MOKANDA YA LIBOSO YA TESALONIKA

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5

 

1        MOKAPO 1

1. Polo, Silvano mpe Timoteo na eklezia ya ba tesalonika kati na Nzambe Tata mpe na Nkolo Yesu Kristu: ngolu mpe kimia ezala na bino. 2. Tokotondaka Nzambe tango nyonso pona bino nyonso. Na botangi bino na mabondeli na biso. 3. Tokanisa tango nyonso misala ya kondima na bino, misala bolingo na bino mpe mpiko na elikya na bino na Nkolo na biso Yesu kristu liboso ya Nzambe mpe tata na biso. 4. Na boyebi ete, bandeko balingami, boponami na bino 5. Mpo ete sango malamu na biso eyeli bino bobele na maloba te, kasi na nguya mpe kati na Molimo Mosantu mpe kati na botondisami  monene ya elikya, mpe boyebi ndenge tozalaki na bino pona bolingo na bino. 6. Mpe bokomaki kolanda ndakisa na  biso mpe ya Nkolo, mpo ete boyambi liloba kati na minyoko mingi, elongo na esengo ya Molimo Mosantu. 7. Na lolenge ete bokomi etaliseli pona baoyo bandima kati na Makedonia mpe na Akaya. 8. Pamba te liloba ya Nkolo epanzani epayi na bino, bobele na Makedonia mpe Akaya te, kasi bisika nyonso, kondima na bino epayi na Nzambe epanzani na lolenge ete toza na mposa ya koloba te. 9. Mpo ete bango moko bazotatola na ntina na biso lolenge nini tokomaki epayi na bino, ndenge nini bino botikaki bikeko mpe bokeyi epayi na Nzambe na bomoyi mpe ya solo pona kosalela ye 10. Mpe kozela na likolo Mwana na ye oyo asekwisa kati na bakufi, Yesu oyo akangola biso na nkanda oyo ezoya.

 

2        MOKAPO 2

1. Mpo ete bino moko boyebi, bandeko, ete koya na biso kati na bino ezalaki pamba te. 2. Kasi na sima na biso konyokwama mpe kofingama na Filipi lokola boyebi yango, tozalaki na molende nyonso kati na Nzambe na biso pona koteya bino sango malamu ya Nzambe elongo na bitumba mingi. 3. Mpo ete lilendisi na biso efandi te likolo na kopengwisa to bosoto te, mpe ya mayele ya mabe te, 4. Kasi lokola Nzambe atalaki biso malamu pona ete sango malamu epesamela biso , boye tolobaka te pona kosepelisa batu, kasi bobele na Nzambe, ye oyo amekaka mitema na biso. 5. Mpo ete totikala kosalela maloba ya kosepelisa te pona kobotola eloko, lokola boyebi yango, mpe tosalelaki lokoso ya bozui biloko te, Nzambe azali motatoli ; 6. Mpe tolukaki nkembo oyo ewutaka na bato te, epayi na bino to epayi na bamosusu te. Tangu esengelaki tozala mokumba pona bino lokola ba apostolo ya Kristu, 7. Kasi tozalaki bato na kopesa esengo kati na bino, lokola mama oyo aleyisaka bana na ye  alengelaka bana na ye moko, 8. Na wana, tolingi bino, tobongisamaki na kopesa bino kaka sango malamu na Nzambe te, kasi lisusu bomoyi na biso moko, mpo ete bokoma motuya makasi pona biso 9. Mpo ete bozali kokanisa , bandeko , bapasi mpe minyokoli ya misala na biso, eza na kosalaka mosala butu mpe moyi mpo ete tozala mokumba ya mutu moko te kati na bino, ete toteyaki bino sango malamu ya Nzambe. 10. Bino moko, bozali batatoli mpe Nzambe lokola, ete totambolaki na bosantu, na bosembo, mpe na ekweli te liboso na bino oyo bozali kondima, 11. Na bongo boyeba ete lolenge tozalaki na moko na moko kati na bino, lokola tata epayi na bana na ye, kolendisa bio mpe koyikisa bino mpiko mpe kotatola, 12. Mpo ete botambola lolenge esengeli na Nzambe ye oyo abenga bino na bokonzi na ye moko mpe nkembo na ye moko. 13. Yango wana, totikaka kotonda Nzambe te pona likambu ete wana bozu na biso liloba ya liteya na Nzambe, boyambi yango te lokola liloba ya batu, kasi (lolenge yango ezali mpenza) liloba na Nzambe, oyo ezali kosala misala kati na bino oyo bondimi. 14. Mpo ete bino, bandeko, bokomi balandi ya ba eklezia na Nzambe oyo ezali na Yuda kati na Yesu Kristu : mpo ete bino mpe, bomoni pasi epayi na bikolo na bino moko pelamoko ezui bango epayi na Bayuda. 15. Oyo babomaki Nkolo Yesu mpe ba profete, mpe babenganaki biso na nzela ya kosala biso mabe, mpe basepelisaka Nzambe te, batelemelaka bato nyonso 16. Bazali kopekisa biso mpo ete toloba na bikolo pona babika, pona kotondisa bozindo ya masumu na bango, kasi kanda eye likolo na bango na nsuka na yango penza

