MOKANDA NA YAKOBO

 

Mokapo 1Mokapo 2Mokapo 3Mokapo 4Mokapo 5

 

1        YAKOBO 1

1. Yakobo, mowumbu na Nzambe mpe na Nkolo Yesu Kristu, epayi na mabota zomi na mibale oyo ya diaspora, mbote.

2. Botala yango lokola esengo mpenza, bandeko na ngayi, tango bokeleka kati na ba mimekano ya ndenge nionso. 3. Boyeba ete komekama ya kondima na bino ebotaka kokanga motema. 4. Mpe kokanga motema ekokisa mosala na yango mpe bozala bakoki mpe babongi, oyo eloko te ezangi. 5. Mpe soki moko kati na bino azangi bwania, asenga na Nzambe oyo apesaka na banso na bolamu mpe apamelaka te. Bongo akozua yango. 6. Kasi asenga na kondima, kotia ntembe soko moke te ; pamba te moto oyo atiaka ntembe aza lokola mbonge ya mayi oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epayi na epayi ; 7. Moto wana akanisa te ete akozua eloko kowuta na Nkolo. 8. Azali moto ya mitema mibale na kolemba-lemba na bitambweli na ye nionso.

 

9. Ndeko ya lolenge ya nse asepela nakotombwama na ye, 10. Pe mozui asepela na kokita na ye pona akolimwa lokola fololo na matiti. 11. Mpo moyi ebimaka na molunge makasi na yango mpe ekawusi matiti, mpe fololo na yango ekweyi, mpe kitoko na yango ebebi. Bongo mozui mpe akowukaka na bitambweli na ye 12. Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ; tango akomonisama sembo kati na komekama, akozwa motole na bomoyi oyo alaka na bato nionso oyo balingaka ye.

 

13. Tika ete moko, tangu amekami, aloba Nzambe azali komekama ; mpo Nzambe akoki komekama te na mabe, mpe ye amekaka mutu te. 14. Kasi mutu amekama, wana abendami mpe alobami na baposa mabe na ye moko 15. Pe baposa mabe, wana ezui zemi, aboti lisumu ; mpe lisumu etondisami, ekobota liwa.

 

16. Bopengwa te bandeko balingami : 17.Nionso oyo epesemeli ya malamu mpe makabo nionso ya malamu ewutaka na likolo, na tata na ba minzoto, oyo kati na ye kobongwana mpe molili ezalaka te. 18. Na mokano na ye moko, abota biso na liloba ya solo mpo tozala lokola bambuma ya liboso na bikelamu na ye.

 

19. Na boye bandeko balingami, tika ete moto nionso ayoka noki, mpe malembe na koloba, malembe na kosilika ; 20. Pamba te kosilaka ya mutu ekokisaka bosembo ya Nzambe te. 21. Yango wana bobwaka bosoto nionso mpe kotonda ya mabe, boyamba na bopolo liloba elonami oyo ezali na nguya ya kobikisa milimo na bino. 22. Kasi botiaka libola na misala, boyoka yango kaka te, po wana bokomisaka bino moko. 23. Pona soki moto, ayoki liloba kasi atie yango na misala te aza lokola mutu amitali elongi na ye na talatala ; 24. Pe sima na ye komitala, akeyi mpe abosani ndenge azali. 25. Kasi moto oyo azali kotala pembeni kati na mobeko mabongi, ya bonsomi mpe awumeli kotalatala wana, azali moyoki oyo abosanaka, kasi azali mosali na misala, ye wana akobengama mutu ya esengo kati na mosala na ye. 26. Soki moto akanisi ete azali mutu ya kosambela mpe akokanga lolemo na ye te kasi azali kokosa motema na ye, kosambelaka ya mutu wana ezali na tina te. 27.Kosambela ya petwa mpe ezangi mbeba liboso na Nzambe tata ezali oyo : kotalaka bana bakufela baboti mpe basi bakufela mibali kati bapasi na bango, mpe amibomba petwa.

