BAFILIPO

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4

 

1        MOKAPO 1

1. Polo mpe Timote, bawumbu na Yesu Kristu, na basantu nyonso kati na Kristu Yesu oyo bazali na filipi, elongo na bepiskopo na basali : 2. Ngolu mpe kimia ezala na bino wuta na Nzambe, Tata na biso mpe Nkolo Yesu Kristu.

3. Natondaka Nzambe na ngai pona na makanisi nionso oyo nazali na yango na tina na bino, 4. Kati na mabondeli na ngai nionso, Nabondelaka tango nionso pona bino nionso na esengo, 5. Pona lisangana na bino na sango malamu wuta na mokolo ya liboso kino sik’oyo; 6. Nazali na elikia ete, oyo abanda kati na bino mosala moko malamu, akosilisa yango ti mokolo ya Yesu Kristu: 7. Lolenge ezali malamu nakanisela bongo bino nyonso, mpo ete bozali na ngai kati na mitema na bino, mpe kati na kokangama, mpe kati nakolobela mpe kokembisa ya sango malamu, bino nionso bozuaki elongo na ngai esika na ngolu. 8. Pamba te Nzambe azali motatoli na nga ete nakanisaka bino nyonso na bolingo mingi kati na motema ya Kristu Yesu. 9. Nasengaka boye kati na mabondeli na nga ete bolingo na bino ekoba kokola lisusu kati na boyebi mpe mayele nyonso 10. Mpo ete bososola makambu malamu pona bozala peto mpe bokweya te tii mokolo na Kristu. 11. Na botondi na mbuma ya bosembo, oyo ezali na nzela ya Yesu Kristu, na nkembo mpe na lisanzoli na Nzambe.

12. Nzokande, bandeko, nalingi boyeba ete makambo oyo ezali kokomela ngai, ekomi penza pona bopanzani koleka ya sango malamu ; 13. Na boye bokangami na ngai ekomi kominisama polele kati na Kristu, kati na ndaku nionso ya bosambisi mpe na bisika misusu, 14. Mpe ebele ya bandeko bazui, kati na Nkolo, bazui molende na nzela ya bokangami na ngai, bakomi na molende mingi pona kopanza liloba na bozangi kobanga.15. Solo, bamosusu basakolaka Kristu pona zuwa mpe elimo ya koswana, kasi bamosusu pona motema malamu; 16.Baoyo kati na bolingo, na boyebi ete natiama pona kolobela sango malamu ; 17. Bango mosusu bazosakola Kristu na molimo ya kokabola, bakanisi ete banyokola ngai kati na bokangami na ngai. 18. Likambu nini? - Na lolenge nyonso, soko lokola komimonisa, soko na solo, Kristu asakolami; na ntina na yango, nasepeli mpe nakosepelaka. 19. Pamba te nayebi ete likambo oyo ekobalukela ngai bobele pona lobiko na nzela ya mabondeli na bino mpe lisungi ya Molimo ya Yesu Kristu, 20. Na lolenge bozeli oyo natemeli na yango mpe na elikia na ngai nakokufa soni kati na eloko te, kasi na molende nionso, sik’oyo lokola na tangu nionso, monene ya Kristu ekomonana na nzoto na ngai, ezala na bomoyi, to ezala na kufa. 21. Nzokande pona ngai bomoyi ezali Kristu ; mpe kokufa ezali litomba; 22. Kasi soki nakobika na nzoto, ekozala pona ngai mosala oyo ekobota mbuma ; oyo esengeli napona nini nayebi te. 23. Kasi naza kobendana ba ngambo mibale, naza na mposa ya kolongwa mpe kozala elongo na Kristu, pona yango ezali malamu koleka. 24. Kasi ezali motuya na ntina mingi pona bino ete natikala na nzoto. 25. Nazali na kondima, mpe nayebi ete nakozala mpe nakokoba elongo na bino nionso pona bokeyi na bino liboso mpe esengo ya kondima na bino, 26. Mpo ete kati na ngai, bozala na ntina monene ya komikumisa kati na Kristu Yesu na bozongi na ngai kati na bino 27. Kasi botambola ndenge esengeli na sango malamu ya Kristu, ete soko nakoya mpe nakomona bino, soko nakozala te, nayoka na ntina na bino botelemi ngwi na molimo moko, na kobunda elongo na molimo moko elongo na kondima ya sango malamu. 28. Na bobangi te liboso ya banguna : oyo pona bango ezali komonana polele kobunga, kasi lobiko na bino, yango ewuti epayi na Nzambe. 29. Kasi na bino epesameli na ngolu pona Kristu, kaka te bondima kati na ye, kasi boniokwama pona ye ; 30. Wana bozali na bitumba moko oyo bomonaki kati na ngai, sik’oyo bozali koyoka ezali kati na ngai.