17. Nde biso, bandeko, wana tokabwanaki na bino pona mwa tango, na bilongi kasi na  mitema te, tozali na mposa makasi koleka koluka ya komona bilongi na bino  18. Yango wana tolingaki koya epayi na bino, ngai , Polo, namekaki mbala moko mpe mibale kasi Satana apekisaki biso. 19. Mpo ete elikya na biso to esengo na biso, to mpe motole na lokumu na biso tozali kobeta ntolo pona yango ezali nini? Ezali bobele bino te liboso ya Nkolo na biso Yesu na bozongi na ye? 20. Mpo ete bino bozali nkembo na biso mpe esengo na biso.

 

3        MOKAPO 3

1. Yango wana, tokanga lisusu motema te, tomonaki ete ezali malamu kotikala biso moko na Atene, 2. Mpe totindaki Timoteo, ndeko na biso mpe moninga ya mosala na Nzambe kati na sango malamu ya Kristu mpo ete alendisa bino mpe ayikisa bino mpiko kati na kondima na bino. 3. Ete moko te amitungisa kati na minyoko oyo: pamba te bino boyebi  ete tobongisami pona yango 4. Mpo ete tango tozalaki kati na bino , tolobaki na bino ete tokokutana na minyoko. Lolenge yango mpe ekomi mpe lokola boyebi. 5. Yango wana, nga mpe nakoki kokanga lisusu motema te, natindi pona koyeba lolenge ya kondima na bino, na bobangi ete momeki asila komeka bino mpe mosala na biso ekoma mpamba. 6. Kasi Timoteo akomi awa na biso na kowuta epayi na bino mpe amemeli biso basango malamu ya kondima na bino mpe ya bolingo na bino mpe bozali kbombaka makanisi malamu epayi na biso, na mposa makasi ya komona biiso lokola biso mpe tozalaka na mposa ya komona bino. 7. Na yango wana, bandeko, tobondisamakii na tina na bino na nzela ya kondima na bino, kati na bampasi mpe koniokwama na biso : 8. Mpo ete sikoyo tozali na bomoyi, soki botelemi ngwi kati na Nkolo 9. Mpo ete ndenge nini tokoki kopesa Nzambe matondi pona bino, pona esengo nionso tozali kosepelaka na yango na tina na bino liboso na Nzambe na bino, 10. Kobondelaka butu mpe moyi na molende nionso, pona tomona bilongi na bino mpe tobakisa oyo ezangi na kondima na bino. 11. Boye tika ete Nzambe mpe tata na biso ye moko mpe Nkolo na biso Yesu, bafungolela biso nzela epayi na bino 12. Mpe pona bino tika ete Nkolo abakisa mpe afulukisa bino kati na bolingo na bino  moko na moko mpe epayi na bato nyonso, lokola biso tozalaka na yango epayi na bino. 13. Pona kolendisa mitema na bozangi ekweli kati na bosantu liboso na Nzambe mpe Tata na biso kati na bozongi ya Nkolo na biso Yesu elongo na basantu na ye nionso.

 

4        MOKAPO 4

1. Na oyo mosusu, bandeko, tozali kobondela bino mpe kolendisa bino na nzela ya Nkolo Yesu, mpo ete lokola bozui epayi na biso lolenge oyo esengeli na bino kotambolela mpe kosepelisa Nzambe, lokola mpe bozali kotambola mpe bokoba mingi kati na yango. 2. Mpo ete boyebi mitindo nini topesi bino na nzela ya Nkolo Yesu 3. Mpo ete oyo nde mokano ya Nzambe, bosantu na bino, mpe bomibomba na makambu ya pite. 4. Moto na moto ayeba kobomba mbeki na ye moko na basantu mpe na lokumu, .5. Na mposa mabe ya nzoto te lokola esalaka bikolo oyo bayebi Nzambe te ; 6. Moto te asala ndeko na ye mabe to ayiba ye kati na makambu, pona Nkolo ye nde azali mpoesi  etumbu na makambo oyo nyonso lokola tolobaki yango liboso pe tolobaki ezali bongo. 7. Pamba te Nzambe abenga biso te na bosoto kasi kati na bosantu. 8. Na yango wana, moto oyo akotiola yango , akotiolaka moto te, kasi Nzambe, ye oyo apesa bino Molimo Mosantu na ye.