 

2        YAKOBO 2

1. Bandeko na ngayi, bozala na kondima ya Nkolo na biso Yesu Kristu, Nkolo na nkembo na kotalaka bato te na ndenge ya libanda na bango. 2. Soki moto moko alati lopete na wolo, bilamba ya ngelingeli akoti na sunagoga na bino, mpe mobola mpe akoti na bilamba ya ebeba, 3. Kasi botali kaka oyo alati bilamba ya ngelingeli mpe bolobi na ye : yo fanda awa na esika malamu mpe bolobi na mobola : yo telema awa to fanda awa na nse ya makolo na ngayi ; 4. Bosali likeseni kati na bino ? bokomi te bosambisi na makanisi mabe ? 5. Boyoka bandeko na ngayi ya bolingo ; Nzambe apona babola te na lolenge ya mokili, bazui kati na kondima mpe bakitani na libula na bokonzi oyo alaka na ba oyo balingaka ye ? 6. Kasi bino botioli babola, bazui baniokalaka bino te ; ezali bango mpe te ba oyo babendaka bino na bisambelo ? 7. Ezali bango te baoyo bakotukaka nkombo malamu oyo ebelema likolo na bino ? 8. Soki mpenza bokokisi mibeko ya bokonzi, na lolenge ya makomi: okolinga moninga na yo lokola yo moko. Wana bosali malamu : 9. Kasi soki bozali kopona bato, bozali kosala masumu, bozali kokueya na mibeko lokola babungi.10. Mpo ete moto oyo akotosa mibeko nyonso mpe akweyi ata na moko, akweyi na nyonso. 11. Pona ye oyo alobaki: okosala ekobo te, aloba mpe okoboma moto te. soki osali ekobo te kasi obomi moto yeba ete okomi mobuki mibeko nyonso. 12. Bolobaka mpe bosalaka makambu lokola baoyo  bakosambisama na mobeko ya bonsomi. 13. Mpo ete ekateli ekozala na mawa te epayi ya moto oyo akoyoka mawa te. Mawa ekolonga kati na kosambisa.

 

14. Bandeko na ngayi,litomba nini ezali na moto soki alobi ete azali na kondima wana azangi misala? Kondima ekoki kobikisa ye? 15. Soki ndeko mobali to ndeko mwasi bazali balumbu mpe bazangi bileyi ya mikolo nyonso. 16. Mpe moko kati na bino alobi na bango: bokende na kimia, yetola moto, botonda, mpe bopesi ye biliko ya motuya te pona nzoto, wapi litomba? 17. Ezali mpe bongo pona kondima, soki kondima ezangi misala, ekufi kati na yango moko. 18. Kasi moko akoloba: ozali na kondiima, nga nazalii na misala. Lakisa nga kondima na yo oyo ezangi misala mpe nga na nzela ya misala na nga, nakolakisa yo kondima na nga. 19. Ondimaka ete Nzambe azali moko; osali malamu : ba demon bandimaka mpe balengaka. 20. Kasi olingi oyeba, ô mutu mpamba, ete kondima oyo ezangi misala ezali ya kokufa? 21. Abrahama, tata na biso, alongaki te na misala wana abonzaki mwana na ye izak na etumbelo? 22. Omoni ete kondima ebandaki kosala na misala na ye; mpe na nzela ya misala, kondima ekomaki malamu mpenza. 23. Boye likomi likoki oyo elobi ete: abrahama andimaki Nzambe,mpe yango etangamelaki ye pona boyengebene. Abengamaki moninga ya nzambe. 24.Bomoni ete moto abimaka sembo na nzela misala na ye, bobele na kolandama kondima te. 25. Ndenge moko pona Rahab mwasi ya ndumba, abimaki sembo te na nzela misala, wana ayambaki mpe akimisaki na nzela mosusu batu bayaki na sekele pona koyeba mboka. 26. Lokola nzoto ezanga molimo ezali ya kokufa, ndenge moko wana kondiima ezanga misala ezali ya kokufa.

 

3        YAKOBO 3

1. Bozala balakisi ebele te, bandeko na ngayi, na boyebi ete tokosambisama makasi; 2. pona tokweyaka na makambu ebele. Soki moto akweyi te na maloba, ye wana azali moto ya kokoka, akoki kobomba nzoto na ye nionso na kopekisaka yango makambu. 3. Botala, totiaka bibende na munoko ya mpunda pona batosa biso mpe tokamba nzoto na bango mobimba bipayi na bipayi. 4. Tala mpe masuwa oyo ezali monene mpe epusanaka na mopepe makasi, nde ekambaka bipayi na bipayi na eyenda mokemoke, na bisika wapi mutu azali kokamba yango alingi.