 

2        MOKAPO YA MIBALE

1. Soki kobondisama kati na Kristu, pe soki kolendisama ya bolingo, soki bomoko na molimo, soki bolingo mpe mwa mitema ya mawa pona basusu, 2. Botondisa ngai na esengo ete bozala na makasini moko, bolingo moko, motema moko, kokanisaka na eloko bobele moko. 3. Eloko moko te na molimo ya kowelana, to pe na lokumu ya pamba ; Kasi na komikitisa,moko amona  mususu motuya koleka ye .4. Moko te atala bolamu na ye moko, kasi atala bolamu ya ba mosusu. 5. Ezala na kati na bino, likanisi oyo ezalaki kati na Kristu Yesu, 6 . Ye oyo azalaki na motindo ya Nzambe, kasi atalaki yango te lokola eloko ya kobotola na makasi bokokani na ye na Nzambe. 7. Kasi amikomisa pamba ye moko , kozua lolenge ya mowumbu, komikoma na lolenge ya bato ; 8. Mpe amonani na bokokani ya mutu, amikitisaki ye moko, akomaki na botosi kino na liwa, mpe na liwa ya ekulusu. 9. Na yango nde Nzambe atombolali ye likolo mpe apesi ye kombo likolo na bakombo nionso, 10. Mpo na kombo ya Yesu, mabolongo nionso ya bikelamu ya likolo, pe ya mabele, pe ya mboka ya se makasi ; 11. Mpe lolemo nionso ekotatola Yesu Kristu azali Nkolo na nkembo ya Nzambe Tata.

12. Na yango, balingami na ngai, na ndenge botosaka tangu nionso, kaka soki nazali na bino te, kasi mingi sik’oyo ata nazali te, bokumba malamu na kosalaka pona lobiko na bino na bobangi mpe kolenga : 13. Mpo  ezali Nzambe nde azali kosala kati na bino mpe atiaka mposa pe kosala, na  lolenge na ye ya malamu  14. Bosala nionso na koyima te pe kotiaka tembe te, 15. Mpo  bozala batu bazangi pamela, peto, bana ya Nzambe bazanga mbeba, kati na ekeke ya batu mabe mpe babebisama, kati  na yango bozali kobima lokola ba mwinda kati na mokili, 16. Kotalisa liloba ya bomoyi , pona kembo na ngai na mokolo ya Kristu, ete nasalelaki ye pamba te pe nakimaki pamba te  17. Kasi Soki na kosopama lokola masanga oyo esopani na mbeka mpe mosala ya kondima na bino, nazali na esengo mpe nakosepela elongo na bino nionso. 18. Na bongo, bino pe bozala batu na esengo pe bosepela elongo na ngai.

19. Nzokande nazali na elikia kati na Nkolo Yesu, kotindela bino kala te timote, mpo ngai mpe nazua makasi tangu nakoyoka lolenge makambu na bino ezali ; 20. Mpo  nazali  na moto te oyo azali na makanisi moko na ngai pona kozala na motema na tina ya makambu  na bino  21. Mpo  moto nionso azoluka bobele bolamu na ye, kasi ya Yesu Kristu te. 22. Kasi boyebi ndenge amonisamaki, asalaki elongo na ngai na kati ya sango malamu, lokola mwana kosalela tata na ye. 23. Nazali kolikia kotinda ye , tango na komona malamu ndenge nini na kozala. 24 .Kasi nazali kondima kati na Nkolo ngai moko nakoya kala te ;  25 . Kasi namoni malamu kotindela bino Epafrodite ndeko na ngai, moninga ya mosala mpe mononga ya bitumba, kasi motindami na bino mpe mokokisi ya biloko oyo nazalaki na bosenga. 26. Mpo akanisaki bino nionso na bolingo mingi mpe azalaki na mawa na motema ya koyoka ete boyebaki ndenge abelaki ; 27. Mpo ye abelaki makasi, lokola mutu akufi, kasi Nzambe ayokelaki ye mawa, kaka ye te, kasi na ngai lokola po nazala na mawa likolo na mawa te. 28. Natindi ye na lombangu, mpo bozala na esengo ya komona ye pe ngai nazala na mawa te. 29 . Boyamba ye penza kati na Nkolo, na esengo nionso pe bomemia bato ya boye ; 30. Mpo na mosala azalaki pene ya kufa, amitikaki bomoyi, mpo na kokokisa oyo ezangaki na mosala na bino pona ngai.