9. Nzokande na oyo etali bolingo kati na bandeko, bozali na posa te ete nakomela bino mpo ete bino moko bosili koteyama na Nzambe ete bomilingana moko na moko. 10.  Pamba te ezali oyo bosalaka epayi ya bandeko nyonso oyo baza na Makedonia mobimba. Kasi tozali kolomba bino, bandeko ete bokoba kosala bongo mingi lisusu, 11. Mpe na komipesa kobika na kimia, na kosala makambu na bino moko mpe na kosala na maboko na bino moko, ndenge topesaki bino mitindo, 12. Boye ete bokotambola na lokumu liboso ya ba oyo bazali ya libanda mpe bozala na bosenga na moto te.

13. Bandeko, tolingi te ete bozanga boyebi na oyo etali baoyo balali, mpo ete bozala na mawa te lokola bamosusu oyo bazangi elikya.14. Mpo ete soki tondimaka ete Yesu akufaki mpe asekwaki, ndenge wana mpe elongo na ye, Nzambe akomema ba oyo balali na nzela na Yesu. 15. Mpo ete tozali koloba na bino boye na liloba ya Nkolo : ete biso bato na bomoyi totikali kino bozongi na Nkolo, tokoleka ata muke te bato balali. 16. Mpo ete Nkolo ye moko, na koganga ya motindo, na mongongo ya arkanjelu mpe na kelelo ya Nzambe, akokita na likolo: mpe bakufi kati na Kristu bakosekwa na liboso ; 17. Na sima biso, bato na bomoyi oyo tokozala wana, tokomemana elongo na bango kati na mapata na bokutani na Nkolo, kati na mopepe ; Mpe bongo tokozala libela elongo na Nkolo. 18. Bobondisama moko na moko na maloba oyo.

 

5        MOKAPO 5

1. Kasi pona makambo ya tango to basanza, bandeko, boza na posa te ete bakomela bino, 2. Mpo ete bino moko boyebi malamu ete mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi kati na butu. 3. tango bakoloba : « kimia mpe motungisi te » wana libebi ekokwela likolo na bango lokola ba mpasi ya mwasi ya zemi, mpe bakokima te.

4. Kasi bino, bandeko, bozali kati na milili te, na lolenge mokolo yango ekwelela bino lokola moyibi te. 5. Mpo ete bino nyonso bozali bana na pole mpe bana na moi, tozali na butu te, na molili mpe te.6. Boye tolala te lokola bamususu, kasi tosenzelaka mpe tolamuka. 7. Mpo ete  baoyo balali, balalaka na butu, mpe baoyo balangue, balangwaka na butu, 8. Kasi biso oyo toza bato na moi, tolangwa te, mpe tolata lokola ebombameli ya kondima mpe ya bolingo, mpe pona ekoti ya libende na moto, elikia ya lobiko ; 9. Pamba te Nzambe abongisa biso te na nkanda, kasi na bozui lobiko na nzela na Nkolo na biso Yesu Kristu, 10. Ye oyo akufa pona biso ete soki tolamuki, soki tolali, tozala elongo na ye. 11. Na yango wana bolendisanaka mpe botonganaka bino na bino, ndenge bozali kosolo yango.

12. Bandeko, tobondeli bino ete boyeba baoyo basalaka kati na bino, baoyo baza mutu kasi na bino kati na Nkolo, mpo bakebisaka bino, 13. Mpe botia bango likolo kati na bolingo pona mosala na bango, bozala na kimia kati na bino, 14. Bandeko, tozalendisa bino, bopamela ba goi-goi, bosunga batu balembi, bosalisa batu na bolembu, bozala motema molayi epayi na banso. 15. bokeba ete moto te azongisa mabe pona mabe, kasi bolandaka tango nyonso oyo ezali malamu kati na bino mpe na bato nyonso. 16. Bosepelaka tango nyoso. 17. Bobondelaka tango nyonso, 18. Botondaka nzambe na makambo nyonso, mpo ete yango nde mokano ya Nzambe kati na Kristu Yesu pona bino. 19. Bozimasa Molimo te, 20. Botiola profesi te. 21. Kasi bomeka makambo nyoso, bobomba oyo ezali ya malamu. 22.  Bokima ndenge nyonso ya mabe.

23. Nzambe ya kimia ye moko abulisa bino na mobimba , tika ete molimo, bomoto mpe nzoto na bino mobimba, ebatelema malamu na ekweli te na mokolo ya Nkolo na biso Yesu Kristu. 24. Ye oyo abengi bino azali sembo, akosala yango.

25. Bandeko , bobondela pona biso.  26. Bopesa bandeko nyosnso mbote ya beze ya bosantu. 27. Nazali kopesa bino motindo kati na Nkolo ete mokanda oyo etangamela na bandeko nyonso. 28. Tika ete ngolu  ya Nkolo na biso Yesu Kristu ezala na bino.