5. Boye mpe lolemo ezali eteni moke mpe ekomikumisama na makambu minene. Tala mwa moto muke epelisaka zamba monene. 6. Mpe lolemo ezali moto, lolemo ezali mokili ya bosembo te, efanda kati na biteni na biso, eza ye nde abebisaka nzoto na biso mobimba mpe epelisaka lolenge na biso nyonso na moto ya gehena 7. Mpo ete lolenge nyonso ya baniama ya zamba mpe ya bandeke, banioka mpe baniama ya mayi akonzamaka mpe akonzama epai na bato. 8. Kasi pona molemo, mutu moko te akoki kokonza yango, eza mabe moko yembele-yembele, etonda na ngenge na kufa. 9. Na yango, topambolaka Nkolo mpe Tata, mpe na yango tolakelaka mabe bato basalemi na lolenge na Nzambe. 10. Na monoko moke ekobimaka lipamboli na elakeli mabe, bandeko na ngai, esengeli te ezala bango. 11. Liziba ekoki kobimisa mayi ya sukali na ya bololo ? 12.Bandeko, nzete ya figue akoki kobota bambuma ya elaya, to nzete na vino ebota mbum aya figue ? mayi ya mungwa ekoki kobimisa mayi ya elengii te ?

 

13. Nani kati na bino azali moto na buanya mpe mayele ? Na bizaleli malamu alakisa misala na yango na bopolo ya bwanya. 14. Kasi soki bozali na zuwa ya bololo na molimo ya koswana na mitema na bino, bomikumisa te mpe bokosa te pona bosolo. 15 Eza bwanya te oyo ewuti likolo kasi bwanya ya mokili, ya niama, ya diabulu, 16 Mpo ete esika ezali zuwa mpe molimo ya kosuana, esika wana mpe ezali mobulu mpe lolenge nionso ya misala mabe. 17 Kasi bwanya ewuti likolo ezalaka nanu peto, na nsima kimia, eza na ndelu, boyokani, etonda mawa mpe na ba mbuma malamu, na boponi bilongi te, na bokosi te. 18 Mbuma ya bosembo kati na kimia, elonamaka pona baoyo bamemaka kimia.

 

4        YAKOBO 4

1. Bitumba mpe koswana kati na bino ewuti wapi ? ewuti te na baposa mabe na bino oyo ebundaka kati na biteni na bino ? 2. Bolulaka kasi bazali nango te ; bozoboma mpe boza na bilulela makasi, mpe bokoki kozua yango te ; boza kotia ntembe mpe bozobunda etumba ; boza na yango te pona bosengaka te. 3. Bosengaka kasi bozali kozua te pona bosengaka mabe pona kosalela yango na baposa na bino ya mabe. 4. Batu na ekobo, boyebi te ete bondeko na mokili ezali kimonguna na Nzambe ? Moto nionso oyo akolinga kozala moninga ya mokili amikomisi monguana na Nzambe. 5. Bokanisi ete liloba elobaka mpamba ? Molimo oyo efanda kati na biso eza na posa ya makasi na biso ? 6. Kasi apesaka ngolu monene, yango wana aloba « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi apesaka ngolu epayi bato ya komikitisa ». 7. Botelemela Diabolo, mpe akokima mosika na bino. 8. Bomipusa na Nzambe, mpe ye akopusana pene na bino. Bosukola maboko na bino, basumuki mpe bopetola mitema na bino, bino bato ya mitema mibale. 9. Boyoka mpasi na bino, bosala matanga mpe bolela, tika ete koseka na bino ebonguana na matanga, mpe esngo na bino na mawa. 10. Bomikitisa liboso ya Nkolo mpe akotombola bino

 

11. Bandeko, bolobanaka mabe te moko na basusu. Oyo akolobaka mabe pona ndeko to akosambisa ndeko na ye, azali koloba mabe na oyo etali mibeko mpe azali kosambisa mibeko. Nzokande soki ozali kosambisa mibeko, ozali motosi mibeko te, kasi mosambisi. 12. Bobele moko azali mokeli mibeko mpe mosambisi, ye oyo akoki kobikisa mpe koboma ; kasi yo, ozali nani mpo osambisa moninga na yo ?