 

3        MOKAPO YA MISATU

1. Na oyo etikali bandeko na ngai, bosepela kati na Nkolo : kokomela bino makambo bobele moko, ezali motungisi te pona ngai ; ezali bokasi pona bino. 2. Bokeba na ba mbwa , bokeba na basali ya lokuta, bokeba na bakatisi ngenga ya lokuta ; 3. Mpo tozali bokatami ngenga, biso oyo tozali kosalela mpe kokumisa na nzela ya Molimo na Nzambe, mpe oyo tokumisaka kati na Kristu Yesu ; mpe totiaka elikia na mosuni te : 4. Ata ete, ngai mpe, nazali nini kotia elikia kati na mosuni. soki moto moko azali komona ete akoki kotia elikia na mosuni, ngai kutu koleka : 5. Nakatisama ngenge mokolo ya mwambe, mutu ya Israele, na libota ya benamini, hebreyo ya ba hebreyo, na oyo etali mobeko farizayo, 6. Na oyo etali molende, nazalaki koniokola eklezia, kati na oyo etali bosembo ewuti na mibeko, nazalaki na pamela te. 7. Kasi makambu nionso oyo ezalaki motuya pona ngai, na tali yango na tina ya Kristu, lokola ezanga motuya. 8. Nazali komona biloko nionso ezangi motuya na tina ya motuya monene ya boyebi ya Kristu Yesu, Nkolo na ngai, na tina wana naboyi nionso mpe natali biloko nionso lokola biloko ya fulu, pona nazwa Kristu, 9. Mpe na mimonana kati na ye, nakozalaka te na bosembo na ngai te oyo ezali na mobeko, kasi oyo ezali ya kondima kati na Kristu, bosembo oyo ewuti na Nzambe, etongami likolo  na kondima ; 10. Pona koyeba ye, Ye, mpe nguya ya lisekwa na ye mpe  liyangani ya bapasi na ye, na kokama lokola ye na kufa na ye,  11. Soki na lolenge ya ndenge nini  nakoma  lisekwa na ye kati ya bakufi. 12. Nanu nakomi te, to nanu nakomi te nakoka, kasi nazali kolanda, koluka kosimba ; mpo ngai lokola nasimbamaki na nzela na Kristu Yesu. 13. Bandeko, pona ngai, nakanisi te ngai moko nasili kokoma ; 14. Kasi eloko bobele moko : nabosani biloko nionso ezali na sima, mpe natali na makasi biloko oyo ezali liboso, nazali kokima liboso pona lifuti ya bobengami ya likolo ya Nzambe kati na Kristu Yesu. 15. Biso nionso oyo tozali ya kokoka, tozala na makanisi wana ; mpe soki na eloko mosusu tozali na makanisi mosusu,  na wana Nzambe akolakisa bino ; 16. Kasi na esika oyo tokomi, totambola elongo kati na nzela moko.

17. Bozala bino banso balandi na ngai, bandeko, botala ba oyo bazali kotambola bongo, na lolenge ya ndakisa bozali na yango kati na biso. 18. Mpo ebele bazali kotambola, oyo nayebisaki bino mpe nazali koyebisa bino sik’oyo na mayi na miso, bazali banguna ya ekulusu ya Kristu, 19. Oyo suka na bango eza libungi, libumu nde Nzambe na bango, mpe nkembo na bango ezali kati na soni na bango, bazali na makanisi na bango na biloko ya mabele. 20. Biso tozali batu ya mboka likolo  wana nde tozali kozela Nkolo Yesu Kristu Mobikisi 21. Oyo akobongola nzoto na biso ya bolembu na kokisa yango na nzoto na ye ya nkembo, na lolenge ya nguya bokonzi azali na yango ya kotia biloko nionso ezala na se ya bokonzi na ye .

