MOKANDA YA MISATO YA YOANE

 

1. Mpaka epayi na Gayos, molingami, oyo nalingaki kati na solo.

 

2. Molingami, nalingi kati na nyonso, okende liboso mpe ozala na nzoto kolongono, lokola molimo na yo ezali kokende liboso,

3. Po nasepeli makasi mingi tango bandeko bayaki, mpe batatoli na tina ya solo na yo, ndenge yo ozali kotambola kati na solo.

4. Nazali na esengo monene te lokola oyo, koyoka ete bana na ngayi bazali kotambola kati na solo.

5. Molingami, ozali kosala penza na lolenge ya kondima kati na nyonso oyo ozali kosala epayi ya bandeko mpe na ba oyo bazali bapaya,

6. Oyo batatoli liboso na eklezia na tina ya bolingo na yo ; okosala lisusu malamu na kobongisa mobembo na bango lolenge mpenza esepelisa Nzambe,

7. Pona nkombo, nde bakeyi mobembo, nakozua eloko te ya bapaganu.

8. Biso pe, biso esengeli toyamba batu ya lolenge wana, po tozala baye bazali kosala na bango elongo na solo.

9. Nakomaki mwa likambu na eklezia ; kasi Diotrefe oyo alingaka kozala mutu ya liboso kati na bango, azali koyamba biso te ;

10. Na tina wana, soki naye, nakokanisa makambu nyonso azali kosala na maloba nyonso ya mabe azali koloba na tina na biso ; mpe asuki kaka wana te, ye moko azali koyamba bandeko te mpe azali kopekisa ba oyo balingi koyamba bandeko, mpe azali kobengana bango na eklezia.

 

11. Molingami, tolanda ndakisa ya mabe te, bobele ya malamu. Oyo asalaka malamu azali ya Nzambe ; oyo asalaka mabe amona Nzambe te.

12. Demetrio azali na litatoli ya banso, pe ya solo ; mpe biso pe, tozali kotatola pona ye : mpe oyebi été litatoli na biso ezali solo.

 

13. Nazalaki na makambu ebele ya kokomela yo, nde nalingi kokomela yo te na langi ya ekomeli pe na ekomeli,

14. nazali na elikya ya komona yo sasaipi, mpe tokosolola monoko na monok.

15. Kimia ezala na yo. Balingami bapesi yo mbote. Pesa mbote na balingami, moko na moko na nkombo na ye.