 

13. Na bino sik’oyo, bozali koloba : lelo to lobi, tokokende na engumba songolo to pakala, tokovanda kuna mbula moko, tokosala mombongo mpe tokozwa mbongo. 14. Bino oyo boyebi te makambo ekoya lobi ; mpo ete bomoyi na bino ezali nini ? Ezali kaka mbonge oyo emonanaka mwa tango mpe elimwaka. 15. Na esika boloba ; soko Nkolo alingi mpe soki tokozala na bomoyi, tokosala likambu songolo to pakala. 16. Kasi sikoyo bozo komikumisa na ba lofundu na bino. Lolendo ya ndenge wana ezali mabe. 17. Mutu oyo ayebi kosala malamu kasi azali kosala yango te, pona ye, ezali lisumu.

 

5        YAKOBO 5

1. Bino sikoyo, bazui ! bolela na konganga na tina mikakatano oyo ekoyela bino. 2. Bomengo na bino ebebi mpe bilamba na bino esili biliami na mitshopi. 3. Wolo mpe palata na bino enzuluki mpe konzuluka na yango ekozala litatoli pona bino mpe ekolia misuni na bino lokola moto : bozui mpe oyo biloko ya motuya na mikolo ya suka. 4. Tala, lifuti ya basali oyo basali bilanga na bino mpe oyo boniokolaki, egangi, mpe koganga na basali bilanga na bino ekomaki kino na matoyi ya Nkolo Sabaoth. 5. Bobikaki kati na bisengo awa na mabele, mpe bomikabaki na bamposa mabe ; botondisaki mitema na bino lokola mokolo na mbeka ; 6. Bokatelaki etumbu, bobomi mutu na sembo : atelemelaki bino te.

 

7. Bokanga mingi mitema, bandeko, kino boyeyi ya Nkolo. botala, mobalusi bilanga motindo azali kozela mbuma motuya ya mabele, azalaka na kokanga motema na tina na yango, kino ezwa nanu mbula ya liboso mpe ya sanza ya suka. 8. Bino mpe bokanga mitema ; bokembisa mitema na bino, mpo ete boyeyi ya Nkolo ekomi pene pene 9. Bandeko, boyima bino na bino te, mpo ete bosambisama te : tala mosambisi atelemi liboso ya ekuke 10. Bandeko na ngayi, bozua ndakisa ya mpasi mpe ya bokangi motema ba profete oyo balobaka na nkombo na Nkolo. 11. Tala, tozoloba esengo na baoyo bandimaka mpasi na kokanga motema. Boyokaki lisolo ya motema molayi ya Yobo, mpe bomonaki suka ya Nkolo, ete Nkolo atonda boboto mpe mawa.

 

12. Bandeko na ngayi, liboso na makambu nionso, bolapaka ndayi te, soko na likolo te, soko na mokili te to mpe na ndayi mosusu ; tika ete iyo na bino ezala iyo, mpe te na bino ezala te mpo bokweya te na bosambisami.

 

13. Moko kati na bino azoniokolama, asambela. Moko azali na esengo, ayemba banzembo 14. Moko kati na bino azali kobela, abenga ba mpaka na eklezia, basambela pona ye mpe bapakola ye mafuta na nkombo ya Nkolo ; 15. Libondeli na kondima ekobikisa mobeli, mpe Nkolo akotelemisa ye, ata soki asali masumu, akolimbisama 16. Botubela masumu na bino moko na moko, mpe bobondela moko na moko, mpo ete bobika. Libondeli ya mpiko ya moyengebene ekosala makambu ebele 17. Eliya azalaki moto ya lolenge moko na biso, abondelaki na losambo ete mbula ebeta te, mpe mbula ebetaki te na mokili mibu misato na basanza motoba 18. Pe abondelaki lisusu mpe likolo epesaki mbula mpe mabele ebimisaki mbuma na yango

 

19. Bandeko na ngayi, soki moko kati na bino abungi na oyo etali bosolo, ete moko azongisa musumuki na nzela, 20. ayeba ete oyo akozongisa musumuki oyo abungakii nzela na ye, akobikisa moto na kufa mpe akozipika ebele ya masumu.