 

4        MOKAPO YA MINEYI

1. Na bongo, bandeko na ngai balingami mpe oyo nalingaka komona, esengo na ngai mpe ekoti na ngai ya lokumu, bowumele makasi kati na Nkolo , balingami. 2. Nabondeli  evodia, mpe nabondeli  suntike bozala na likanisi se moko kati na Nkolo. 3. Iyo nabondeli, yo mpe, moninga na ngai mpenza ya solo ya mosala sunga basi oyo babundaki elongo na ngai kati na sango malamu elongo na klema mpe baninga mosusu ya mosala, oyo bakombo ezali na buku ya bomoyi.

4. Bosepela tango nionso kati na Nkolo ; mbala lisusu, nakoloba na bino : bosepela. 5. Ezaleli na bino ya bopolo eyebana na batu nionso, Nkolo akomi pembeni ; 6. Bomitunguisama na eloko te, kasi na makambo nionso , botalisa bosenga na bino epayi na Nzambe, na losambo mpe mabondeli elongo na matondi ; 7. Mpe kimia ya Nzambe oyo eleki mayele nionso, ekobomba mitema mpe makanisi na bina kati na Kristu Yesu.

8. Na oyo etikali, bandeko, oyo nionso ezali ya solo, oyo nionso ya lokumu, oyo nionso ya sembo oyo nionso ya peto, oyo nionso ya bolingo oyo nionso ya litatoli malamu, soki ezali na bizaleli malamu na ya lokumu, mpe oyo endimami na lokumu – biloko yango ezala na makanisi na bino 9. Nionso bozali na yango mpe boyekoli, mpe bozui, mpe boyoki mpe bomoni kati na ngai, bosala yango, mpe Nzambe ya kimia akozala na bino.

10. Nzokande nasepeli makasi kati na Nkolo na ndenge ete sik’oyo bolamusi lisusu makanisi na bino pona ngai, ata bokanisaka penza ngai, kasi libaku ezalaki kozanga bino ; 11. Ezali te mpo nazali na bozangi nde nalobi boye, mpo, ngai, nayekola kati na ngai kosepela na lolenge kati ngonga nazali. 12. Nayebi kozala na bozangi, nayebi lisusu kozala na ebele koleka ; kati na nionso mpe na biloko nionso, nayekola, lisusu malamu nakozala na botondi mpe nakozala na nzala, lisusu malamu kozala kati na ebele koleka mpe kozala kati na bozangi. 13. Nazali na makoki na makambu nionso kati na ye oyo apesaka ngai makasi. 14. Kasi bosali malamu kozua esika na bino kati na bapasi na ngai.

15. Nzokande bino lisusu, bafilipi, boyebi, na ebandeli ya sango malamu, tangu natikaki makedonia,eklezia moko te akabolaki eloko na ngai, pona oyo etali kopesa mpe kozua, longola bobele bino ; 16. Mpo ata na tesalonika, mbala moko, mpe mbala mibale, botindelaki ngai pona ba mposa ngai ; 17. Ezali te ete nazoluka likabo, kasi nazali koluka mbuma oyo ezali kofuluka pona bolamu na bino. 18. Nzokande, nazali na nionso mpenza, mpe nazali kati na ebele koleka ; nazali na nionso, wana nazuaki na epafrodite oyo ewutaki epayi na bino….., malasi na solo kitoko, mbeka oyo eyambami, oyo ezali kosepelisa Nzambe : 19. Bongo Nzambe na ngai akokokisa bosenga nionso na bino, na lolenge ya bozui na ye kati na nkembo na nzela ya Kristu Yesu. 20. Bongo na Nzambe mpe Tata na biso ezala nkembo libela na libela ! Amen !

21. Bopesa mbote na mosantu moko moko kati na Kristu Yesu. 22. Bandeko bazali na ngaibapesi bino mbote. Basantu nionso bapesi bino mbote, mpe mingi ba oyo bazali na ndaku ya kaisala. 23. Ngolu na Nkolo Yesu Kristu ezala elongo na molimo na bino. Amen !