makambu nionso pe kati na banso, pe mbetu ezala na mbindo te; po Nzambe akosambisa batu ya pite pe ya ekobo. 5 Tika etamboli na bino ezala na lokoso ya mbongo te, bosepela na oyo bozali na yango sik’oyo; po ye moko alobi: Nakotika yo te, nakobwaka yo te ; 6. Na bongo, totondi na elikia, tolobi: Nkolo azali lisungi na ngai, pe nakobanga te: mutu akosala ngai nini?

7. Bokanisa bakambi na bino oyo bateyaki bino liloba ya Nzambe, pe botala mbuma ya etamboli na bango, bomekola kondima na bango.

8 .Yesu Kristu azali lolenge moko lelo, lobi, pe libela na libela. 9. Bomipengwisa te na malakisi ya ndenge na ndenge pe ya libanda, pamba te ezali malamu ete motema ekembisama na ngolu, kasi na bileyi te, oyo ezali litomba te na baoyo basalelaki yango. 10. Tozali na etumbelo oyo baoyo basalaka na tabernakle bazwi nzela te ya koliya; 11. Pamba te nzoto ya baniama oyo makila na yango ekumbami pona lisumu na bisika ya bosantu na nganga-Nzambe monene, etumbamaka libanda ya mboka. 12. Na yango wana Yesu, pona abulisa batu na makila na ye moko, aniokwamaki libanda ya mboka. 13. Na yango wana, tobima na bokutani na ye na libanda ya mboka, komemaka soni na ye; 14. Pamba te awa tozali na engumba ya libela te, kasi tozali koluka oyo ezali koya. 15. Bongo Tobonza, na nzela na ye, tangu nionso na Nzambe mbeka ya masanzoli, elingi koloba mbuma ya bibebu oyo ezali kotatola kombo na ye. 16. Kasi bobosana te kosala bolamu na basusu pe kokabola biloko na bino, po Nzambe asepelaka na bambeka ya lolenge wana.

 

17. Botosa bakambi na bino pe bomibongisa na kotosaka, pamba te bazali kokɛngɛla milimo na bino, lokola baoyo bakopesa biyano; na wana basalaka yango na esengo, kasi na kolela te, po yango ekozala litomba te pona bino.

18 Bobondela pona biso, po tondimi ete tozali na lisosoli ya malamu, pe tozali naposa ya komitambwisa malamu na makambu nionso. 19. Kasi nazali kobondela bino mingi koleka ete bosalaka bongo, po nazonga noki epayi na bino.

 

20. Nzambe ya kimia oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bampate, na nguya ya makila ya boyokani ya seko, Nkolo na biso Yesu, 21. Akokisa bino na kati ya misala nionso ya malamu pona kosala mokano na ye, kosalaka kati na bino oyo esepelisaka liboso na ye, na nzela ya Yesu Kristu, na ye kembo libela na libela. Amen.

22. Nazali sik’oyo kolendisa bino, bandeko, boyoka na bokangi motema liloba ya kolendisama, pamba te nakomeli bino na maloba moke.

23. Boyeba ete ndeko na biso Timote azwaki bonsomi, soki aye sasaipi, nakomona bino elongo na ye. 24. Bopesa mbote na bakambi na bino nionso pe basantu nionso. Baoyo ya Italia bapesi bino mbote. 25. Ngolu ezala na bino nionso! Amen.